MOKAPO 8
“Natindamaki mpo na yango”
1-4. (a) Ndenge nini Yesu ateyi mwasi Mosamaria na mayele, mpe yango ebimisi litomba nini? (b) Bantoma na ye bayoki ndenge nini?
YESU ná bantoma na ye batamboli mwa bangonga mingi. Bauti na Yudea, bamati na nɔrdi, mpe bakei na Galile. Bazwi nzela ya mokuse oyo ekatisi Samaria, nzela oyo ekoki kozwa bango mikolo misato. Wana midi elingi kobɛta, bakómi pene na engumba moko ya moke oyo ebengami Sikare, epai bapemi mwa moke.
2 Ntango bantoma na ye bakei kosomba biloko ya kolya, Yesu atikali pene na libulu moko ya mai oyo ezali na libándá ya engumba mpo na kopema. Mwasi moko ayei kotoka mai. Soki Yesu alingaki, akokaki mpe kotyela mwasi yango likebi te. Yesu “alɛmbaki mingi mpo na mobembo.” (Yoane 4:6) Kutu elingaki mpe kozala mabe te soki Yesu akipaka te mwasi Mosamaria yango. Ndenge tomonaki na Mokapo 4 ya buku oyo, mwasi yango akokaki komizela ete Moyuda nyonso atyola ye. Kasi likambo ya kokamwa, Yesu abandi kosolola na ye.
3 Mpo na kosolola na mwasi wana Mosamaria, Yesu alobeli likambo moko oyo mwasi yango asalaka mokolo na mokolo; kutu alobeli likambo oyo mwasi yango azali kosala na ntango wana. Mwasi yango ayei wana mpo na kotoka mai; Yesu alobeli mai oyo epesaka bomoi, mai oyo ekokokisa mposa ya mwasi yango ya elimo. Mbala mingi, mwasi yango abimisi mituna oyo ekokaki kobimisa koswana.a Na mayele nyonso, Yesu aboyi koyanola na mituna yango, kasi akobi nde na lisolo na ye. Alobeli mingi makambo ya elimo: losambo ya pɛto mpe Yehova Nzambe. Lisolo na ye ebimisi litomba; mwasi yango akei koyebisa mibali ya engumba, bango mpe bandimi koya koyoka Yesu.—Yoane 4:3-42.
4 Ntango bantoma bazongi, bayoki ndenge nini na litatoli wana oyo Yesu azali kopesa? Basepeli te. Bakamwe ndenge bamoni ye azali kutu kosolola na mwasi wana, mpe emonani ete balobi na mwasi yango ata eloko te. Ntango mwasi yango akei, babandi kotya Yesu mbamba ete alya biloko oyo bayei na yango. Kasi, Yesu alobi na bango ete: “Nazali na bilei oyo bino boyebi te.” Ntango bayoki liloba wana, bakamwe mpo bakanisi ete Yesu azali kolobela biloko mpenza ya kolya. Na yango, Yesu alimboli ete: “Bilei na ngai ezali kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.” (Yoane 4:32, 34) Boye, Yesu ateyi bango ete mosala na ye ya libosoliboso ezali na ntina mingi koleka bilei. Alingi ete bango mpe batalelaka mosala yango ndenge wana. Mosala yango nini?
5. Wapi mosala ya libosoliboso oyo Yesu azalaki kosala ntango azalaki awa na mabele, mpe tokolobela nini na mokapo oyo?
5 Mokolo mosusu Yesu alobaki ete: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:43) Ya solo, Yesu atindamaki mpo na kosakola mpe koteya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.b Lelo oyo, bato oyo balandaka Yesu basalaka mpe mosala yango. Yango wana, ebongi tóluka koyeba ntina oyo Yesu azalaki kosakola, makambo oyo azalaki kosakola, mpe ndenge oyo azalaki kotalela mokumba na ye.
Mpo na nini Yesu azalaki kosakola?
6, 7. Yesu alingi ete “molakisi nyonso ya bato” atalela ndenge nini mosala ya koyebisa basusu nsango malamu? Pesá ndakisa.
6 Tóluka naino koyeba ndenge oyo Yesu azalaki kotalela mateya ya solo oyo azalaki koteya; na nsima, tokolobela ndenge oyo azalaki kotalela bato oyo azalaki koteya. Yesu asalelaki ndakisa moko ya pɛtɛɛ mpo na komonisa ndenge oyo azalaki kotalela mosala ya koyebisa bato mateya ya solo oyo Yehova ateyaki ye. Alobaki ete: “Molakisi nyonso ya bato, ntango bateyi ye makambo ya Bokonzi ya likoló, azali lokola nkolo-ndako moko oyo azali kobimisa na esika na ye ya kobomba biloko ya motuya, biloko ya sika mpe ya kala.” (Matai 13:52) Mpo na nini nkolo-ndako oyo alobelami na ndakisa oyo azali kobimisa biloko na esika na ye ya kobomba biloko ya motuya?
