Akokisaki mposa ya motema na ye
MPOSA na yo ezali ete omona Bokonzi ya Masiya koyangela na mabelé mobimba? Soki bongo, olingi mpenza mpe ozali kobondela ete elaká ya kopambola mabelé mobimba na nsé na Bokonzi ya likoló ekokana. Na yango, osengeli kozala na motema molai mpamba te “eloko ezelami nde ezwami te ekopesaka motema mpasi, kasi eloko eokelami mposa, ezali nzeté ya bomoi na ntango ezwami.”—Masese 13:12, NW; Yakobo 5:7, 8.
Eleki mibu 2 000 sikawa, Simeona mobali moko “na boyengebene mpe na kobanga Nzambe,” azalaki kofanda na Yelusaleme. Azalaki na kondima kati na bisakweli na ntina na Masiya, mpe azalaki na motema molai mpo na “[kozela, kobɔndisama ya Yisraele.”—Luka 2:25, NW.
Bisakweli na ntina na Masiya bizali kopesa elikya
Yehova nde ayebisaki mpenza esakweli ya liboso na ntina na Masiya—oyo epesaki elikya na bato na masumu mpe baoyo balakámaki na kufa. Nzambe asakolaki koya ya Mombotó (postérité) ya “mwasi” na ye to ebongiseli ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba.—Genese 3:15.
Ye abéngamaki mombotó ya Abalayama, mpe Yakobo asakolaki koya na ye. (Genese 22:17, 18; 49:10) Nkembo ya Bokonzi ya Masiya elobelami mingi mpenza kati na nzembo. (Nzembo 72:1-20) Yisaya asakolaki ete Mombotó yango mosengelaki kobotama na moseka moko ya mwasi, mpe Mika asakolaki ete mwana asengelaki kobotama na Bɛtɛlɛmɛ. (Yisaya 7:14; Mika 5:2) Wana ezali bobele mwa ndambo na ebele ya bisakweli na ntina na Masiya.
Masiya azalaki naino te!
Tótalela makambo masilá koleka, mpe tokanisa ete tobɛlɛmi na ekeke ya liboso ya ntango na biso. Esakweli ya liboso ya Nzambe na ntina na Masiya ekokisi sikawa mibu 4 000. Bayuda bamonaki kobomama ya tempelo ya Yehova, kobebisama ya mboka na bango, balekisaki mibu 70 na boombo na Babilone, mpe bayangelamaki na Bapakano koleka mibu 500. Masiya azalaki naino te!
Bayuda oyo bazalaki kobanga Nzambe bazalaki mpenza na mposa na koya ya Masiya! Na yango, mapamboli na ye masengelaki kosopama likoló na bango mpe mabota nyonso.
Moto na kobanga Nzambe
Kati na Bayuda oyo bazalaki kobanga Nzambe, baoyo bamipesaki mingi mpe bazalaki kobondela mpo na koya ya Masiya, ezalaki na Simeona, mobangé mosaleli na sembo na Yehova, oyo azalaki kofanda na mboka-mokonzi ya Yudea. Likambo moko ya ntina mingi likómelaki Simeona.
Nzambe atyaki elimo santu na ye likoló na Simeona mpe apesaki ye mbano na nzela na emoniseli. Simeona akokufa te liboso ete amona ye oyo akozala Masiya. Kasi mikolo mpe basanza elekaki. Simeona anunaki mpe akokaki lisusu koumela ntango molai te. Elaká oyo Nzambe apesaki ye, ekokanaki?
Mokolo moko (na ekeke ya 2 L.T.B.), babalani mibale ya sika elongo na mwana na bango bayei na tempelo longwa na Bɛtɛlɛmɛ. Elimo santu emonisi Simeona ete oyo ezali mokolo oyo azali kozela yango uta kala. Akei na tempelo, epai akomona ye oyo basakoli bakomaki na ntina na ye. Akei na lombango nyonso na meko oyo nzoto na ye epesi ye nzela, amoni Yosefe, Malia, mpe mwana.
Simeona amemaki mwana Yesu na mabɔkɔ na ye na esengo mingi! Azali Ye oyo akozala Masiya na elaká—“Klisto ya Yehova.” Na mibu mingi boye, Simeona akokaki te kolikya komona wana Yesu akokokisa mosala na Ye awa na mabelé. Atako bongo, ezali likambo ya esengo mingi na komona ye ntango azali mwana moke. Bisakweli na ntina na Masiya bibandi kokokana. Simeona azali mpenza na esengo! Sikawa akolala kati na kufa kino na lisekwa.—Luka 2:25-28.
