Tósimba ngwi kondima na biso ya motuya!
“[Na] bango basili kozwa likabo na kondima lolenge moko na biso.”—2 PETELO 1:1.
1. Yesu alobaki nini mpo na kokebisa bantoma na ye, kasi Petelo amikumisaki na nini?
NA MPOKWA ya mokolo oyo ezalaki liboso ya liwa na ye, Yesu alobaki ete bantoma na ye nyonso bakosundola ye. Petelo, oyo azalaki moko na bango, amikumisaki ete: “Soko nyonso bakoyoka nsɔni mpo na yo, ngai nakoyoka nsɔni soko moke te.” (Matai 26:33) Kasi Yesu ayebaki ete ekozala bongo te. Yango wana, bobele na libaku wana ayebisaki Petelo ete: “Ngai nasili kobondela na ntina na yo ete kondima na yo ezanga te. Mpe wana esili yo kobongola motema, lendisá bandeko na yo.”—Luka 22:32.
2. Atako Petelo amityelaki motema koleka, makambo nini asalaki mamonisaki ete kondima na ye ezalaki na bolɛmbu?
2 Petelo, oyo atyelaki kondima na ye motema koleka, awanganaki Yesu bobele na butu wana. Mbala misato awanganaki ete ayebi ata Klisto te! (Matai 26:69-75) Ntango ‘abongolaki motema,’ na ntembe te asosolaki malamu maloba ya Nkolo na ye, ete “lendisá bandeko na yo,” mpe maloba yango makómaki polele epai na ye. Uta ntango yango, bomoi mobimba ya Petelo epusamaki na toli wana, lokola emonisami na mikanda mibale oyo akomaki mpe oyo mibatelami kino lelo kati na Biblia.
Ntina oyo Petelo akomaki mikanda na ye
3. Mpo na nini Petelo akomaki mokanda na ye ya liboso?
3 Pene na mbula 30 nsima ya liwa ya Yesu, Petelo akomaki mokanda na ye ya liboso, oyo atindaki yango epai na bandeko na ye na Ponto, na Galatia, na Kapadokia, na Azia, mpe na Bitunia, bitúká oyo bizalaki na eteni ya mokili oyo ezali sikawa na nɔ́rdi mpe na wɛ́sti ya ekólo Turquie. (1 Petelo 1:1) Na ntembe te Bayuda, oyo bamoko na bango bakómaki baklisto na Pantekote ya mobu 33 T.B., bazalaki kati na bato oyo Petelo akomelaki. (Misala 2:1, 7-9) Mingi bazalaki Bapakano oyo bazalaki konyokwama makasi na banguna. (1 Petelo 1:6, 7; 2:12, 19, 20; 3:13-17; 4:12-14) Petelo akomelaki bandeko yango mpo na kolendisa bango. Mokano na ye ezalaki ya kosalisa bango ete bázwa “nsuka ya kondima [na bango], yango lobiko na milimo na [bango].” Na yango, na toli na ye ya nsuka, alobaki ete: “Bótɛmɛla [Zábolo] ngwi mpo na kondima.”—1 Petelo 1:9; 5:8-10.
4. Mpo na nini Petelo akomaki mokanda na ye ya mibale?
4 Na nsima, Petelo akomelaki baklisto yango mokanda ya mibale. (2 Petelo 3:1) Mpo na nini? Mpamba te ezalaki na likámá mosusu ya monene koleka. Bato mabe balingaki komeka kokɔtisa etamboli na bango ya mbindo kati na bandimi mpe bazalaki kozimbisa bamosusu! (2 Petelo 2:1-3) Lisusu, Petelo akebisaki na ntina na basɛki. Na mokanda na ye ya liboso akomaki ete “nsuka na makambo nyonso ezali kobɛlɛma,” mpe na yango emonani ete basusu bazalaki kosɛka likanisi yango. (1 Petelo 4:7; 2 Petelo 3:3, 4) Tótalela mokanda ya mibale ya Petelo mpe tokomona lolenge yango elendisaki bandeko ete bátikala ngwi kati na kondima. Na lisoló oyo ya liboso, tokotalela 2 Petelo mokapo 1.
