“Kokisá mosala na yo ya ministre malamumalamu”
“Kokisá mosala na yo ya ministre malamumalamu”—2 TIMOTE 4:5.
1, 2. Atako baklisto nyonso bazali bapalanganisi ya nsango malamu, Biblia ezali kosɛnga nini epai ya bankulutu?
OZALI mosakoli ya Bokonzi? Soki ozali mosakoli, pesá Yehova Nzambe matɔndi mpo na libaku malamu wana. Ozali nkulutu na lisangá? Yango mpe ezali libaku malamu oyo Yehova abakiseli yo. Kasi, tosengeli kobosana te ete ezali mayele ya kelasi te to koyeba koloba nde epesaka moto nzela ya kozala ministre to mpe mokɛngɛli na lisangá. Yehova azali kobongisa biso malamumalamu mpo na mosala, mpe soki bamosusu kati na biso bazali bakɛngɛli, ezali mpo bakokisi masɛngami ya Biblia.—2 Bakolinti 3:5, 6; 1 Timote 3:1-7.
2 Moklisto nyonso oyo amipesi na Nzambe azali mopalanganisi ya nsango malamu; kasi, mingimingi bakɛngɛli to bankulutu basengeli kopesa ndakisa na mosala ya kosakola. Nzambe ná Klisto basepelaka na bankulutu “oyo bazali kosala mosala makasi na koloba mpe na koteya”; ata mpe baninga na bango Batatoli ya Yehova basepelaka na bango. (1 Timote 5:17; Baefese 5:23; Baebele 6:10-12) Mateya ya nkulutu esengeli ntango nyonso kolendisaka na elimo, mpamba te, ntoma Paulo alobaki na Timote, oyo azalaki mokɛngɛli, ete: “Ekozala na eleko moko boye oyo bakokoka te mateya oyo epesaka litomba, kasi, na boyokani na bamposa na bango moko, bakomindukela bateyi mpo básalaka bango nyɔminyɔmi na matoi; mpe bakolongola matoi na bango uta na solo, nzokande bakobaluka epai ya masapo ya lokuta. Kasi yo, batelá makanisi na yo na makambo nyonso, ndimá komona mpasi, salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu, kokisá mosala na yo ya ministre malamumalamu.”—2 Timote 4:3-5.
3. Esengeli kosala nini mpo mateya ya lokuta ekɔta na lisangá te?
3 Mpo na kobatela lisangá ete mateya ya lokuta ekɔta te, nkulutu asengeli kolanda toli ya Paulo oyo: “Batelá makanisi na yo na makambo nyonso, . . . kokisá mosala na yo ya ministre malamumalamu.” (2 Timote 4:5) Esengeli mpenza ete nkulutu ‘akokisa mosala na ye ya ministre malamumalamu.’ Asengeli kokokisa yango nyonso, na mobimba na yango. Nkulutu oyo azali kokokisa mosala na ye ya ministre malamumalamu atyelaka mikumba na ye nyonso likebi, abosanaka mosusu te, asalaka yango mpe ndambo te. Moto ya ndenge wana azali sembo ata na makambo mike.—Luka 12:48; 16:10.
4. Nini ekoki kosalisa biso na kokokisa mosala na biso ya ministre malamumalamu?
4 Mpo na kokokisa mosala na biso ya ministre malamumalamu, esɛngaka kaka te kozala na ntango mingi kasi esɛngaka nde kosalela ntango malamu. Kokabola malamu ntango mpe kosalela yango na ndenge esengeli ekoki kosalisa baklisto nyonso na kosala mingi na mosala ya kosakola. Mpo nkulutu asakolaka mingi, asengeli kobongisa programɛ na ye malamu mpe koyeba mikumba nini akoki kotikela bato mosusu mpe ndenge oyo akoki kosala yango. (Baebele 13:17) Kasi, nkulutu ya malamu ye moko mpe asalaka, lokola Nehemia oyo apesaki mabɔkɔ na mosala ya kotonga lisusu lopango ya Yelusaleme. (Nehemia 5:16) Longola bankulutu, basaleli nyonso ya Yehova basengeli mpe kosanganaka pɔsɔ na pɔsɔ na mosala ya kosakola Bokonzi.—1 Bakolinti 9:16-18.
