Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ndenge ya kobatela makanisi malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2014 | 15 Sanza ya 3
    • 8, 9. (a) Bomoi ya mwasi mobola oyo mobali akufá ezalaki ndenge nini? (b) Ekoki kozala ete mwasi yango amitungisaki mpo na likambo nini?

      8 Na tempelo ya Yerusaleme, Yesu amonaki mwasi moko mobola oyo mobali akufá. Ndakisa ya mwasi yango ekoki kosalisa biso tózala na makanisi malamu ata soki tozali na makoki mingi te. (Tángá Luka 21:1-4.) Tótalela naino bomoi ya mwasi yango. Ya liboso azalaki koyoka mpasi mpo na liwa ya mobali na ye. Ya mibale, bakonzi ya mangomba bazalaki lokoso mpe bazalaki kolyela basi oyo mibali na bango bakufá lokola ye, na esika ya kosalisa bango. (Luka 20:47) Azalaki mpenza mobola mpe akokaki kopesa makabo kaka mwa mbongo oyo ekokani na oyo mosali-bilanga akokaki kozwa nsima ya kosala mosala mwa ntango moke.

      9 Meká komona na makanisi ndenge mwasi yango amiyokaki ntango akɔtaki na lopango ya tempelo ná mwa mbongo ya bibende mibale. Azalaki nde kokanisa ete mbongo oyo akotya makabo ezali moke na kotalela oyo akokaki kopesa ntango mobali na ye azalaki na bomoi? Ekoki kozala ete amitungisaki ntango amonaki bato oyo bazalaki liboso na ye bazali kotya makabo ebele, mpe azalaki nde komituna soki likabo na ye ezali mpenza na motuya? Ata soki akanisaki bongo, kasi asalaki oyo akokaki kosala mpo na losambo ya solo.

  • Ndenge ya kobatela makanisi malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2014 | 15 Sanza ya 3
    • 11. Liteya nini okoki kozwa na lisolo ya mwasi mobola oyo mobali akufá?

      11 Makoki oyo tozali na yango nde ekoki kokata soki tokoki kopesa Yehova mingi to te. Bobange to maladi ekoki kopekisa bandeko mosusu basakolaka mingi. Basengeli nde kokanisa ete ntango oyo bazali kolekisa na mosala ya kosakola ezali na ntina te? Ata soki ozali elenge to na nzoto kolɔngɔnɔ, okoki kokanisa ete milende oyo ozali kosala, ezali moke mpenza na kotalela ebele ya bangonga oyo basaleli mosusu ya Nzambe bazali kolekisa mpo na kosambela ye. Atako bongo, lisolo ya mwasi mobola oyo mobali akufá eteyi biso ete Yehova amonaka mpe azwaka na motuya mingi likambo nyonso oyo tosali mpo na ye, mingimingi soki tosali yango na ntango ya mpasi. Kanisá naino makambo oyo osalaki mpo na losambo ya Yehova na boumeli ya mbula oyo eleki. Esɛngaki omipimela likambo moko ya ntina mingi mpo olekisa ata ngonga moko na mosala na ye? Soki ezali bongo, okoki komindimisa ete Yehova azwaki na motuya mosala oyo osalaki na ngonga wana moko. Soki, na ndakisa ya mwasi mobola oyo mobali akufá, ozali kosala nyonso oyo okoki na mosala ya Yehova, osengeli mpenza kondimisama ete ozali “na kati ya kondima.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto