Tempelo monene ya Yehova na elimo
“Tozali na nganga monene lokola oyo, . . . mosaleli ya bato banso kati na esika mosantu mpe kati na hema ya solo, oyo Yehova atɛlɛmisaki, kasi moto te.”—BAEBELE 8:1, 2, NW.
1. Ebongiseli nini ya bolingo Nzambe asalaki yango mpo na bato ya masumu?
YEHOVA NZAMBE, mpo na bolingo na ye monene oyo azali na yango epai na bato, apesaki mbeka mpo na kolongola masumu ya mokili. (Yoane 1:29; 3:16) Yango esɛngaki ete akɔtisa bomoi ya Mwana-mobotami na ye ya liboso kati na libumu ya ngɔndɔ Moyuda moko abéngamaki Malia. Anzelu ya Yehova alimbolaki polele epai na Malia ete mwana oyo akobota ‘akobyangama mosantu, Mwana na Nzambe.’ (Luka 1:34, 35) Yosefe, ye oyo abandaki Malia mpo na libala, azwaki nsango ete zemi ya kobotama ya Yesu esengelaki kozwama na lolenge ya likamwisi mpe bayebisaki ye ete mwana yango “akobikisa bato na ye na masumu na bango.”—Matai 1:20, 21.
2. Yesu asalaki nini ntango akómaki na mibu 30, mpe mpo na nini?
2 Wana Yesu azalaki kokóla, ekoki mpenza kozala ete asosolaki mwa makambo matali kobotama na ye na lolenge ya likamwisi. Ayebaki ete Tata na ye na likoló asengelaki kopesa ye mosala ya kobikisa bomoi ya bato, oyo asengelaki kosala yango awa na mabelé. Na yango, wana akómaki mobali akɔmɛli soko na mibu 30 ya kobotama, Yesu abɛlɛmaki epai na Yoane mosakoli ya Nzambe ete akoka kozwa batisimo na Ebale Yaladene.—Malako 1:9; Luka 3:23.
3. (a) Yesu alingaki koloba nini na ntango ayebisaki ete: “Olingaki mbeka mpe makabo na kotombwa te”? (b) Ndakisa nini monene Yesu atyaki liboso na bato nyonso oyo balingi kokóma bayekoli na ye?
3 Yesu azalaki kobondela na ntango ya batisimo na ye. (Luka 3:21) Na ntembe te, ezalaki na ntango yango nde akokisaki maloba oyo mazwami kati na Nzembo 40:6-8, lokola ntoma Paulo amonisaki na nsima: “Olingaki mbeka mpe makabo na kotombwa te, kasi osili kobongisela ngai nzoto.” (Baebele 10:5) Na yango, Yesu amonisaki ete ayebaki malamu ete Nzambe ‘alingaki te’ bambeka ya banyama ekóba kopesama na tempelo ya Yelusaleme. Nzokande, asosolaki ete Nzambe asilaki kobongisa nzoto moko ya bomoto ya kokoka mpo na ye, Yesu, ete apesa yango lokola mbeka. Yango esengelaki kolongola ntina nyonso mosusu ya kopesa bambeka ya banyama. Komonisáká mposa na ye mozindo ya kotosa mokano ya Nzambe, Yesu akóbaki na kobondeláká ete: “Talá nasili koya, ekomami mpo na ngai kati na mokanda. Ɛ Nzambe, nayei kosala mokano na yo.” (Baebele 10:7) Na mokolo yango Yesu amonisaki mpenza ndakisa monene ya mpiko mpe ya komipesa mobimba mpo na baoyo nyonso basengelaki kokóma bayekoli na ye na nsima!—Malako 8:34.
