Kobongwana na Klisto: etali biso na likambo nini?
Mibali minei bautaki komata ngomba moko molai. Na likoló na ngomba, likambo na kokamwa lisalemaki. Bayekoli misato na Yesu, baoyo miso mafungwanaki mpenza, bazalaki wana Klisto abongwanaki. Tala lolenge oyo Malako, mokomi na Evanzile, ayebisi likambo yango ya kokamwa:
“YESU akamati Petelo mpe Yakobo mpe Yoane, akambi bango likoló na ngomba molai, bobele bango mpenza,mpe asali ebongwaneli liboso na bango. Bilamba na ye bibandi kongɛnga, bizalaki mpɛmbɛ pɛɛ na motindo oyo ete ata mosukoli moko te na bilamba awa na mokili ayebi kopɛtola yango motindo wana. Eliya mpe Moise bamonani na bango, bazalaki kosolola elongo na Yesu. Petelo alobi na Yesu ete: ‘Nkolo, ezali malamu ete tozala awa; tosala hema misato, moko mpo na yo, moko na Moise, moko na Eliya.’ Na yango, ayebi te soko azali koloba nini, mpo ete babangi mingi mpenza. Lipatá liyei kozipa bango mpe mongongo mobimi na lipatá koloba ete: ‘Oyo Mwana na ngai na bolingo, boyoka ye.’ Batali pwasa epai na epai mpe bamoni moto te, bobele Yesu esika moko na bango.”—Malako 9:2-8.
Kanisa naino! Elongi na Yesu engɛngaki lokola moi. (Matai 17:2) Bilamba na ye bikómaki mpɛmbɛ pɛɛ “na motindo oyo ete ata mosukoli moko te na bilamba awa na mokili ayebi kopɛtola yango motindo wana.” Mongongo makasi na Nzambe moyokanaki, na ntango alobaki na ntina na Mwana na ye. Oyo nde likambo na kokamwa!
Liloba na greke libongolami na “asalaki ebongwaneli’’ elimboli ’’kobongwana na motindo mosusu.” Tozali kokuta yango na Baloma 12:2, epai kuna baklisto bazwi toli ya ‘kobongwana’ na kozwáká makanisi ya sika.—An Expository Dictionary of New Testament Words, ya W. Vine, volume IV, page 148.
Ee, likambo ya kokamwa lisalemaki wana Yesu asalaki ebongwaneli (transfiguration), mwa moke nsima na kokumisa Pasiká ya mobu 32 ya ntango na biso. Nini ememaki na ekamwiseli wana? Ezalaki na mokano ya sikisiki? Mpo na nini Moise mpe Eliya bakɔtisamaki na yango? Bongo, ebongwaneli na Klisto etaleli biso na likambo nini?
Makambo malekaki liboso ya ebongwaneli
Liboso na komata na ngomba wana, Yesu mpe bayekoli na ye bazalaki pene na engumba Kaisalia na Filipo. Lokola engumba yango etangwaki soko na bakilometele 25 na ngomba Helemone, epai na Sud-Ouest, ekoki kozala ete ebongwaneli esalemaki na moko na bansongé milai oyo ezalaki kati na ngomba yango.
Wana ezalaki bango kokende epai na “ngomba molai,” Yesu atuni bayekoli na ye ete: “Bato bakolobaka ete ngai nani?” Bazongisi ye ete: “Yoane Mobatisi, mpe bamosusu: Eliya; basusu ete moko na basakoli.” Mpe atuni bango boye ete: “Bongo bino bokolobaka ete ngai nani?” Petelo alobi na ye ete: “Yo ozali Klisto.” Mpe Yesu “apekisi bango ete bayebisa moto te na ntina na ye.” Abandi kolakisa bango ete ekoki na Mwana na moto kooka mpasi mingi, koboyama na mikóló na mboka mpe na banganga minene mpe na bakomeli, kobomama mpe kosekwa nsima na mikolo misato.-Malako 8: 27-31.
