Yehova asepelaka na mosala na yo mosalami na molimo mobimba
“Nyonso oyo bozali kosala, bósala yango na molimo mobimba mpo na Yehova, kasi mpo na bato te.”—BAKOLOSE 3:23, NW.
1, 2. (a) Libaku malamu nini eleki monene tokoki kozala na yango? (b) Mpo na nini na bantango mosusu tozalaka na makoki te ya kosala oyo tolingaki kosala kati na mosala ya Nzambe?
KOSALELA Yehova ezali libaku malamu oyo eleki monene tokoki kozala na yango. Na ntina ebongi mpenza, zulunalo oyo ezali uta kala kolendisa baklisto ete básanganaka na mosala ya kosakola, ata mpe kosala “mingi koleka” soki likoki ezali. (1 Batesaloniki 4:1, NW) Nzokande, tozalaka ntango nyonso te na likoki ya kosala nyonso oyo motema na biso ezali kolinga kosala kati na mosala ya Nzambe. Ndeko mwasi moko monzemba oyo azwaki batisimo esili koleka mibu pene na 40 alobi ete: “Makambo na ngai ezali kosala ete napesa ntango mingi na mosala ya mosuni. Nazali kosala mosala te mpo na koluka kozala na bilamba ya ntalo to mpo na kosala mibembo oyo ezali kosɛnga mosolo mingi, kasi ezali nde mpo na kozwa biloko ya ntina, bakisá mpe mosolo ya komisalisa na monganga. Nazali komiyoka lokola nde nazali kopesa na Yehova bobele mwa ndambo moke ya ntango mpe ya nguya oyo ezali kotikala.”
2 Bolingo mpo na Yehova ezali kopusa biso na kolinga kosala mingi oyo ekoki na biso kati na mosala ya kosakola. Kasi, mbala mingi makambo ya bomoi epekisaka biso ete tósala oyo tokokaki kosala. Kokokisa mikumba mosusu oyo misɛngami na Makomami, bakisá mpe mikumba ya libota ekoki kozwa biso ntango mpe nguya mingi. (1 Timoté 5:4, 8) Na ‘ntango oyo ya mpasi,’ bomoi ekómi mpenza na mikakatano. (2 Timoté 3:1) Soki tozali na likoki te ya kosala oyo tolingi kosala kati na mosala ya kosakola, motema na biso ekoki kotungisama. Tokoki komituna soki Nzambe asepelaka na losambo na biso.
Kitoko ya mosala mosalami na molimo mobimba
3. Yehova asɛngaka nini epai na biso nyonso?
3 Na Nzembo 103:14, Biblia ezali kondimisa biso na mɔ́tɔ nyonso ete Yehova “ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.” Ayebi makoki na biso koleka bato mosusu nyonso. Asɛngaka biso te koleka oyo tokoki kopesa. Azelaka kozwa nini epai na biso? Eloko oyo moto nyonso, ata soki ezalela na ye ezali nini, akoki kopesa: “Nyonso oyo bozali kosala, bósala yango na molimo mobimba mpo na Yehova, kasi mpo na bato te.” (Bakolose 3:23, NW) Ɛɛ, azelaka epai na biso—biso nyonso—ete tósalela ye na molimo mobimba.
4. Kosalela Yehova na molimo mobimba elimboli nini?
4 Kosalela Yehova na molimo mobimba elimboli nini? Liloba ya Liebele oyo libongolami na “na molimo mobimba” elimboli “oyo euti na molimo.” “Molimo” ezali kolobela moto mobimba, elongo na makoki na ye nyonso ya nzoto mpe makasi na ye. Na yango, kosala na molimo mobimba elimboli komipesa, kosalela makoki na biso nyonso mpe nguya na biso kino nsuka kati na mosala ya Nzambe. Na mokuse, elingi koloba ete kosala nyonso oyo molimo na biso ekoki kosala.—Malako 12:29, 30.
5. Na lolenge nini ndakisa ya bantoma ezali komonisa ete bato nyonso basengeli kosala lolenge moko te kati na mosala ya kosakola?
