Tósosola ntina na koya na masiya
“‘Tosili kozwana na Masiya.”—YOANE 1:41.
1. Maloba nini na kobenda likebi makomami kati na Biblia, mpe elobamaki ntango nini?
EZALI Moyuda moko na nkombo André nde ayebisaki maloba oyo epai na ndeko na ye (esali bongo koleka mibu 1950) na ekeke ya liboso na ntango na biso. Okoki komikanisela na mayoki nini alobaki maloba yango, oyo ntoma Yoane akomaki yango nsima mpo na biso? Mbula wana oyo tokoki kobosana yango te eyebisamaki sikisiki na Luka, mokomi na makambo na kala mpe moklisto: “na mbula na zomi na mitano na bokonzi na Kaisala Tibeli.” Mbula ya zomi na mitano kobanda na ntango oyo Tibeli akomaki mokonzi ya Roma ebandaki na septembre ya mobu 28 mpe esukaki na septembre ya mobu 29 ya ntango na biso.—Luka 3:1-3, 21, 22; Yoane 1:32-35, 41.
2. Lolenge nini esakweli na Danyele esakolaki mobu 29 ya ntango na biso?
2 Mbula oyo Masiya amonanaki esakolamaki sikisiki. Elekaki mpenza mibu 483 uta Artaxerxés, mokonzi ya Perse, apesaki etinda ete batonga lisusu Yelusaleme, na mobu ya ntuku mibale ya koyangela na ye, elingi koloba na mobu 455 liboso ya ntango na biso.a (Nehemia 2:1-8) Danyele asakolaki boye ete: “Longwa na kobima na liloba na kotelemisa mpe na kotonga Yelusaleme kino koya na mopakolami, mokonzi, ekozala poso nsambo, na nsima poso ntuku motoba na mibale.” (Danyele 9:25) Na yango, poso 69 (poso 7 + poso 62) ya esakweli esengelaki koleka na kati na makambo yango mibale ya ntina. Poso ntuku motoba na libwa ezali mikolo 483. Engebene lilako ya esakweli mpo na kotanga “mokolo moko mpo na mbula moko,” Masiya asengelaki komonana nsima na mibu 483, na mobu 29 ya ntango na biso.—Ezekiele 4:6.
3. a) Titre “Masiya” elimboli nini? b) Bisakweli nini Masiya asengelaki kokokisa?
3 Tososoli bongo mpo na nini, na mobu 29 ya ntango na biso, “bato bazalaki na mitema likoló” mpo na kozela Masiya. (Luka 3:1, 15) Titre “Masiya” ezali na ndimbola moko na liloba “Klisto” na greke; nyonso mibale elimboli “Mopakolami.” (Yoane 1:41) Mpo na Bayuda mingi, likambo ezalaki na koyeba nani Jéhovah Nzambe asengelaki kopakola ye lokola mokonzi, bobele likoló na Yisraele te, kasi likoló na bato nyonso na mokili. Eyebisamaki sikisiki kati na bisakweli ete ekozala bobele mokitani moko na Yuda, moko kati na bankoko mike ya Abrahame. Epai mosusu, Masiya asengelaki kozala mosangoli na kiti na bokonzi na mokonzi Davidi oyo abimaki na libota na Yuda mpe esengelaki ete azala moto abotami na Beteleme, engumba na Davidi.—Genese 17:5, 6; 49:10; Nzembo 132:11; Danyele 7:13, 14; Mika 5:2; Yoane 7:42.
Amonisamaki polele
4, 5. a) Likambo nini lisalemaki na mobu 29 ya ntango na biso, mbula oyo na ntina mingi? b) Ndenge nini moto oyo aponamaki Masiya amonisamaki na lolenge na polele mpenza?
4 Tala eloko nini ekomaki na mobu 29 wana ya ntango na biso, mobu oyo ya ntina mingi: “Liloba na Nzambe ebimelaki Yoane, mwana na Zekalia kati na esobe. Atambolaki bipai nyonso na ngomba nyonso mibale na Yordani, mpe asakolaki libatisi na kobongwana na motema mpo na kolimbisama na masumu.” (Luka 3:2, 3) Mosala na Yoane mobongisaki Bayuda oyo babongolaki motema ete bandima koya na Masiya oyo ebelemaki. Epai mosusu, Jéhovah apesaki elembo na Yoane: asengelaki kotalela ‘ye oyo elimo ekokita mpe ekoumela likolo na ye.’—Yoane 1:33.
