Mituna ya batángi
Ntango Yesu atindaki bantoma 12 bákende kosakola, ayebisaki bango bámema mangenda mpe bálata sandale?
Bato mosusu balobaka ete Baevanzile misato oyo elobeli lisolo ya Yesu ntango atindaki bayekoli na ye bákende kosakola eyokani te yango na yango. Nzokande, soki tokokanisi masolo yango, tokoki komona likambo moko ya ntina. Ya liboso, tókokanisa lisolo ya Marko ná oyo ya Luka. Marko alobi boye: “[Yesu] apesaki bango mitindo ete bámema eloko te mpo na mobembo longola kaka lingenda, limpa te, saki ya bilei te, mbongo ya motako te na kati ya bapotɔmɔni ya mikaba na bango, kasi bálata sandale, mpe bálata bilamba mibale ya nse te.” (Mrk. 6:7-9) Luka akomaki ete: “Bómema eloko te mpo na mobembo, lingenda te saki ya bilei te, limpa te, mbongo ya palata te; bózwa mpe bilamba mibale ya nse te.” (Luka 9:1-3) Awa nde esika oyo masolo yango mibale emonani lokola ezali koyokana te. Marko alobi ete Yesu ayebisaki bantoma bámema lingenda mpe bálata sandale; nzokande lisolo ya Luka elobi ete Yesu ayebisaki bango bámema eloko te, ata mpe lingenda. Na bokeseni na Marko, Luka alobeli sandale te.
Mpo na koyeba soki Yesu alingaki komonisa nini na libaku yango, tótalela makambo oyo Baevanzile nyonso misato elobeli. Na kolanda masolo oyo touti kotánga mpe lisolo oyo ezali na Matai 10:5-10, Yesu ayebisaki bayekoli bálata to bázala na “bilamba mibale ya nse” te. Ekoki kozala ete ntoma mokomoko alataki elamba moko ya nse. Na yango, basengelaki kozwa elamba mosusu te mpo na mobembo. Ezalaki mpe bongo mpo na sandale. Marko alobi ete basengelaki ‘kolata sandale,’ oyo bazalaki na yango. Bongo mpo na mangenda? Diksionɛrɛ moko (The Jewish Encyclopedia) elobi boye: “Emonani ete Baebre mingi ya kala bazalaki mpe na momeseno ya kotambola ná lingenda.” (Eba. 32:10) Marko amonisaki ete bantoma basengelaki ‘komema eloko te’ longola kaka lingenda oyo bazalaki na yango ntango Yesu apesaki bango mitindo. Na yango, bakomi ya Baevanzile bazalaki nde kolobela etinda ya Yesu ya kokende te mpo na kozwa biloko mosusu mpo na mobembo.
Matai ye oyo ayokaki mitindo wana ya Yesu mpe akomaki yango amonisi likambo yango malamu. Yesu alobaki boye: “Bóluka te kozwa wolo to palata to motako mpo na bapotɔmɔni ya mikaba na bino, to saki ya bilei mpo na mobembo, to bilamba mibale ya nse, to basandale to lingenda; mpo mosali asengeli kozwa bilei na ye.” (Mat. 10:9, 10) Tokoloba boni mpo na basandale oyo bantoma balataki mpe mangenda oyo basimbaki na mabɔkɔ na bango? Yesu alobaki te ete bábwaka biloko oyo bazalaki na yango na ntango wana, kasi alingaki nde koyebisa bango ete báluka te kozwa biloko mosusu ya ndenge wana. Mpo na nini apesaki bango mitindo wana? Mpamba te “mosali asengeli kozwa bilei na ye.” Yango nde likanisi mpenza oyo ezalaki na etinda wana ya Yesu, oyo eyokanaki na elendiseli oyo apesaki bango na Lisolo Likoló ya Ngomba ete bámitungisa te soki bakolya nini, bakomɛla nini, to bakolata nini.—Mat. 6:25-32.