7 Nkolo-ndako azali te kolakisa na lolendo nyonso biloko na ye ndenge Mokonzi Hizikiya asalaki na ntango ya kala, mpe yango esukelaki ye mabe. (2 Bakonzi 20:13-20) Nini etindi nkolo-ndako asala bongo? Tózwa ndakisa oyo: Okei na ndako ya moteyi moko kotala ye mpo osepelaka na ye. Afungoli armware mpe abimisi mikanda mibale: mosusu ya kala mpe mosusu ya sika. Tata na ye nde atindelaki ye mikanda yango—mosusu eumeli bambula mingi banda moteyi yango azalaki mwana moke, mosusu ezali ya sika. Elongi na ye etondi na esengo wana azali koyebisa yo ndenge azwaka mikanda yango na motuya mpe ndenge oyo batoli oyo ezali na mikanda yango ebongolá bomoi na ye mpe ekoki kosalisa yo. Emonani ete moteyi wana azwaka mikanda yango na motuya mingi mpe asepelaka na yango mingi na motema na ye. (Luka 6:45) Soki alakisi yo mikanda yango, ezali te mpo amikumisa to mpo na litomba na ye; ezali nde mpo mokanda yango esalisa yo mpe omona ete ezali na valɛrɛ mingi.
8. Mpo na nini tosengeli mpenza kolinga mateya oyo toyekoli na Liloba ya Nzambe?
8 Yesu, Moteyi Monene, azalaki mpe na makanisi ya ndenge wana ntango azalaki koteya bato mateya ya solo na ntina etali Nzambe. Mpo na ye, mateya yango ya solo ezalaki na motuya mingi mpenza. Alingaki yango mingi mpe azalaki koyebisa yango basusu na mposa makasi. Yesu alingaki ete moto nyonso oyo azali kolanda ye, ye oyo azali “molakisi nyonso ya bato,” alinga yango ndenge wana. Ezali boni mpo na biso? Tozali mpenza na bantina ya kolinga makambo nyonso ya solo oyo toyekoli na Liloba ya Nzambe. Tozwaka na motuya mpenza mateya nyonso ya solo, ezala oyo toyekolá kala to mpe bingɛngiseli ya sika. Soki tolobeli yango na esengo mpenza mpe tokobi kolinga makambo oyo Yehova ateyi biso, tokotinda bato mosusu mpe bálinga yango, ndenge Yesu asalaki.
9. (a) Ndenge nini Yesu azalaki kotalela bato oyo azalaki koteya? (b) Ndenge nini tokoki komekola lolenge oyo Yesu azalaki kotalela bato?
9 Ndenge tokolobela yango na mozindo na Eteni 3, Yesu azalaki mpe kolinga bato oyo azalaki koteya. Esakweli elobaki ete Masiya “akoyokela moto mpamba ná mobola mawa.” (Nzembo 72:13) Na ntembe te, Yesu azalaki komibanzabanza mpo na bato. Azalaki kotya likebi na makanisi mpe bizaleli oyo bazalaki komonisa; azalaki komibanzabanza mpo na makambo ya mpasi oyo ezalaki kotungisa bango mpe mikakatano oyo ezalaki kopekisa bango bándima solo. (Matai 11:28; 16:13; 23:13, 15) Na ndakisa, kobosana te likambo ya mwasi Mosamaria. Na ntembe te, mwasi yango akamwaki mingi ndenge Yesu atyelaki ye likebi. Mayele ya kososola oyo Yesu amonisaki mpo na makambo ya bomoi ya mwasi yango etindaki ye andima ete Yesu azalaki mosakoli mpe akendaki koyebisa bato mosusu makambo etali Yesu. (Yoane 4:16-19, 39) Ya solo, bato oyo balandaka Yesu lelo oyo, bakoki te koyeba oyo ezali na mitema ya bato oyo basakwelaka bango. Atako bongo, tokoki kosepela na bato, ndenge Yesu asalaki; tokoki komonisa bango ete totyelaka bango likebi; mpe tolobela makambo oyo eyokani na bamposa na bango mpe oyo ekosalisa bango bálonga mitungisi mpe mikakatano na bango.
