Kososola mitindá emonisaka kokɔmela
KOTAMBOLA na bato mabe ekobebisaka bizaleli malamu. Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango. (1 Bakolinti 15:33, NW; Bagalatia 6:7) Ezala na mosuni to na elimo, maloba oyo mazali mpenzampenza solo motindá mpe mokomoko ezali kopesa nzela ya kosala mibeko. Nzokande, mibeko, ekoki koumela mwa ntango, mpe mbala mingi ezalaka na bosikisiki. Kasi, mitindá, misalelamaka na makambo mingi, mpe mikoki koumela seko. Bongo, Liloba ya Nzambe ezali kolendisa biso ete tókanisaka mitindá kati na makambo nyonso.
Diksionere Webster’s Third New International Dictionary ezali kolimbola liloba motindá lokola “solo ya moboko: mobeko-mama mpe mobeko ya moboko, liteya, to likanisi oyo likoló na yango makanisi mosusu mazwi moboko to mpe epai oyo makanisi mosusu mauti.” Na ndakisa, bakoki kopesa mwana moke mobeko ete, “Osengeli kosimba lituká te.” Kasi epai na mokóló bakoloba na ye ete: “Lituká ezali na mɔ́tɔ.” Yeba ete elobeli oyo ya nsuka ezali na moboko monene. Mpamba te yango ezali na bopusi likoló ya misala oyo moto akoki kosala—mbala mosusu kolamba, kotumba, to koboma mɔ́tɔ ya lituká—na lolenge yango ekómi motindá.
Ya solo, mitindá ya moboko kati na bomoi, mizali ya elimo, yango ezali kotambwisa losambo na biso epai ya Nzambe mpe ezali kotambwisa bolamu na biso. Nzokande, bato mosusu, bazali koboya kosala milende oyo misengeli mpo na kokanisa mitindá. Ntango bakutani na likambo oyo ezali kosengisa bango ete bázwa ekateli, bazali kosepela kosalela nde mibeko mpo ete yango ezali pɛtɛɛ. Yango ezali likambo ya mayele te mpe ekeseni na ndakisa oyo bato ya sembo na ntango ya kala batikaki.—Baloma 15:4.
Bato oyo batosaki mitindá ya Nzambe
Kati na bato ya kozanga kokoka, Abele akoki kobéngama moto ya liboso mpenza oyo alandaki mitindá ya Nzambe. Emonani ete azalaki kokanisa mingi elaka na ntina na “mombóto” mpe azalaki komona ete kosikwama na masumu ekosengisa mbeka ya makila. (Genese 3:15) Na yango apesaki epai na Nzambe “bana na liboso kati na etónga na ye.” Maloba “mpe mafuta na yango lokola” emonisi ete Abele apesaki Yehova bibwele na ye oyo elekaki kitoko. Na bongo, elekaki mbula nkóto mibale na nsima ya liwa ya Abele nde Yehova mpo na mbala ya liboso alimbolaki masɛngami na ntina na mbeka. Na kokesena na Abele moto oyo azalaki na bobangi Nzambe mpe atosaki mitindá na ye, Kaina ndeko na ye amonisaki mpenza mposa makasi te mpo na kopesa mbeka epai na Nzambe. Na yango ezaleli na ye ezalaki malamu te, mpe likabo na ye ezalaki komonisa ete motema na ye ezangaki mitindá.—Genese 4:3-5.
Noa mpe azalaki motosi ya mitindá na Nzambe. Atako Biblia ezali komonisa ete Nzambe apesaki ye etindá ya sikisiki mpo na kotonga masuwa, tozali kotánga esika moko te ete azwaki etindá ya kosakola epai na bato mosusu. Lisusu, Noa abéngami “mosakoli ya boyengebene.” (2 Petelo 2:5) Atako emonani ete Nzambe atindaki Noa ete asakola, na ntembe te botosi na ye ya mitindá mpe bolingo mpo na bazalani epusaki ye na kosala bongo. Mpo ete tozali kobika na eleko lokola oyo ya Noa, tiká ete tómekola ezaleli na ye malamu mpe ndakisa na ye.