Yesu alandi koloba na kopesáká elaká oyo ete: “Bamosusu kati na baoyo bazali awa, bakokufa te kino akomona bango Bokonzi na Nzambe koya na nguya.” (Malako 9:1, MN; Matai 16:28) Yesu akokisaki elaká na ye wana, “nsima na mikolo motoba,” abondelaki mpe asalaki ebongwaneli liboso na Petelo, na Yakobo mpe na Yoane. Luka alobi ete yango esalemaki “mikolo mwambe” na nsima, ntembe ezali te mpo ete atangaki mpe mokolo oyo apesaki elaká mpe mokolo na ebongwaneli na ye.—Matai 17:1, 2; Malako 9:2; Luka 9:28.
Ndɔtɔ te, makanisi mpamba mpe te
Ebongwaneli na Yesu ezalaki ndɔtɔ te. Bantoma misato bakokaki te kolɔta ndɔtɔ lolenge moko; na yango, Yesu alobelaki yango lokola “emonaneli.” Ezalaki mpe makanisi mpamba te, mpo ete liloba na greke lisalelami na Matai 17:9 libongolami na esika mosusu ete “likambo ya kokamwa.” (Misala 7:31) Na yango, baoyo bamonaki likambo wana bandimisamaki mpenza: bamonaki na miso na bango mpe bayokaki na matoi na bango, makambo oyo mazalaki koleka.—Luka 9:35.
Lokola azalaki kososola nde ayebaki te soko asengelaki koloba nini, Petelo asengi ete atonga hema misato, moko mpo na Yesu, moko mpo na Moïse mpe moko mpo na Eliya. (Luka 9:33) Lipatá oyo lisalemaki wana Petelo azalaki koloba, ezalaki elembeteli ete Nzambe azalaki na ngomba wana, lokola yango esalemaka na hema na koyangana na Bayisraele kati na esobé. (Exode 40:34-38; Luka 9:34) Mpe bantoma basengelaki kolala te na ntango oyo “Nzambe Tata” alobaki ete: “Oyo Mwana na ngai, moponami. Boyoka ye.”—2 Petelo 1:17, 18; Luka 9:35.
Mpo na nini Moïse amonanaki?
Wana ebongwaneli esalemaki, Moïse ‘ayebaki likambo moko te,’ mpo ete asilaki kokufa uta bikeke mingi. (Mosakoli 9:5, 10) Lokola Davidi, ye mpe asekwaki te, elingi koloba ete ye mpenza azalaki na esika wana te. (Misala 2:29-31) Kasi mpo na nini Moïse amonanaki elongo na Klisto kati na emonaneli wana?
Nzambe alobaki na Moïse ete: “Nakotɛmisela bango mosakoli lokola yo longwa na kati na bandeko na bango, mpe nakotya maloba na ngai na monoko na ye, mpe ekolobela bango makambo nyonso oyo nakotinda ye.” (Deteronome 18:18) Petelo akokisaki esakweli yango epai na Yesu Klisto. (Misala 3:20-23) Longola Yesu, Moïse azalaki mosakoli monene oyo Nzambe atindaki na libota na Yisraele.
Ezali na bakokani kati na makambo na Moïse mpe Yesu Klisto, Moïse Monene. Na ndakisa, wana bazalaki naino bana mike, bomoi na bango ezalaki na likámá mpo na bakonzi mabe, kasi Nzambe asɛnzɛlaki ete babatelama. (Exode 1:20 kino 2:10; Matai 2:7-23) Liboso na kobanda mosala na bango lokola basaleli sipesiale na Jéhovah, mibali wana mibale bakilaki bilei na boumeli ya mikolo 40. (Exode 24:18; 34:28; Deteronome 9:18, 25; Matai 4:1, 2) Lisusu, Moïse mpe Yesu, bango nyonso mibale basalaki bikamwiseli na nguya na Nzambe.—Exode 14:21-31; 16:11-36; Nzembo 78:12-54; Malako 4:41; Luka 7:18-23; Yoane 14:11.
Nzambe asalelaki Moïse mpo na kosikola Yisraele na boombo na Ezipito; bobele bongo, Yesu asili komema lisiko katina elimo. (Exode 12:37 kino 14:31; Yoane 8:31, 32) Moïse azwaki mokumba ya kozala moyokanisi ya kondimana na Mibeko oyo esalemaki kati na Nzambe mpe Bayisraele; Yesu, ye azali Moyokanisi na kondimana na sika. (Exode 19:3-9; 34:3-7; Yilimia 31:31-34; Luka 22:20; Baebele 8:3-6; 9:15) Jéhovah asalelaki lisusu Moïse mpo na kokumisa nkombo na ye epai na Bayisraele, epai na Baezipito mpe bato mosusu, lolenge moko asalelaki Yesu Klisto mpo na kokumisa nkombo Ye mosantu. (Exode 9:13-17; 1 Samwele 6:6; Yoane 12:28-30; 17:5, 6, 25, 26) Na komonisáká Moïse esika moko na Yesu kati na ebongwaneli, Nzambe alakisaki ete Klisto akokokisa mikumba wana na etando eleki monene.
