Motema na yo ezali kotinda yo na kosala lokola Yesu?
“Amoni ebele ya bato mpe ayoki mawa mpo na bango zambi bazalaki [lokola] bampate bazangaki mobateli. Abandi koteya bango.”—MALAKO 6:34.
1. Mpo na nini tokoki kokamwa te ete bato mosusu bazalaka na bizaleli malamu?
BANDA kala, bato mingi bamonisá mpe bamonisaka bizaleli malamu mpenza. Okoki koyeba ntina oyo basalaka yango. Yehova Nzambe amonisaka ete azali bolingo, azali na boboto, apusi kokaba, mpe azali na ebele ya bizaleli mosusu ya malamu oyo tosepelaka na yango. Nzambe akelá bato na elilingi na ye. Yango wana, tomitunaka te mpo na nini bato mingi bazalaka na bolingo, na boboto, motema mawa, mpe na bizaleli mosusu ya Nzambe, mpe bato mingi batosaka lisosoli na bango. (Genese 1:26; Baloma 2:14, 15) Kasi, okomona ete ezali na bato oyo bamonisaka bizaleli yango koleka bamosusu.
2. Tángá mwa makambo ya malamu oyo bato bakoki kosala na likanisi ete bazali kolanda ndakisa ya Klisto.
2 Ekoki kozala ete oyebi bato oyo bakendaka mbala na mbala kotala bato ya maladi mpe basalisaka bango, basungaka bato oyo bazali na mikakatano na nzoto, to bakabelaka babola biloko. Kanisá lisusu bato oyo, mpo na motema mawa na bango, bakendaka kosala na balopitalo ya bato ya maba to na bandako ya bitike, bato oyo bakendaka kosala na bolingo na bango moko na balopitalo, to baoyo basalisaka bato oyo bazali na bisika ya kolala te to baoyo basungaka bato oyo bakimá bamboka na bango. Na ntembe te bamosusu kati na bango bakanisaka ete balandaka Yesu, moto oyo atikelaki baklisto ndakisa. Totángaka na Baevanzile ete Klisto abikisaki bato ya maladi mpe aleisaki bato oyo bazalaki na nzala. (Malako 1:34; 8:1-9; Luka 4:40) Bolingo, boboto, mpe motema mawa oyo Yesu amonisaki ezali komonisa “makanisi ya Klisto”; mpe ye alandaki ndakisa ya Tata na ye ya likoló.—1 Bakolinti 2:16.
3. Mpo tózala na likanisi oyo ebongi mpo na misala ya malamu oyo Yesu asalaki, tosengeli kotalela nini?
3 Kasi, omonaka ete bato mingi lelo, oyo basepelaka na bolingo mpe na motema mawa ya Yesu babosanaka likambo moko ya ntina ya makanisi ya Klisto? Tokoyeba yango soki totaleli malamu Malako mokapo 6. Kuna, tozali kotánga ete bamemelaki Yesu bato ya maladi mpo abikisa bango. Lisolo yango elobi lisusu ete ntango amonaki ete ebele ya bato oyo bayaki epai na ye bayokaki nzala, Yesu asalaki likamwisi mpo na koleisa bango. (Malako 6:35-44, 54-56) Kosalisa bato ya maladi mpe koleisa bato oyo bazali na nzala ezalaki mpenza kolakisa bolingo mpe motema mawa. Kasi, tokanisi ete yango nde lolenge ya libosoliboso oyo Yesu azalaki kosunga bato? Ndenge nini tokoki kolanda malamu ndakisa ya bolingo, boboto, mpe motema mawa na ye, ndenge ye mpe alandaki ndakisa ya Yehova?
Asepelaki kokokisa bamposa ya elimo
4. Lisolo oyo ezali na Malako 6:30-34 elekaki wapi mpe ntango nini?
4 Yesu azalaki koyokela bato oyo bazalaki koya epai na ye mawa, mingimingi mpo bazalaki babola na elimo. Bamposa na bango ya elimo ezalaki na ntina mingi koleka bamposa ya mosuni. Tótalela lisolo ya Malako 6:30-34. Lisolo yango elobeli likambo moko oyo esalemaki na libongo na Libeke ya Galilai, mwa moke liboso ya Elekeli ya mobu 32 T.B. Ezalaki na likambo moko ya malamu oyo epesaki bayekoli esengo mingi. Bautaki kotambola na bamboka mingi mpe bazongaki epai ya Yesu. Na ntembe te bazalaki na mposa ya koyebisa ye makambo oyo bakutanaki na yango. Kasi, ebele ya bato bayaki epai oyo bazalaki. Bato yango bazalaki mpenza mingi na boye ete Yesu na bantoma na ye bakokaki kozwa ntango ya kolya to kopema te. Yesu alobaki na bantoma na ye ete: “Bóyaka na bino mpenza epai na lisobe mpe bópema moke.” (Malako 6:31) Bakɔtaki na bwato moko, mbala mosusu pene ya Kapalanauma mpe bakendaki na ngámbo mosusu ya Libeke ya Galilai, na esika moko ya kimya. Kasi, bato ebele bayaki na libongo mpe bakómaki liboso kutu bwato ya Yesu na bantoma esɛma. Yesu asalaki nini ntango amonaki bango? Asilikaki mpo batikaki bango bápema te? Te!
