Mateya oyo tokoki kozwa na bandeko ya Yesu
OYEBI nini na ntina na bandeko ya Yesu, oyo afandaki na bango na boumeli ya mbula 30 liboso azwa batisimo? Baevanzile eyebisi biso nini? Mateya nini tokoki kozwa soki toyebi bandeko na ye? Biyano na mituna yango ekoki kosalisa yo.
Yesu abotamaki na libota ya bato ya mbongo? Yozefe, tata-mobɔkɔli na ye, azalaki mosali ya mabaya. Ezalaki mosala makasi oyo mbala mingi ezalaki kosɛnga kokata banzete mpo na kosala mabaya. Ntango Yesu akokisaki mikolo 40, baboti na ye bakendaki na Yelusaleme mpo na kopesa mbeka ndenge oyo Mibeko esɛngaki. Bapesaki nde mpate ná ebenga oyo Mibeko esɛngaki? Te. Emonani ete bazalaki na makoki ya kopesa biloko wana te. Kasi, Mibeko ezalaki na ebongiseli mosusu mpo na babola. Yango wana, Yozefe ná Malia bapesaki “bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya bibenga.” Lokola bapesaki bandɛkɛ oyo ezali na motuya moke, emonisi ete bazalaki bato ya bozwi te.—Luka 2:22-24; Levitike 12:6, 8.
Omoni ete baboti ya Yesu Klisto, moto oyo asengelaki kokóma Mokonzi ya bato nyonso, bazalaki babola, bazalaki kobimisa motɔki mpo na kozwa biloko ya kobikela. Ntango Yesu akolaki, akómaki mosali ya mabaya lokola tata-mobɔkɔli na ye. (Matai 13:55; Malako 6:3) Biblia elobi ete “atako [Yesu] azalaki moto ya bomɛngo” ntango azalaki ekelamu ya elimo na likoló, “akómaki mobola” mpo na biso. Amikitisaki mpe akómaki moto, mpe akolaki na libota ya bato mpamba. (2 Bakolinti 8:9; Bafilipi 2:5-9; Baebele 2:9) Yesu abotamaki na libota ya bomɛngo te, mpe yango esalaki ete bato mosusu bákakatana te koya epai na ye. Bazalaki komona moto ya lokumu to moto monene te. Bazalaki kosepela nde na mateya na ye, bizaleli malamu na ye mpe misala na ye ya kokamwa. (Matai 7:28, 29; 9:19-33; 11:28, 29) Tozali komona bwanya ya Yehova Nzambe na ndenge atindaki Yesu abotama na libota ya bato mpamba.
Sikoyo, tólobela naino baboti ná baleki ya Yesu mpe tótala mateya oyo tokoki kozwa.
Yozefe—Moto ya sembo
Ntango Yozefe ayebaki ete fianse na ye akómi na zemi “liboso ete bázala elongo,” na ntembe te akómaki na mokakatano mpamba te atako alingaki Malia, azalaki mpe koyina likambo ya mbindo oyo akanisaki ete Malia asali. Emonanaki lokola nde makambo nyonso ebebi kati na ye ná fianse na ye. Na ntango wana, bazalaki kotalela fianse ya moto lokola mwasi na ye. Nsima ya kokanisa mingi, Yozefe azwaki ekateli ya kokabwana na Malia kozanga ete bato báyeba mpo báboma ye na mabanga te ndenge bazalaki kosala basi ya ekobo.—Matai 1:18; Deteronome 22:23, 24.
Na ntango yango anzelu moko abimelaki Yozefe na ndɔtɔ mpe alobaki na ye boye: “Kobanga te kotya Malia mwasi na yo na ndako, mpo oyo ebotami na kati na ye euti na elimo santu. Akobota mwana mobali, mpe osengeli kobenga ye na nkombo Yesu, mpo akobikisa bato ya ekólo na ye na masumu na bango.” Yozefe atosaki malako ya Nzambe mpe atyaki Malia na ndako.—Matai 1:20-24.
Moto wana ya sembo azwaki ekateli oyo esalaki ete maloba ya Yehova na nzela ya mosakoli Yisaya ekokisama: “Talá, mwana mwasi akobota mwana mobali mpe akobyanga nkombo na ye, Imanuele.” (Yisaya 7:14) Na ntembe te Yozefe alingaki makambo ya elimo mpe asepelaki na libaku malamu ya kozala tata-mobɔkɔli ya Masiya, atako alingaki lisusu te kozala tata ya mwana ya liboso ya Malia.
Yozefe asangisaki nzoto na Malia te tii ntango abotaki mwana na ye ya liboso. (Matai 1:25) Mpo na mobali ná mwasi oyo babalani sika, kokanga motema mpo na kosangisa nzoto te ezalaki likambo moke te, kasi emonani mpenza ete balingaki ete bato bázala na mobulu te na makanisi mpo na Tata ya mwana yango. Yango ezali ndakisa monene ya komipekisa! Yozefe atyaki makambo ya elimo liboso ya bamposa na ye ya nzoto.
Anzelu abimelaki Yozefe mbala minei mpo na kopesa ye malako mpo na mwana oyo azalaki kobɔkɔla. Misato kati na yango ezalaki mpo na koyebisa ye esika oyo asengeli komema mwana. Esengelaki kotosa nokinoki mpo mwana abomama te. Mbala nyonso, Yozefe azelaki te; akendaki na ye liboso na Ezipito mpe na nsima azongaki na ye na Yisalaele. Yango ebikisaki mwana Yesu ntango Elode apesaki mitindo ete báboma bana mike nyonso. Lisusu, botosi ya Yozefe esalisaki mpo ete bisakweli oyo elobelaki Masiya ekokisama.—Matai 2:13-23.
Yozefe alakisaki Yesu mosala ya mabɔkɔ mpo ayeba kokokisa bamposa na ye. Yango wana, bato bayebaki Yesu kaka te lokola “mwana ya mosali-mabaya” kasi mpe lokola “mosali ya mabaya.” (Matai 13:55; Malako 6:3) Ntoma Paulo akomaki ete Yesu ‘amekamaki na makambo nyonso lokola biso.’ Moko na makambo oyo amekamaki na yango ezalaki kosala mosala makasi mpo na kosunga bandeko na ye.—Baebele 4:15.
Tokoki mpe komona ete Yozefe azalaki na molende mpo na losambo ya solo na lisolo ya nsuka oyo batángi nkombo na ye na kati ya Makomami ya Grɛki. Yozefe amemaki libota na ye na Yelusaleme mpo na Elekeli. Kaka mibali nde basengelaki kozanga te na fɛti yango, kasi Yozefe azalaki na momeseno ya komema libota na ye na Yelusaleme “mbula na mbula.” Azalaki kondima mokumba monene, mpamba te basengelaki kotambola na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 100 banda na Nazalete tii na Yelusaleme. Kasi, na mobembo oyo Biblia elobeli, baboti ya Yesu babungisaki ye. Bakendaki kokuta ye na tempelo, azali koyoka bateyi ya Mibeko mpe kotuna bango mituna. Atako azalaki kaka na mbula 12, Yesu azalaki na bwanya mpe na boyebi mingi ya Liloba ya Nzambe. Lisolo yango ezali komonisa ete baboti ya Yesu bateyaki ye malamu, balakisaki ye kolinga makambo ya Nzambe. (Luka 2:41-50) Ekoki kozala ete Yozefe akufaki nsima ya makambo wana mpamba te nsima na yango, Biblia elobeli ye lisusu te.
Ya solo, Yozefe azalaki moto ya sembo mpe azalaki kokokisa bamposa ya elimo mpe ya mosuni ya libota na ye. Lokola Yozefe, otyaka matomba ya elimo na esika ya liboso na bomoi na yo ntango ososoli mokano ya Nzambe mpo na biso lelo oyo? (1 Timote 2:4, 5) Otosaka na motema moko makambo oyo Nzambe azali koloba na biso na kati ya Biblia mpe na bongo, omonisaka elimo lokola ya Yozefe? Oteyaka bana na yo mpo báyeba kosololaka masolo ya elimo na bato mosusu?
