MOKAPO 132
“Ya solo moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe”
MATAI 27:45-56 MARKO 15:33-41 LUKA 23:44-49 YOANE 19:25-30
YESU AKUFI NA NZETE
MAKAMBO YA NSƆMƆ ESALEMI NA LIWA YA YESU
Ekómi sikoyo “ngonga ya motoba,” to midi. Molili moko makasi ekɔti “na mokili wana mobimba tii na ngonga ya libwa,” elingi koloba ngonga ya misato nsima ya midi. (Marko 15:33) Molili yango ya nsɔmɔ ekɔti te mpo na ekilipisi (sanza ezipi moi). Likambo wana esalemaka nde ntango sanza ebimi sika, nzokande awa tozali na eleko ya Elekeli, sanza ekómi mobimba. Molili yango eumeli mingi koleka ekilipisi (sanza ezipaka moi kaka mwa miniti moke). Na yango, Nzambe nde atindi molili yango.
Kanisá ndenge bato oyo bazali kosɛka Yesu bayoki. Na kati ya molili yango, basi minei bapusani pene na nzete ya mpasi. Ezali mama ya Yesu, Salome, Maria Magadalena mpe Maria mama ya Yakobo Moke.
Ntoma Yoane atɛlɛmi “pene ya nzete ya mpasi” elongo na mama ya Yesu, oyo azali kolela. Maria azali kotala ndenge mwana oyo amemaki na libumu na ye mpe abɔkɔlaki azali konyokwama na nzete ya mpasi. Maria azali koyoka lokola batɔbɔli ye na “mopanga molai.” (Yoane 19:25; Luka 2:35) Atako Yesu azali na mpasi makasi, abosani mama na ye te. Asali makasi mpo atala Yoane mpe alobi na mama na ye ete: “Mwasi, talá! Mwana na yo!” Na nsima, atali Maria mpe alobi na Yoane: “Talá! Mama na yo!”—Yoane 19:26, 27.
Yesu atikeli ntoma oyo alingaka mingi mokumba ya kobatela mama na ye, oyo emonani sikoyo ete azali lisusu na mobali te. Yesu ayebi ete baleki na ye, bana mosusu ya Maria, bandimeli ye naino te. Yango wana, azwi bibongiseli mpo na bolamu ya mama na ye, ezala na mosuni mpe na elimo. Ezali ndakisa ya malamu mpenza!
Ntango molili esili, Yesu alobi: “Nazali na mposa ya mai.” Yango ekokisi mpe esakweli ya Biblia. (Yoane 19:28; Nzembo 22:15) Yesu ayoki lokola nde Tata na ye alongoli libateli na ye nyonso, mpo bosembo ya Mwana na ye emekama mpenza tii na nsuka. Kristo abeleli (mbala mosusu na monɔkɔ ya Aramɛyɛ ya bato ya Galile) ete: “Eli, Eli, lama sabakatani?” oyo soki babongoli elakisi: “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?” Bato mosusu oyo bazali wana bakangi ntina te mpe balobi: “Talá! Azali kobenga Eliya.” Kasi moko na bango apoti mbangu mpe apɔlisi linyuka moko na vinyo ya ngayi, atye yango na nsuka ya mongendu, apesi Yesu amɛla. Kasi bato mosusu balobi: “Tiká ye! Tótala soki Eliya akoya kokitisa ye.”—Marko 15:34-36.
Na nsima Yesu agangi: “Ekokisami!” (Yoane 19:30) Ya solo, asali makambo nyonso oyo Tata na ye atindaki ye asala na mabele. Na nsuka, Yesu alobi: “Tata, natiki elimo na ngai na mabɔkɔ na yo.” (Luka 23:46) Na yango, Yesu atiki bomoi na ye na mabɔkɔ ya Yehova, na elikya ete akozongisela ye yango. Lokola Kristo atyeli Nzambe motema mobimba, akitisi motó mpe akufi.
Na ntango yango, mabele eningani mpe epasoli mabanga. Koningana ya mabele yango ezali makasi mpe malita oyo ezali na libándá ya Yerusaleme efungwami mpe bibembe ebimi. Bato oyo bamoni bibembe yango bakɔti “na engumba mosantu” mpe bayebisi basusu makambo oyo bamoni.—Matai 12:11; 27:51-53.
Ntango Yesu akufi, rido molai mpe ya kilo oyo ekaboli Esika Mosantu ná Esika oyo Eleki Bosantu na tempelo ya Nzambe epasuki na mibale, banda likoló tii na nse. Likambo yango ya kokamwa emonisi nkanda ya Nzambe mpo na bato oyo babomi Mwana na ye mpe elimboli ete nzela ya kokɔta na Esika oyo Eleki Bosantu, na likoló, efungwami.—Baebre 9:2, 3; 10:19, 20.
Bato babangi makasi. Mokonzi ya basoda oyo bapesaki ye mokumba ya koboma Yesu alobi: “Ya solo moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe.” (Marko 15:39) Ekoki kozala ete azalaki ntango Pilate asambisaki Yesu mpe atunaki ye soki azali Mwana ya Nzambe. Sikoyo, andimi ete Yesu azali moyengebene, mpe azali mpenza Mwana ya Nzambe.
Bato mosusu babulungani na makambo yango mpe bazongi na bandako na bango, “bazali komibɛta na ntolo” mpo na mawa mpe nsɔni makasi. (Luka 23:48) Bato mosusu bazali kotala na mosika, na ndakisa ebele ya bayekoli ya basi oyo bazalaki kotambola na Yesu na ntango mosusu. Bango mpe bayoki nsɔmɔ mpo na makambo nyonso oyo esalemi.