5. Yesu ayokaki ndenge nini mpo na bato ebele oyo bayaki epai na ye, mpe asalaki nini mpo na bango?
5 Ntango Yesu amonaki ebele ya bato wana, na bato ya maladi, bazali kozela ye na mposa mpenza, ayokaki mawa. (Matai 14:14; Malako 6:44) Malako ayebisi likambo oyo epesaki Yesu mawa mpe likambo oyo asalaki, akomaki boye: “Amoni ebele ya bato mpe ayoki mawa mpo na bango zambi bazalaki [lokola] bampate bazangaki mobateli. Abandi koteya bango makambo mingi.” (Malako 6:34) Yesu amonaki ete bato wana oyo bayaki bazalaki babola na elimo. Bazalaki lokola bampate oyo babungi, bazangi mobateli oyo akoki komema bango na bisika ya matiti ya mobesu to kobatela bango. Yesu ayebaki ete bakonzi ya mangomba ya mitema makasi, baoyo basengelaki kozala babateli ya bampate, bazalaki nde kotyola bato mpamba mpe bazalaki kokokisa bamposa na bango ya elimo te. (Ezekiele 34:2-4; Yoane 7:47-49) Yesu asalaki lokola bango te, asalelaki bango likambo oyo eleki malamu. Abandaki koteya bango Bokonzi ya Nzambe.
6, 7. (a) Eloko nini Baevanzile emonisi oyo ezalaki na esika ya liboso na kotalela makambo Yesu asalaki mpo na kokokisa bamposa ya bato? (b) Nini ezalaki kotinda Yesu asakola mpe ateya?
6 Na lisolo oyo Luka akomaki, talá ndenge makambo elandanaki banda na makambo oyo eleki ntina. Luka azalaki monganga mpe azalaki kotya makanisi na ye mingi na kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato. “Kasi bato . . . balandi Yesu. Ye ayambi bango, alobeli bango nsango ya Bokonzi ya Nzambe, mpe abikisi bato oyo bazalaki na maladi.” (Biso nde totɛngisi makomi; Luka 9:11, Boyokani ya Sika; Bakolose 4:14) Atako makambo elandani mpenza bongo te na masolo nyonso oyo elobeli likamwisi yango, lisolo ya Luka elobeli libosoliboso likambo nini? Ete Yesu ateyaki bato.
7 Yango eyokani mpenza na ndenge oyo lisolo ya Malako 6:34 emonisi likambo yango. Vɛrsɛ yango emonisi polele ete Yesu amonisaki libosoliboso mawa na ye. Ateyaki bato mpo na kokokisa bamposa na bango ya elimo. Ntango abandaki mosala na ye sika, Yesu alobaki boye: “Nasengeli mpe kosakola Nsango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe na bamboka mosusu, mpamba te Nzambe atindi ngai mpo nasakola.” (Luka 4:43, Boyokani ya Sika) Kasi, tókanisa te ete Yesu azalaki kosakola nsango ya Bokonzi kaka mpo na kokokisa mokumba moko, lokola nde azalaki kosakola kaka mpo na kosakola. Ntina ya liboso oyo ezalaki kotinda ye ayebisa bato nsango malamu ezali mpo alingaki bango mpe azalaki koyokela bango mawa. Likambo eleki malamu oyo Yesu asalaki, ata epai ya bato ya maladi, bato oyo bazalaki na bademo, babola, to bato oyo bazalaki na nzala, ezalaki ya kosalisa bango báyeba solo ya Bokonzi ya Nzambe, bándima yango mpe bálinga yango. Solo ya Bokonzi ya Nzambe ezalaki na ntina mingi mpamba te yango nde ekolongisa bokonzi ya Yehova mpe ekopesa bato bolamu oyo ekoumela seko.