5. Ndenge nini tosengeli kotalelaka mosala ya kosakola?
5 Bapesi biso mosala ya esengo ya kosakola Bokonzi oyo ezali sikoyo koyangela na likoló! Ntembe ezali te ete tosepelaka na libaku malamu ya kosangana na mosala ya kosakola nsango malamu na mabelé mobimba oyo efandami liboso nsuka eya. (Matai 24:14) Atako tozali bato ya kozanga kokoka, maloba ya Paulo ekoki kolendisa biso; alobaki boye: “Tozali na eloko oyo ya motuya [mosala ya kosakola] na kati ya bambɛki ya mabelé, mpo nguya oyo eleki makasi ezala ya Nzambe kasi te oyo euti na biso moko.” (2 Bakolinti 4:7) Ya solo, na makasi mpe bwanya ya Nzambe, tokoki kosala mosala ya malamu.—1 Bakolinti 1:26-31.
Tozali komonisa nkembo ya Nzambe
6. Bokeseni nini ezali kati na ekólo Yisalaele mpe Yisalaele ya elimo?
6 Paulo azalaki kokanisa baklisto bapakolami ntango alobaki ete Nzambe “akómisi biso bato oyo bakoki malamumalamu mpo na kozala baministre ya kondimana ya sika.” Ntoma yango amonisaki bokeseni oyo ezali na kati ya kondimana ya sika oyo Nzambe asali na Yisalaele ya elimo na nzela ya Yesu Klisto mpe kondimana ya Mibeko oyo Nzambe asalaki na libota ya Yisalaele na nzela ya Moize. Paulo abakisaki ete ntango Moize akitaki na Ngomba Sinai ná mabanga oyo bakomaki Mibeko Zomi, elongi na ye ezalaki kongɛnga makasi na boye ete Bayisalaele bakokaki kotala ye mpenza te. Kasi, na nsima, likambo moko mabe mpenza esalemaki mpamba te “makoki na bango ya kokanisa elɛmbaki” mpe elamba moko ezipaki mitema na bango. Kasi, ntango moto amipesi epai ya Yehova na motema mobimba, elamba yango elongwaka. Na nsima, Paulo alobelaki mosala oyo Nzambe apesi bato oyo asali na bango kondimana ya sika ete: “Biso nyonso, na bilongi bizipwami, tozali lokola talatala kongɛngisa nkembo ya Yehova.” (2 Bakolinti 3:6-8, 14-18; Exode 34:29-35) Lelo oyo, ata mpe “bampate mosusu” ya Yesu bazali na libaku malamu ya kongɛngisa nkembo ya Yehova.—Yoane 10:16.
7. Ndenge nini bato bakoki komonisa nkembo ya Nzambe?
7 Ndenge nini bato ya masumu bakoki komonisa nkembo ya Nzambe, nzokande moto moko te akoki komona elongi na ye mpe kotikala na bomoi? (Exode 33:20) Toyebi ete Yehova azali na nkembo, kasi longola yango, azali mpe na mokano monene ya kolongisa boyangeli na ye na nzela ya Bokonzi. Solo ya Bokonzi ezali na kati ya “makambo minene ya Nzambe” oyo bato oyo bazwaki elimo santu mokolo ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.) babandaki kosakola. (Misala 2:11) Na lisalisi ya elimo, bakokaki kokokisa malamumalamu mosala oyo bapesaki bango.—Misala 1:8.
