Mokanda ya Biblia nimero 32—Yona
Mokomi: Yona
Nsuka ya bokomi: soko 844 L.T.B.
1. Mituna nini mipesami biyano kati na mokanda ya Yona, mpe yango emonisi nini na oyo etali motema mawa ya Yehova?
YONA—azalaki misionere na mboka mopaya na ekeke ya libwa L.T.B.! Lolenge nini atalelaki mosala oyo Yehova apesaki ye? Makambo nini ya sika mazalaki liboso na ye? Bato bayanolaki malamu na mosala na ye? Lolenge nini mosala na ye ya kosakola elóngaki? Lisoló ya nsɔ́mɔ oyo ezali na mokanda ya Yona ezali koyanola na mituna wana. Lokola yango ekomamaki na ntango oyo libota liponami ya Yehova libukaki kondimana oyo asalaki elongo na bango mpe bakweaki kati na losambo ya bikeko, lisoló ya esakweli oyo emonisi ete motema mawa ya Nzambe esuki bobele na libota moko te, soko mpe na Yisalaele te. Lisusu, ezali kokumisa motema mawa monene ya Yehova mpe motema-boboto na ye, na bokeseni na kozanga motema mawa, kozanga motema pɛtɛɛ, mpe kozanga kondima oyo emonanaka mingi epai na bato bazangi kokoka.
2. Makambo nini toyebi na ntina na Yona, mpe soko na mobu nini asakolaki?
2 Nkombo Yona (na Liebele, Yoh·nahʹ) elimboli “Ebenga.” Azalaki mwana ya mosakoli Amitai na Gata-hɛfɛlɛ kati na Galilai na teritware ya Zebuluna. Na 2 Mikonzi 14:23-25 tozali kotánga ete Yelobama, mokonzi ya Yisalaele, apusaki ndelo ya libota engebene liloba na Yehova oyo Yona alobaki. Yango emonisi ete Yona abandaki kosakola soko na mobu 844 L.T.B., mbula oyo Yelobama II akómaki mokonzi ya Yisalaele mpe bambula mingi liboso ete Asulia, oyo mboka-mokonzi na yango ezalaki Ninive, ebanda koyangela Yisalaele.
3. Nini emonisi ete lisoló ya Yona lizali solo?
3 Ntembe ezali te ete mokanda mobimba ya Yona ezali solo. ‘Yesu, oyo azali mobandisi mpe mosukisi na kondima na biso,’ alobelaki Yona lokola moto mpenza ya solo mpe apesaki bandimbola ipemami ya makambo mibale ya esakweli oyo mazali kati na mokanda ya Yona, komonisáká bongo ete mokanda wana ezali na esakweli ya solo. (Ebe. 12:2; Mat. 12:39-41; 16:4; Luka 11:29-32) Bayuda bazalaki ntango nyonso kotya mokanda ya Yona kati na molɔngɔ́ ya mikanda mipemami mpe bazalaki kotalela yango lokola mokanda oyo mondimami kati na lisoló ya bato. Lolenge ya solosolo oyo Yona azali kolobela mabungá na ye mpe bolɛmbu na ye, kozanga kobomba yango, emonisi mpe bosolo ya lisoló oyo.
4. Mbisi oyo emelaki Yona ezalaki motindo nini? Kasi, ndimbola nini ekoki mpo na biso?
4 Ezali boni mpo na “mbisi monene” oyo emelaki Yona? Bato babimisaki makanisi ndenge na ndenge mpo na komonisa soki mbisi yango ekokaki kozala motindo nini. Mbisi oyo babéngi cachalot ezali na likoki mpenza ya komela moto mobimba. Ezali mpe bongo mpo na mbisi monene oyo babéngi requin blanc. Nzokande, Biblia elobi bobele ete: “[Yehova] abongisaki mbisi monene ete emela Yona.” (Yona 1:17) Motindo ya mbisi yango eyebisami sikisiki te. Ekoki te kolobama na bosolo nyonso ete ezalaki cachalot, requin blanc ya monene to mpe lolenge mosusu ya bikelamu minene bizalaka kati na mai.a Lisoló oyo ya Biblia elobi ete ezalaki “mbisi monene” ekoki mpo na biso.