Mokano ya mokapo 1
5. Lolenge nini Petelo abongisi naino makanisi ya batángi ya mokanda na ye liboso ete alobela mikakatano?
5 Petelo abandi mbala moko te kolobela mikakatano minene. Nzokande, abongisi naino nzela liboso ya kolobela mikakatano yango na kokólisáká epai ya batángi ya mokanda na ye bosepeli mpo na makambo oyo bayekolaki ntango bakómaki baklisto. Akundweli bango bilaka kitoko ya Nzambe mpe bosolo ya bisakweli ya Biblia. Asali yango na kolobeláká bango mbongwana ya Yesu, emonaneli oyo ye moko amonaki Klisto kati na nguya ya Bokonzi.—Matai 17:1-8; 2 Petelo 1:3, 4, 11, 16-21.
6, 7. (a) Liteya nini tokoki kozwa na lolenge oyo Petelo abandaki mokanda na ye? (b) Soki tozali kopesa toli, mbala mosusu ekozala malamu ete tóndima likambo nini mpo na biso moko?
6 Liteya nini tokoki kozwa na lolenge oyo Petelo abandaki lisoló na ye? Toli na biso ekoyambama malamu soki tobandi na kokundwela bayoki na biso makambo matali elikya monene ya Bokonzi oyo tozali na yango elongo, boye te? Mpe ezali boni soki tokolobela makambo oyo biso moko tokutanaki na yango? Ekoki mpenza kozala ete nsima ya liwa ya Yesu, Petelo azalaki mbala mingi kolobela emonaneli wana oyo ye amonaki Klisto kati na nkembo ya Bokonzi.—Matai 17:9.
7 Lisusu, tómikundola ete emonani mpenza ete na ntango Petelo akomaki mokanda na ye ya mibale, Evanzile ya Matai mpe mokanda ya ntoma Paulo epai ya Bagalatia esilaki kokabolama mingi. Boye, ekoki kozala ete bolɛmbu ya Petelo mpe kondima na ye eyebanaki malamu na bato ya eleko na ye. (Matai 16:21-23; Bagalatia 2:11-14) Nzokande, yango epekisaki ye te ete aloba na bosembo nyonso. Kútu, ekoki kozala ete mokanda yango esepelisaki mingi baoyo bayebaki malamu bolɛmbu na bango moko. Na yango, ntango tozali kosalisa baoyo bazali na mikakatano, ekozala malamu kondima ete biso moko mpe tozali na bolɛmbu, boye te?—Baloma 3:23; Bagalatia 6:1.
Mbote ya kolendisa
8. Na ndimbola nini Petelo asaleli liloba “kondima”?
8 Tótalela sikawa mbote ya Petelo. Nokinoki alobeli likambo ya kondima, kobéngáká batángi ya mokanda na ye ete “bango basili kozwa likabo na kondima lolenge moko na biso.” (2 Petelo 1:1) Awa liloba “kondima” na ntembe te elimboli “kondimisama makasi” mpe etaleli bindimeli to mateya nyonso ya boklisto, oyo kati na Makomami ebéngami mbala mosusu ete “solo.” (Bagalatia 5:7; 2 Petelo 2:2; 2 Yoane 1) Mbala mingi liloba “kondima” esalelamaka na ndimbola yango koleka ndimbola ya libosoliboso ya kotya elikya to kotya motema epai ya moto to na eloko moko.—Misala 6:7; 2 Bakolinti 13:5; Bagalatia 6:10; Baefese 4:5; Yuda 3.
9. Mpo na nini mbote ya Petelo esepelisaki mingi mpenza baoyo bazalaki Bayuda te?
9 Na ntembe te mbote ya Petelo esepelisaki mingi mpenza batángi na ye oyo bazalaki Bayuda te. Bayuda bazalaki na boyokani te na Bapakano, kútu bazalaki kotyola bango, mpe Bayuda oyo bakómaki baklisto bazalaki naino kokanisela Bapakano mabe. (Luka 10:29-37; Yoane 4:9; Misala 10:28) Kasi, Petelo, oyo azalaki Moyuda na mosuni mpe ntoma ya Yesu Klisto, alobaki ete batángi ya mokanda na ye—Bayuda mpe Bapakano—bazalaki na kondima moko mpe bazalaki na likabo lolenge moko na ye.