4. Lolenge nini Nzambe amonisaki ete asepelaki na lolenge Yesu amipesaki ye moko lokola mbeka?
4 Nzambe amonisaki ete andimaki losambo oyo Yesu asalaki na ntango azalaki kozwa batisimo? Tiká ete moko kati na bantoma na bantoma oyo Yesu aponaki apesa biso eyano: “Esili Yesu kobatisama, abimi nokinoki na mai. Mpe talá, Likoló epaswani mpe amoni [“elimo,” NW] na Nzambe kokita lokola ebenga mpe kokóma likoló na ye. Mpe mongongo uta na Likoló elobi ete, Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli [na] ye mingi.”—Matai 3:16, 17; Luka 3:21, 22.
5. Etumbelo ya tempelo oyo ezalaki mpenza awa na mabelé ezalaki elilingi ya nini?
5 Likambo oyo ete Nzambe andimaki nzoto ya Yesu lokola mbeka elimbolaki, na elobeli ya elimo, ete etumbelo monene koleka oyo ezalaki na tempelo ya Yelusaleme epesamelaki nkembo monene koleka. Etumbelo oyo ezalaki mpenza awa na mabelé, epai kuna banyama bazalaki kopesama mbeka ezalaki elilingi ya etumbelo ya elimo, oyo elimbolaki bongo “mokano” to ebongiseli ya Nzambe mpo na kondima bomoi ya bomoto ya Yesu lokola mbeka. (Baebele 10:10) Yango wana ntoma Paulo akomaki epai na baninga na ye baklisto ete: “Tozali na etumbelo na mbeka oyo bango bazali kosala mosala kati na Hema bazangi bokonzi na kolya na yango.” (Baebele 13:10) Elingi koloba ete, baklisto ya solo bazali kozwa litomba na mbeka monene ya kopɛtola masumu, oyo eteni monene ya banganga Bayuda babwakaki yango.
6. (a) Likambo nini emonisamaki polele na ntango Yesu azwaki batisimo? (b) Nkombo Masiya to Klisto, elimboli nini?
6 Kopakolama ya Yesu na elimo santu elimbolaki ete Nzambe asilaki sikawa kobandisa ebongiseli na ye mobimba ya tempelo na elimo, oyo kati na yango Yesu azali kosala mosala ya Nganga Monene. (Misala 10:38; Baebele 5:5) Na kopemama na elimo santu, moyekoli Luka amonisaki na bosikisiki mobu oyo na boumeli na yango likambo wana monene lisalemaki, ete ezalaki bongo “na mbula na zomi na mitano na bokonzi na Kaisala Tibɛli.” (Luka 3:1-3) Yango ekokanaki na mobu 29 T.B.—na bosikisiki mpenza pɔ́sɔ 69 ya mbula, to mbula 483, kobanda na ntango oyo Mokonzi Alatazeze apesaki etindá ya kotonga lisusu bifelo ya Yelusaleme. (Nehemia 2:1, 5-8) Engebene esakweli, “Mokonzi Masiya” asengelaki kobima na mobu wana mosilaki kosakolama. (Danyele 9:25, NW) Bayuda mingi bayebaki yango malamu. Luka ayebisi ete “bato bazalaki na mitema na likoló” na ntina na komonana ya Masiya, to Klisto, bankombo oyo euti na Liebele mpe Greke mpe ezali na ndimbola bobele moko, “mopakolami.”—Luka 3:15.
7. (a) Ntango nini Nzambe apakolaki “Esika eleki bosantu,” mpe yango elimbolaki nini? (b) Likambo nini mosusu likómelaki Yesu ntango azwaki batisimo?