Makambo oyo Yesu azalaki kosakola
10, 11. (a) Makambo nini Yesu azalaki kosakola? (b) Mpo na nini bato bazali na mposa ya Bokonzi ya Nzambe?
10 Makambo nini Yesu azalaki kosakola? Na kotalela mateya ya mangomba mingi, ekoki komonana lokola nde Yesu alingaki kosilisa mikakatano ya bomoi ya bato. To mpe mbala mosusu okoki kokanisa ete azalaki na mposa ya kokɔtisa mbongwana na makambo ya politiki to mpe akanisaki ete lobiko na biso nde ezalaki na ntina mingi. Kasi, ndenge touti komona yango, Yesu alobaki polele ete: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.” Yango esɛngaki mpenza nini?
11 Tóbosana te ete Yesu azalaki na likoló ntango Satana asambwisaki nkombo mosantu ya Yehova mpe atyaki ntembe na ndenge ya Nzambe ya koyangela. Yesu ayokaki mpenza mpasi na motema ntango amonaki ndenge Satana afundaki Tata na ye ya sembo ete azali Moyangeli moko mabe oyo apimelaka bikelamu na ye makambo ya malamu! Mwana ya Nzambe ayokaki mpenza mpasi na motema ntango amonaki Adama ná Eva, oyo basengelaki kokóma baboti ya bato nyonso, bandimi lokuta ya Satana! Mwana amonaki ndenge botomboki wana ememaki bato na lisumu mpe na liwa. (Baroma 5:12) Kasi asepelaki mingi na koyeba ete mokolo mosusu Tata na ye akosembola makambo!
12, 13. Bokonzi ya Nzambe ekosilisa makambo nini ya kozanga bosembo, mpe ndenge nini Yesu atyaki Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na mosala na ye?
12 Likambo nini esengelaki libosoliboso kosembolama? Nkombo mosantu ya Yehova esengelaki kosantisama, kopɛtolama na nsɔni nyonso oyo Satana mpe bato na ye nyonso babwakelaki yango. Lokola nkombo ya Yehova esangisi mpe lolenge ya moyangeli oyo ye azali, boyangeli na ye ya sembo, to mpe lolenge na ye ya koyangela, esengelaki kolongisama. Yesu ayebaki malamu makambo wana ya ntina mingi koleka bato nyonso. Na libondeli ya ndakisa, ateyaki bayekoli na ye basɛngaka: ya liboso nkombo ya Tata na ye esantisama, ya mibale Bokonzi ya Tata na ye eya, mpe ya nsuka mokano ya Nzambe esalema awa na nse. (Matai 6:9, 10) Mosika te, Bokonzi ya Nzambe, oyo Kristo Yesu azali Moyangeli na yango, ekolongola ebongiseli mabe ya Satana mpe ekolongisa libela lotomo oyo Yehova azali na yango ya koyangela.—Danyele 2:44.
13 Bokonzi wana nde Yesu azalaki kolobela mingi na mosala na ye ya kosakola. Maloba mpe misala na ye nyonso emonisaki polele Bokonzi yango mpe ekosala ete mokano ya Yehova ekokisama. Yesu atikaki te ete eloko moko epekisa ye akokisa mokumba na ye ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, bato bazalaki na mikakatano mingi mpe makambo ya kozanga bosembo ezalaki mingi; atako bongo, amipesaki mingi na nsango oyo azalaki kosakola mpe na mosala na ye. Yango elimboli nde ete Yesu azalaki kokipe makambo mosusu te mpe azalaki kozongela kaka makambo moko na mateya na ye? Soki moke te!
14, 15. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki ete azali moto “oyo aleki Salomo”? (b) Ndenge nini tokoki komekola Yesu na nsango oyo tosakolaka?
