MOKAPO 62
Liteya monene ya komikitisa
MATAI 17:22–18:5 MARKO 9:30-37 LUKA 9:43-48
YESU ALOBELI LISUSU LIWA NA YE
AFUTI MPAKO NA MBONGO YA EBENDE OYO EUTI NA MONƆKƆ YA MBISI
NANI ALEKI BATO NYONSO NA BOKONZI YA NZAMBE?
Yesu nsima ya kobongwana liboso ya bayekoli na ye mpe kobikisa elenge oyo azalaki na demo na etúká ya Kaisaria ya Filipe, akei na Kapernaume. Asali mobembo yango na kobombana, elongo na bayekoli na ye, mpo ebele ya bato ‘báyeba yango’ te. (Marko 9:30) Yango epesi ye likoki ya koyebisa lisusu bayekoli na ye makambo ya liwa na ye mpe mosala oyo bakosala na nsima. Ayebisi bango boye: “Mwana ya moto akotɛkama na mabɔkɔ ya bato, mpe bakoboma ye, mpe na mokolo ya misato akolamuka.”—Matai 17:22, 23.
Mpo na koloba solo, bayekoli basengeli kokamwa te. Yesu ayebisaki bango liboso ete akobomama, atako Petro aboyaki kondima ete likambo yango ekosalema. (Matai 16:21, 22) Lisusu, bantoma misato oyo bamonaki kobongwana na ye bayokaki lisolo ya “kokende” na ye. (Luka 9:31) Sikoyo, bayekoli ‘bayoki mawa mingi mpenza’ mpo na makambo oyo Yesu alobi, atako bakangi mpenza ntina ya maloba yango te. (Matai 17:23) Kasi, bazali kobanga kotuna mituna mosusu mpo na likambo yango.
Nsukansuka bakómi na Kapernaume; Yesu ayaka na engumba yango mingi mpe bantoma na ye mingi bazali bato ya mboka yango. Awa, bato oyo bakɔngɔlaka mpako ya tempelo bayei epai ya Petro. Mbala mosusu mpo na kofunda Yesu ete afutaka mpako te, batuni Petro: “Moteyi na bino afutaka mpako [ya tempelo] ya drakimɛ mibale te?”—Matai 17:24.
Petro azongiseli bango ete: “Te, afutaka.” Ntango Yesu akɔti na ndako, ayebaki likambo oyo euti kosalema. Na yango, na esika azela Petro ayebisa ye likambo yango, atuni ye: “Simo, okanisi nini? Bakonzi ya mabele bazwaka lifuti to mpako ya moto na moto epai ya banani? Epai ya bana na bango to epai ya bapaya?” Petro apesi eyano oyo: “Epai ya bapaya.” Bongo Yesu alobi: “Ya solo mpenza, bana basengeli kofuta mpako te.”—Matai 17:25, 26.
Tata ya Yesu nde Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe Nzambe oyo bato basambelaka na tempelo. Yango wana, na kolanda mibeko, Mwana ya Nzambe asengeli kofuta mpako ya tempelo te. Nzokande, Yesu alobi: “Kasi mpo tóbɛtisa bango libaku te, kende na mbu, bwaká ndɔbɔ, mpe kamatá mbisi ya liboso oyo ekomata mpe, ntango okofungola monɔkɔ na yango, okokuta mbongo ya ebende ya statere [to tetradrakimɛ]. Kamatá yango mpe pesá bango yango mpo na ngai ná yo.”—Matai 17:27.
Mwa moke na nsima ntango bayekoli nyonso bakómi esika moko, batuni Yesu motuna mpo na koyeba nani mpenza aleki bato mosusu nyonso na Bokonzi ya Nzambe. Atako babangaki kotuna Yesu mituna mpo na liwa na ye, kasi sikoyo babangi te kotuna ye mituna mpo na avenire na bango. Yesu ayebi makanisi na bango. Ezali likambo oyo bazalaki kotyelana ntembe ntango bazalaki kotambola na nsima ya Yesu wana bazali koya na Kapernaume. Bongo Yesu atuni: “Likambo nini bozalaki kowelana nzelanzela?” (Marko 9:33) Bayekoli bayoki nsɔni, mpe bafandi nyɛɛ, mpo bazalaki kotunana soki nani aleki monene na kati na bango nyonso. Na nsima, bantoma bayebisi Yesu likambo bazalaki kosolola: “Nani mpenza aleki bato mosusu nyonso na bokonzi ya likoló?”—Matai 18:1.
Ezali likambo ya kokamwa komona bayekoli bazali kowelana mpo na likambo ya ndenge wana nzokande balekisi mbula pene na misato bazali komona misala ya Yesu mpe koyoka mateya na ye. Ya solo, bazali bato ya kozanga kokoka. Lisusu, bakoli na lingomba oyo bato balukaka lokumu mpe esika ya liboso. Longola yango, Yesu autaki kolaka Petro ete akopesa ye “bafungola” ya Bokonzi. Elaka yango nde etindi ye amona ete aleki baninga? Mbala mosusu Yakobo ná Yoane mpe bazali komona bongo, mpo bazalaki ntango Yesu abongwanaki.
Ezala bongo to te, Yesu atiki bango na makanisi wana te; asemboli bango. Abengi mwana moko, atɛlɛmisi ye na katikati na bango, mpe ayebisi bayekoli na ye ete: “Soki bobongwani te mpe bokómi lokola bana mike te, bokokɔta na bokonzi ya likoló te. Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana moke oyo, ye nde moto oyo aleki bato mosusu nyonso na bokonzi ya likoló; mpe moto nyonso oyo ayambi mwana moke lokola oyo mpo na nkombo na ngai ayambi mpe ngai.”—Matai 18:3-5.
Yesu asaleli mayele ya malamu mpenza mpo na koteya! Yesu asilikeli bayekoli na ye te mpe alobi te ete bazali koluka bokonzi to lokumu. Apesi bango nde ndakisa moko. Bana mike balukaka lokumu to koleka baninga te. Na yango, Yesu amonisi ete bayekoli na ye basengeli kozala na bizaleli lokola ya bana mike. Na nsuka ya liteya yango, Yesu alobi na bayekoli na ye: “Moto oyo azali kosala lokola moto oyo azali mpenza moke na kati na bino nyonso ye nde moto oyo aleki monene.”—Luka 9:48.