MOKAPO 63
Yesu apesi toli na likambo ya kobɛtisa libaku mpe lisumu
MATAI 18:6-20 MARKO 9:38-50 LUKA 9:49, 50
TOLI NA LIKAMBO YA KOBƐTISA LIBAKU
SOKI NDEKO ASALI LISUMU
Yesu auti kopesa ndakisa mpo na komonisa bayekoli na ye ezaleli oyo basengeli kozala na yango. Basengeli kozala lokola bana mike, kozala na komikitisa mpe koboya koluka lokumu. Bayekoli basengeli ‘koyamba bana mike na nkombo ya Yesu,’ soki bayambi bango ‘ezali lokola bayambi Yesu.’—Matai 18:5.
Lokola bantoma bautaki kowelana mpo na koyeba nani aleki monene, bakanisi ete Yesu alobi bongo mpo na kopamela bango. Sikoyo ntoma Yoane amemeli Yesu likambo mosusu oyo euti kosalema; alobi: “Tomonaki moto moko azali kobimisa bademo na nkombo na yo mpe tomekaki kopekisa ye, mpamba te azali kolanda yo elongo na biso te.”—Luka 9:49.
Yoane amonaka nde ete kaka bantoma nde bazali na lotomo ya kobikisa bato to ya kobengana bademo? Soki bongo, ndenge nini Moyuda yango alongi kobengana bilimo mabe? Yoane amoni ete moto yango asengeli kosala misala ya nguya te mpo azali kotambola elongo na Yesu ná bantoma na ye te.
Yoane akamwe ntango Yesu alobi: “Bómeka kopekisa ye te, mpo moto moko te akosala mosala ya nguya na nkombo na ngai bongo na nsima akoka nokinoki kofinga ngai; mpo moto oyo azali monguna na biso te azali na ngámbo na biso. Mpo moto nyonso oyo apesi bino kɔpɔ ya mai ya komɛla mpo bozali bato ya Kristo, nazali koloba na bino solo, akobungisa mbano na ye soki moke te.”—Marko 9:39-41.
Na ntango wana, ezalaki na ntina te moto yango atambola na Yesu mpo azala na ngámbo na ye. Lisangá ya bokristo esalemaki naino te; na yango, lokola moto yango azalaki kotambola elongo na Yesu te elakisaki te ete azali monguna to moto ya lingomba ya lokuta. Emonani polele ete moto yango azalaki kondimela nkombo ya Yesu, mpe maloba ya Yesu emonisi ete moto yango akobungisa mbano na ye te.
Nzokande, ekozala mabe soki moto yango abɛti libaku mpo na maloba mpe misala ya bantoma. Yesu alobi: “Moto nyonso oyo abɛtisi libaku moko ya bato mike oyo bandimaka, ekokaki kozala malamu mpo na ye soki bákangisaka ye na nkingo libanga oyo banikaka na yango mbuma, lokola oyo mpunda ebalolaka, mpe abwakama mpenza na mbu.” (Marko 9:42) Na nsima, Yesu alobi ete bayekoli na ye basengeli kolongola ata eloko ya motuya lokola lobɔkɔ, lokolo to liso, soki yango ezali kobɛtisa bango libaku. Malamu kutu kozanga eloko moko ya motuya ndenge wana mpe kokɔta na Bokonzi ya Nzambe na esika ya kokangama na eloko yango mpe kobwakama na Gehena (Lobwaku ya Hinome). Na ntembe te bantoma basilá komona lobwaku yango, oyo ezalaka pene na Yerusaleme, esika batumbaka bosɔtɔ; na yango bayebi ete elimboli libebi ya seko.
Yesu apesi mpe likebisi oyo: “Bókeba, bótyola moko ya bana mike oyo te; mpo nazali koyebisa bino ete baanzelu na bango na likoló bazali ntango nyonso kotala elongi ya Tata na ngai.” Bato ya ndenge wana bazali na motuya mingi na miso ya Tata na ye. Yesu apesi ndakisa ya moto moko oyo azali na bampate nkama moko (100) kasi moko ebungi. Moto yango atiki bampate ntuku libwa na libwa (99) mpe akei koluka oyo ebungi, mpe ntango amoni yango asepeli na yango mingi koleka bampate 99 mosusu. Yesu abakisi: “Ndenge moko mpe Tata na ngai oyo azali na likoló alingaka te ete moko ya bato mike oyo abeba.”—Matai 18:10, 14.
Mbala mosusu Yesu akanisi ndenge bantoma bazalaki kowelana mpo na koyeba nani aleki na kati na bango; yango wana alobi na bango: “Bózala na mungwa na kati na bino, mpe bózalaka na kimya bino na bino.” (Marko 9:50) Mungwa ekómisaka bilei elɛngi. Mungwa ya elilingi, to maloba ya boboto, esalaka ete maloba ya moto endimama na mindɔndɔ te, mpe yango esalisaka na kobatela kimya; nzokande kowelana ebatelaka kimya te.—Bakolose 4:6.
Ntango mosusu, matata makasi ekoki kobima; Yesu amonisi ndenge ya kosilisa yango. Alobi: “Soki ndeko na yo asali lisumu, kende komonisa ye libunga na ye, yo ná ye kaka. Soki ayokeli yo, ozongisi ndeko na yo na nzela ya malamu.” Bongo soki ayoki te? Yesu abakisi: “Kamatá moto moko to bato mibale, mpo na monɔkɔ ya batatoli mibale to misato likambo nyonso endimama.” Soki kosala bongo esilisi likambo yango te, basengeli koloba na “lisangá,” elingi koloba koyebisa bankulutu mpo bango nde bakoki kozwa ekateli. Bongo soki moto oyo asali lisumu aboyi kaka koyoka? “Azala na miso na yo lokola moto ya bikólo mpe lokola mokɔngɔli-mpako,” bato oyo Bayuda bazalaki kosala na bango boninga te.—Matai 18:15-17.
Bakɛngɛli na masangá basengeli kolanda mitinda ya Liloba na Nzambe. Soki bamoni ete mosumuki azali na ngambo mpe asengeli kozwa disiplini, ekateli yango ekozala oyo ‘esili kokangama na likoló.’ Kasi soki bamoni ete azali na ngambo te, ekateli yango ekozala oyo ‘esili kofungwama na likoló.’ Malako yango esalisaki mingi ntango lisangá ya bokristo esalemaki. Ntango bazali kotalela makambo ya ndenge wana, Yesu alobi: “Epai bato mibale to misato bayangani na nkombo na ngai, nakozala wana na katikati na bango.”—Matai 18:18-20.