14 Ndenge tokomona yango na eteni oyo, Yesu asalaki ete mateya na ye esepelisa bato mpe alobelaki makambo ndenge na ndenge. Azalaki kosimba mitema ya bato. Yango etindi biso tókanisa ndenge Mokonzi Salomo, oyo azalaki moto ya bwanya, alukaki kozwa maloba ya kitoko, maloba ya solo na bosikisiki, mpo na komonisa makanisi oyo Yehova atindaki ye akoma na litambwisi ya elimo ya Nzambe. (Mosakoli 12:10) Yehova apesaki moto wana ya kozanga kokoka “motema ya mayele mingi,” oyo esalisaki ye alobela biloko ndenge na ndenge: ndɛkɛ, mbisi, nzete mpe nyama. Bato bazalaki kouta mosika mpo na koya koyoka makambo Salomo azalaki koloba. (1 Bakonzi 4:29-34) Nzokande, Yesu azalaki moto “oyo aleki Salomo.” (Matai 12:42) Azalaki na bwanya mingi, mpe azalaki na “motema ya mayele mingi” koleka. Ntango azalaki koteya bato, Yesu azalaki kosalela boyebi mingi oyo azalaki na yango ya Liloba ya Nzambe, bandɛkɛ, banyama, mbisi, mosala ya bilanga, bileko, makambo oyo ezalaki kosalema na ntango wana, masolo ya kala, mpe makambo ya bomoi ya bato. Atako bongo, Yesu asalelaki te boyebi yango mpo na kokamwisa bato. Azalaki koteya na ndenge ya pɛtɛɛ mpe ya polele. Tokamwaka te ndenge bato bazalaki kosepela koyoka maloba na ye!—Marko 12:37; Luka 19:48.
15 Lelo oyo, bakristo basalaka nyonso mpo na kolanda ndakisa ya Yesu. Atako tozali na bwanya mpe na boyebi mingi te lokola ye, biso nyonso tozali na mwa boyebi mpe na makambo oyo tokutaná na yango na bomoi oyo tokoki kosalela mpo na koyebisa bato mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe. Na ndakisa, baboti bakoki kosalela makambo oyo bakutaná na yango na bomoi mpo na kobɔkɔla bana mpe komonisa bana yango ndenge oyo Yehova alingaka bango. Basusu bakoki kosalela ndakisa ya makambo oyo esalemaka na bisika na bango ya mosala to na kelasi, to makambo oyo bayebi mpo na bato mpe makambo oyo ezali kosalema na mokili. Atako bongo, tokebaka ete eloko moko te elongola likebi ya bato na nsango na biso, elingi koloba, nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.—1 Timote 4:16.
Ndenge oyo Yesu azalaki kotalela mosala na ye
16, 17. (a) Ndenge nini Yesu azalaki kotalela mosala na ye? (b) Ndenge nini Yesu amonisaki ete mosala na ye ezalaki likambo ya ntina koleka na bomoi na ye?
16 Yesu azalaki kozwa mosala na ye na motuya mingi. Asepelaki kosalisa bato báyeba ndenge Tata na ye ya likoló azalaka mpenza, kasi te ndenge oyo mateya mpe mimeseno ya bongolabongola ya bato emonisaka ye. Yesu azalaki kolinga kosalisa bato bákóma na boyokani malamu na Yehova mpe bázwa elikya ya bomoi ya seko. Azalaki kosepela kobɔndisa bato mpe kopesa bango esengo oyo eutaka na nsango malamu. Ndenge nini amonisaki mayoki yango? Tótalela ndenge misato oyo amonisaki yango.
17 Ya liboso, Yesu atyaki mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na ye. Kosakola nsango malamu ya Bokonzi ezalaki mosala ya ntina mingi na bomoi ya Yesu. Yango wana, ndenge tomonaki yango na Mokapo 5, Yesu amonisaki bwanya na ndenge azalaki na bomoi ya mindɔndɔ te. Asalaki makambo oyo azalaki kolendisa basusu básala. Atyaki makanisi na makambo oyo eleki ntina. Atikaki te biloko ebele oyo asengelaki kosomba, kobatelaka, kobongisaka, to kosombaka mosusu ya sika elongola likebi na ye. Azalaki na bomoi ya mindɔndɔ te, mpo alongola likebi na ye te na mosala ya kosakola.—Matai 6:22; 8:20.
18. Na ndenge nini Yesu amipesaki mobimba na mosala na ye?
18 Ya mibale, Yesu azalaki kolekisa ntango mingi mpe kosalela makasi na ye na mosala ya kosakola. Apesaki makasi na ye nyonso na mosala yango, azalaki kotambola bankama ya bakilomɛtrɛ na makolo na Palestine mobimba, mpo na koluka bato oyo akokaki koyebisa nsango malamu. Azalaki kosolola na bato na bandako na bango, na bisika ya bato nyonso, na bazando, mpe na bisika mosusu. Azalaki kosolola na bango ata ntango azalaki na mposa ya kopema, ya kolya, ya komɛla mai, to ya kozwa mwa mopɛpɛ elongo na baninga na ye ya motema. Ata ntango akómaki pene na kokufa, akobaki koyebisa basusu nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe!—Luka 23:39-43.
19, 20. Ndakisa nini Yesu apesaki mpo na komonisa ete mosala ya kosakola esengeli kosalema na lombangu?