7 Na ntango Yesu azwaki batisimo, efandelo ya Nzambe na likoló epakolamaki, to etyamaki pembeni, lokola “Esika eleki bosantu” kati na ebongiseli monene ya tempelo na elimo. (Danyele 9:24, NW) “Hema ya solo [to, tempelo], oyo Yehova atɛlɛmisaki, kasi moto te,” esilaki kobanda mosala na yango. (Baebele 8:2, NW) Lisusu, na nzela ya batisimo na ye na mai mpe na elimo mosantu, mobali oyo, Yesu Klisto, abotamaki lisusu lokola Mwana ya Nzambe na elimo. (Kokanisá na Yoane 3:3.) Yango elimboli ete na ntango ebongisamaki, Nzambe asengelaki kobénga lisusu Mwana na ye ete azonga na likoló, epai kuna asengelaki kosala na lobɔkɔ ya mobali ya Tata na ye lokola Mokonzi mpe Nganga monene “libela kobila molɔngɔ́ na Melikisedeke.”—Baebele 6:20; Nzembo 110:1, 4.
Esika eleki bosantu ya likoló
8. Makambo nini ya sika kiti ya bokonzi ya Nzambe na likoló ezwaki yango?
8 Kobanda na mokolo oyo Yesu azwaki batisimo, kiti ya bokonzi ya Nzambe na likoló ezwaki makambo ya sika kati na yango. Koponama ya moto moko ya kokoka lokola mbeka mpo na kolongola masumu ya mokili emonisaki polele bokeseni kati na ezalela ya bulɛɛ oyo Nzambe azali na yango mpe ezalela ya lisumu oyo bato bazali na yango. Motema mawa ya Nzambe emonisamaki mpe polele na likambo oyo ete amonisaki sikawa bolingo malamu na ye ya kondima mbɔndi, to ya kozongisa boyokani. Na yango, kiti ya bokonzi ya Nzambe na likoló esilaki kokóma eteni ya kati mpenza ya tempelo, epai kuna nganga monene azalaki kokɔta mbala moko na mbula elongo na makila ya nyama mpo na kopɛtola masumu na lolenge ya elilingi.
9. (a) Ridó oyo ekabolaki Esika mosantu mpe Esika eleki bosantu ezalaki elilingi ya nini? (b) Lolenge nini Yesu alekaki ridó ya tempelo ya Nzambe na Elimo?
9 Ridó oyo ekabolaki Esika mosantu na Esika eleki bosantu ezalaki elilingi ya nzoto ya mosuni ya Yesu. (Baebele 10:19, 20) Yango nde epekisaki Yesu kokɔta kati na esika Tata na ye azalaka, wana ezalaki ye naino moto awa na mabelé. (1 Bakolinti 15:50) Na ntango Yesu akufaki, ‘elamba na Tempelo epaswanaki longwá na likoló kino na nsé.’ (Matai 27:51) Yango emonisaki na lolenge ya kobenda likebi ete eloko oyo ekokaki kopekisa Yesu kokɔta na likoló esilaki bongo kolongolama. Mikolo misato na nsima, Yehova Nzambe asalaki likamwisi moko monene. Asekwisaki Yesu kati na bakufi, azongaki te na nzoto ya mosuni mpe ya makila, kasi asekwisamaki lokola ekelamu ya elimo ya nkembo oyo “akoumela seko.” (Baebele 7:24) Mikolo ntuku minei na nsima, Yesu amataki na likoló mpe akɔtaki na “Esika eleki bosantu” ya solo, mpo na “komonana liboso na Nzambe mpo na biso.”—Baebele 9:24.
10. (a) Nini esalemaki nsima wana Yesu amonisaki motuya ya mbeka na ye epai na Tata na ye na likoló? (b) Kopakolama na elimo santu elimbolaki nini mpo na bayekoli ya Klisto?