8. Ndenge nini Yesu azalaki kotalela mosala na ye ya kosakola mpe ya koteya?
8 Ntina monene oyo Yesu ayaki awa mabele ezalaki mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Ntango akómaki na nsuka ya mosala na ye awa na mabele, Yesu ayebisaki Pilata boye: “Ngai nabotami mpo na ntina oyo mpe nayei na mokili ete natatola mpo na solo. Moto na moto oyo azali na mposa ya solo akoyokaka mongongo na ngai.” (Yoane 18:37) Masolo mibale oyo eleki emonisi biso ete Yesu azalaki moto ya motema malamu: azalaki kotyela bato likebi, bato bazalaki kobanga te kosolola na ye, azalaki kobatela lokumu ya bato, azalaki kotyela bato motema, mpe mingimingi, alingaki bato. Soki tolingi koyeba makanisi ya Klisto, tosengeli kososola malamu bizaleli na ye wana. Kasi, tosengeli koyeba ete makanisi ya Klisto emonisami mpe na esika monene oyo azalaki kotya mosala ya kosakola mpe ya koteya.
Alendisaki basusu ete bápesaka litatoli
9. Mpo na banani mosala ya kosakola mpe ya koteya ezalaki na esika ya liboso?
9 Kotya mosala ya kosakola mpe ya koteya na esika ya liboso mpo na komonisa bolingo mpe motema mawa ezalaki likambo ya Yesu ye moko te. Alendisaki bayekoli na ye bálanda ndakisa na ye na makambo oyo ezalaki kotinda ye asala mosala ya Nzambe, na makambo mpe na misala oyo azalaki kotya na esika ya liboso. Na ndakisa, ntango Yesu aponaki bayekoli na ye 12, mosala nini basengelaki kosala? Malako 3:14, 15, (NW ) elobi na biso boye: “Asalaki etuluku ya bato zomi na mibale, apesaki bango mpe nkombo ya ‘bantoma,’ mpo bázalaka na ye elongo mpe akoka kotinda bango kosakola mpe bázala na bokonzi ya kobimisa bademo.” Omoni mosala ya libosoliboso ya bantoma?
10, 11. (a) Ntango Yesu atindaki bantoma na ye, ayebisaki bango básala nini? (b) Ntango atindaki bantoma na ye, likambo ya ntina mingi ezalaki nini?
10 Na nsima, Yesu apesaki bantoma 12 nguya ya kobikisa bato mpe ya kobimisa bademo. (Matai 10:1; Luka 9:1) Atindaki bango bákende epai ya “bampate babungani na libota ya Yisalaele.” Mpo na kosala nini? Yesu alobaki na bango boye: “Wana ekokenda bino, bósakola ete, Bokonzi na Likoló ezali kobɛlɛma. Bóbikisa babɛli, bósekwisa bakufi, bópɛtola bato ya mbala, bóbimisa bilimu mabe.” (Matai 10:5-8; Luka 9:2) Basalaki makambo nini? “Babimi [1] kosakola ete bato bábongola mitema. [2] Babimisi [bademo, NW ] mpe bapakoli babɛli mingi na mafuta mpe babikisi bango.”—Malako 6:12, 13.
11 Lokola ezali na bisika nyonso te nde balobeli liboso koteya, moto akoki nde koloba ete tolekisi ndelo na ndenge tolobi ete mosala ya koteya nde elekaki ntina mpo mwa bavɛrsɛ oyo touti kotánga elobeli yango liboso? (Luka 10:1-9) Soki mosala ya koteya ezongelami mbala na mbala liboso ya kobikisa, ezali mpamba te. Tótalela ndenge lisolo mobimba elobi. Liboso Yesu atinda bantoma 12, ayokelaki ebele ya bato mawa. Tozali kotánga boye: “Yesu atamboli na mboka minene mpe na mboka mike nyonso, wana ezalaki ye kolakisa na biyanganelo na bango mpe kosakola Nsango Malamu na Bokonzi mpe kobikisa mpasi nyonso mpe maladi nyonso. Emoni ye bibele, ayoki mawa mpo na bango ete balɛmbi mpe balemalemi lokola bampate bazali na mobateli te. Boye alobi na bayekoli na ye ete, Mbuma na elanga iteli mingi mpenza nde basali bazali mingi te. Bóbondela Nkolo na elanga ete atinda basali kati na elanga na mbuma na ye.”—Matai 9:35-38.