19 Ya misato, Yesu ayebaki ete mosala ya kosakola esengeli kosalema na lombangu. Tóbosana te lisolo na ye ná mwasi Mosamaria pene na libulu ya mai oyo ezalaki libándá ya engumba Sikare. Ekoki kozala ete, na ntango yango, bantoma ya Yesu basosolaki te ete nsango malamu esengeli kosakolama na lombangu. Yesu alobaki na bango boye: “Bolobi ete etikali sanza minei mpo mosala ya kobuka mbuma ebanda, boye te? Talá! Nalobi na bino: Bótombola miso na bino mpe bótala bilanga, ndenge eteli mpo na kobuka mbuma.”—Yoane 4:35.
20 Yesu asalelaki ndakisa wana mpo ezalaki eleko ya kobuka mbuma. Emonani ete eleko yango ekokaki kozala sanza ya Kisleve (sanza ya 11 mpe 12). Kobuka ɔrje oyo esalemaka mbala mingi na eleko ya Elekeli, na mokolo ya 14 Nisana, ekosalema kaka nsima ya sanza soki minei. Yango wana, ezalaki na ntina te basali-bilanga básala makambo na lombangu na ntango yango. Ntango ezalaki naino mingi liboso mosala ya kobuka mbuma ebanda. Kasi ezali boni mpo na mosala ya kobuka mbuma, oyo ezali bongo bato? Ya solo, mingi bandimaki koyoka, koyekola, kokóma bayekoli ya Kristo mpe kozwa elikya kitoko oyo Yehova atyaki liboso na bango. Ezalaki lokola nde Yesu azalaki kotala bilanga wana ya elilingi mpe amonaki ete eteli mpe mitó ya mbuma na yango ezalaki koningana mokemoke na mopɛpɛ, mpo na komonisa ete ekómaki pene bábuka yango.c Ezalaki ntango ya koboma nzoto, mpe kosala na lombangu! Yango wana, ntango bato ya engumba moko bamekaki kokanga Yesu aumela epai na bango, ayanolaki ete: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.”—Luka 4:43.
21. Ndenge nini tokoki komekola Yesu?
21 Tokoki komekola Yesu na makambo nyonso misato oyo tolobeli. Tokoki kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na biso. Ata soki tozali na libota to mpe na mikumba mosusu, tokoki komonisa ete mosala na biso ezali na ntina mingi koleka soki tozali mbala na mbala kosakola mpe koteya na molende ndenge Yesu asalaki. (Matai 6:33; 1 Timote 5:8) Tokoki komipesa mobimba na mosala ya kosakola, kopesa ntango na biso, makasi na biso mpe mbongo na biso mpo na kosimba mosala yango. (Luka 13:24) Mpe tóbosana te ete mosala na biso esengeli kosalema na lombangu. (2 Timote 4:2) Tosengeli kosalela mabaku nyonso mpo na kosakola!
22. Tokolobela nini na mokapo oyo elandi?
22 Yesu mpe amonisaki ete mosala ya kosakola ezali na ntina mingi na ndenge asalaki nyonso mpo mosala yango ekoba kosalema ata nsima ya liwa na ye. Apesaki bato oyo bazali kolanda ye mokumba ya kosakola mpe koteya. Tokolobela mokumba yango na mokapo oyo elandi.
a Na ndakisa, ntango mwasi yango atuni Yesu ete mpo na nini ye Moyuda, asolola na ye Mosamaria, alamwisi likambo oyo eumelá banda kala, oyo etyá bonguna kati na Bayuda mpe Basamaria. (Yoane 4:9) Alobi mpe ete bato ya ekólo na ye bautá na Yakobo, likambo oyo Bayuda ya ntango wana bazalaki kondima ata moke te. (Yoane 4:12) Bayuda babengaka Basamaria bato ya Kuta, mpo na komonisa ete bautaki na bikólo ya bapaya.
b Kosakola elimboli kopalanganisa, to koyebisa nsango. Koteya ezali mpe na ndimbola ndenge moko na kosakola; kasi koteya esɛngaka mpe kolimbola makambo na mozindo. Koteya malamu esɛngaka koluka kosimba mitema ya bayekoli mpo na kotinda bango básalela makambo oyo bayoki.
c Mpo na vɛrsɛ oyo, buku moko elobi ete: “Liboso mbuma etela ezalaka naino na langi ya mai ya mpondu, na nsima ekómaka na langi ya mosaka mpe na nsuka ekómaka mwa kaki, mpo na komonisa ete ntango ya kobuka yango ekoki.”