Malia—Mosaleli ya Nzambe oyo amipesaki mobimba
Malia, mama ya Yesu, azalaki mosaleli malamu mpenza ya Nzambe. Akamwaki ntango anzelu Gabiliele ayebisaki ye ete akobota mwana. Lokola azalaki ngɔndɔ, ‘asangisaki naino nzoto ná mobali te.’ Ntango ayokaki ete akozwa zemi na lisalisi ya elimo santu, na komikitisa mpenza, andimaki nsango yango mpe alobaki ete: “Talá! Mwana mwasi moombo ya Yehova! Tiká ekómela ngai ndenge olobi.” (Luka 1:30-38) Kosala mokano ya Nzambe ezalaki na motuya mingi na miso na ye na boye ete andimaki ata mokakatano nini oyo ekateli na ye ekokaki kobimisa.
Andimaki likambo oyo ebongolaki bomoi na ye mobimba ya mwasi. Ntango akendaki na Yelusaleme mpo na kopɛtolama, Simeona, mobange moko oyo azalaki kobanga Nzambe, alobaki na ye ete: “Mopanga molai ekolekisama na katikati ya molimo na yo mpenza.” (Luka 2:25-35) Na ntembe te alobelaki mpasi oyo Malia akoyoka ntango akomona ebele ya bato bakoboya Yesu mpe na nsuka bakobɛta ye nsɛtɛ na mabɔkɔ likoló ya nzete ya mpasi.
Ntango Yesu azalaki kokola, Malia azalaki kobomba na motema makambo nyonso oyo ezalaki koleka na bomoi na ye, “kokanisakanisa mingi na motema na ye.” (Luka 2:19, 51) Lokola Yozefe, Malia mpe alingaki mingi makambo ya Nzambe mpe abombaki na motema na ye makambo mpe maloba oyo ekokisaki bisakweli. Na ntembe te maloba ya anzelu Gabiliele etikalaki na makanisi na ye: “Ye akozala moto monene mpe akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló; mpe Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, mpe akoyangela ndako ya Yakobo libela na libela, mpe nsuka ekozala te na bokonzi na ye.” (Luka 1:32, 33) Ya solo, Malia azwaki na lisɛki te libaku malamu ya kozala mama ya Masiya.
Emonanaki lisusu ete Malia alingaki makambo ya elimo ntango akutanaki na Elizabeti, ndeko na ye oyo azwaki zemi na ndenge ya likamwisi. Ntango Malia amonaki Elizabeti, akumisaki Yehova mpe amonisaki mpenza ete alingaki Liloba ya Nzambe. Azongelaki maloba ya libondeli ya Hana oyo ezali na 1 Samwele mokapo 2 mpe akɔtisaki makanisi oyo ezali na mikanda mosusu ya Makomami ya Liebele. Boyebi na ye ya Makomami emonisaki ete abongaki mpenza kokóma mama oyo alingaka mpe abangaka Nzambe. Azalaki kopesa Yozefe mabɔkɔ mpo na kokokisa bamposa ya elimo ya mwana na ye.—Genese 30:13; 1 Samwele 2:1-10; Malaki 3:12; Luka 1:46-55.
Malia azalaki kondima makasi ete mwana na ye azali Masiya, mpe kondima yango ekitaki te ata nsima ya liwa ya Yesu. Mwa moke nsima ya lisekwa ya Yesu, azalaki na kati ya bayekoli ya sembo oyo bayanganaki na bantoma mpo na kobondela. (Misala 1:13, 14) Atikalaki sembo, atako ayokaki mpasi ya komona liwa ya mwana na ye na nzete ya mpasi.
Okoki kozwa liteya nini na bomoi ya Malia? Ondimaka kosalela Nzambe ata soki oyebi ete ekomemela yo mikakatano? Ozali komona ete kosalela Nzambe lelo oyo ezali mpenza libaku malamu? Obombaka na makanisi makambo oyo Yesu asakolaki mpe okokanisaka yango na makambo oyo ezali kosalema lelo mpe ‘okanisakanisaka mingi na motema na yo’? (Matai, mokapo 24 tii 25; Malako, mokapo 13; Luka, mokapo 21) Olandaka ndakisa ya Malia, elingi koloba oyebaka Liloba ya Nzambe malamu mpe osalelaka yango mingi na masolo na yo? Okobatela kondima na yo epai ya Yesu ata soki okutani na mitungisi mpo ozali moyekoli na ye?