MAKAMBO MAZALI KATI NA YONA
5. Lolenge nini atalelaki mosala na ye, mpe nsuka na yango ezalaki nini?
5 Yona atindami na Ninive kasi akimi epai mosusu (1:1-16). “Liloba na [Yehova] liyelaki Yona, mwana na Amitai ete, Tɛlɛmá mpe kendá epai na Ninive, mboka yango monene, mpe sakwelá bango mpo ete mabe na bango esili koya liboso na ngai.” (1:1, 2) Yona asepeli nde na mosala oyo? Soko moke te! Akimi epai mosusu, akamati masuwa mpo na kokende na Talasisi, oyo eyebani ete ekoki mpenza kozala mboka Espagne. Masuwa oyo Yona azalaki kati na yango ekutani na mopɛpɛ moko makasi. Lokola bazalaki na bobángi, basáli na masuwa babandaki koluka lisalisi, “moto na moto angangaki epai na nzambe na ye,” na ntango yango Yona alali mpɔngi makasi kati na masuwa. (1:5) Nsima na kolamwisa Yona, babwaki mbɛsɛ mpo na koyeba nani ayeiseli bango mpasi. Mbɛsɛ ekwei epai na Yona. Sikawa amiyebisi epai na bango ete azali Moebele, mosambeli ya Yehova, mpe ete azali kokima longwa na mosala oyo Nzambe apesaki ye. Asɛngi bango ete bábwaka ye na mai. Nsima na kosala milende mpo na kokatisa masuwa na ngámbo mosusu, babwaki Yona na mai longwa na masuwa. Mai monene ekitisi nkanda na yango.
6. Likambo nini “mbisi monene” esali na Yona?
6 “Mbisi monene” emeli ye (1:17–2:10). “[Yehova] abongisaki mbisi monene ete emela Yona mpe Yona azalaki na libumu na mbisi mikolo misato mpe butu misato.” (1:17) Abondeli mpenza Yehova longwa na kati na libumu ya mbisi. “Longwa na libumu na [Sheol]” abeleli mpo na koluka lisalisi mpe alobi ete akokokisa yango esili ye kokata ndai, mpamba te “kobika ezali epai na [Yehova].” (2:2, 9) Na etindá ya Yehova, mbisi esanzi Yona na mokili.
7. Lolenge nini mosala ya Yona ebotaki mbuma kati na Ninive?
7 Kosakola kati na Ninive (3:1–4:11). Yehova azongeli lisusu etindá na ye epai na Yona. Yona akimi lisusu mosala na ye te, kasi akei na Ninive. Kuna atamboli na banzela ya engumba mpe angangi ete: “Naino mikolo ntuku minei mpe Ninive akobukama.” (3:4) Kosakola na ye eboti mbuma. Ebele ya bato ya Ninive babongoli motema, mpe bato na yango babandi kondimela Nzambe. Mokonzi asakoli ete bato mpe banyama basengeli kokila bilei mpe kolatisama na ngɔtɔ. Na motema mawa nyonso, Yehova abateli engumba wana.
8. Yona asali nini ntango Yehova amonisi motema mawa na engumba, mpe lolenge nini Yehova amonisi ete makanisi ya mosakoli mazali malamu te?
8 Yango ezali likambo oyo Yona akoki lisusu kokanga motema te. Ayebisi Yehova ete ayebaki malamu ete Ye akomonisa motema mawa mpe ezali mpo na yango nde akimaki na Talasisi. Amoni malamu ete akufa. Lokola alɛmbaki mpenza nzoto, Yona akei na ɛ́sti ya engumba mpe azali kozela komona oyo ekosalema. Yehova abongisi nkamba na libɔkɛ ekóla mpo ete ezala elílí likoló na mosakoli na ye oyo avimbi na nkanda. Bosepeli ya Yona na ntina na yango ezalaki bobele mpo na ntango mokuse. Na ntɔ́ngɔ́ elandi, Yehova atindi nkusu ete ebebisa nkamba na libɔkɛ, boye libateli na yango ya kobɔndisa ekitanami na mopɛpɛ ya molunge longwa na ɛ́sti mpe na moi makasi. Na likambo oyo lisusu, Yona amoni malamu ete akufa. Na lolendo nyonso, azali kolóngisa nkanda na ye. Yehova amonisi ete makanisi na ye mazali malamu te: Yona ayokaki mawa mpo na nkamba na libɔkɛ, kasi azali na nkanda mpo ete Yehova ayokeli engumba monene ya Ninive mawa.
LITOMBA NA YANGO
9. Ezaleli nini mpe etamboli nini ya Yona esengeli kozala likebisi mpo na biso?
9 Ezaleli ya Yona mpe makambo oyo mabimaki na nsima esengeli kozala likebisi mpo na biso. Akimaki mosala oyo Nzambe apesaki ye; asengelaki nde kosala mosala yango mpe kotya elikya epai na Nzambe mpo na kosunga ye. (Yona 1:3; Luka 9:62; Mas. 14:26; Yis. 6:8) Ntango amikɔtisaki na nzela mabe, amonisaki ezaleli mabe na koboyáká komimonisa ete azalaki mosambeli ya “[Yehova] Nzambe na lola.” Asilaki kobungisa mpiko na ye. (Yona 1:7-9; Ef. 6:19, 20) Ezaleli ya moimi oyo Yona azalaki na yango etindaki ye na kotalela motema mawa ya Yehova epai na bato ya Ninive lokola likambo ya nsɔ́ni mpo na ye; amekaki komilóngisa na koyebisáká Yehova ete asilaki koyeba lolenge likambo yango likosuka—bongo mpo na nini atindaki ye lokola mosakoli? Apamelamaki mpo na ezaleli wana ya kozanga limemya, mpo na ezaleli ya komilelalela, na bongo tosengeli kozwa liteya na makambo oyo makómelaki ye mpe komipekisa ete tópamela Yehova te na oyo etali lolenge na ye ya komonisa motema mawa to lolenge na ye ya kosala makambo.—Yona 4:1-4, 7-9; Filp. 2:13, 14; 1 Kol. 10:10.