10. Mateya nini tokoki kozwa na mbote ya Petelo?
10 Kanisá mateya kitoko oyo mbote ya Petelo ezali kolakisa biso lelo oyo. Nzambe azali na kokabolakabola te; azali na koponapona mposo to ekólo te. (Misala 10:34, 35; 11:1, 17; 15:3-9) Lokola Yesu ye moko ateyaki yango, baklisto nyonso bazali bandeko, mpe moko te kati na biso asengeli kokanisa ete aleki basusu. Lisusu, mbote ya Petelo ezali komonisa polele ete tozali solo bandeko kati na mokili mobimba, oyo biso nyonso tozali na “likabo” ya kondima “lolenge moko” na oyo Petelo mpe baninga na ye bantoma bazalaki na yango.—Matai 23:8; 1 Petelo 5:9.
Boyebi mpe bilaka ya Nzambe
11. Nsima ya kopesa mbote, makambo nini ya ntina Petelo amonisi polele?
11 Nsima ya kopesa mbote, Petelo akomi ete: “Ngɔlu ezala na bino mpe kimya eyikana.” Lolenge nini ngɔlu mpe kimya ekoyikana epai na biso? Petelo ayanoli ete: “Na boyebi na Nzambe mpe na Yesu, Nkolo na biso.” Na nsima alobi ete: “Nguya na ye Nzambe esili kopesa biso biloko nyonso bikoki na bomoi mpe na kosambela Nzambe.” Kasi ndenge nini tozali kozwa biloko yango ya ntina mingi? “Na boyebi [ya sikisiki, NW] na oyo abyangi biso na nkembo mpe na malamu na ye mpenza.” Na yango, mbala mibale, Petelo amonisi polele ete boyebi ya sikisiki ya Nzambe mpe ya Mwana na ye ezali na ntina mingi.—2 Petelo 1:2, 3; Yoane 17:3.
12. (a) Mpo na nini Petelo alobeli mingi ntina ya kozala na boyebi ya sikisiki? (b) Mpo na kozwa bilaka ya Nzambe, tosengeli liboso kosala nini?
12 “Balakisi ya lokuta” oyo Petelo azali kokebisa na ntina na bango na mokapo 2 bazali kosalela “maloba na kokosa” mpo na kozimbisa baklisto. Na lolenge yango bazali komeka kolɛngola bango ete bázongela makambo ya mbindo oyo basikwamaki na yango. Mbano ya ye oyo asilaki kobikisama na nzela ya “boyebi ya sikisiki ya Nkolo mpe Mobikisi Yesu Klisto” mpe na nsima bazali kokwea na kozimbisama motindo wana ezali mpenza mabe. (2 Petelo 2:1-3, 20) Emonani ete abandisi likambo yango mpo na kolobela yango na molai nsima, Petelo alobeli mingi na ebandeli ya mokanda na ye na ntina na boyebi ya sikisiki mpo na kobatela etɛlɛmɛlo ya pɛto liboso ya Nzambe. Petelo amonisi ete Nzambe “asili kotyela biso bilaka minene mpe na motuya mingi na ntina ete na bilaka yango bózwa likabo na bino kati na lolenge na Nzambe.” Kasi, mpo na kozwa bilaka yango, oyo bizali kati na kondima na biso, Petelo alobi ete, tosengeli liboso kozala baoyo ‘bakimi libebi lizali kati na mokili mpo na mposa mabe.’—2 Petelo 1:4.
13. Na nini baklisto bapakolami mpe “bampate mosusu” bazali na ekateli ya kokangama makasi?
13 Lolenge nini otalelaka bilaka ya Nzambe? Ezali na lolenge oyo baklisto batikali bapakolami batalelaka yango? Na 1991, Frederick Franz, oyo na ntango yango azalaki prezidá ya Watch Tower Bible and Tract Society mpe ye oyo alekisaki mbula 75 na mosala ya ntango nyonso, alobelaki na mokuse mayoki ya baoyo bazali na elikya ya koyangela elongo na Klisto na maloba oyo: “Tozali kosimba ngwi kino sikawa, mpe tokolanda kosimba ngwi kino Nzambe akomonisa ete azali sembo na ‘bilaka na ye minene mpe ya motuya mingi.’” Ndeko Franz azalaki ntango nyonso kotya motema na bilaka ya Nzambe oyo etali lisekwa ya likoló, mpe asimbaki ngwi kondima yango kino liwa na ye na ntango akómaki na mibu 99. (1 Bakolinti 15:42-44; Bafilipi 3:13, 14; 2 Timoté 2:10-12) Lolenge moko, bamilió mingi ya bato bazali kosimba ngwi kondima, kotyáká ntango nyonso makanisi na bango na elaka ya Nzambe ya kotya paladiso awa na mabelé epai bato bakozala na bomoi ya seko mpe ya esengo. Ozali moko na bango?—Luka 23:43; 2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:3, 4.