8. Na oyo etali mosala ya ministre, Paulo azalaki na ekateli nini?
8 Paulo azalaki na ekateli ya kotika eloko moko te epekisa ye kokokisa mosala na ye ya ministre malamumalamu. Akomaki boye: “Lokola tozwi mosala oyo ya ministre engebene motema mawa oyo emonisamaki epai na biso, tozali kotika te; kasi tobwaki makambo ya kobombama oyo eyokisaka nsɔni, tozali te kotambola na mayele mabe, tozali mpe te kobebisa liloba ya Nzambe, kasi na komonisáká solo polele tozali komilobela biso moko epai ya lisosoli ya bato nyonso na miso ya Nzambe.” (2 Bakolinti 4:1, 2) Na nzela ya oyo Paulo abengaki “mosala oyo ya ministre,” tozali komonisa solo mpe tozali kopalanganisa pole ya elimo.
9, 10. Ndenge nini tokoki kongɛngisa nkembo ya Yehova?
9 Mpo na Moto oyo apesaka pole ya elimo mpe ya moi, Paulo akomaki boye: “Nzambe nde moto alobaki ete: ‘Tiká pole engɛnga uta na molili,’ mpe angɛngi na mitema na biso mpo na kongɛngisa bango na boyebi ya nkembo ya Nzambe na nzela ya elongi ya Klisto.” (2 Bakolinti 4:6; Genese 1:2-5) Lokola tozwi lokumu monene ya kozala baministre ya Nzambe, tómibatela pɛto mpo tóngɛngisa nkembo ya Yehova lokola talatala.
10 Bato oyo bazali na molili na elimo bakoki te komona nkembo ya Yehova to kongɛnga na yango na nzela ya Yesu Klisto, Moize Monene. Kasi, biso basaleli ya Yehova tozali kozwa pole ya nkembo na kati ya Biblia mpe tozali komonisa yango epai ya bato mosusu. Mpo bato oyo bazali na molili bábomama te, basengeli kozwa pole ya Nzambe. Yango wana, na esengo monene mpe na molende nyonso, tozali kotosa etinda ya Nzambe ya kongɛngisa nkembo ya Yehova na molili.
Ngɛngisá pole na yo ntango ozali koyekola na bato Biblia
11. Yesu alobaki nini na ntina etali kongɛngisa pole na biso, mpe wapi lolenge moko oyo tokoki kongɛngisa pole yango na mosala ya kosakola?
11 Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bino bozali pole ya mokili. Engumba ekoki te kobombama ntango ezali likoló ya ngomba. Bapelisaka mwinda mpe batyaka yango, na nse ya ekɔlɔ ya komekela te, kasi likoló ya etɛlɛmiseli-ya-mwinda, mpe engɛngɛlaka baoyo nyonso bazali na kati ya ndako. Ndenge moko mpe tiká ete pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu mpe bápesa nkembo epai ya Tata na bino oyo azali na likoló.” (Matai 5:14-16) Etamboli malamu na biso ekoki kotinda bato mosusu bápesa Nzambe nkembo. (1 Petelo 2:12) Lisusu, mitindo ndenge na ndenge ya mosala ya kopalanganisa nsango malamu epesaka biso mabaku mingi ya kongɛngisa pole na biso. Moko na mikano na biso ya liboso ezali ya kongɛngisa pole ya Liloba ya Nzambe ntango tozali koyekola malamu Biblia na bato. Yango ezali lolenge moko ya ntina mingi ya kokokisa mosala na biso malamumalamu. Makanisi nini ekoki kosalisa biso na kosimba mitema ya bato oyo bazali koluka solo?
12. Mpo na nini ezali na ntina tóbondelaka mpo na koyekola Biblia na bato?
12 Soki tozali kobondela Yehova mpo na kozwa bato ya koyekola na bango Biblia, ekomonana ete ezali mpenza mposa na biso. Yango ekomonisa mpe ete tozali koyeba ntina ya kosalisa basusu bázwa boyebi ya Nzambe. (Ezekiele 33:7-9) Yehova akozanga te koyoka mabondeli na biso mpe akopambola milende na biso na mosala ya kosakola. (1 Yoane 5:14, 15) Kasi, tosengeli kobondela kaka te mpo na kozwa moto oyo tokoki koyekola na ye Biblia. Ntango tobandi koyekola Biblia na moto, soki tozali kobondela Yehova mpo na ye mpe tozali kokanisa bamposa na ye, ekosalisa biso tóyekolaka malamu mbala nyonso oyo tokutani na ye.—Baloma 12:12.