10. Lolenge nini motema-boboto mpe motema mawa ya Yehova emonisami na mokanda ya Yona?
10 Motema-boboto mpe motema mawa ya Yehova ezali bizaleli na ye oyo bilobelami mingi koleka mosusu na mokanda ya Yona. Yehova amonisaki motema-boboto epai na Ninive na kotindáká mosakoli na ye mpo na kokebisa na ntina na libebi oyo lisilaki kobɛlɛma, mpe amilɛngɛlaki mpo na komonisa motema mawa ntango engumba ebongolaki motema—motema mawa oyo epesaki nzela na Ninive ete eumela mbula koleka 200 kino libebi na yango na Bamede mpe na bato na Babilone soko na mobu 632 L.T.B. Amonisaki motema mawa epai na Yona na kobikisáká ye longwa na mopɛpɛ makasi oyo esalemaki na mai monene mpe na kokólisáká nkamba na libɔkɛ mpo na “kobikisa ye na mpasi na ye.” Na kopesáká nkamba na libɔkɛ wana ya kobatelama mpe na nsima na kokaukisáká yango, Yehova amonisaki epai na Yona ete Ye akomonisa motema mawa mpe motema-boboto na lolenge Ye alingi.—Yona 1:2; 3:2-4, 10; 2:10; 4:6, 10, 11.
11. “Elembo na Yona” ezali nini?
11 Na Matai 12:38-41, Yesu ayebisaki bakonzi na mangomba ete elembo bobele moko oyo esengelaki kopesama epai na bango ezalaki bongo “elembo na Yona.” Nsima na kolekisa mikolo misato mpe butu misato kati na “libumu na [Sheol],” Yona akendaki mpe asakolaki epai na bato ya Ninive, na bongo akómaki “elembo” mpo na bato ya Ninive. (Yona 1:17; 2:2; 3:1-4) Bobele bongo, Yesu alekisaki mikolo misato kati na nkunda mpe na nsima asekwisamaki. Ntango bayekoli na ye bazalaki kosakola bosolo ya likambo wana, Yesu akómaki elembo epai na libota ya ntango wana. Engebene mwango ya Bayuda mpo na kotánga ntango mpe makambo oyo makokisamaki na ntina na Yesu, eleko wana ya “mikolo misato mpe butu misato” ezali mpenza mikolo misato ya mobimba te.b
12. (a) Makambo nini mosusu Yesu alobi na ntina na bato ya Ninive mpe mpo na Bayuda ya eleko na ye? (b) Lolenge nini “oyo aleki Yona” amonanaki, mpe azali na boyokani nini na Bokonzi ya Yehova mpe na lobiko?
12 Kati na lisoló bobele moko wana, Yesu akesenisi kobongola motema ya bato ya Ninive mpe motema makasi ya Bayuda oyo baboyaki mpenza ye na boumeli ya mosala na ye, na kolobáká ete: “Babali na Ninive bakotɛlɛma kati na esambiselo esika moko na libota oyo mpe bakokitisa bango; mpo ete babongolaki mitema mpo na kosakola na Yona mpe talá oyo aleki Yona azali awa.” (Talá lisusu Matai 16:4 mpe Luka 11:30, 32, NW.) “Oyo aleki Yona”—Yesu alingaki koloba nini na maloba wana? Azalaki koloba mpo na ye moko lokola mosakoli monene oyo aleki basakoli nyonso, Ye oyo atindamaki na Yehova mpo na kosakola ete: “Bóbongola mitema! Zambi Bokonzi na Likoló esili kobɛlɛma.” (Mat. 4:17) Nzokande, Bayuda mingi ya eleko wana baboyaki “elembo na Yona.” Ezali boni lelo oyo? Atako bato mingi bazali kolanda te nsango ya likebisi ya Yehova, bankóto na bato kati na mokili mobimba bazali na libaku ya koyoka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo esakolamaki liboso na Yesu, “Mwana na moto.” Lokola bato ya Ninive, baoyo babongolaki mitema mpe bazwaki litomba na kosakola ya Yona, bango mpe bakoki kozwa bibongiseli mingi ya motema mawa oyo Yehova akamati mpo na koyeisa bomoi molai, mpamba te ezali solo ete “kobika ezali epai na [Yehova].”—Yona 2:9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 99-100.
b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 593.