12. Makamwisi ya Yesu na bantoma na ye ezalaki na ntina nini mosusu?
12 Lokola bantoma bafandaki elongo na Yesu, bakómaki na mwa makanisi ya Klisto. Bakokaki kososola ete mpo na kolakisa mpenza ete balingaka bato mpe bazali na mawa mpo na bango, basengeli kosakola mpe koteya bango Bokonzi. Mosala wana esengelaki kozala liboso ya misala mosusu nyonso ya malamu. Yango wana, misala ya malamu lokola kobikisa bato ya maladi, ezalaki kosalema kaka te mpo na kosalisa bato na bosɛnga na bango. Lokola okoki kokanisa yango, bato mosusu bakokaki kosepela kaka mpo maladi na bango esila mpe bázwa bilei na ndenge ya likamwisi. (Matai 4:24, 25; 8:16; 9:32, 33; 14:35, 36; Yoane 6:26) Kasi, misala wana ezalaki kaka mpo na kosalisa nzoto na bango te; misala wana etindaki bato oyo bamonaki yango na koyeba ete Yesu azalaki Mwana ya Nzambe mpe “mosakoli” oyo Mose alobelaki.—Yoane 6:14; Deteronome 18:15.
13. Esakweli ya Deteronome 18:18 emonisaki ete “mosakoli” oyo akoya akokokisa mpenza mokumba nini?
13 Lokola Yesu azalaki “mosakoli,” yango ezali na ntina nini? Bisakweli elobaki nini mpo na “mosakoli” yango? Asengelaki koyebana lokola moto oyo asilisaka maladi ya bato to aleisaka bato oyo bazali na nzala na ndenge ya likamwisi? Deteronome 18:18 elobaki boye: “Nakotɛ[lɛ]misela bango mosakoli lokola . . . yo [Mose] longwa na kati na bandeko na bango, mpe nakotya maloba na ngai na monɔkɔ na ye, mpe ye akolobela bango makambo nyonso oyo ekolakela ngai ye.” Na yango, atako bantoma bayekolaki kozala na boboto mpe komonisa yango mpo na kolakisa ete bazali na makanisi ya Klisto, bakomonaki ete basengelaki mpe komonisa ezaleli yango na mosala na bango ya kosakola mpe ya koteya. Yango nde likambo eleki malamu oyo bakokaki kosalela bato. Na nzela na yango nde bato ya maladi mpe babola bakokaki kozwa bolamu oyo ekoumela seko, kasi te bolamu oyo esukaka kaka na bomoi mokuse oyo moto azali na yango to na bilei ya mbala moko to mibale.—Yoane 6:26-30.
Tózwa makanisi ya Klisto lelo oyo
14. Ndenge nini kozala na makanisi ya Klisto etaleli mpe mosala na biso ya kosakola?
14 Tosengeli kokanisa te ete makanisi ya Klisto ezalaki kaka mpo na bato ya ekeke ya liboso: Yesu na bayekoli na ye ya liboso, baoyo Paulo akomaki mpo na bango ete: “Biso tozali na makanisi ya Klisto.” (1 Bakolinti 2:16) Toyebi mpe ete tosɛngisami kosakola nsango malamu mpe kokómisa bato bayekoli. (Matai 24:14; 28:19, 20) Kasi, ezali malamu tókanisa soki eloko nini etindaka biso na kosala mosala yango. Tosengeli kosala yango kaka mpo na kosala te. Tosalaka mosala ya kosakola libosoliboso mpo tolingaka Nzambe; mpe kozala lokola Klisto ezali kosɛnga mpe koyokela bato mawa, kosakwela bango nsango malamu mpe koteya bango.—Matai 22:37-39.
15. Mpo na nini kozala na motema mawa ezali na ntina mingi na mosala na biso ya kosakola?
15 Ya solo, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na koyokela bato oyo bandimaka makambo na biso te mawa, mingimingi soki balingaka koyoka biso te, baboyaka biso, to batɛmɛlaka biso. Kasi, soki tozali na bolingo mpe na motema mawa mpo na bato te, tokobosana ntina moko monene oyo esengeli kotinda biso na kosakola. Na yango, ndenge nini tokoki kokóma na motema mawa yango? Tokoki komeka kotalela bato ndenge oyo Yesu azalaki kotalela bango ete, “balɛmbi mpe balemalemi lokola bampate bazali na mobateli te.” (Matai 9:36) Lelo oyo, tozali komona ete bato mingi bazali bongo, boye te? Babateli ya mpate ya lokuta basundoli bango mpe bazipi bango miso. Yango wana, bayebi te ete Biblia ezali kolakisa nzela ya malamu mpo na kotambola mpe bayebi te makambo kitoko oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala awa na mabele na mikolo ezali koya. Bazali kokutana na mikakatano ya bomoi ya mokolo na mokolo lokola bobola, matata na kati ya mabota, maladi, mpe liwa; kasi bayebi elikya ya Bokonzi te. Biso nde tozali na eloko oyo basengeli na yango: nsango malamu ya lobiko etali Bokonzi ya Nzambe oyo esalami kuna na likoló!