10 Nzambe andimaki motuya ya mbeka ya makila ya Yesu oyo masopamaki lokola mbɔndi mpo na kolongola masumu ya mokili? Ee, andimaki yango mpenza. Emonanaki mpenza bongo mikolo 50 na nsima ya lisekwa ya Yesu, na mokolo ya elambo ya Pantekote. Elimo santu ya Nzambe esopamaki likoló na bayekoli ya Yesu 120 oyo bayanganaki na Yelusaleme. (Misala 2:1, 4, 33) Motindo moko na Nganga Monene na bango, Yesu Klisto, basilaki sikawa kopakolama mpo na kosala lokola “banganga na bulɛɛ mpo na kotombola mbeka” kati na ebongiseli monene ya tempelo ya Nzambe na elimo. (1 Petelo 2:5) Lisusu, bapakolami wana basalaki ekólo ya sika, “ekólo na bulɛɛ” ya Yisalaele ya elimo. Na bongo, bisakweli nyonso ya makambo malamu na ntina na Yisalaele, na ndakisa elaka ya “kondimana na sika” oyo ekomamaki kati na Yilimia 31:31, esengelaki kokokana likoló na lisangá ya baklisto bapakolami na elimo, “Yisalaele ya Nzambe” ya solo.—1 Petelo 2:9; Bagalatia 6:16.
Makambo mosusu matali tempelo ya Nzambe na elimo
11, 12. (a) Lopango ya banganga ezalaki elilingi ya nini mpo na Yesu, mpe mpo na bayekoli bapakolami na ye? (b) Saani monene ya mai ezali elilingi ya nini, mpe ezali kosalelama na lolenge nini?
11 Atako Esika eleki bosantu ezalaki elilingi ya “Likoló mpenza,” epai kuna Nzambe afandi na kiti ya bokonzi, makambo mosusu nyonso matali tempelo ya Nzambe na elimo mazali na boyokani na makambo ya mabelé. (Baebele 9:24) Kati na tempelo oyo ezalaki na Yelusaleme, ezalaki na lopango ya kati mpo na banganga, oyo ezalaki na etumbelo ya mbeka kati na yango mpe na saani moko monene ya mai, oyo banganga bazalaki kosalela mpo na komipɛtola liboso ya kosala mosala ya bulɛɛ. Makambo yango mazali elilingi ya nini kati na ebongiseli ya tempelo ya Nzambe na elimo?
12 Mpo na Yesu Klisto, lopango ya kati ya banganga ezalaki elilingi ya ezalela na ye ya kozanga masumu lokola moto ya kokoka, mwana ya Nzambe. Na komonisáká kondima kati na mbeka ya Yesu, bayekoli bapakolami ya Yesu batángami bayengebene. Na yango, Nzambe akoki na lolenge lobongi kotalela bango lokola bato bazangi masumu. (Baloma 5:1; 8:1, 33) Na bongo, lopango yango ezali mpe elilingi ya ezalela ya bomoto ya boyengebene oyo etángelami mosangani mokomoko ya bonganga ya bulɛɛ liboso na Nzambe. Atako baklisto bapakolami bazali naino bato ya kozanga kokoka mpe bakoki kosala masumu. Saani monene ya mai oyo etyamaki kati na lopango ezali elilingi ya Liloba ya Nzambe, oyo Nganga Monene asalelaka mpo na kopɛtola mokemoke bonganga ya bulɛɛ. Na kotosáká ebongiseli oyo ya kopɛtolama, bakómi na ezaleli kitoko oyo epesaka Nzambe lokumu mpe ebendaka bato ya libándá kati na losambo na ye ya pɛto.—Baefese 5:25, 26; kokanisá na Malaki 3:1-3.
Esika mosantu
13, 14. (a) Mpo na Yesu mpe mpo na bayekoli na ye bapakolami, Esika mosantu ya tempelo ezali elilingi ya nini? (b) Efandelo ya miinda esalemi na wolo ezali elilingi ya nini?
13 Eteni ya liboso ya tempelo ezali elilingi ya ezalela oyo eleki oyo ya lopango. Mpo na Yesu Klisto, moto ya kokoka, ezali elilingi ya kobotama na ye lisusu lokola Mwana ya Nzambe na elimo oyo asengelaki kozongela bomoi na likoló. Nsima ya kotángama bayengebene, na nzela ya kondima na bango kati na makila ya Yesu oyo masopamaki, bayekoli bapakolami bazali mpe komona bango moko lolenge mpenza elimo santu ezali kokokisa mosala wana ya ntina mingi. (Baloma 8:14-17) Na nzela ya “mai [elingi koloba, batisimo na bango] mpe elimo,” “babotami lisusu” lokola bana na elimo ya Nzambe. Na bongo, bazali na elikya ya kosekwisama mpo na kokóma na bomoi na likoló lokola bana ya Nzambe na elimo, soki batikali sembo kino kufa.—Yoane 3:5, 7, NW; Emoniseli 2:10.
14 Banganga oyo bazalaki kosala kati na Esika mosantu na tempelo oyo ezalaki awa na mabelé bazalaki komonana te na bato oyo bazali na libándá ya tempelo. Bobele bongo, baklisto bapakolami bazali na ezalela moko ya elimo oyo eteni monene ya basambeli mosusu ya Nzambe, baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko kati na paladiso awa na mabelé, bazali na yango te to bakoki kososola yango na mobimba mpenza te. Efandelo ya miinda esalemi na wolo oyo ebandaki kozala kati na mongombo ezali elilingi ya ezalela ya kongɛngisama oyo baklisto bapakolami bazali na yango. Mosala ya elimo santu ya Nzambe, lokola mafuta kati na miinda, ezali kopesa pole likoló na Biblia. Bososoli oyo baklisto bazali kozwa mpo na yango, bazali kobomba yango mpo na bango moko te. Nzokande, bazali kotosa Yesu, oyo alobaki ete: “Bino bozali moi na mokili. . . . Bongo, tiká ete moi na bino engɛnga liboso na bato ete bámona misala na bino malamu mpe ete bákumisa Tata na bino oyo azali na likoló.”—Matai 5:14, 16.
15. Limpa etyami likoló na mesa ya limpa ya kolakisama ezali elilingi ya nini?
15 Mpo na kotikala ntango nyonso kati na ezalela wana ya kongɛngisama, baklisto bapakolami basengeli ntango nyonso komileisa kati na bibongiseli oyo emonisami na elilingi ya limpa etyami likoló na mesa ya limpa ya kolakisama. Liziba ya liboso epai kuna bazali kozwa bilei ya elimo ezali bongo Liloba ya Nzambe, oyo bazali kosala makasi mpo na kotánga mpe komanyola likoló na yango mokolo na mokolo. Yesu alakaki mpe ete asengelaki kopesa bango “bilei na elaka na yango” na nzela ya “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45) “Moombo” yango ezali bongo lisangani mobimba ya baklisto bapakolami awa na mabelé na bileko nyonso. Klisto azali kosalela lisangani wana ya bapakolami mpo na kosakola makambo matali kokokisama ya bisakweli ya Biblia mpe kopesa litambwisi na ntango ebongi likoló na lolenge ya kosalela mitindá ya Biblia kati na bomoi ya mokolo na mokolo. Na yango, na botɔ́ndi nyonso, baklisto bapakolami bazali komileisa kati na bibongiseli nyonso wana ya elimo. Kasi bomoi na bango ya elimo esimbami te bobele na kozwáká boyebi ya Nzambe kati na mitó mpe mitema na bango. Yesu alobaki ete: “Bilei na ngai ezali boye ete nasala mokano na motindi na ngai mpe ete nasukisa mosala na ye.” (Yoane 4:34) Bobele bongo, baklisto bapakolami bazali kozwa bosepeli na komipesáká na kosalela mokolo na mokolo mokano ya Nzambe oyo esilá komonisama.