Atako na ebandeli tokoki komona lokola masolo ya Baevanzile ezali bongolabongola, yango nyonso ezalaki kaka kobimisa likanisi moko. Bantoma basengelaki kokende kaka ndenge bazalaki mpe basengelaki kotya makanisi na makambo mosusu te mpe koluka kozwa biloko mosusu te. Mpo na nini? Mpo Yehova alingaki kokokisa bamposa na bango.
“Mwasi, ɛɛ, basi” oyo Salomo alobelaki ezalaki banani?—Mos. 2:8.
Toyebi mpenza te, kasi ekoki kozala basi ya lokumu oyo bayaki kotala Salomo ntango azalaki mokonzi.
Na Mosakoli mokapo ya mibale, Salomo alobelaki makambo ndenge na ndenge oyo asalaki, na ndakisa biloko ebele oyo atongaki. Na nsima abakisaki boye: “Namitondiselaki mpe palata ná wolo, mpe biloko oyo ezalaka kaka na bakonzi mpe na bitúká oyo eyangelami. Nazwaki bayembi ya mibali mpe bayembi ya basi mpe makambo oyo esepelisaka mpenza bana ya bato, mwasi, ɛɛ, basi.”—Mos. 2:8.
Bato mingi oyo balimbolaka maloba ya Biblia balobaka ete “basi” oyo Salomo alobelaki ezali ebele ya basi mpe bamakango oyo bazalaki bapaya, oyo azwaki ntango akómaki mobange mpe bakɔtisaki ye na losambo ya lokuta. (1 Bak. 11:1-4) Kasi, ndimbola wana ezali kosimba mpenza te. Ntango Salomo akomaki maloba wana, ye ná “mwasi, ɛɛ, basi” yango bazalaki bato bayebani malamu. Mpe na ntango wana, Yehova azalaki naino kondima ye, mpo elimo ya Nzambe esalisaki ye akoma mikanda ya Biblia. Yango ekokani te na bomoi oyo akómaki na yango nsima ya bambula ntango azwaki bankama ya basi bapaya mpe bamakango mpe amikɔtisaki na losambo ya lokuta.
Na mokanda ya Mosakoli, Salomo alobaki ete “alukaki kozwa maloba ya kitoko mpe ndenge ya kokoma maloba ya solo na bosikisiki.” (Mos. 12:10) Emonani polele ete ayebaki maloba oyo ebongi mpo na “mwasi,” “mwasi ya mokonzi,” mpe “makango,” mpo asalelaki maloba yango na mikanda na ye oyo akomaki na litambwisi ya elimo santu. (Mas. 5:18; 12:4; 18:22; Mos. 9:9; Loy. 6:8, 9) Nzokande na Mosakoli 2:8, Salomo asaleli te maloba yango oyo eyebani malamu.
Na Biblia, ezali na esika mosusu te oyo basaleli liloba moko ya Ebre ndenge basaleli yango na maloba “mwasi, ɛɛ, basi” (na booko mpe na boike). Bato ya mayele na makambo ya Biblia bandimi ete bayebi mpenza ndimbola na yango te. Babongoli mingi ya Biblia bamonaka ete maloba wana ya Mosakoli 2:8 elobeli nde basi, oyo babengami mwasi moko mpe lisusu basi na boike to mpo na komonisa lokumu monene. Maloba “mwasi, ɛɛ, basi” ezali na ndimbola wana.
Salomo azalaki na lokumu mingi mpenza na boye ete mokonzi-mwasi ya Sheba, mboka moko ya bozwi mingi, ayokaki nsango na ye, ayaki kotala ye, mpe akamwaki mingi. (1 Mik. 10:1, 2) Ekoki kozala ete Salomo akanisaki likambo moko ya ndenge wana ntango alobelaki “mwasi, ɛɛ, basi.” Mbala mosusu azalaki kolobela basi ya lokumu oyo bayaki kotala ye na lopango na ye na boumeli ya bambula mingi oyo azalaki naino kondimama na Nzambe.