16. Mpo na nini tosengeli kolinga koyebisa bato mosusu nsango malamu?
16 Soki ozwi ntango ya kokanisa malamu bamposa ya elimo ya bato oyo ofandi na bango, motema na yo ezali kotinda yo te na kosala nyonso oyo okoki mpo na koyebisa bango mokano etondi na bolingo oyo Nzambe azali na yango? Ya solo mpenza, mosala na biso ezali komonisa motema mawa. Soki tozali koyokela bato mawa lokola Yesu, ekomonana na mongongo na biso, na elongi na biso, mpe na ndenge na biso ya koteya. Yango ekosala ete baoyo “babongi mpo na bomoi ya seko” básepela na nsango na biso.—Misala 13:48, NW.
17. (a) Yebisá ndenge mosusu oyo tokoki komonisa bolingo mpe motema mawa epai ya basusu. (b) Kati na kosala makambo ya malamu mpe kosakola, mpo na nini tokoki te kopona moko mpe kotika mosusu?
17 Ya solo, bolingo mpe motema mawa na biso esengeli komonana na makambo nyonso oyo tozali kosala. Elingi koloba ete tosengeli mpe komonisa boboto epai ya bato oyo bazali na mikakatano na nzoto, bato ya maladi mpe babola. Tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosunga bango. Tóbosana mpe te kosala milende ya kozala na maloba mpe na misala oyo ezali kobɔndisa baoyo bakufeli moto oyo balingaki mingi. (Luka 7:1-15; Yoane 11:33-35) Kasi, misala malamu na biso esengeli kosuka kaka na komonisa bolingo, boboto, mpe motema mawa ndenge wana te, lokola baoyo basungaka bato oyo bazwi makama. Ekozala na ntina mingi soki tozali komonisa bolingo, boboto, mpe motema mawa na biso na mosala ya kosakola mpe koteya bato nsango malamu. Tókanisa lisusu oyo Yesu alobaki mpo na bakonzi ya mangomba ya Bayuda: “Bokokabaka ndambo na zomi na eidosomo mpe na aneti mpe na nkumina, nde bokotikaka kosala makambo maleki na bozito kati na mibeko, yango: kosambisa-sembo mpe koyoka mawa mpe kondima. Ekokaki kosala oyo mpe kotika yango na liboso te.” (Matai 23:23) Mpo na Yesu, kati na kosalisa bato na mosuni to koteya bango makambo ya elimo oyo ekopesa bango bomoi, ezalaki te likambo ya kopona moko mpe kotika mosusu. Yesu asalaki nyonso. Kasi, tomoni mpenza ete koteya bato elekaki ntina mpamba te bolamu na yango ekoumela libela.—Yoane 20:16.
18. Ndenge na biso ya kotalela makanisi ya Klisto esengeli kotinda biso na kosala nini?
18 Tozali na botɔndi mingi ete Yehova amonisi biso makanisi ya Klisto! Na Baevanzile, tokoki koyeba malamu makanisi, motema, bizaleli, misala, mpe makambo oyo elekaki ntina epai ya moto oyo alekaki bato nyonso. Esengeli nde biso tótángaka yango, tókanisa malamumalamu, mpe tósalela makambo oyo Biblia emonisi biso mpo na Yesu. Tóbosana te ete mpo tósala mpenza lokola Yesu, tosengeli naino kokanisa, komona mpe kotalela makambo ndenge oyo ye asalaki, na meko oyo ekoki kosalema epai ya bato ya kozanga kokoka. Yango wana, tiká mokano na biso ezala ya kozwa mpe komonisa makanisi ya Klisto. Yango nde bomoi oyo eleki malamu, mpe ndenge ya kosalela bato makambo oyo eleki malamu, mpe ndenge eleki malamu oyo biso moko mpe bato mosusu tokoki kokóma baninga ya Yehova Nzambe na biso ya boboto, ye oyo Yesu amonisaki malamumalamu.—2 Bakolinti 1:3; Baebele 1:3.
Okopesa eyano nini?
• Biblia eteyi biso nini na kotalela ndenge oyo Yesu azalaki mbala mingi kokokisa bamposa ya bato oyo bazangaki biloko?
• Likambo nini Yesu atyelaki likebi ntango atindaki bayekoli na ye?
• Ndenge nini tokoki komonisa “makanisi ya Klisto” na misala na biso?
[Elilingi na lokasa mobimba 23]
[Elilingi na lokasa 24]
Oyebi bolamu eleki monene oyo baklisto bakoki kosalela basusu?