Mpo na nini koyeba kolimbisa?
JOSEPH Jacobs, ye oyo azali Moyuda moto na mayele mpe mokomi na mikanda alobaki ete kolimbisa ezali “liteya oyo ezali likoló mpe ezali mpasi koleka mateya nyonso ya bizaleli malamu.” Ya solo, bato mingi bamonaka mpasi mpo na koloba ete: “Nalimbisi yo.”
Ezaleli ya kolimbisa ekokani na kozala na mosolo. Ekoki kosalelama na bolingo malamu mpe na motema mawa nyonso mpo na bato mosusu to moto akoki kobomba yango na moimi nyonso mpo na ye moko. Lolenge oyo elobelami liboso nde ezaleli oyo ebongi na moto na Nzambe. Tosengeli kolóna momeseno ya kolinga kolimbisa. Mpo na nini? Mpamba te Nzambe azali kolendisa yango mpe mpo ete elimo ya kozanga kolimbisa, ya kozongisa mabe na mabe ekoki bobele koyeisa makambo ndóngó.
Toyokaka mbala mingi bato koloba ete: “Nasilikaka te, kasi nazongisaka nde oyo basaleli ngai!” Na mawa nyonso, lelo bato mingi babimisaka maloba motindo wana. Na ndakisa, mwasi moko aboyaki kosolisa mwasi ya ndeko na ye na boumeli ya bambula koleka nsambo, alobaki ete: “Asalelaki ngai likambo moko ya mabe koleka mpe nakokaki soko moke te kolimbisa ye.” Kasi ezaleli ya motindo oyo ya kozanga kolobisa moto oyo asaleli yo mabe, soki esalelami lokola mwango mpo na kopusa moto ete asɛnga yo bolimbisi to lokola ebundeli mpo na kopesa etumbu, mingimingi ekokisaka te mposa ya kozongisa mabe na mabe. Nzokande, ekoki bobele koumelisa kowelana, kopesáká nzela ete ezaleli ya kozanga boboto ekóla. Soki ezaleli wana ya mpasi etikami te, kozanga komipekisa wana mpo na kozongisa mabe na mabe ekoki kobebisa boyokani mpe ata kolɔngɔ́nɔ́ ya moto.
Mpasi oyo euti na ezaleli ya kozanga kolimbisa
Soki moto ayebi kolimbisa te, kowélana oyo yango ebimisaka ekoki komema na kobulungana na makanisi. Na nsima, kobulungana na makanisi ekoki komema na bokɔnɔ makasi. Dr. William S. Sadler akomaki ete: “Moto moko te akoki koyeba malamu, lokola ekoki kosala yango monganga, bonene mpenza ya bokɔnɔ mpe mpasi oyo ezwaka moto, oyo euti na nsɔ́mɔ, na kobanga, na kowelana, . . . na makanisi mabe mpe na etamboli ya mbindo.” Nzokande, ezali solo ete kobulungana na mayoki ebimisaka mpasi motindo wana? Búku moko ya makambo matali minganga eyanoli boye: “Mitango . . . mimonisaki ete babɛli mibale kati na babɛli misato oyo bakendeki epai na monganga bazalaki na bilembo ya maladi oyo eutaka to eyeisamaka makasi mpo na kobulungana na makanisi.”
Ee, nkanda, kosilika mpe kobomba nkɛlɛ na motema ekopesaka mpasi mpenza. Mayoki wana ya mabe ezali lokola biloko bikogugisaka oyo bikobebisaka mokemoke manzanza ya motuka. Libándá ya motuka ekoki komonana kitoko, kasi ekoki kozala ete na nsé ya langi esilaki kobanda kobeba.