5 Nsima na kobatisa Yesu moto na Nazarete, Yoane amonaki polele ndenge elimo santu ekitelaki Yesu, mpe ntembe ezalaki lisusu te. Yesu apakolamaki na mafuta te, lokola oyo bapakolaki na yango Davidi, nkoko na ye, kasi apakolamaki nde na elimo santu ya Jéhovah Nzambe. (1 Samwele 16:13; Misala 10:38) Bobele na ntango yango, mongongo na Nzambe ye moko eyokanaki ete: “Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli na ye mingi.” (Matai 3:16, 17) Yango wana Yoane atatolaki na nsima ete: “Namonaki elimo kokita likoló na ye lokola ebenga longwa na likoló mpe eumeli likoló na ye. Nasili komona mpe nasili kotatola ete oyo azali Mwana na Nzambe.” —Yoane 1:32, 34.
6. Ndakisa nini malamu mingi André mpe Yoane batikelaki biso?
6 Na maloba oyo mamonisaki bosembo na ye, Yoane Mobatisi akambaki bayekoli na ye epai na Yesu, mpe abengaki ye ete “Mwana-na-mpate na Nzambe, molongoli na masumu na mokili.” (Yoane 1:29) Bayekoli mibale na Yoane bandimaki Yesu noki. Nsima na kofanda mokolo mobimba esika moko na Yesu, ntembe ata moko ezalaki lisusu te kati na makanisi na bango. André, moko kati na bayekoli wana mibale, alukaki na mbangu mpenza ndeko na ye, Simon Pierre. Moyekoli mosusu ekoki kozala Yoane, mwana na Zebedia, oyo akomaki ntoma molingami na Yesu. Nsima na kotatola mpo na Masiya na boumeli na mibu soko 70, ntoma Yoane apusamaki na kokoma mpo na biso makambo touti kotanga awa na likoló. Ndakisa na ye mpe ya André esimbi motema na yo? Na ndakisa na mibali oyo mibale mpe na bantoma mosusu ya Mwana-na-mpate, oyoki mposa ya kosakola solo kitoko na ntina na Masiya?—Emoniseli 1:9; 21:14; Yoane 1:35-41; Misala 5:40-42.
Apakolami lokola Mokonzi mpe Nganga Monene
7. Mpo na nini Yesu akokaki kozala nganga na temple na Yelusaleme te?
7 Na kobotama na ye, Yesu azalaki Moyuda; azalaki bongo “na nse na mibeko.” (Bagalatia 4:4) Lokola azalaki mokitani na libota ya Yuda, akokaki kozala nganga te kati na temple ya Jéhovah oyo ezalaki awa na mabelé; mpamba te banganga oyo bazalaki kosala kuna bazalaki bakitani na Alona, na libota ya Levi. Ezali yango ntoma Paulo akundolaki na baninga na ye baklisto na maloba oyo ete: “Nkolo na biso abotamaki na libota na Yuda mpe Mose alobaki likambo na banganga mpo na libota yango te.”—Baebele 7:14.
8. Temple ya Jéhovah na mabelé ezalaki komonisa nini?
8 Ntoma Yoane akomaki ete: “Moi na solo oyo ekotanelaka moto na moto, ezalaki koingela kati na mokili.” (Yoane 1:6-9) Nsima wana Yesu azwaki batisimo, temple monene ya elimo ebandaki kotongama. Na solo mpenza, kobanda wana nganga monene ya elimo aponamaki, ye oyo azali na makoki ya kosikola bato na boombo ya mokili oyo etambwisami na Satana mpe ekoti na molili makasi na elimo.—Baebele 8:1-5; 9:24.
9, 10. a) Yesu alingaki koloba nini wana alobaki ete: “Olingi mbeka mpe mabonza na kotombwa te,” kasi “’osili kobongisela ngai nzoto”? b) Yesu azalaki na mayoki nini na ntina na likambo yango?