Mpo na nini Eliya amonanaki?
Atako mosakoli Eliya asekwaki te, ebongaki mpenza ete amonana na ebongwaneli wana. Na kozongisáká losambo ya peto mpe na kokumisáká nkombo na Jéhovah epai na Bayisraele, Eliya akokisaki mosala moko monene. Yesu Klisto asalaki lolenge moko na ntango azalaki awa na mabelé, mpe akosala yango lisusu koleka mpo na kozongisa lingomba ya peto mpe kokumisa Tata na ye na likoló na nzela na Bokonzi na Masiya
Mosakoli Malaki amonisaki ete mosala mokokisamaki na Eliya ezalaki kosakola mosala monene oyo mosengelaki kokokisama na ntango ekoya. Na nzela na ye, Nzambe alobaki ete: “Tala, ngai nakotindela bino mosakoli Eliya liboso na koya na mokolo monene mpe na nsomo na Jéhovah. Mpe akobongola mitema na batata epai na bana, mpe mitema ya bana epai na batata na bango, ete naya mpe nabebisa mokili te, ete nabebisa yango te.”—Malaki 4:5, 6
Esakweli oyo ekokisamaki na etando moke epai na Yoane mobatisi Yesu alimbolaki yango nsima na ebongwaneli na ye, na ntango bayekoli na ye batunaki ye ntina oyo bakomeli bazalaki koloba ete, Eliya asengelaki naino koya liboso ete Masiya aya. Yesu ayanolaki ete: “Eliya azali koya mpe akobongisa makambo nyonso. Kasi nazali koloba na bino ete, Eliya asili koya nde bayebaki ye te, kasi basalelaki ye lokola elingaki bango. Bobele bongo, Mwana na moto akooka mpasi na maboko na bango.” Mpe lisoló ebakisi ete: “Bongo baye- koli bakangi ntina ete azalaki koloba na bango mpo na Yoane Mobatisi.”—Matai 17:10-13.
Yoane akokisaki mosala mokokani na oyo Eliya asalaki wana ebatisaki ye Bayuda oyo babongolaki mitema na masumu na bango liboso na kondimana na Mibeko. Oyo eleki ntina mpenza, Yoane ayaki kobongisa nzela na Masiya mpe alakisaki Yesu Klisto. (Matai 11:11-15; Luka 1:11-17; Yoane 1:29) Kasi mpo na nini mosala na Yoane mozalaki bobele kokokisama moke na esakweli ya Malaki?
Na boumeli ya ebongwaneli, Eliya amonanaki kosolola elongo na Yesu. Yango esalemaki nsima na liwa na Yoane mobatisi, komonisáká bongo ete mosala lolenge moko na oyo na Eliya mosengeli kokokisama lisusu. Mpe, esakweli oyo elakisaki ete mosala wana mokosalema liboso ete “mokolo monene mpe na nsomo na Jéhovah” eya. Mokolo yango mobɛlɛmi, mosangisi mpe “etumba na mokolo yango monene na Nzambe Mozwi—na—Nguya Nyonso,” na Armagedon. (Emoniseli 16:14-16) Yango elimboli ete mosala mokokani na oyo Eliya mpe mokitani na ye Elizé bakokisaki, ekosalema liboso na kotyama na Bokonzi na Nzambe na likoló—oyo na ntango ebongwaneli esalemaki, ezalaki naino mpo na mikolo mikoya. Uta bambula mingi, ba Témoins de Jéhovah ya ntango na biso bazali kokokisa mokumba mosangisi kati na yango, kozongisama ya losambo na peto mpe kokumisama ya nkombo na Nzambe.—Nzembo 145:9-13; Matai 24:14.