Oyo eleki lisusu mpasi ezali ete soki toboyi kolimbisa nzokande ntina ya komonisa motema mawa ezali, yango mpe ekoki kopesa biso mpasi na elimo. Na miso ya Yehova, tokokóma lokola moombo oyo alobelami kati na lisese ya Yesu. Moombo yango, nkolo na ye alimbisaki ye na ntina na ebakataka ya nyongo oyo azalaki na yango. Nzokande, na ntango moninga na ye moombo abondelaki ye ete alimbisa ye na ntina na mwa nyongo moke, amonisaki ezaleli ya motema makasi mpe aboyaki kolimbisa ye. Yesu amonisaki polele ete soki biso tokoboya kolimbisa basusu, Yehova akoboya kolimbisa masumu na biso. (Matai 18:21-35) Na yango, soki tozangi ezaleli ya kolimbisa, tokobungisa lisosoli na biso ya pɛto liboso na Nzambe ata mpe elikya na biso mpo na mikolo mizali koya! (Kokanisá na 2 Timoté 1:3.) Na bongo, nini tokoki kosala?
Tóyekola kolimbisa
Kolimbisa ya solo eutaka na motema. Yango ezali kosɛnga kolimbisa libungá ya moto oyo asaleli yo mabe mpe kobwaka makanisi nyonso ya kozongisa mabe na mabe. Na yango, tokotika nyonso na mabɔkɔ ya Yehova mpo na kosambisa ya nsuka mpe etumbu oyo ekoki kopesama.—Baloma 12:19.
Nzokande, tosengeli koyeba ete lokola “motema ejali na bokosi koleka bilɔkɔ yɔnsɔ mpe mabe mingi,” ekopusaka ntango nyonso te na kolimbisa, ata soki yango esengeli. (Yilimia 17:9) Yesu, ye moko, alobaki ete: “Jambi uta na motema ekobima makanisi mabe, libomi koboma moto, ekobo, pite, boyibi, litatoli na lokuta, kotuka.”—Matai 15:19.
Likambo ya malamu ezali ete, motema na biso ekoki kobongisama mpo ete ekoka kosala oyo ezali sembo. Nzokande, kobongisama oyo tozali na yango mposa esengeli kouta na eutelo oyo eleki likoló. Tokoki kosala yango biso moko te. (Yilimia 10:23) Mokomi moko na Nzembo, oyo apemamaki na Nzambe ayebaki likambo yango mpe abondelaki mpo na kosɛnga litambwisi ya Nzambe. Asɛngaki na etingya nyonso kati na libondeli epai na Yehova ete: “Teyá ngai malako na yo. Sosolisá ngai nzela ya mitindá na yo.”—Nzembo 119:26, 27, NW.
Engebene Nzembo mosusu, Davidi, mokonzi ya Yisraele ya kala ayaki “kososola nzela” ya Yehova. Amonaki yango ye moko mpe ateyamaki mpo na yango. Yango wana, akokaki koloba ete: “[Yehova] ajali na motema molai, ajali mpe na mawa; [ayokaka nkanda noki te, NW] mpe boboto na ye ekoyikanaka. Pelamɔkɔ tata akoyokela bana na ye mawa, boye [Yehova] akoyokelaka bango mawa baoyo bakobangaka ye.”—Nzembo 103:8, 13.
Tosengeli koyekola lokola Mokonzi Davidi asalaki. Tiká ete kati na libondeli, tóyekola ndakisa ya kokoka ya ezaleli ya kolimbisa ya Nzambe mpe ya mwana na ye. Boye, tokoki koyekola kolimbisa uta na motema.
Kasi, basusu bakoki komituna ete: Ezali boni mpo na lisumu monene? Masumu nyonso makoki kolimbisama?
Koluka bokatikati
Soki moto moko asaleli yo mabe monene, mpasi ekoki kozala makasi. Mingimingi ezalaka bongo soki moto oyo basaleli ye lisumu monene, ayebi likambo te. Basusu bakoki nkutu kotuna ete: ‘Lolenge nini nakoki kolimbisa moto oyo azali na nkó nyonso kotɛkisa ngai mpe kozokisa ngai?’ Soki ezali lisumu monene oyo ekoki kosɛnga ete moto abimisama na lisangá, moto oyo basaleli ye mabe asengeli kosalela toli oyo ezwami kati na Matai 18:15-17.
Ata soki likambo yango ezali nini, yango etaleli mingi moto oyo asali mabe. Kobanda na ntango oyo mabe yango esalemaki, amonisaki ata elembo moko ya kobongola motema ya solosolo? Moto oyo asalaki lisumu abongwanaki mpenza, to mbala mosusu amekaki solo kobongisa mabungá na ye? Na miso ya Yehova kobongola motema motindo wana ezali na ntina mingi mpo na kozwa bolimbisi ata soki masumu oyo esalemi ezali mpenza minene. Na ndakisa, Yehova alimbisaki Manase, moko na bakonzi mabe kati na lisoló ya Yisraele. Mpo na ntina nini? Nzambe asalaki bongo mpamba te na nsuka, Manase amikitisaki mpe atikaki banzela na ye ya mabe.—2 Ntango 33:12, 13.
Kati na Biblia, kobongola motema ya solosolo ezali kosɛnga kobongola makanisi na bosembo nyonso, kooka mawa kati na motema mpenza mpo na mbeba nyonso oyo osalaki. Soki ebongi mpe ekoki kosalema, kobongola motema emonanaka na milende misalemi mpo na kozongisela moto oyo osaleli ye mabe biloko na ye. (Luka 19:7-10; 2 Bakolinti 7:11) Soki kobongola motema motindo wana ezali te, Yehova akolimbisa te.a Lisusu, Nzambe amizelaka te ete baklisto bálimbisa baoyo liboso bazalaki na boyebi na makambo ya elimo, kasi na nkó nyonso, bazali koboya kobongola motema, bazali kolanda kosala mabe. (Baebele 10:26-31) Na makambo oyo minene, kolimbisa ekoki mbala mosusu kobonga te.—Nzembo 139:21, 22; Ezekiele 18:30-32.
Soki bolimbisi ekoki kopesama to ekoki kopesama te, ye oyo basaleli ye lisumu monene akoki kolinga kotalela motuna mosusu: Nasengeli kotikala kati na ezalela ya kobulungana na makanisi, kooka mpasi na motema mpe nkanda, kino ntango likambo likosila na mobimba na yango? Tótalela ndakisa moko. Mokonzi Davidi aokaki mpasi makasi na motema ntango Yoaba, mokonzi ya basodá na ye, abomaki Abinele mpe Amasa, “bato mibale baoyo baleki [Yoaba] na malamu.” (1 Mikonji 2:32) Davidi amonisaki mayoki na ye ya nkanda na maloba mpe, na ntembe te, ayebisaki yango epai na Yehova na libondeli. Atako bongo, na nsima, mayoki makasi oyo Davidi azalaki na yango emonani ete ekitaki mpenza. Atikaki te ete mayoki ya nkanda mayangela ye kino na nsuka ya bomoi na ye. Davidi alandaki nkutu kosala elongo na Yoaba, kasi asukaki te bobele na kolimbisa mobomi wana oyo azangaki kobongola motema. Davidi asalaki ete ekateli ya sembo ezwama na nsuka.—2 Samwele 3:28-39; 1 Mikonzi 2:5, 6.
Ekoki kosɛnga ntango mpe milende mpo ete baoyo bazokisami na motema mpo na masumu minene básilisa nkanda na bango ya ebandeli. Kobikisama ekoki kozala likambo ya pɛtɛɛ soki moto oyo asali mabe andimi libungá na ye mpe abongoli motema. Nzokande, moto oyo basaleli ye mabe asengeli kozwa libɔndisi mpe kimya na motema kati na boyebi na ye ya bosembo mpe mayele ya Yehova mpe kati na lisangá ya boklisto, kozanga kotalela ezaleli ya mosáli na mabe.
Osengeli koyeba mpe ete soki olimbisi mosumuki moko, yango elimboli te ete ozali kolóngisa lisumu, mpo na moklisto, kolimbisa elimboli kotika makambo na bosembo nyonso na mabɔkɔ ya Yehova. Azali Mosambisi ya sembo ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba, mpe akosambisa na ntango ekoki. Yango ekosangisa mpe kosambisa ya bato bazangi sembo “bato na pite mpe na ekobo.”—Baɛbɛlɛ 13:4.
Matomba ya kolimbisa
Davidi, mokomi na Nzembo, ayembaki ete: “Jambi yɔ ojali malamu, ɛ [Yehova], mpe okolimbisaka mabe. Otondi na boboto mpɔ na bango yɔnsɔ bakobiangaka nkombo na yɔ.” (Njembo 86:5) Lokola Yehova, yo mpe “olimbisaka”? Matomba mazali mingi.
Ya liboso, kolimbisa basusu ememaka boyokani malamu. Biblia ezali kolendisa baklisto ete: “Bojalanaka na boboto mɔkɔ epai na mosusu, na motema na mawa, na kolimbisana mɔkɔ mɔkɔ pelamɔkɔ Njambe asili kolimbisa bino kati na Klisto.”—Baɛfɛsɛ 4:32.
Ya mibale, kolimbisa ememaka kimya. Yango ezali te bobele kimya elongo na bato, kasi mpe kimya oyo ezali kati na moto ye moko.—Baloma 14:19; Bakolose 3:13-15.
Ya misato, kolimbisa basusu ezali kosalisa biso na komikundola ete biso moko mpe tozali na mposa ya kolimbisama. Ee, “Bato yɔnsɔ babungi mpe bajangi nkɛmbɔ na Njambe.”—Baloma 3:23.
Ya nsuka, kolimbisa basusu ezali kobongisa nzela mpo ete Nzambe mpe alimbisa masumu na biso. Yesu alobaki ete: “Jambi sɔkɔ bokolimbisa bato bikweli na bango, Tata na bino na Likoló akolimbisa mpe bino.”—Matai 6:14.
Kanisá naino na makambo mingi oyo makokaki kotonda kati na makanisi na Yesu na nsima ya nzangá na mokolo oyo akufaki. Azalaki komibanzabanza mpo na bayekoli na ye, mosala ya kosakola, mpe mingimingi bosembo na ye epai na Yehova. Nzokande, ata na ntango oyo azalaki komona bwale likoló ya nzeté ya mpasi, alobelaki likambo nini? Moko kati na maloba na ye ya nsuka ezalaki oyo ete: “Tata, limbisa bango.” (Luka 23:34) Tokoki komekola ndakisa ya kokoka ya Yesu, na kolimbisanáká na motema moko.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nzokande, Yehova azalaka na makambo mosusu oyo atalelaka wana azwi ekateli ya kolimbisa. Na ndakisa, soki moto oyo asali mabe ayebi mitindá ya Nzambe te, kozanga boyebi wana ekoki kolɛmbisa bonene ya likambo. Na ntango Yesu asɛngaki na Tata na ye ete alimbisa bato oyo babomaki ye, na ntembe te Yesu azalaki koloba na ntina na basodá Baloma, baoyo babomaki ye. ‘Bayebaki te oyo bazalaki kosala,’ mpamba te bayebaki te soki ye azalaki mpenza nani? Nzokande, bakonzi ya mangomba oyo bazalaki nsima ya libomi wana bamemaki ngambo monene koleka—mpe mingi kati na bango bakokaki kolimbisama soko moke te.—Yoane 11:45-53; kokanisá na Misala 17:30.
[Bililingi na lokasa 5]
Okangi ntina ya lisese ya Yesu oyo elobeli moombo oyo azangaki ezaleli ya kolimbisa?
[Bililingi na lokasa 7]
Kolimbisa basusu eyeisaka boyokani malamu mpe epesaka bolamu