9 Yesu azalaki kobondela ntango azwaki batisimo. Biblia eyebisi biso bamoko na maloba na ye ya ntina mingi. Tala motindo nini Paulo akomaki yango na nsima: “‘Olingi mbeka mpe makabo na kotombwa te, kasi osili kobongisela ngai nzoto. Osepeli mbeka na kotumba mpe miboma mpo na masumu te. Boye nalobaki ete, Tala nasili koya, ekomami mpo na ngai kati na mokanda. E Nzambe, nayei kosala mokano na yo.”’—Baebele 10:5-7; Luka 3:21.
10 Na yango, Yesu asalelaki mpo na ye moko esakweli ya Nzembo 40:6-8, oyo elobaki ete Jéhovah akosukisa mbeka ya banyama oyo banganga na libota ya Alona bazalaki kokabela ye na temple na Yelusaleme. Jéhovah ‘asepelaki’ na mbeka yango te, mpo ete ezalaki bobele elilingi mpe ekokaki mpenza kolongola masumu na bato te. Yango wana Jéhovah abongiselaki Yesu nzoto ya bomoto na kokoka mpo ete akaba yango lokola mbeka. Nzambe akitisaki bomoi ya Mwana na ye longwa na likoló kino na libumu ya ngondo moko Moyuda. Yesu abotamaki bongo kozanga kobebisama na lisumu liuti na Adam. Azalaki Mwana na Nzambe na bomoto na kokoka, mpe bomoi na ye bokokaki kofutama mpo na kolongola masumu ya mokili. (Luka 1:30-35) Lokola esakolaki yango Nzembo 40:8, Yesu alingaki na motema na ye mobimba kosala mokano ya Tata na ye. “Mpe na mokano yango tosili kobulisama mpo na kotombwa na nzoto na Yesu Klisto lokola mbeka mbala moko mpo na libela.”—Baebele 10:10, 11.
11. Esakweli nini ekokisamaki na liwa ya Masiya, mpe na ndimbola nini liwa yango “lisukisaki mbeka”?
11 mbeka na bomoto na Yesu, oyo epesamaki mbala moko mpo na libela, esilisaki ntina ya mabonza mosusu oyo mazalaki kopesama na temple ya elilingi na Yelusaleme. Lisusu, Yesu akufaki na mokolo na Elekeli ya mobu 33, elingi koloba mbula misato na ndambo nsima na batisimo na ye. Mbula misato wana na ndambo ekokanaki na ndambo na poso na esakweli (Mituya 14:34) Makambo masalemaki bobele lokola Danyele asakolaki yango mpo na oyo etali kobomama na Masiya, ete: “Na ndambo na poso yango, akosukisa mbeka mpe moboma.” (Danyele 9:26, 27) Atako bonganga elandaki kosalema na Yelusaleme kino kobebisama ya temple na mobu 70, mbeka oyo epesamaki na banganga na boumeli ya bambula wana ezalaki na ntina ata soko moke te, mpamba te bakitanaki yango na mbeka na Yesu oyo eleki motuya.—Matai 23:37, 38.
12. Na ndimbola nini bonganga na Yesu eleki oyo na Alona?
12 Alona azalaki nganga monene ya liboso kati na molongo molai ya banganga minene ya Yisraele. Nsima na kopakolama na mafuta na bosantu, azelaki mikolo nsambo na tabernakle liboso na kozwa lotomo nyonso mpo na kosala mosala na ye ya nganga monene. (Levitike 8:12, 13) Bobele bongo, Yesu azelaki mwa ntango liboso ya kozwa lotomo nyonso ya kolobela bato. Eleko wana ya bozeli ebandaki ntango apakolamaki lokola Nganga Monene mpe eumelaki kino na kosekwa na ye. Na kokesena na Alona, Mwana na Nzambe, ye oyo akoki kokufa lisusu te, azali na mposa na bakitani te, mpe azali Nganga mpe Mokonzi “na lolenge na Melekisedeke.”—Nzembo 110:1-4; Genese 14:18-20; Baebele 6:20; 7:1-3, 11-17, 23-25.
13. a) Wapi mokumba monene oyo nganga monene un Yisraele azalaki komema yango? b) Ndenge nini Yesu amemaki mokumba oyo moleki mpenza monene?
13 Na Yisraele ya kala, ezalaki mpenzampenza mokumba ya nganga monene na koteya bato makambo na Nzambe lokola esengeli. (Levitike 10:8-11; Malaki 2:7) Bobele bongo, Yesu alakisaki na bato makambo nini Jéhovah azali kosenga na bango nyonso balingi kozwa libula ya Bokonzi mpe kozala na bomoi ya seko. (Matai 6:9, 10, 33; 7:28, 29; 11:12; 25:34, 46) Na eyanganelo moko na Nazarete, Yesu atangaki mpe akokisaki esakweli oyo na ye moko: “Elimo na Jéhovah ezali likoló na ngai, mpo ete apakoli ngai ete nasakola na babola nsango malamu.” Mpe nsima na kolekisa mwa ntango na Kapernaume, alobaki ete: “Ekoki na ngai kosakola nsango malamu na Bokonzi na Nzambe na mboka mosusu lokola, mpo ete natindami na likambo yango.” (Luka 4:18, 19, 43; Yisaya 61:1, 2) Yesu abongisaki mpe bayekoli 70 mpo na kopalanganisa mosala oyo ya kosakola Bokonzi, mpe alobaki ete bakosala misala minene koleka oyo ye asalaki. (Luka 10:1-9; Yoane 14:12) Atyaki bongo moboko na mosala monene ya koteya Biblia na mokili mobimba, mosala oyo azali kotambwisa yango na nzela na “moombo na sembo,” kelasi oyo esalami na bayekoli na ye bapakolami.—Matai 24:45-47; 28:19, 20.
Mokoteli monene ya boyangeli na Jéhovah
14. a) Na mokano nini nganga monene na Yisraele azalaki koingela mbala moko na mbula moko kati na Esika eleki bulee na Mokolo ya mbeka na kozongisa bondeko? b) Mpaka na malasi emonisaki nini?
14 Ntina eleki monene mpo na yango Mwana na zambe ayaki na mabelé ezalaki te mpo na kobikisa bato, kasi mpo na kosukisa makambo na lokuta oyo Satana abimisaki na ntina etali boyangeli na Jéhovah. Tokoki kokanga ntina na yango na kokanisaka likoló na Mokolo na mbeka mpo na kozongisa bondeko oyo Yisraele bazalaki kopesa mbula na mbula. Mokolo wana, nganga monene ya elilingi asengelaki koingela mbala mingi kati na Esika eleki bulee. Mbala ya liboso, azalaki koingela na mpaka na malasi, oyo azalaki kosopa na mbeki moko etondaki na makala ya móto. (Levitike 16:12-16) Likambo wana ezalaki mpenza komonisa nini Nganga Monene ya solo asengelaki kosala awa na mabelé liboso ete amata na likoló mpo na komonana liboso na Jéhovah elongo na motuya na mbeka na ye na bomoto.b (Baebele 9:24) Lokola emonisamaki na bosaleli na mpaka na malasi, bomoi na bosembo na Yesu ezalaki bomoi na mabondeli na sembo, na molende makasi mpo na losambo ya peto mpe na bolingo bozindo mpo na Jéhovah. (Nzembo 141:2; Malako 1:35; Yoane 2:13-17; 12:27, 28; 14:30, 31; Baebele 5:7) Yesu alongaki na kobatela bosembo na ye kozanga kokweia liboso na komekama na bokosi, na koseka mpe na monyoko makasi oyo eutaki na Satana mpe na bato na ye.—Masese 27:11; Matai 22:15-18; Malako 14:60-65; 15:16-32; Luka 4:13, 29; Yoane 8:44, 59.
15. Ndenge nini tokoki komonisa na Jéhovah ete tozali na botondi epai na ye lokola asili kopesa biso nganga monene aleki malamu? (Baebele 10:21-26)
15 Esekwaki ye mpo na kozala na bomoi ezangi kokufa na likoló, Yesu azwaki mbano mpo alongisaki boyangeli na Jéhovah. Tosengeli mpenza kozala na botondi epai na Jéhovah wana apesi biso Nganga Monene aleki malamu. “Bongo, awa ezali biso na nganga monene oyo asili koleka na likoló, ye Yesu, Mwana na Nzambe, tosimbaka eyambweli ngwi.” (Baebele 4:14) Olingi solo mpenza kolanda ndakisa na bosembo oyo Yesu atikaki, ata soko likambo nini Diable akosala? Soki ee, yeba ete okoki kozwa lisalisi mpe kosala yango. Mpo na yango, lisalisi malamu mingi lipesameli yo. “Tozali na Nganga Monene te oyo azangi koyoka mpasi esika moko na biso kati na bolembu na biso, kasi ye oyo amekami na makambo nyonso lokola biso, nde akwei na lisumu te. Boye tika tobelema na molende epai na kiti na bokonzi na ngolu, mpo ete tozwa mawa na Nzambe mpe tomona ngolu na kozwa lisungi na ntango na bosenga.”—Baebele 4:15, 16; 5:7-10; Bafilipi 4:13; 1 Yoane 2:1, 2.
Mposa ya kosembolama
16. Bilikya nini bayekoli ya liboso na Masiya bazalaki na yango mpo na oyo etali koyangela na Bokonzi na ye?
16 André mpe Yoane bayebaki Masiya na solo noki mpenza; kasi, basengelaki koyekola makambo mingi motindo moko na boyekoli mosusu ya ekeke na liboso. (Yoane 16:12, 13) Na ndakisa ya Bayuda mingi ya eleko na bango baoyo bazalaki kobanga Nzambe, bango mpe bazalaki kolikya ete Bokonzi na Masiya ekobanda komonisa nguya na yango wana ezali bango na bomoi mpe ekosikola libota ya Yisraele mpe Yelusaleme, mboka-mokonzi na yango na nse na boyangeli ya Bapakano. (Luka 2:38; 3:15; 19:11; 23:51; 24:21) Kasi, matomba nini bato na masumu mbele bakokaki kozwa na yango?
17, 18. Mpo na nini Yesu apesaki lisese oyo elobelaki “moto na lokumu”?
17 Mpo na kosikola bato oyo bakofanda na nse na Bokonzi na ye, na lisumu mpe na liwa, Masiya asengelaki kobomama naino liboso, lokola mbeka na mwana-na-mpate. (Yoane 1:29; Yisaya 53:7, 12) Ntango Yesu amonisaki ete akobomama mpe, nsima akosekwa, Petelo alobaki na ye ete: “Soko moke te, Nkolo! Oyo ekokomela yo te!” (Matai 16:21, 22) Kasi Yesu ayebaki ete bayekoli na ye “basosolaki likambo yango te.”—Marko 9:31, 32; tala Matai 17:22, 23.
18 Na mobembo na nsuka asalaki na Yelusaleme, Yesu alobelaki likambo yango polele koleka. (Matai 20:18, 19) Amonisaki mpe bolamu oyo liwa na ye esengelaki komema, na kolobáká ete: “Mwana na moto ayei . . . mpo na kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na (bato) mingi.” (Matai 20:28) Bilikya na libunga bipekisaki bayekoli na ye na kokanga ntina ya maloba oyo. Luka alobi ete “azalaki penepene na Yelusaleme mpe bango bazalaki kobanza ete Bokonzi na Nzambe ekomonana nokinoki.” Mpo na kosembola makanisi na bango, Yesu apesaki lisese oyo kati na yango amikokisaki na “moto na lokumu” oyo asengelaki naino kokende “na mokili mosusu mosika mpo na kozwa bokonzi.” (Luka 19:11, 12) “Mokili” yango elakisaki likoló, epai Yesu amataki nsima na liwa mpe lisekwa na ye.
19. a) Bilikya nini ya libunga bayekoli na Yesu bamonisaki na nsima na lisekwa na ye? b) Mbongwana nini esalamaki kati na boyokani na Nzambe elongo na bato na Pantekote ya mobu 33? (Baebele 8:7-9, 13
19 Kasi, liboso ete Yesu amata, bayekoli na ye batunaki ye ete: “Motei, okozongisela Yisraele bokonzi na ntango oyo?” (Misala 1:6) Yesu apamelaki bango mpo ete batunaki motuna oyo? Te, alimbwelaki bango ete ntango ekokaki naino te mpe esengelaki na bango ete bamipesa kati na mosala monene oyo ya kotatola na ntina na Masiya ya solo. (Misala 1:7, 8) Nsima na mwa ntango moke, boyokani na kondimana oyo Nzambe azalaki na yango elongo na Yisraele ya mosuni esengelaki kosuka. Na yango, Bokonzi na Masiya oyo bosengelaki koya, ekokaki kotyama te likoló na Yisraele ezangi bosembo na mabelé. Yesu alobaki na bayini na ye Bayuda ete: “Bokonzi na Nzambe ekolongwa na bino mpe ekopesama na libota likobimisa mbuma na yango.” (Matai 21:43) Mikolo zomi nsima wana Yesu amataki na likoló, libota yango ebimaki. Elimo santu esopamaki likoló na bayekoli 120 na Yesu, mpe bakomaki bongo bapakolami mpo na kozala “basantu” na Nzambe mpe kokóma “basangoli na libula elongo na Klisto” kati na Bokonzi na Masiya bozalaki koya.—Danyele 7:13, 14, 18; Baloma 1:7; 8:1, 16, 17; Misala 2:1-4; Bagalatia 6:15, 16.
20. Atako bazalaki na bilikya ya libunga baklisto na sembo na ekeke na liboso bazalaki kosala nini?
20 Ata nsima wana bapakolamaki, baklisto na ekeke ya liboso bazalaki na bilikya ya libunga. (2 Batesaloniki 2:1, 2) Kasi na esika ete bayoka mabe mpe batika, bamipesaki mpenza na komikitisa nyonso. Wana balendisamaki na elimo santu na Nzambe, bandimaki na esengo mpenza mosala oyo motali kopesa litatoli mpe ‘kozalisa bayekoli na mabota nyonso.’—Matai 28:19, 20; Misala 1:8; Bakolose 1:23.
20 Ezali boni mpo na ekeke oyo na ntuku mibale? Basaleli na Jéhovah balukaki koyeba ntango na kotyama ya Bokonzi na Masiya na Jéhovah? Esengelaki mpe kosembola bilikya na bango likoló na makambo mosusu lokola oyo esalemaki epai na baklisto na ekeke ya liboso?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ezala Encyclopédie américaine to mpe Grande encyclopédie sovietique, nyonso mibale ezali koyebisa nsuka na boyangeli ya Artaxerxes na mobu 424 liboso ya ntango na biso. Boyangeli yango ebandaki ntango nini? Na mobu 474 liboso ya ntango na biso. Lokola elembeteli, tozali na likomi moko ya bakundoli na biloko na kala, oyo ekomamaki na mobu ya ntuku mitano ya koyangela ya Artaxerxes mpe mosusu oyo engebene yango elobaki ete na mobu ya ntuku mitano-na-moko ya boyangeli na ye nde bakitanyaki ye na moto mosusu. Soki tozongi nsima na kotangáká mpenza mibu ntuku mitano, tokokóma na mobu 474 liboso ya ntango na biso, mbula oyo boyangeli na ye ebandaki. Na yango, mobu ya ntuku mibale ya boyangeli ya Artaxerxes, mbula oyo babosanaki kotanga yango na lolenge malamu, esengeli kozala na mibu 19 na nsima, elingi koloba na 455 liboso na ntango na biso. Mpo na kozwa makanisi ya sikisiki, tala mokanda lnsight on the Scriptures, tome 2, page 616, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, lnc.
b Tala La Tour de Garde du 15 Juillet 1974, pages 446 mpe 447.
Bozongeli?
◻ Titre “Masiya” elimboli nini?
◻ Likambo nini ya ntina mingi esalamaki na mobu 29?
◻ Na ndimbola nini Masiya ‘asukisaki mbeka na ndambo na poso’?
◻ Mokumba nini Yesu asili kozwa uta kopakolama na ye?
◻ Ntina monene na koya ya yambo na Masiya ezalaki nini, mpe biso tosengeli komonisa nini mpo na yango?
21. Mituna nini tokotalela yango kati na lisolo elandi?
[Elilingi na lokasa 13]
Kokota na yambo ya nganga monene kati na Esika eleki bulee esakolaki likambo moko monene koleka lobiko na bato