Na bokeseni na bakonzi ya mangomba ya eleko na ye, Yesu ateyaki bato ete bákanisaka mitindá. Lisoló na ye likoló na Ngomba ezali ndakisa. Makambo oyo alobi ezali libyangi ya kolanda mitindá. (Matai, mikapo 5-7) Yesu ateyaki lolenge wana mpamba te, lokola Noa mpe Abele oyo bazalaki liboso na ye, ayebaki mpenza Nzambe. Ata ntango azalaki elenge, apesaki motuya na solo oyo ya moboko ete: “. . . Bobele mpo na kwanga te, kasi ete moto akotikala na bomoi mpo na makambo nyonso makobimaka na monɔkɔ na [Yehova].” (Deteronome 8:3; Luka 2:41-47) Ɛɛ, moboko mpo na kozala motosi mitindá ya Nzambe ezali mpenza koyeba Yehova, makambo oyo alingaka, oyo aboyaka, mpe mikano na ye. Wana mitindá oyo na ntina na Nzambe mizali kotambwisa bomoi na biso, mikokóma solo mitindá ya bomoi.—Yilimia 22:16; Baebele 4:12.
Mitindá mpe motema
Ekoki kozala ete tozali kotosa mobeko moko na makasi, mbala mosusu mpo ete tozali kobanga kozwa etumbu mpo na kozanga botosi. Nzokande, kotosa mitindá, ezali kobwaka ezaleli motindo yango, mpamba te ntango moto atambwisami na mitindá botosi ezalaka likambo oyo euti na motema. Tótalela Yosefe oyo, lokola Abele mpe Noa, azalaki na bomoi liboso kondimana ya Mibeko ya Mose esalama. Ntango mwasi ya Potifala amekaki kolɛngola ye, Yosefe ayanolaki ete: “Bongo nakoka kosala mabe monene oyo mpe kosala lisumu epai ya Nzambe boni?” Ɛɛ, Yosefe ayebaki motindá oyo emonisi ete mwasi na mobali bazali “mosuni moko.”—Genese 2:24; 39:9.
Lelo oyo mokili ezali na mitindá ya boyengebene te. Bato ya mokili batondi na lokoso mpo na mobulu mpe na misala ya mbindo. Likámá ezali mpamba te moklisto akoki komeka kolya mwa moke, mbala mosusu na kobombama, biloko oyo bizali na elengi mingi kasi bizali kotonga nzoto te—bafilime, video, to mikanda. Oyo nde likambo ya kopesamela longonya, soki lokola Yosefe, tozali koboya mabe mpamba te tozali koyina mabe na nzela ya mitindá, komikundoláká ete Nzambe akobatela bobele bato na sembo na “bolɔ́zi monene” oyo ebɛlɛmi. (Matai 24:21) Ɛɛ, ezali libosoliboso makambo oyo tozali kosala na nkuku, kasi te oyo bato bazali komona, nde emonisaka bomoto na biso ya kati.—Nzembo 11:4; Masese 15:3.
Na bongo soki totambwisami na mitindá ya Biblia, tokoluka te oyo tokanisi ete ezali ekimelo mpo na kokweisa mibeko ya Nzambe; to mpe tokomeka te koluka kino na meko nini tokomipesa na kosala makambo mosusu kozanga kobuka Mibeko. Makanisi motindo oyo ezali mpo na libebi na biso moko; nsukansuka ekopesa biso mpasi.
Tálela malamu mitindá mibombami na nsima ya mibeko
Ya solo, mibeko ezali na ntina mingi na bomoi ya moklisto. Yango ezali lokola basinzili oyo bazali kosunga mpo na kobatela biso, mpe mibeko yango mitongami likoló ya mitindá ya ntina mingi. Kozanga kotalela mitindá wana ekoki kolɛmbisa bolingo na biso mpo na mibeko miuti na mitindá yango. Libota ya kala ya Yisalaele bamonisaki likambo yango.
Nzambe apesaki Yisalaele Mibeko Zomi, oyo ya liboso epesaki nzela na kosambela nzambe mosusu te bobele Yehova. Likambo oyo ete Yehova azalisaki biloko nyonso ezali solo ya moboko oyo ebombami nsima ya mobeko yango. (Exode 20:3-5) Kasi libota ya Yisalaele batosaki motindá oyo? Yehova ye moko apesi eyano ete: “[Bayisalaele balobi] na likonzi ete: ‘Yo tata na biso’ mpe [bangangi] na libanga ete, ‘Mama.’ Kasi epai na ngai [Yehova] bapesi mokɔngɔ mpe babombi bilongi na bango liboso na ngai.” (Yilimia 2:27, The New English Bible) Oyo nde motema makasi mpe bozoba mpenza! Mpe yango ezokisaki solo motema ya Yehova!—Nzembo 78:40, 41; Yisaya 63:9, 10.