Ntina na ebongwaneli
Ebongwaneli ekembisaki Yesu ete alónga mpasi mpe liwa oyo esengelaki kokómela ye mosika te. Kondima na ye elendisamaki wana ayokaki Tata na ye na likoló koloba na ntina na ye lokola na Mwana na ye, oyo ye alingi. Kasi emonaneli wana ezalaki na bopusi nini likoló na bato mosusu?
Ebongwaneli na Yesu elendisaki lisusu kondima ya baoyo bamonaki yango. Emonisaki bango polele ete Yesu Klisto azali Mwana na Nzambe. Ya solo mpenza, mpo ete ntango wana Molobeli na liboso na Jéhovah, Liloba, azalaki elongo na bango, bayokaki mpenza mongongo na Nzambe na ntango maloba oyo mabimaki ete: “Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli na ye mingi.” Atako Jéhovah alobaki motindo moko na ntango Yesu azwaki batisimo, kasi na ebongwaneli, alobaki na sikisiki ete bayekoli basengelaki koyoka ye.—Matai 3:13-17; 17:5; Yoane 1:1-3, 14.
Ebongwaneli elendisaki lisusu kondima ya bayekoli na motindo mosusu. Na boumeli ya emonaneli, Yesu, “Moïse” mpe “Eliya” basololaki mpo na “bobimi na ye (na Klisto), oyo asengelaki kokokisa na Yelusaleme.” (Luka 9:31) Liloba “bobimi” libongolami na motindo na liloba na greke oyo ete e’xo-dos. Kobima wana, to bobimi, esangisaki kati na yango liwa na Yesu mpe lisekwa na ye likosalema na Nzambe, ete azala na bomoi ya elimo. (1 Petelo 3:18) Ebongwaneli elendisaki mpenza kondima na bango, Kopesaka bongo elembeteli ya solo ete Yesu akokóma Mokonzi kati na Bokonzi na Masiya na Nzambe. Lisusu, emonaneli emonisaki ete Bokonzi ekozwa nkembo.
Ebongwaneli elendisaki lisusu kondima na bango kati na bisakweli ya Biblia. Soko mibu 32 na nsima (pene na mobu 64 ya ntango na biso), Petelo amikundolaki lisusu likambo yango, mpe akomaki ete: “Wana toyebisaki bino nguya mpe koya na Nkolo Yesu Klisto, tolandaki masapo na mayele mabe te; kasi mpo ete biso mpenza tomonaki nkembo na ye. Mpamba te asili kozwa lokumu mpe nkembo epai na Nzambe Tata, awa maloba oyo mabimaki na ntina na ye kati na nkembo monene ete: ‘Oyo Mwana na ngai molingami, nasepeli na ye mingi.’ Ee, biso toyokaki maloba oyo mautaki longwa na likoló, wana tozalaki na ye elongo kuna na ngomba mosantu. Mpe tozali na liloba ya esakweli oyo limonani mpenza solo, yango nde bozali kotalela lokola mwinda oyo mozali kongɛnga kati na esika na molili, kino ntɔngɔ́ ekotána mpe monzoto na ntɔngɔ́ mokobima kati na mitema na bino.”—2 Petelo 1:16-19, MN.
Ndimbola na yango mpo na biso
Na yango, mpo na ntóma Petelo, ebongwaneli na Yesu endimisaki mpenza liloba na esakweli na Nzambe. Mbala mosusu ntoma Yoane, ye mpe alobelaki emonaneli yango na ntango alobaki ete: “Liloba akomaki mosuni mpe azalaki kati na biso, mpe tomonaki nkembo na ye, nkembo lokola oyo mwana bobele moko azwi epai na tata; mpe atondi na ngɔlu mpe na solo.” (Yoane 1:14) Lolenge moko, emonaneli oyo ekoki kolendisa kondima na biso kati na liloba na esakweli na Jéhovah.
Ebongwaneli mpe makambo oyo makangisami na yango, ezali kopesa biso endimeli ete Yesu Klisto azali Mwana na Nzambe mpe azali Masiya na ndaká. Ezali kokembisa endimeli na biso na lisekwa na Yesu mpo na kozala na bomoi ya elimo na makoló. Emonaneli wana na kokamwa ezali mpe kokólisa kondima na biso kati na boyangeli na Nzambe, mpamba te ebongwaneli ezalaki mwa nkembo moke na Klisto mpe na nguya na Bokonzi.