Eyano na bilaka ya Nzambe
14. Mpo na nini Petelo atángi bizaleli malamu lokola libongi ya liboso oyo esengeli kobakisama likoló ya kondima?
14 Tozali nde na botɔ́ndi epai ya Nzambe mpo na makambo oyo alaki? Soki ɛɛ, Petelo alobi ete tosengeli komonisa yango. “Na ntina oyo mpenza” (mpo ete Nzambe asili kopesa biso bilaka ya motuya mingi), tosengeli kosala molende makasi ya kosala mosala kati na kondima. Tosengeli kosuka te na kosepela ete tozali kati na kondima to bobele mpo ete toyebi solo ya Biblia. Yango ekoki te! Mbala mosusu na eleko ya Petelo bamoko kati na masangá bazalaki kolobela mingi kondima kasi bamipesaki na etamboli ya mbindo. Bizaleli na bango bisengelaki kozala malamu, na yango Petelo alobaki ete: ‘Bómizwela [bizaleli malamu, NW] kati na kondima na bino.’—2 Petelo 1:5; Yakobo 2:14-17.
15. (a) Mpo na nini boyebi etángami nsima ya bizaleli malamu lokola libongi oyo lisengeli kobakisama likoló ya kondima? (b) Mabongi nini mosusu makosalisa biso ete tósimba ngwi kondima na biso?
15 Nsima ya kolobela bizaleli malamu, Petelo atángi mabongi mosusu motoba oyo tosengeli komizwela, to kobakisa likoló ya kondima na biso. Mokomoko na yango ezali na ntina soki tolingi “kotɛlɛma kati na kondima.” (1 Bakolinti 16:13) Lokola bapɛngwi bazalaki ‘kobongola Makomami na kilikili’ mpe bazalaki koteya ‘mateya ya bokosi,’ Petelo atángi lisusu boyebi lokola likambo ya ntina mingi, kolobáká ete: “Likoló na bizaleli malamu na bino [bómizwela] boyebi.” Na nsima alobi lisusu ete: “Na boyebi na bino [bóbakisa] komipekisa, na komipekisa etingya, na etingya na bino komipesa na Nzambe, na komipesa na bino na Nzambe bosepeli mpo na bandeko, na bosepeli na bino mpo na bandeko bolingo.”—2 Petelo 1:5-7; 2:12, 13; 3:16, NW.
16. Nini ekomonana soki mabongi oyo Petelo atángi mabakisami likoló ya kondima, kasi nini ekomonana soki mabakisami te?
16 Nini ekosalema soki makambo yango nsambo mabakisami likoló na kondima na biso? Petelo ayanoli ete: “Soko makambo oyo mazali kati na bino mpe mazali koyikana, makobatela bino malamu ete bózala mpamba te mpe bózanga kobota mbuma te, mpo na boyebi [“ya sikisiki,” “NW”] na Nkolo na biso Yesu Klisto.” (2 Petelo 1:8) Epai mosusu, Petelo alobi ete: “Moto oyo azangi makambo yango akufi miso, akomonaka biloko mosika polele te, asili kobosana ete apɛtwaki na masumu na ye na kala.” (2 Petelo 1:9) Tomoni ete Petelo atiki kosalela “yo” mpe “biso” mpe akómi kolobela “moto,” “ye,” mpe “na ye.” Atako likambo ya mawa mpenza ezali ete bamoko bazali bakufi miso, bazali kobosana makambo, mpe bazali pɛto te, Petelo azali kopesa likanisi te ete motángi ya mokanda na ye nde azali moto ya lolenge wana.—2 Petelo 2:2.