16. Mosala oyo mozalaki kosalema likoló na etumbelo na mpaka na malasi ezali elilingi ya nini?
16 Na ntɔ́ngɔ́ mpe na mpokwa, nganga azalaki kotumba mpaka na malasi mpo na Nzambe likoló na etumbelo ya mpaka na malasi kati na Esika mosantu. Bobele na ntango yango, basambeli mosusu oyo bazalaki banganga te bazalaki kobondela Nzambe wana ezalaki bango kotɛlɛma na lopango na libándá ya tempelo. (Luka 1:8-10) Biblia epesi ndimbola oyo ete “mpaka izali mabondeli na bapɛtwi.” (Emoniseli 5:8) Mokomi na Nzembo Davidi akomaki ete: “Tiká ete libondeli na ngai ebonga liboso na yo lokola mpaka na malasi.” (Nzembo 141:2) Baklisto bapakolami mpe bazali kotalela na motuya mpenza libaku malamu oyo bazali na yango ya kobɛlɛma epai na Yehova kati na libondeli na nzela ya Yesu Klisto. Mabondeli ya molende mauti na nsé ya motema mazali lokola mpaka na malasi na nsolo kitoko. Baklisto bapakolami bazali mpe kosanzola Nzambe na mitindo mosusu, na kosaleláká bibebu na bango mpo na koteya bato mosusu. Ezaleli na bango ya koyika mpiko liboso ya mikakatano mpe bosembo na bango liboso na komekama ezali mpenza kosepelisa Nzambe.—1 Petelo 2:20, 21.
17. Makambo nini matalelamaki kati na kokokisama ya elilingi ya esakweli oyo kokɔta ya liboso ya nganga monene kati na Esika eleki bosantu na Mokolo ya Mbɔndi emonisaki yango?
17 Na Mokolo ya Mbɔndi, nganga monene na Yisalaele asengelaki kokɔta na Esika eleki bosantu mpe kotumba mpaka na malasi kati na etumbelo moko esalemi na wolo etondi na makala mazali kopela ngwaa. Yango esengelaki kosalema liboso ete amema makila ya mbeka mpo na masumu. Na kokokisama ya elilingi wana ya esakweli, mobali oyo Yesu abatelaki bosembo mobimba mpenza epai na Yehova Nzambe liboso ya kopesa bomoi na ye lokola mbeka moko ya libela mpo na masumu na biso. Na yango, amonisaki ete moto ya kokoka akoki kobatela bosembo na ye epai na Nzambe ata soki Satana abimiseli ye bopusi ya motindo nini. (Masese 27:11) Na ntango amekamaki, Yesu asalaki libondeli “na konganga makasi mpe na mpisoli epai na ye oyo ayebi kobikisa ye na kufa mpe ayokamaki mpo na kotosa na ye malamu.” (Baebele 5:7) Na lolenge yango apesaki nkembo epai na Yehova lokola Moyangeli ya sembo ya molɔngɔ́ mobimba mpe oyo azali na lotómo na yango mpenza. Nzambe apesaki Yesu mbano na kosekwisáká ye kati na bakufi mpe kopesáká ye bomoi bozangi nsuka kuna na likoló. Na etɛlɛmɛlo wana etombwani, Yesu atye likebi likoló na ntina ya mibale ya koya na ye awa na mabelé, elingi koloba, ntina ya koyokanisa bato ya masumu oyo babongoli motema, elongo na Nzambe.—Baebele 4:14-16.