Baklisto mpe bazali na mibeko miuti na Nzambe. Na ndakisa, basengeli koboya losambo ya bikeko, kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo, mpe kosalela makila. (Misala 15:28, 29) Na ntango ozali kokanisa ntina na yango, tokoki kososola mitindá oyo mibombami, lokola oyo: Nzambe abongi ete tómipesa mobimba epai na ye, tosengeli kozala sembo epai ya mobalani na biso; mpe Yehova azali Mopesi ya bomoi na biso. (Genese 2:24; Exode 20:5; Nzembo 36:9) Soki tososoli mpe tozali kosepela na mitindá mibombami nsima ya makambo oyo, tokomona ete yango ezali mpo na bolamu na biso moko. (Yisaya 48:17) Epai na biso, “Malako” na Nzambe “mpe mazali na bozito te.”—1 Yoane 5:3.
Soko Bayisalaele na ntango ya kala baboyaki mibeko ya Nzambe, na eleko ya Yesu “banganga ya mibeko,” elingi koloba bakomeli, na ngámbo na bango balekisaki ndelo. Babimisaki ebele ya mibeko mpe bonkɔkɔ oyo ekangaki bokóli ya losambo ya pɛto mpe ekundaki mitindá ya Nzambe. (Matai 23:2) Bato bamiyokaki ete bazali lisusu na nguya te, na elikya te, to bakosami. (Matai 15:3-9) Mpe ebele ya mibeko oyo bato batyaki ezalaki konyokola bato. Ntango alingaki kobikisa moto oyo lobɔkɔ na ye ekaukaki, Yesu atunaki Bafalisai oyo bazalaki wana ete: “Na sabata ekoki kosala malamu?” Lokola bafandaki nyɛɛ elimbolaki ete engebene bango ezali mabe, Yesu ‘ayokaki mawa na ntina na nkaká na mitema na bango.’ (Malako 3:1-6) Bafalisai bakokaki kosalisa ebwele (oyo ezali lokola mosolo mobombami) oyo esundolami to oyo ezoki mpota na mokolo ya sabata kasi bakoki kosala bongo te epai ya moto, mobali to mwasi—ata soki bomoi na ye ezali na likámá. Ya solo, bamizindisaki mpenza kati na mibeko ya bato mpe na makambo mikemike nyonso oyo yango ezalaki kosengisa, lokola bansɛlɛlɛ oyo bazali kotambolatambola likoló ya liyemi, balóngaki te komona liyemi mobimba— oyo ezali bongo mitindá ya Nzambe.—Matai 23:23, 24.
Nzokande, ezala bana mike, soki mitema na bango mizali sembo, bakoki kokumisa Yehova na nzela ya bosepeli na bango ya mitindá ya Biblia. Molakisi ya Rebeka, elenge ya mbula zomi na misato, atunaki banakelasi soki nani akoki kobɛta masano ya mbongo. Mingi balobaki ete bakoki kobɛta yango te. Kasi, ntango alobelaki ebele ya makambo makeseni, longola bobele Rebeka, bango nyonso bandimaki ete bakoki kobɛta na lolenge moko to mosusu. Molakisi atunaki Rebeka soki akoki kosomba tiké ya loterie na 0.2 dolare soki ezali mpo na likambo moko ya ntina. Rebeka alobaki ete te mpe alimbolaki bantina uta na Makomami oyo emonisaki ete soki akosala bongo ekozala moko ya masano ya mbongo. Mpe molakisi na ye alobaki na bana kelasi nyonso ete: ‘Mpo na ngai, na esika oyo tozali, bobele Rebeka moto azali na oyo ngai nabéngi “mitindá” na ndimbola na yango ya sikisiki.’ Ɛɛ, Rebeka akokaki bobele koloba ete, “lingomba na ngai epekisi yango,” kasi akanisaki mozindo koleka maloba wana; ayanolaki mpo na nini masano ya mbongo ezali mabe mpe mpo na nini azalaki koboya kosangana na yango.
Bandakisa lokola ya Abele, ya Noa, ya Yosefe, mpe ya Yesu ezali komonisa biso lolenge tozali kozwa litomba na kosaleláká “likoki na biso ya kokanisa” mpe “nguya ya bososoli” na biso na kosambela Nzambe. (Masese 2:11; Baloma 12:1, NW) Bankulutu baklisto bakosala malamu na komekola Yesu wana bazali “kobatela etónga ya Nzambe kati na bango.” (1 Petelo 5:2) Lokola Yesu amonisaki yango na ndakisa, bato oyo balingaka kotosa mitindá ya Nzambe bakokóla na nsé ya boyangeli ya Yehova.—Yisaya 65:14.