5 Kosala na molimo mobimba elingi nde koloba ete biso nyonso tosengeli kosala ndenge moko kati na mosala ya kosakola? Ezali bongo te, mpamba te bizalela mpe makoki ekeseni engebene moto na moto. Tótalela bantoma ya sembo ya Yesu. Bango nyonso bazalaki na likoki ya kosala ndenge moko te. Na ndakisa, toyebi bobele mwa makambo moke na ntina na bantoma mosusu, lokola Simona moto na Kanana mpe Yakobo mwana na Alafai. Mbala mosusu misala na bango lokola bantoma ezalaki mingi te. (Matai 10:2-4) Na bokeseni, Petelo azalaki na likoki ya kondima mikumba minene—na ntina yango, Yesu apesaki ye kútu “mafungola ya bokonzi”! (Matai 16:19) Nzokande, Petelo atombolamaki likoló ya basusu te. Ntango Yoane azwaki emonaneli ya Yelusaleme ya sika kati na Emoniseli (soko na mobu 96 T.B.), amonaki mabanga 12 ya moboko mpe likoló na yango ‘nkombo na bantoma zomi na mibale’ ekomamaki.a (Emoniseli 21:14) Yehova atalelaki mosala ya bantoma nyonso na motuya, atako emonani polele ete bamoko bazalaki na likoki ya kosala mingi koleka basusu.
6. Kati na lisese ya Yesu na ntina na molóni, nini ekómelaki mbóto oyo ekweaki na “mabelé malamu,” mpe mituna nini mizali kobima?
6 Bobele bongo, Yehova asɛngaka ndenge moko te epai na biso nyonso na oyo etali mosala ya kosakola. Yesu amonisaki yango kati na lisese ya molóni, oyo ekokanisaki mosala ya kosakola na mosala ya kolóna mbóto. Mbóto oyo ekweaki likoló na mabelé makeseni, ezali komonisa mitindo mikeseni ya bizalela ya mitema oyo emonisamaka na baoyo bazali koyoka nsango. Yesu alimbolaki ete: “Ye oyo akonami likoló na mabelé malamu ezali ye oyo ayoki Liloba mpe akati ntina; ye aboti mbuma mpe abimisi yango, mosusu monkámá, monkámá, mosusu ntuku motoba, ntuku motoba, mosusu ntuku misato, ntuku misato.” (Matai 13:3-8, 18-23) Mbuma yango ezali nini, mpe mpo na nini ebimisami na mitángo mikeseni?
7. Mbóto oyo elónamaki ebotaki mbuma nini, mpe mpo na nini ebimisaki mitángo mikeseni?
7 Lokola mboto oyo elónami ezali bongo “Liloba na bokonzi,” kobotama ya mbuma ezali bongo kopalangana ya liloba yango, bopusi na yango likoló na baoyo bazali koyoka yango. (Matai 13:19) Mitángo ya mbuma oyo ebotami ekeseni—kobanda ntuku misato kino monkámá—mpamba te makoki mpe bizalela kati na bomoi ekeseni. Moto oyo azali na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ mpe na makasi akoki kozala na likoki ya kosala ntango mingi na mosala ya kosakola koleka moto oyo makasi na ye ekiti mpo na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto to mpo na bobangé. Elenge monzemba oyo azali na mikumba ya libota te akoki kozala na makoki ya kosakola mingi koleka moto oyo asengeli kosala ntango nyonso mpo na kokokisa bamposa ya libota.—Kokanisá na Masese 20:29.
8. Lolenge nini Yehova atalelaka baoyo bazali kopesa na molimo na bango mobimba?
8 Na miso ya Nzambe, moto oyo asali na molimo mobimba mpe abimisi mbuma ntuku misato azali mpenza sembo te soki tokokanisi ye na moto oyo abimisi mbuma monkámá? Soko moke te! Motángo ya mbuma ekoki kokesana, kasi Yehova akosepela soki mosala oyo tosali ezali ya malamu koleka engebene makoki ya molimo na biso. Tómikundola ete mitángo mikeseni ya mbuma nyonso ibotami na mitema oyo mizali lokola “mabelé malamu.” Liloba ya Greke (ka·losʹ) oyo ebongolami na “malamu” ezali komonisa eloko moko oyo ezali “kitoko” mpe oyo “ezali kopesa esengo na motema, mpe ezali kosepelisa miso.” Oyo nde kobɔndisama na koyeba ete ntango tozali kosala oyo ekoki na biso, motema na biso ezali kitoko na miso ya Nzambe!