13. Nini ekoki kosalisa biso mpo tóyekolaka malamu Biblia na bato?
13 Mpo na koyekola malamu na bato, esengeli tómibongisaka liboso ya boyekoli nyonso. Soki tozali komiyoka ete tokokoka te, tokoki kotalaka ndenge oyo mokɛngɛli na Boyekoli ya mokanda atambwisaka mokapo mokomoko na boyekoli ya mokanda pɔsɔ na pɔsɔ. Na mabaku mosusu, tokoki kobima na basakoli oyo batambwisaka boyekoli malamu. Kasi, tosengeli mingimingi kotalelaka makanisi mpe mayele ya koteya ya Yesu Klisto.
14. Ndenge nini tokoki kosimba motema ya moyekoli ya Biblia?
14 Yesu azalaki kosepela kokokisa mokano ya Tata na ye ya likoló mpe koyebisa bato makambo ya Nzambe. (Nzembo 40:8) Azalaki na komikitisa na motema mpe ayebaki kosimba mitema ya bato. (Matai 11:28-30) Yango wana, biso mpe tósala makasi mpo na kosimba mitema ya bato oyo toyekolaka na bango Biblia. Mpo na kolonga, tosengeli kobongisaka liteya mokomoko mpe ntango tozali kobongisa yango, tókanisaka moyekoli yango mpe makambo na ye. Na ndakisa, soki azali moto oyo akolá na mboka oyo bayebi makambo ya Biblia te, mbala mosusu ekosɛnga tóndimisa ye naino ete Biblia elobaka solo. Na ntembe te, yango ekosɛnga tótánga bavɛrsɛ mingi mpe tólimbola yango.
Tósalisa bayekoli bákanga ntina ya bandakisa
15, 16. (a) Ndenge nini tokoki kosalisa moyekoli oyo azali kokanga ntina te ya ndakisa moko ya Biblia? (b) Tokoki kosala nini soki mokanda esaleli ndakisa oyo moyekoli ya Biblia azali kokanga ntina na yango te?
15 Ekoki kozala ete moyekoli azali kokanga ntina te ya ndakisa moko ya Biblia. Na ndakisa, ekoki kozala ete azali koyeba te soki Yesu alingaki mpenza koloba nini ntango alobelaki kotya mwinda na etɛlɛmiseli-ya-mwinda. (Malako 4:21, 22) Yesu alobelaki mwinda moko oyo bazalaki kosalela na ntango ya kala; ezalaki na nsinga oyo ezalaki kopela na mafuta. Bazalaki kotya mwinda yango na esika moko oyo babongisaki mpo na yango, epai ekokaki kongɛngisa ndako. Soki otángi mitó ya makambo “Lampe” mpe “Porte-lampe” na buku Étude perspicace des Écritures, ekoki kosalisa yo olimbola malamu ndakisa ya Yesu.a Ezalaka esengo mingi soki olimbweli moyekoli likambo moko, akangi ntina na yango mpe asepeli na yango!