Alendisi bandeko na ye
17. Eloko nini ekokaki kopusa Petelo asɛnga na boboto ete básalela “makambo yango”?
17 Mbala mosusu lokola ayebaki ete ezalaka mpasi te kozimbisa bato ya sika, Petelo alendisi bango na boboto nyonso ete: “Bandeko, eleki malamu ete bózala na etingya mpo na kolendisa ebyangeli mpe eponeli na bino. Soko bokosalaka bongo, bokotuta mabaku soko moke te.” (2 Petelo 1:10; 2:18) Baklisto bapakolami oyo bazali kobakisa makambo oyo nsambo likoló na kondima na bango bakozwa mbano monene, lokola Petelo alobi yango ete: “Nzela na koingela kati na Bokonzi na seko na Nkolo na biso, Mobikisi Yesu Klisto, ekozwama mpo na bino na malamu mpenza.” (2 Petelo 1:11) “Bampate mosusu” bakozwa libula ya seko na mabelé oyo makoyangelama na Bokonzi ya Nzambe.—Yoane 10:16; Matai 25:33, 34.
18. Mpo na nini Petelo azali ‘ntango nyonso pene ya kokundwela’ bandeko na ye?
18 Petelo alingi solo ete bandeko na ye bázwa mbano monene wana. Akomi ete: “Mpo na ntina yango, nakotika te kokundwela bino ntango nyonso makambo oyo, atako bosili koyeba yango mpe bopikami makasi kati na solo.” (2 Petelo 1:12, NW) Petelo asaleli liloba ya Greke ste·riʹzo, oyo libongolami awa na ‘bapikami makasi’ kasi libongolami na ‘kolendisa’ kati na toli oyo Yesu apesaki Petelo ete: “Lendisá bandeko na yo.” (Luka 22:32) Kosalelama ya liloba yango ekoki kopesa likanisi ete Petelo amikundweli toli ya nguya oyo azwaki epai ya Nkolo na ye. Sikawa Petelo alobi ete: “Nabanzi ete naino ezali ngai kati na hema oyo na nzoto, ebongi na ngai kolamukisa bino kati na makanisi. Nayebi ete ntango na kotika hema oyo na nzoto ekokóma mbango.”—2 Petelo 1:13, 14.
19. Lisungi nini tozali na yango mposa lelo oyo?
19 Atako Petelo alobi na boboto nyonso ete batángi ya mokanda na ye ‘bapikami makasi kati na solo,’ asosoli ete kondima na bango ekoki mpe kozindisama. (1 Timoté 1:19) Lokola ayebi ete mosika te akokufa, alendisi bandeko na ye na kolobeláká makambo oyo bakoki komikundwela na nsima mpo na kotikala makasi na elimo. (2 Petelo 1:15; 3:12, 13) Lolenge moko, lelo oyo biso mpe tozali na mposa ete bákundwela biso makambo mbala na mbala mpo na kotikala ngwi kati na kondima. Ata soki tozali na mokumba nini to soki toumeli mingi kati na solo, tokoki te kozala na bopɔtu mpo na kotánga Biblia, mpo na boyekoli ya biso moko, mpe mpo na koyangana na makita ya lisangá. Bamoko bazali koluka nzela mpo na koboya koyangana na makita, kolobáká ete balɛmbi mingi na nzoto to mpo ete makita mazali sé kozongela makambo ya kala to mpe ete masoló mazali kosalema malamu te, kasi Petelo ayebaki lolenge nini moto nyonso kati na biso akoki nokinoki kobungisa kondima soki azali komityela motema koleka.—Malako 14:66-72; 1 Bakolinti 10:12; Baebele 10:25.
Miboko makasi mpo na kondima na biso
20, 21. Lolenge nini mbongwana ya Yesu elendisaki kondima ya Petelo mpe batángi ya mokanda na ye, bakisá mpe biso lelo oyo?
