MOKAPO 127
Nsima ya kosamba na Sanedrina, bamemi ye epai ya Pilate
MATAI 27:1-11 MARKO 15:1 LUKA 22:66–23:3 YOANE 18:28-35
ASAMBI LIBOSO YA SANEDRINA NA NTƆNGƆ
YUDASI MOKERIOTA AMITYE NSINGA NA NKINGO NA NZETE
PILATE AKATELI YESU ETUMBU YA LIWA
Ntɔngɔ ebandi kotana wana Petro awangani Yesu mbala ya misato. Basambisi ya Sanedrina basilisi kosambisa Yesu likolólikoló mpe bapalangani. Bayangani lisusu na ntɔngɔ ya mokolo ya mitano, na ntembe te mpo bábomba mabe oyo basalaki ndenge basambisaki Yesu butubutu. Babengi lisusu Yesu.
Batuni ye lisusu: “Soki ozali Kristo, yebisá biso.” Yesu ayanoli: “Ata soki nayebisi bino, bokondima yango ata moke te. Lisusu, soki ngai natuni bino motuna, bokopesa eyano ata moke te.” Kasi, na mpiko nyonso Yesu ayebisi bango ete Danyele 7:13 elobelaki nde ye. Alobi: “Banda sikoyo, Mwana ya moto akofanda na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe oyo etondi na nguya.”—Luka 22:67-69; Matai 26:63.
Batuni lisusu: “Boye yo ozali Mwana ya Nzambe?” Yesu ayanoli: “Bino moko bozali koloba ete ngai nazali ye.” Bamoni ete Yesu abongi na liwa mpo koloba bongo ezali kofinga Nzambe. Batuni: “Ntina nini tóluka lisusu litatoli?” (Luka 22:70, 71; Marko 14:64) Na yango, bakangi Yesu bansinga mpe bakei na ye epai ya Ponse Pilate, guvɛrnɛrɛ Moroma.
Mbala mosusu Yudasi Mokeriota amoni ndenge bazali kokende na Yesu epai ya Pilate. Ntango amoni ete bakateli Yesu etumbu ya liwa, ayoki mwa mawa mpe asili mayele. Kasi, na esika abongola motema mpe azongela Nzambe, akei nde kozongisa shekele ya palata 30 oyo bapesaki ye. Yudasi alobi na banganga-nzambe bakonzi: “Nasalaki lisumu lokola natɛkaki makila ya boyengebene.” Bazongiseli ye na lityo ete: “Yango etali biso na nini? Etali yo moko!”—Matai 27:4.
Yudasi abwaki shekele ya palata 30 yango na tempelo mpe akei kosala mabe mosusu—komiboma. Ntango amitye nsinga na nkingo, emonani ete etape ya nzete oyo akangaki nsinga yango ebukani. Bongo akwei likoló ya libanga, apasuki na katikati.—Misala 1:17, 18.
Ezali naino ntɔngɔ makasi ntango bakei na Yesu na ndako ya Ponse Pilate. Kasi Bayuda oyo bakei na ye baboyi kokɔta. Bamoni ete kokutana ndenge wana na bato ya bikólo mosusu ekokómisa bango mbindo. Soki bakómi mbindo, bakolya te bilei ya mokolo ya 15 Nisana, mokolo ya liboso ya Fɛti ya bagato ezangá levire, oyo mpo na bango ezali na kati ya fɛti ya Elekeli.
Pilate abimi libándá mpe atuni bango: “Bozali kofunda moto oyo na likambo nini?” Bazongiseli ye ete: “Soki moto oyo azalaki mosali mabe te, mbɛlɛ tokabi ye epai na yo te.” Mbala mosusu Pilate amoni ete bazali kotya ye mpanzi likoló, yango wana alobi: “Bókamata ye bino moko mpe bósambisa ye na kolanda mibeko na bino.” Bayuda bamonisi ete mposa na bango ezali ete Yesu abomama, balobi: “Topesami nzela ya koboma moto te.”—Yoane 18:29-31.
Ya solo, soki babomi Yesu na ntango ya fɛti ya Elekeli, yikiyiki monene ekoki kobima. Kasi, soki bato ya Roma babomi Yesu mpo azali kotɛmɛla Kaisala, mpo bazali na lotomo ya kosala yango, Bayuda bakozala na ngambo te liboso ya bato.
Bakonzi ya mangomba bayebisi Pilate te ete bakatelaki Yesu etumbu ya liwa mpo afingi Nzambe. Babimisi bifundeli ya lokuta, balobi: “Tokuti moto oyo [1] azali kokɔtisa mobulu na ekólo na biso, [2] azali kopekisa kofuta Kaisala mpako, mpe [3] koloba ete ye nde Kristo mokonzi.”—Luka 23:2.
Lokola Pilate azali momonisi ya Roma, koyoka ete Yesu azali komibenga mokonzi ebendi likebi na ye. Na yango, Pilate azongi na kati ya ndako, abengi Yesu mpe atuni ye: “Yo ozali mokonzi ya Bayuda?” Na maloba mosusu, ‘Oyebi ete obuki mibeko ndenge ozali komibenga mokonzi, mpo ezali kotɛmɛla Kaisala?’ Mbala mosusu mpo na koyeba makambo oyo Pilate ayebi mpo na ye, Yesu atuni ye: “Ezali yo moko nde olobi bongo, to bato mosusu nde bayebisi yo yango mpo na ngai?”—Yoane 18:33, 34.
Pilate amonisi ete ayebi Yesu te, kasi alingi koyeba ye; alobi: “Ngai nazali Moyuda te, boye te?” Abakisi: “Ekólo na yo moko mpe banganga-nzambe bakonzi bakabi yo epai na ngai. Osali nini?”—Yoane 18:35.
Yesu ayebi ete azali kolobela likambo ya bokonzi. Apesi biyano oyo ekamwisi mpenza Guvɛrnɛrɛ Pilate.