16 Mokanda oyo bozali koyekola ekoki kopesa ndakisa moko oyo moyekoli azali kokanga ntina na yango te. Limbwelá ye yango malɛmbɛmalɛmbɛ, to mpe luká ndakisa mosusu oyo ezali kolimbola likanisi wana. Na ndakisa, mokanda ekoki komonisa ete, na kati ya libala, ezali na ntina moto azala na molongani oyo abongi mpe bápesana mabɔkɔ. Mpo na yango, mokanda ekoki kopesa ndakisa ya moto moko oyo azali kodiembela na nsinga, amitiki, mpe moto mosusu oyo azali mpe kodiembela na nsinga mosusu ayambi ye. Mpo na komonisa ntina ya molongani ya malamu mpe kopesana mabɔkɔ, ndakisa mosusu oyo tokoki kosalela ekoki kozala ya baninga ya mosala oyo bazali kolekisana bakartɔ mpo na kobimisa yango na masuwa.
17. Ndenge oyo Yesu azalaki kosalela bandakisa ekoki koteya biso nini?
17 Mpo na kosalela ndakisa mosusu, ekoki kosɛnga komibongisa liboso. Kasi, ezali ndenge ya komonisa ete tozali mpenza komibanzabanza mpo na moyekoli. Yesu azalaki kosalela bandakisa ya pɛtɛɛ mpo na kolimbola makambo ya makasi. Lisolo Likoló ya Ngomba ezali komonisa yango; Biblia mpe ezali komonisa ete mateya na ye ezalaki kosimba mitema ya bato. (Matai 5:1–7:29) Yesu azalaki na motema molai mpo na kolimbola makambo mpo azalaki komibanzabanza mpo na bato.—Matai 16:5-12.
18. Makanisi nini bapesi biso mpo na bavɛrsɛ oyo batángi maloba na yango te?
18 Kosepela mpenza na bato ekotinda biso ‘tósolola elongo na bango uta na Makomami.’ (Misala 17:2, 3) Yango ezali kosɛnga tóyekolaka mpenza mpe tóbondelaka mingi mpe tóyeba kosalela mikanda oyo “kapita ya sembo” azali kobimisela biso. (Luka 12:42-44) Na ndakisa, buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko ezali na ebele ya bavɛrsɛ ya Biblia.b Lokola ezali buku moke, bavɛrsɛ mosusu batángi maloba na yango te. Ntango tozali koyekola, ezali na ntina tótángaka mpe tólimbolaka bavɛrsɛ mosusu oyo batángi maloba na yango te. Toteyaka nde Liloba ya Nzambe, mpe liloba yango ezali na nguya mingi. (Baebele 4:12) Lobeláká Biblia banda ebandeli tii nsuka ya boyekoli nyonso, bimisáká makanisi ya bavɛrsɛ oyo epesami na baparagrafe. Salisá moyekoli amona oyo Biblia elobi na ntina na likambo to etamboli moko boye. Salá makasi mpo na komonisa ye matomba oyo akoki kozwa soki azali kotosa Nzambe.—Yisaya 48:17, 18.
Tuná mituna oyo ezali kotinda moto akanisa
19, 20. (a) Mpo na nini tosengeli kotuna mituna oyo esɛngaka moto apesa makanisi na ye? (b) Tokosala ndenge nini soki ezali kosɛnga tósolola likambo moko na mozindo?
19 Mayele ya Yesu mpo na kotuna mituna ezalaki kosalisa bato na kokanisa. (Matai 17:24-27) Soki tozali kotuna moyekoli mituna oyo ezali kosɛnga apesa makanisi na ye, kasi tozali kosala yango na ndenge oyo ekoyokisa ye nsɔni te, biyano na ye ekoki komonisa likanisi na ye na likambo moko. Mbala mosusu tokoki komona ete azali naino na makanisi oyo eyokani te na mateya ya Biblia. Na ndakisa, ekoki kozala ete andimaka Bosato. Mokapo 3 ya buku Boyebi emonisi ete liloba “Bosato” ezali na Biblia te. Buku yango epesi bavɛrsɛ mingi mpe etángi maloba ya bavɛrsɛ mosusu mpo na komonisa ete Yehova ná Yesu bazali bato mibale bakeseni mpe ete elimo santu ezali moto te, kasi nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala. Mbala mosusu tokoki kosuka kaka na kotánga mpe kolimbola bavɛrsɛ yango. Kasi, tokosala ndenge nini soki emonani ete tosengeli kokɔta mwa moke na mozindo? Mbala mosusu, nsima ya boyekoli ya mbala ekoya, tokoki kozwa mwa miniti mpo na kolobela likambo yango na mokanda mosusu ya Batatoli ya Yehova, na ndakisa mwa buku Osengeli kondima Trinité? Na nsima, tokozonga na buku Boyebi.