20 Kondima na biso etongami nde likoló na masapo mpamba masalami na mayele ya bato? Petelo ayanoli na nguya nyonso ete: “Wana eyebisaki biso bino mpo na nguya na komonana na Nkolo na biso Yesu Klisto, tobilaki masese malobami na mayele te, kasi lokola esili biso komona nkembo na ye monene na miso na biso mpenza.” Petelo, Yakobo, mpe Yoane bazalaki elongo na Yesu ntango bamonaki emonaneli na ye na nguya ya Bokonzi. Petelo alimboli ete: “Azwi lokumu mpe nkembo na mabɔkɔ na Nzambe Tata mpe mongongo ebimi mpo na ye na nkembo monene monene ete, Oyo Mwana na ngai molingami na ngai; nakosepelaka ye mingi. Biso toyokaki mongongo yango kobima na Likoló, wana ezalaki biso na ye kuna na ngomba na bulɛɛ.”—2 Petelo 1:16-18.
21 Ntango Petelo, Yakobo, mpe Yoane bamonaki emonaneli wana, na ntembe te Bokonzi ekómaki likambo ya solo mpo na bango! Petelo alobi ete: “Tozali kolendisa liloba lisakolami na makasi koleka. Bokosala malamu kotya mitema na yango.” Ɛɛ, batángi ya mokanda ya Petelo, bakisá mpe biso lelo oyo, tozali na ntina makasi ya kotya likebi na bisakweli na ntina na Bokonzi ya Nzambe. Na makambo nini tosengeli kotya likebi? Petelo ayanoli ete: “Lokola na mwinda oyo ezali kopela na esika na molili mabe, kino ekotana ntɔ́ngɔ́ mpe [monzoto, NW] na ntɔ́ngɔ́ ekobima na mitema na bino.”—2 Petelo 1:19; Danyele 7:13, 14; Yisaya 9:6, 7.
22. (a) Mitema na biso misengeli kolamuka na likambo nini? (b) Lolenge nini tozali kotya likebi na liloba ya esakweli?
22 Mitema na biso mikozala na molili soki tozangi kongɛnga ya liloba ya esakweli. Kasi na kotyáká likebi likoló na yango, mitema ya baklisto milamukaki ntango nyonso kino na kotana ya ntɔ́ngɔ́ na mokolo oyo “monzoto ya ntɔ́ngɔ́,” Yesu Klisto, akobima na nkembo ya Bokonzi. (Emoniseli 22:16, NW) Lolenge nini tozali lelo kotya likebi na liloba ya esakweli? Na nzela ya boyekoli ya Biblia, na nzela ya komibongisa mpe kopesa biyano na makita, mpe na ‘kotyáká motema na makambo oyo, mpe na komipesa na yango.’ (1 Timoté 4:15) Soki tolingi ete liloba ya esakweli engɛnga na “esika na molili mabe” (mitema na biso), tosengeli kotika ete yango ezala na bopusi makasi likoló na biso—na bamposa na biso, na mayoki na biso, na matindiki na biso, mpe na mikano na biso. Tosengeli kozala bayekoli ya Biblia, mpamba te Petelo asukisi mokapo 1 na maloba oyo ete: “Moko te na bisakweli na Makomi ebimaki na makanisi na bato mpenza. Mpo esakweli moko te ebimaki na mokano na moto, kasi bato bauti na Nzambe balobi wana ezalaki bango kopusama na [elimo santu, NW].”—2 Petelo 1:20, 21.
23. Mokapo ya liboso ya 2 Petelo ebongisi batángi na likambo nini?
23 Na mokapo ya ebandeli ya mokanda na ye ya mibale, Petelo apesaki biso bopusi ya nguya mpo na kosalisa biso ete tósimba ngwi kondima na biso oyo ezali na motuya mingi. Tobongisami sikawa mpo na kotalela makambo ya ntina oyo malandi. Lisoló lilandi likolobela mokapo 2 ya mokanda ya 2 Petelo, epai kuna ntoma azali kolobela mokakatano ya bopusi ya mbindo oyo esilaki kokɔta kati na masangá.
Ozali komikundola?
◻ Mpo na nini Petelo alobeli mingi ntina ya boyebi ya sikisiki?
◻ Nini ekoki kozala ntina mpo na yango bizaleli malamu etángami na esika ya liboso lokola libongi oyo lisengeli kobakisama likoló ya kondima?
◻ Mpo na nini Petelo azali ntango nyonso kokundwela bandeko na ye makambo?
◻ Moboko nini ya makasi Petelo apesi mpo na kondima na biso?
[Elilingi na lokasa 9]
Mabunga ya Petelo mapusaki ye te ete asundola kondima na ye