Maloba na esakweli ya Simeona
Lokola Simeona ayokisaki mongongo na ye mpo na kokumisa Yehova, tozali koyoka ye wana alobaki ete: “Sikawa, Nkolo Moyangeli, okotika moombo na yo ete akenda na kimya engebene liloba na yo; mpo ete miso na ngai masili komona nzela na kobikisa na yo oyo osilaki kobongisa na miso ya bato banso, pole mpo na kolongola ezipeli likoló na mabota mpe nkembo na Yisraele, libota na yo.” Yosefe, tata mobɔkɔli na Yesu, mpe Malia, mama na ye, bazali sé kokamwa na ntina na maloba wana.—Luka 2:29-33, NW.
Elongi ya Simeona engɛngi awa ezali ye kopambola Yosefe mpe Malia, kolakeláká bango mapamboli ya Yehova ete bakokisa mikumba na bango mpo na mwana wana. Na yango, elongi ya mobali wana anuni ekómi na ezalela ebongi mpenza na limemya. Kolobáká epai na Malia ye moko, abakisi ete: “Talá! Ye azali oyo atyami mpo na kokwea mpe kotelema ya mingi kati na Yisraele mpe mpo na kozala elembo oyo bakotuka yango (ee, mopangá molai mokotɔbɔla molimo na yo), ete makanisi ya mitema mingi mamonisama polele.”—Luka 2:34, 35, NW.
Maloba ya Simeona epai na Malia
Kanisá mpo na mayoki oyo Malia azalaki na yango. Simeona alingaki koloba nini? Bamoko bakoyamba Klisto mpe bakotelema longwa na ezalela na bango ya kokwea. Nzokande, basusu bakoboya ye, bakobɛta mabaku mpo na ye, mpe bakokwea. Lokola esakolamaki, Yesu azalaki libangá oyo mpo na yango Bayuda mingi bazalaki kobɛta libaku. (Yisaya 8:14; 28:16) Maloba ya Simeona malimboli te ete Moyisraele moko na moko asengelaki naino kokwea liboso kati na kozanga kondima mpe na nsima, kotelema kati na kondima na koyambáká Yesu. Kasi, lolenge ya koyamba ye ekesanaki engebene moto na moto, komonisáká polele makanisi ya mitema ya bato mingi mpe komemáká kosambisama ya Nzambe likoló na bango mpo na malamu to mabe. Mpo na bato bazangaki kondima, asengelaki kozala lokola elembo, to eloko ya kotyolama. Na kotyáká kondima epai na ye, basusu bakotelema longwa na liwa mpe na lisumu, mpo na kozwa etelemelo ya sembo epai na Nzambe. Misala ya bato epai na Masiya misengelaki komonisa makambo oyo mazalaki kati na mitema na bango.
Maloba oyo ya Simeona ete: “Mopangá molai mokotɔbɔla molimo na yo,” malimboli nini? Elembeteli moko te ya Makomami emonisi ete Malia atɔbɔlamaki na mopangá ya solo mpenza. Kasi, lolenge oyo Yesu aboyamaki na bato mingi esengelaki kopesa ye mpasi na motema. Malia aokaki mpasi makasi wana amonaki Yesu akakisami na nzeté. Yango ezalaki lokola nde atɔbɔlamaki na mopangá.
Simeona asaleli esakweli ya Masiya
Elimo ya Nzambe epusaki Simeona na kosalela esakweli ya Masiya mpo na Yesu. Simeona akokaki kokufa na kimya ‘mpo ete miso na ye masili komona nzela na lobiko ya Nzambe oyo Ye asilaki kobongisa liboso na bato nyonso, pole mpo na kolongola molili na mabota mpe nkembo na Yisraele, libota na Ye.’ (Luka 2:30-32, NW) Oyo nde lolenge malamu ya kosalela maloba na esakweli ya Yisaya!
Mosakoli wana asakolaki ete: “Nkɛmbɔ na [Yehova, NW] ikomɔnisama, yɔnsɔ bazali na njoto bakomɔna yango elɔngɔ.” “Ngai [Yehova] napesi bino lisusu [Masiya] lokola mwinda ya mabota, ete lobiko na ngai ekóma kino na nsuka ya mokili.” (Yisaya 40:5; 42:6, NW; Yis. 49:6; 52:10) Makomami ya Greke ya Boklisto mpe makambo masili koleka mazali komonisa ete Masiya, Yesu Klisto, azali mwinda ya solo ya mabota, Ye oyo azali kolongola molili makasi ya elimo mpe azali kopesa lobiko epai na bato.
Liloba ya Nzambe liyebisi makambo mingi te na ntina na mobangé Simeona. Na ndenge emonani, akufaki liboso ete Klisto afungola nzela mpo na bomoi na likoló. Mosika te, bongo, Simeona akosekwa mpo na kozala na bomoi awa na mabelé. Oyo nde esengo ye—mpe yo—bokokoka kozala na yango kati na mokili ya sika na nsé na boyangeli ya Bokonzi na Masiya ya Nzambe!