20 Soki na ndakisa totuni moyekoli motuna oyo ezali kosɛnga apesa makanisi na ye mpe apesi biso eyano oyo tokanisaki te. Soki ezali likambo ya komɛla likaya, to likambo mosusu ya mwa kwɔkɔsɔ, tokoki kosɛnga ete tókoba naino boyekoli mpe tólobela likambo yango nsima. Soki toyebi ete moyekoli azali naino momɛli likaya, tokozwa ntango ya koluka na mikanda makanisi oyo ekoki kosalisa ye akola na elimo. Longolá milende oyo tozali kosala mpo na kosimba motema ya moyekoli, tokoki mpe kobondela Yehova asalisa ye akola na elimo.
21. Nini ekoki komonana soki tosaleli mayele ya koteya oyo ezali mpenza kokokisa bamposa ya moyekoli ya Biblia?
21 Soki tozali komibongisa malamu mpe na lisalisi ya Yehova, tokoki kolonga koteya na ndenge oyo ekosalisa moyekoli na bamposa na ye. Na mokemoke, tokoki kosalisa ye akóma kolinga Nzambe mingi. Tokoki mpe kosalisa ye akóma na limemya mpe na botɔndi mpo na ebongiseli ya Yehova. Toyokaka esengo mingi ntango bato oyo tozali koyekola na bango Biblia bandimi ete ‘Nzambe azali mpenza na kati na biso’! (1 Bakolinti 14:24, 25) Yango wana, tiká tóyekola malamu Biblia na bato mpe tósala nyonso oyo ekoki mpo na kosalisa bango bákóma bayekoli ya Yesu.
Eloko ya motuya oyo tosengeli kobatela
22, 23. Tosengeli na eloko nini mpo tókokisa mosala na biso malamumalamu?
22 Mpo tókokisa mosala na biso malamumalamu, tosengeli kotya motema na nguya ya Nzambe. Na ntina na mosala na biso ya ministre, Paulo akomelaki baninga na ye baklisto bapakolami boye: “Tozali na eloko oyo ya motuya na kati ya bambɛki ya mabelé, mpo nguya oyo eleki makasi ezala ya Nzambe kasi te oyo euti na biso moko.”—2 Bakolinti 4:7.
23 Tózala bapakolami to “bampate mosusu,” tozali lokola bambɛki ya mabelé. (Yoane 10:16) Kasi, Yehova akoki kopesa biso nguya oyo ekoki mpo tókokisa mikumba na biso ata soki tokutani na mikakatano ya ndenge nini. (Yoane 16:13; Bafilipi 4:13) Yango wana, tótyela Yehova motema mobimba, tólinga mingi mosala oyo apesi biso, mpe tókokisa mosala na biso ya ministre malamumalamu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okopesa eyano nini?
• Bankulutu bakoki kosala nini mpo na kokokisa mosala na bango ya ministre malamumalamu?
• Tokoki kosala nini mpo na kobongisa ndenge na biso ya koyekola Biblia na bato?
• Okosala nini soki moyekoli ya Biblia azali kokanga ntina te ya ndakisa moko to azali na mposa ya makanisi mosusu na likambo moko oyo boyekoli?
[Elilingi na lokasa 16]
Bankulutu bateyaka na lisangá mpe bapesaka bandeko mosusu formasyo na mosala ya kosakola
[Elilingi na lokasa 18]
Koyekola malamu Biblia na bato ezali lolenge moko ya kongɛngisa pole na biso