Tokokanisami te moko na mosusu
9, 10. (a) Motema na biso ekoki komema biso na makanisi mabe ya lolenge nini? (b) Na lolenge nini elakiseli oyo ezwami na 1 Bakolinti 12:14-26 ezali komonisa ete Yehova akokanisaka mosala na biso te na oyo ya basusu?
9 Nzokande, motema na biso ya kozanga kokoka ekoki kotalela makambo na lolenge mosusu. Ekoki kokokanisa mosala na biso na oyo ya basusu. Tokoki komiloba ete ‘basusu bazali kosala mingi koleka ngai kati na mosala ya kosakola. Lolenge nini Yehova akoki kosepela na mosala na ngai?’—Kokanisá na 1 Yoane 3:19, 20.
10 Makanisi mpe banzela ya Yehova eleki oyo ya biso. (Yisaya 55:9) Tozali kokanga ntina ya lolenge Yehova atalelaka milende ya moto na moto na lisalisi ya oyo elobami na 1 Bakolinti 12:14-26, epai lisangá ekokanisami na nzoto mpe ebele ya binama na yango—miso, mabɔkɔ, makolo, matoi, mpe bongo na bongo. Tótalela mwa moke nzoto na biso. Ekozala mpenza bozoba soki okokanisi miso na yo na mabɔkɔ, to makolo na yo na matoi! Enama mokomoko ezali na mosala na yango, kasi binama nyonso bizali na ntina mpe bipesamelaka motuya. Bobele bongo, Yehova asepelaka na mosala na yo oyo ozali kosala na molimo mobimba atako basusu bazali kosala mingi koleka to bazali kosala moke.—Bagalatia 6:4.
11, 12. (a) Mpo na nini basusu bakoki kokanisa ete bazali na “bolɛmbu mingi” to “bazangi ntina”? (b) Lolenge nini Yehova atalelaka mosala na biso?
11 Na ntina na mitungisi ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, bobangé, to makambo mosusu, na bantango mosusu bamoko kati na biso tozalaka na makanisi ete tozali “na bolɛmbu mingi” to “tozangi ntina.” Kasi ezali na lolenge wana te nde Yehova atalelaka makambo. Biblia elobi na biso ete: “Bilembo na nzoto bimonani bolɛmbu bikoki kozanga te, mpe bilembo . . . bitángi biso ete izali na nkembo mingi te, tokokembisa yango na nkembo monene . . . Kasi Nzambe atongaki nzoto ete apesa nkembo epai na elembo ezangi yango.” (1 Bakolinti 12:22-24) Na bongo, moto nyonso akoki kozala na motuya na miso ya Yehova. Apesaka motuya na mosala na biso engebene makoki na biso. Motema na yo epusami mpenza na kolinga kosala nyonso oyo okoki mpo na kosalela Nzambe oyo amityaka na esika ya basusu mpe ya bolingo motindo oyo, boye te?
12 Na yango, likambo ya ntina epai na Yehova ezali te ya kosala ndenge moko na moto mosusu, kasi nde kosala oyo yo—molimo na yo—ekoki kosala. Likambo oyo ete Yehova atalela milende na biso na motuya emonisamaki na lolenge moko ya kosimba motema oyo Yesu atalelaki basi mibale bakeseni na boumeli ya mikolo na ye ya nsuka awa na mabelé.
Likabo ya “motuya” ya mwasi oyo amonisaki botɔ́ndi
13. (a) Na libaku nini Malia apakolaki malási na motó mpe na makolo ya Yesu? (b) Malási yango ezalaki na ntalo boni?