Kondima na biso elendisami mpenzampenza na likambo oyo ete ebongwaneli na Yesu esakolaki eleko na biso, eleko oyo Yesu asili koya. (Matai 24:3-14) Uta 1914, azali koyangela kati na makoló lokola Mokonzi oyo aponami na Nzambe. Mosika te, akosalela bokonzi mpe nguya oyo Nzambe asili kopesa ye mpo na koboma banguna nyonso na boyangeli na Nzambe, ete afungola nzela ya mokili ya sika. (2 Petelo 3:13) Tokozwa mapamboli ya seko oyo makopesamela biso soki tondimeli makambo nyonso mamonisamaki na ebongwaneli na Yesu Klisto.
Atako mosakoli Eliya asekwaki te, ebongaki mpenza ete amonana na ebongwaneli wana. Na kozongisáká losambo ya peto mpe na kokumisáká nkombo na Jéhovah epai na Bayisraele, Eliya akokisaki mosala moko monene. Yesu Klisto asalaki lolenge moko na ntango azalaki awa na mabelé, mpe akosala yango lisusu koleka mpo na kozongisa lingomba ya peto mpe kokumisa Tata na ye na likoló na nzela na Bokonzi na Masiya.
Mosakoli Malaki amonisaki ete mosala mokokisamaki na Eliya ezalaki kosakola mosala monene oyo masengelaki kokokisama na ntango ekoya Na nzela na ye, Nzambe alobaki ete: “Tala, ngai nakotindela bino mosakoli Eliya liboso na koya na mokolo monene mpe na nsomo na Jéhovah. Mpe akobongola mitema na batata epai na bana, mpe mitema ya bana epai na batata na bango, ete naya mpe nabetisa mokili te, ete nabebisa yango te.”—Malaki 4:5, 6.
Esakweli oyo ekokisamaki na etando moke epai na Yoane mobatisi. Yesu alimbolaki yango nsima na ebongwaneli na ye, na ntango bayekoli na ye batunaki ye ntina oyo bakomeli bazalaki koloba ete, Eliya asengelaki naino koya liboso ete Masiya aya. Yesu ayanolaki ete: “Eliya azali koya mpe akobongisa makambo nyonso. Kasi nazali koloba na bino ete, Eliya asili koya nde bayebaki ye te, kasi basalelaki ye lokola elingaki bango. Bobele bongo, Mwana na moto akooka mpasi na maboko na bango.” Mpe lisoló ebakisi ete: “Bongo bayekoli bakangi ntina ete azalaki koloba na bango mpo na Yoane Mobatisi.”—Matai 17:10-13.
Yoane akokisaki mosala makokani na oyo Eliya asalaki wana abatisaki ye Bayuda oyo babongolaki mitema na masumu na bango liboso na kondimana na Mibeko. Oyo eleki ntina mpenza, Yoane ayaki kobongisa nzela na Masiya mpe alakisaki Yesu Klisto. (Matai 11:11-15; Luka 1:11-17; Yoane 1:29) Kasi mpo na nini mosala na Yoane mozalaki bobele kokokisama moke na esakweli ya Malaki?
Na boumeli ya ebongwaneli, Eliya amonanaki kosolola elongo na Yesu. Yango esalemaki nsima na liwa na Yoane mobatisi, komonisáká bongo ete mosala lolenge moko na oyo na Eliya mosengeli kokokisama lisusu. Mpe, esakweli oyo elakisaki ete mosala wana mokosalema liboso ete “mokolo monene mpe na nsomo na Jéhovah” eya. Mokolo yango mobɛlɛmi, mosangisi mpe “etumba na mokolo yango monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya Nyonso,” na Armagedon. (Emoniseli 16:14-16) Yango elimboli ete mosala mokokani na oyo Eliya mpe mokitani na ye Elizé bakokisaki, ekosalema liboso na kotyama na Bokonzi na Nzambe na likoló—oyo na ntango ebongwaneli esalemaki, ezalaki naino mpo na mikolo mikoya. Uta bambula mingi, ba Témoins de Jéhovah ya ntango na biso bazali kokokisa mokumba mosangisi kati na yango, kozongisama ya losambo na peto mpe kokumisama ya nkombo na Nzambe.—Nzembo 145:9-13; Matai 24:14.