Baleki ya Yesu bamonisi ete moto akoki kobongwana
Emonani ete bandeko ya Yesu bazalaki kondimela ye te ntango azalaki na bomoi. Ekoki kozala mpo na yango nde bazalaki te ntango akufaki na nzete ya mpasi mpe ezali mpo na yango nde Yesu atikaki mama na ye na mabɔkɔ ya ntoma Yoane. Bandeko ya Yesu bamonisaki ete bazalaki na limemya mpo na ye te; kutu mokolo mosusu balobaki ete Yesu “abɛli motó.” (Malako 3:21) Lokola bandeko ya Yesu bazalaki bandimi te, bato oyo bafandi na bandeko oyo bazali bandimi te bakoki kozala na elikya ete Yesu ayebaka mpasi na bango ntango bandeko yango basɛkaka bango mpo na kondima na bango.
Kasi, nsima ya lisekwa ya Yesu, bandeko na ye bakómaki kondimela ye. Bazalaki na kati ya bato oyo bayanganaki na Yelusaleme liboso ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.) mpe bamipesaki na mabondeli elongo na bantoma. (Misala 1:14) Emonani mpenza ete babongwanaki mpe bakómaki bayekoli na ye ntango bamonaki ndeko na bango asekwi. Tosengeli kolongola elikya te mpo na bandeko na biso oyo basambelaka Yehova te.
Biblia emonisi ete Yesu abimelaki ndeko na ye Yakobo nsima ya lisekwa na ye, mpe Yakobo yango akokisaki mokumba monene na lisangá ya boklisto. Akomelaki bandeko na ye bandimi mokanda moko mpo na kopesa bango toli ete bábatela kondima. (Misala 15:6-29; 1 Bakolinti 15:7; Bagalatia 1:18, 19; 2:9; Yakobo 1:1) Yuda, ndeko mosusu ya Yesu, akomaki mokanda moko mpo na kolendisa baninga na ye bandimi ete bábunda etumba makasi mpo na kondima. (Yuda 1) Okomona ete, ezala Yakobo to Yuda, moko te alobeli bondeko na ye na Yesu na mikanda na bango mpo baninga na bango baklisto bápesa bango lokumu. Yango ezali liteya malamu ya bopɔlɔ oyo tosengeli kolanda!
Sikoyo, wapi mwa mateya oyo tozwi na kotalela lisolo ya baboti ná bandeko ya Yesu? Na ntembe te tozwi mateya mingi na oyo etali komipesa na Nzambe oyo moto akoki komonisa na makambo oyo: (1) Kotosa mokano ya Nzambe na bosembo mpe kondima mikakatano nyonso oyo yango ekoki komemela biso. (2) Kotya makambo ya elimo na esika ya liboso, ata soki ezali kosɛnga komipimela makambo mosusu. (3) Koteya bana na ndenge oyo Biblia ezali kosɛnga. (4) Kolongola elikya te mpo na bandeko oyo basambelaka Yehova te. (5) Komikumisa te soki tozali na ndeko moko oyo azali na mikumba minene na lisangá. Ya solo, bomoi ya bandeko ya Yesu ezali kosalisa biso tópusana lisusu penepene na ye mpe ezali kobakisa botɔndi na biso epai ya Yehova na ndenge aponaki libota ya bato mpamba bábɔkɔla Yesu.
[Bililingi na lokasa 4]
Yozefe akamataki Malia mpo azala mwasi na ye mpe na ndenge yango akokisaki bisakweli ya Masiya
[Bililingi na lokasa 6]
Yozefe ná Malia bateyaki bana na bango makambo ya elimo mpe balakisaki bango ntina ya mosala
[Bililingi na lokasa 7]
Atako baboti na bango balingaki makambo ya Nzambe, bandeko ya Yesu bandimelaki ye te tii liwa na ye
[Bililingi na lokasa 8]
Bandeko ya Yesu Yakobo ná Yuda balendisaki baninga na bango bandimi