13 Na mokolo ya mitano na mpokwa, mwa 8 Nisan, Yesu akómaki na Betania, mboka moko moke na lobwaku ya ɛ́sti ya Ngomba ya Olive, oyo ezwami na ntáká ya kilomɛtɛlɛ soko 3 longwa na Yelusaleme. Yesu azalaki na baninga ya motema na mboka yango—Malia, Malata mpe ndeko na bango ya mobali Lasalo. Bazalaki koyamba Yesu na ndako na bango, ekoki kozala mbala na mbala. Kasi mokolo ya pɔ́sɔ na mpokwa, Yesu mpe baninga na ye balyaki na ndako ya Simona, oyo azalaki liboso na maladi ya maba mpe ekoki kozala ete abikisamaki na Yesu. Wana Yesu afandaki na mesa, Malia asalaki likambo moko ya bopɔlɔ oyo emonisaki bolingo na ye ya mozindo mpo na moto oyo asekwisaki ndeko na ye ya mobali. Afungolaki molangi ya malási ya “ntalo mingi.” Ya ntalo mpenza! Ezalaki na motuya ya denali 300, oyo ekokani na lifuti ya mosala soko ya mbula mobimba. Apakolaki malási yango na motó mpe na makolo ya Yesu. Apangusaki kútu makolo na ye na nsuki na ye.—Malako 14:3; Luka 10:38-42; Yoane 11:38-44; 12:1-3.
14. (a) Ezaleli ya bantoma ezalaki nini na likambo Malia asalaki? (b) Na lolenge nini Yesu alóngisaki Malia?
14 Bayekoli basepelaki na likambo yango te! Batunaki ete: “Libebi na mafuta oyo ezali mpo na nini?” Yuda Mokeliota, abombaki mposa na ye ya moyibi nsima ya likanisi ya komonisa bolingo malamu mpo na babóla, alobaki ete: “Mpo na nini malási oyo etɛkisami na denali nkámá misato te ete epesamela babóla?” Malia alobaki eloko te. Nzokande, Yesu alobaki na bayekoli ete: “Tiká ye! Mpo na nini bozali kotumola ye? Ye asili kosalela ngai mosala kitoko [lolenge ya liloba ka-loś]. . . . Ye asali eloko ekokaki na ye kosala. Asili kopakola nzoto na ngai liboso mpo na kokunda. Nazali koloba na bino solo ete soko Nsango Malamu ekolakisama wapi na mokili mobimba, likambo lisali ye ekoyebisama mpo na ekaniseli na ye.” Na ntembe te, maloba ya Yesu ekitisaki Malia motema!—Malako 14:4-9; Yoane 12:4-8.
15. Mpo na nini likambo Malia asalaki esimbaki motema ya Yesu, mpe liteya nini tozwi na ntina na mosala mosalami na molimo mobimba?
15 Likambo oyo Malia asalaki esimbaki mpenza motema ya Yesu. Lokola ye moko alobaki yango, asalaki likambo moko ya motuya mpenza. Ezalaki te motuya ya likabo nde esimbaki motema ya Yesu, kasi ezalaki mpo ete “asalaki oyo ekokaki na ye.” Asimbaki libaku yango mpe apesaki oyo azalaki na likoki ya kopesa. Mabongoli mosusu mabongoli maloba yango na “asalaki nyonso oyo akokaki kosala,” to “asalaki oyo ezalaki na nguya na ye mpo na kosala.” (An American Translation; La Bible de Jérusalem) Likabo ya Malia apesaki yango na molimo mobimba mpamba te apesaki eloko na ye oyo elekaki malamu. Yango elimboli mpenza mosala ya molimo mobimba.
“Meya” ya mwasi mokufeli-mobali
16. (a) Lolenge nini Yesu atalelaki likabo ya mobóla mwasi-mokufeli-mobali? (b) Meya ya mwasi-mokufeli-mobali ezalaki na motuya nini?
16 Nsima ya mikolo mibale, na mwa 11 Nisan, Yesu alekisaki ntango molai kati na tempelo, epai kuna batunaki ye mituna makasi na ntina na bokonzi na ye, kofuta mpako, lisekwa, mpe makambo mosusu. Atɔndɔlaki bakomeli mpe Bafalisai, oyo kati na makambo na bango ya mabe, “bakolyaka ndako na bakufeli-mibali.” (Malako 12:40) Na nsima Yesu afandaki, emonani ete na esika ebéngami Libándá ya Basi, esika oyo, engebene bonkɔkɔ ya Bayuda, bibombelo 13 ya makabo bizalaki wana. Afandaki na boumeli ya mwa ntango, na likebi nyonso azalaki kotala ndenge bato bazalaki kotya makabo na bango. Bato mingi ya bozwi bayaki, bamoko mbala mosusu bazalaki na ezaleli ya komimona lokola bayengebeni, ata mpe komilakisa. (Kokanisá na Matai 6:2.) Miso ya Yesu ekómaki kotala mpenzampenza mwasi moko. Ekoki kozala ete moto mosusu akokaki te kotya likebi epai na mwasi yango to na likabo na ye. Kasi, lokola Yesu akokaki koyeba mitema ya bato, ayebaki ete azalaki ‘mobóla mpe mwasi mokufeli-mobali.’ Ayebaki mpe motángo ya sikisiki ya likabo na ye—“meya mibale, oyo ezali na motuya moke mpenza.”b—Malako 12:41, 42, NW.
17. Lolenge nini Yesu apesaki motuya na likabo ya mwasi-mokufeli-mobali, mpe na bongo liteya nini tozwi na ntina na kopesa epai na Nzambe?
17 Yesu abyangaki bayekoli na ye esika azalaki, mpamba te alingaki ete bámona libosoliboso liteya oyo alingaki kopesa. Yesu alobaki ete likabo ya mwasi yango “eleki na monene makabo nyonso mabwaki bato kati na Ebombelo na makabo.” Engebene Yesu, likabo ya mwasi yango elekaki makabo ya basusu nyonso soki masangisami. Apesaki “mosolo na ye nyonso”—oyo atikalaki na yango. Na kosaláká bongo, amityaki na mabɔkɔ ya Yehova mpo na kozwa lisungi. Na yango, moto oyo amonisamaki lokola ndakisa mpo na oyo etali kopesa na Nzambe ezalaki oyo likabo na ye ezalaki mpenza na motuya te. Nzokande, na miso ya Nzambe, ezalaki na motuya monene!—Malako 12:43, 44; Yakobo 1:27.
Tózwa liteya na lolenge Yehova atalelaka mosala mosalami na molimo mobimba
18. Liteya nini tozwi na lolenge Yesu atalelaki basi wana mibale?
18 Lolenge Yesu atalelaki basi wana mibale ezali kopesa biso mateya ya kosimba motema na ntina na lolenge Yehova atalelaka mosala mosalami na molimo mobimba. (Yoane 5:19) Yesu akokanisaki mwasi-mokufeli-mobali na Malia te. Atalelaki te malási “ya ntalo mingi” ya Malia na motuya koleka meya mibale ya mwasi-mokufeli-mobali. Lokola bango nyonso mibale bapesaki oyo ezalaki malamu engebene makoki na bango, na miso ya Nzambe makabo na bango nyonso mibale mazalaki na motuya. Na bongo, soki makanisi ya komimona ete ozali na ntina te eyei na motema na yo mpo ete ozali na likoki te ya kosala oyo ozali kolinga kosala kati na mosala ya Nzambe, kobwaka elikya te. Yehova asepelaka na mosala malamu oyo okoki kopesa. Omikundola ete Yehova “akotalaka kati na motema,” na yango ayebi malamumalamu bolingi oyo ezali kati na motema na yo.—1 Samwele 16:7.
19. Mpo na nini tosengeli kosambisa basusu te na lolenge bazali kosala kati na mosala ya Nzambe?
19 Lolenge Yehova atalelaka mosala mosalami na molimo mobimba esengeli kozala na bopusi likoló na lolenge oyo tomitalelaka moko na mosusu. Oyo nde likambo ya kozanga bolingo ekoki komonana soki tozali kotyola milende ya basusu to kokokanisa mosala ya moto moko na oyo ya moto mosusu! Likambo ya mawa, moklisto moko akomaki ete: “Na bantango mosusu, bamoko bamonisaka ete esengeli kozala bobele mobongisi-nzela, soki te ozali na ntina te. Baoyo kati na biso bazali kosala milende ya kokende liboso na kozaláká ‘bobele’ basakoli bazali mpe na mposa ete bátala bango na motuya.” Tómikundola ete tozali na ndingisa te ya kosambisa ete oyo ezali mosala mosalami na molimo mobimba mpo na moninga moklisto. (Baloma 14:10-12) Yehova asepelaka na mosala mosalami na molimo mobimba, mosala ya moko na moko kati na bamilió ya basakoli ya sembo ya Bokonzi, na bongo biso mpe tosengeli kosepela na yango.