Nkembo eleki monene ya tempelo ya Nzambe na elimo
18. Lolenge nini Yehova apesaki nkembo monene na tempelo na ye na elimo?
18 Yehova asakolaki ete: “Nkembo na ndako oyo na nsima ekoleka yango na liboso.” (Hagai 2:9) Na kosekwisáká Yesu lokola mokonzi mpe Nganga monene oyo akoki kokufa te, Yehova apesaki nkembo monene na tempelo na ye ya elimo. Yesu azali sikawa na likoki ya kopesa “lobiko na seko mpo na bango nyonso bakotosaka ye.” (Baebele 5:9) Bato ya liboso oyo bamonisaki botosi motindo wana ezalaki bongo bayekoli 120 oyo bazwaki elimo mosantu na Pantekote ya mobu 33 T.B. Mokanda ya Emoniseli mosakolaki ete motángo mobimba ya bana wana ya elimo mosengelaki kokóma kino 144 000. (Emoniseli 7:4) Nsima ya liwa, mingi na bango basengelaki kozela kozanga kati na nkunda ya bato banso, kino na ntango ya kozala ya Yesu na nguya ya bokonzi. Kolandana ya ntango oyo elobelami kati na Danyele 4:10-17, 20-27 emonisi 1914 lokola mobu oyo Yesu asengelaki kobanda koyangela na katikati ya banguna na ye. (Nzembo 110:2) Bambula mingi liboso, baklisto bapakolami bazalaki kozela mobu yango na motema likoló. Etumba ya liboso ya mokili mobimba mpe mawa oyo yango ebimisaki likoló na bato emonisaki elembeteli ete Yesu asilaki solo kotyama lokola Mokonzi na 1914. (Matai 24:3, 7, 8) Mwa moke na nsima, lokola ntango yango ekokaki mpo ete “kosambisa ebanda na ndako na Nzambe,” Yesu asengelaki kokokisa elaka epai na bayekoli na ye bapakolami oyo basilaki kolala mpongi kati na kufa ete: “Nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai.”—1 Petelo 4:17; Yoane 14:3.
19. Lolenge nini batikali ya ba 144 000 bazali kokɔta na Esika eleki bosantu na likoló?
19 Basangani 144 000 ya bonganga ya bulɛɛ basili naino bango nyonso te kotyama elembo ya nsuka mpe koyanganisama na ndako na bango na likoló. Batikali na bango bazali naino na bomoi awa na mabelé na ezalela ya elimo oyo emonisamaki na Esika mosantu; “ridó,” to efelo, oyo ezali bongo nzoto na bango ya mosuni, ekaboli bango na esika ya bulɛɛ epai Nzambe azali. Wana bazali kokufa na bosembo nyonso, bazali kosekwisama mbala moko mpo na kokutana na basangani mosusu ya ba 144 000 oyo basilá kokóma kuna na likoló lokola bikelamu ya elimo oyo bikoki kokufa te.—1 Bakolinti 15:51-53.
20. Mosala nini ya ntina mingi batikali bapakolami ya bonganga ya bulɛɛ bazali kosala yango lelo, mpe yango ezali kobimisa matomba nini?
20 Lokola banganga mingi bazali kosala elongo na Nganga Monene kuna na likoló, tempelo ya Nzambe na elimo esili kozwa lisusu nkembo mingi. Bobele na ntango yango, batikali ya bonganga ya bulɛɛ bazali kosala mosala ya ntina awa na mabelé. Na lisalisi ya mosala na bango ya kosakola, Nzambe azali ‘kotetemisa mabota nyonso’ na nzela ya bikateli na ye, lokola esakolamaki kati na Hagai 2:7. Bobele na ntango yango, bamilió ya basambeli oyo balobelami lokola “mabonza kitoko na mabota” bazali koyangana kati na eteni ya mabelé ya lopango ya tempelo ya Yehova. Mokumba nini bato wana bazali na yango kati na ebongiseli ya losambo ya Nzambe, mpe elikya nini ya nkembo tokoki komizela na yango mpo na oyo etali tempelo na ye monene na elimo? Mituna oyo mikotalelama na lisoló lilandi.
Mituna ya bozongeli
◻ Ndakisa monene nini Yesu amonisaki na mobu 29 T.B.?
◻ Ebongiseli nini ebandaki mosala na yango na mobu 29 T.B.?
◻ Esika mosantu mpe Esika eleki bosantu ezali elilingi ya nini?
◻ Lolenge nini tempelo monene ya elimo esili kokóma na nkembo?
[Elilingi na lokasa 17]
Ntango Yesu apakolamaki na elimo santu na mobu 29 T.B., tempelo monene ya Nzambe na elimo ebandaki kosala mosala