Bomoi ya Yesu mpe mosala na ye
Ayoki mawa mingi kati na elanga ya Getesemane
NTANGO Yesu asilisaki kobondela,ye mpe bantoma na ye ya sembo 11 bayembi banzembo ya masanzoli mpo na Jéhovah. Mpe bakiti longwa na eteni ya ndako na mokili ya likoló (chambre haute), babimi na butu na mpio mpe bakatisi lobwako ya Cédron mpo na kokende na Betania. Kasi, na nzela, bafandi mwa ntango na esika oyo balingaki mingi, elanga ya Getesemane, oyo ezali na ngomba ya Oliviers to mpe pene na yango. Mbala na mbala Yesu azalaki koyangana elongo na bantoma na ye na esika wana, na nse na banzete ya Oliviers.
Kotikáká bantoma mwambe ntango mosusu pene na ekotelo ya elanga—, alobi na bango ete: “Bofanda naino nakei kuna kobondela.” Mpe azwi bantoma mosusu misato, Petelo, Yakobo mpe Yoane, mpe bakoti kati na elanga. Yesu amitungisi mpe ayoki mpasi mingi. Alobi na bango ete, “Molimo na ngai moyoki mawa mingi kino kufa mpenza Botikala awa mpe bokengela na ngai elongo.”
Kotangwáká mwa moke, Yesu akwei na mabelé mpe kotyáká elongi na nse, abandi kobondela na móto nyonso, ete: “Tata na ngai, soko ekoki, tika ete kopo oyo elongwa na ngai. Kasi lokola elingi ngai te nde lokola elingi yo.” Alingi mpenza koloba nini? Mpo na nini ‘ayoki mawa mingi kino kufa’? Alingi nde kobongola ekateli na ye ya kokufa mpe komipesa lokota lisiko?
Soko moke te! Yesu asengi te ete balongolela ye liwa. Bobele likanisi mpamba oyo Petelo apesaki ye mbala mosusu mpo na kopengola kufa lokola mbeka, esepelisaki ye te. Na solo, Yesu ayoki mawa mingi mpo azali kobanga noki ete motindo na liwa akokufela mosika te lokola oyo na moto mabe mpenza ebwaka nsoni likoló na nkombo ya Tata na ye. Azali komiyoka sikawa ete nsima na mwa bangonga, ekobakama na nzete lokola moto oyo aleki mabe, motuki! Tala likambo oyo lizali kopesa ye mpasi mingi.
Nsima na libondeli na ye molai. Yesu azongi mpe akuti bantoma misato na mpongi. Alobi na Petelo ete: “Bongo, boyebaki kokengela na ngai kino ntango moko te? Bokengelaka mpe bobondelaka ete boingela na komekama te. “Nzokande na Kososoláká ete batungisami mingi mpe ntango ekei mosika, abakisi ete: “Elimo ezali solo na molende, nde nzoto ezali na bolembu.”
Yesu akei lisusu mpo na mbala ya mibale mpo na kosenga na Tata na ye ete alongola “kopo” oyo ezali komonisa mokumba oyo Jéhovah asili kopesa ye, mokano na ye mpo na Yesu. Ezongi ye, akuti lisusu bantoma misato na mpongi nzokande bakokaki kobondela mpo ete baingela na komekama te. Wana Yesu azali koloba na bango, bayebi eloko ya koyanola ye te.
Na nsuka, atangwaki na bango mpo na mbala ya misato, na ntáká ya mwa bametele, nsima afukami mpe, na konganga mpe na mpisoli, Yesu abondeli Nzambe ete: “Tata, soki okani boye, longola kopo oyo na ngai.” Yesu azali koyoka mpasi mpenza na ntina na nsoni oyo liwa na ye lokola moto na mabe ekobwaka likoló na nkombo ya Tata na ye. Likanisi oyo ya kokweisama lokola motuki moto oyo azali kolakela Nzambe mabe endimamaki na ye te.
Atako bongo, Yesu alandi bobele kobondela na kolobáká ete: “Nde mokano na ngai esalema te, kasi mokano na yo.” Na kotosáká, atyé mokano na ye na nse na oyo ya Nzambe. Na ntango wana anzelu moko ya likoló abimeli ye mpe ayikisi ye mpiko na maloba na kolendisa. Na lolenge emonani mpenza, alobi na ye ete andimami na Tata.
Nzokande, Yesu amemi mpenza mokumba monene. Bomoi ya seko na ye moko mpe ya bato nyonso ezali na likámá. Mpasi ekomi makasi. Yesu mpe abondeli lisusu na molende mingi; mpe motoki ekómi lokola makila mazali kotanga na nse. Zulunalo moko elobeli makambo ya lopitalo (Journal de l’association des médecins américains) elobi ete: “Atako ezali likambo oyo lisalemaka mingi te, ekoki mbala mosusu kokóma ete moto abima makila lokola motoki . . . na ntango atungisami mingi.”
Na nsima, Yesu azongi mpo na mbala ya misato epai na bayekoli na ye mpe akuti bango lisusu na mpongi. Balembi likoló na mawa oyo bazali na yango. Mpe alobi ete: “Bozali naino kolala? Bozali naino kopema? Ekoki! Ntango esili koya! Bazali kokaba Mwana na moto na maboko na bato na masumu. Botelema! Tokende! Botala mokabi na ngai abelemi.”
Wana ezali ye naino koloba, Yuda lskariota abelemi, elongo na ebele na bato bamemi mpaká (torches), miinda mpe bibundeli.—Matai 26:30, 36-47; 16:21-23; Malako 14:26; 32-43; Luka 22:39-47; Yoane 18:1-3; Baebele 5:7.
◆ Nsima na kokita longwa na eteni na mokili ya likoló, epai wapi Yesu amemi bantoma mpe akosala nini na esika yango?
◆ Bantoma bazali kosala nini wana Yesu azali kobondela?
◆ Mpo na nini Yesu ayoki mawa mingi, mpe libondeli nini asali epai na Nzambe?
◆ Likambo oyo ete motoki na Yesu ekomi lokola makila emonisi nini?