20. Na momeseno, ezali malamu kondima nini na ntina na baninga na biso basambeli ya Yehova?
20 Kasi, ezali boni soki emonani ete bamoko bazali kosala moke koleka oyo bakokaki kosala? Kokita ya mosala ya kosakola ya moninga moklisto ekoki komonisa epai na bankulutu oyo bamibanzabanzaka ete mposa ya kozwa lisungi to kolendisama ezali. Nzokande, tosengeli kobosana te ete mpo na basusu, mosala mosalami na molimo mobimba mokoki kokokana mpenza na meya mibale ya mwasi-mokufeli-mobali na esika ete ezala lokola malási ya motuya mingi ya Malia. Na momeseno, ezali malamu koyeba ete bandeko na biso ya basi mpe ya mibali balingaka Yehova mpe bolingo motindo wana ekopusa bango na kosala mingi, oyo bakoki kosala, kasi moke te. Ya solo, mosaleli ya Yehova oyo azali komibanzabanza akoki kolinga te kosala moke koleka oyo akoki kosala kati na mosala ya Nzambe!—1 Bakolinti 13:4, 7.
21. Mosala nini ezali kopesa mbano monene bandeko mingi bazali kosala, mpe mituna nini yango ezali kobimisa?
21 Nzokande, mpo na basaleli mingi ya Nzambe, mosala mosalami na molimo mobimba elimboli bongo kolanda mosala oyo ezali kopesa litomba monene—mosala ya mobongisi-nzela. Mapamboli nini bazwaka? Mpe ezali boni mpo na baoyo kati na biso bazwi naino likoki te ya kosala mosala ya mobongisi-nzela—lolenge nini tokoki komonisa elimo ya mobongisi-nzela? Mituna oyo mikotalelama na lisoló lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lokola Matia akitanaki Yuda Mokeliota lokola ntoma, ezali nkombo na ye nde—kasi oyo ya Paulo te—ebimaki kati na oyo emonanaki likoló na mabanga 12 ya moboko. Atako Paulo azalaki ntoma, kasi azalaki moko ya ba 12 te.
b Mokomoko ya meya yango ezalaki lompáta, meya eleki moke ya Bayuda oyo ezalaki kosalelama na ntango wana. Mpáta mibale ezalaki na motuya ya 1/64 ya lifuti ya mosala ya mokolo moko. Engebene Matai 10:29, na lofalanga moko (oyo ezalaki na motuya ya mpáta mwambe) moto akokaki kosomba na yango ndɛkɛ ebéngami mikɛngɛlɛ-mboka, mibale, oyo ezalaki kati na bandɛkɛ eleki ntalo moke oyo babóla bazalaki kolya. Na yango, mwasi-mokufeli-mobali yango azalaki mpenza mobóla, mpamba te azalaki bobele na ndambo ya motuya ya mosolo oyo esengelaki mpo na kosomba mokɛngɛlɛ-mboka moko, oyo ekokaki ata te mpo na bilei ya mbala moko.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Kosalela Yehova na molimo mobimba elimboli nini?
◻ Na lolenge nini lisese oyo lizwami na 1 Bakolinti 12:14-26 ezali komonisa ete Yehova akokanisaka mosala na biso te na oyo ya basusu?
◻ Liteya nini tozwi na likambo litali kopesa na molimo mobimba na maloba ya Yesu oyo alobaki na ntina na malási ya motuya mingi ya Malia mpe meya mibale ya mwasi-mokufeli-mobali?
◻ Lolenge oyo Yehova atalelaka mosala mosalami na molimo mobimba ezali na bopusi nini likoló na lolenge na biso ya kotalelana bamoko na bamosusu?
[Elilingi na lokasa 15]
Na kopakoláká nzoto ya Yesu na malasi ya “motuya mingi,” Malia apesaki oyo elekaki malamu mpo na ye
[Elilingi na lokasa 16]
Meya mibale ya mwasi-mokufeli-mobali—ezalaki mpenza na motuya te na mosuni kasi ezalaki na motuya na miso ya Nzambe