Mokanda ya Biblia nimero 42—Luka
Mokomi: Luka
Esika ya bokomi: Kaisalia
Nsuka ya bokomi: soko 56–58 T.B.
Boumeli ya lisoló: 3 L.T.B.–33 T.B.
1. Evanzile ya lolenge nini Luka akomaki?
EVANZILE ya Luka ekomamaki na moto oyo azalaki na bososoli mozindo mpe oyo azalaki na motema boboto, mpe bizaleli wana ya malamu koleka, elongo na litambwisi ya elimo ya Nzambe, ebimisi lisoló moko ya sikisiki mpe etondi na makambo ya kosepelisa mpe na mayoki. Na bavɛrsɛ́ ya ebandeli, alobi ete, “Nazwaki mpe ekateli, mpamba te nasili kotya makambo nyonso na bosikisiki longwa na ebandeli, mpo na kokoma yango na molɔngɔ́ na lolenge lobongi mpo na yo.” Lisoló na ye ya kolobela likambo moko na moko mpe ya komonisa yango na likebi nyonso endimisi mpenza maloba wana.—Luka 1:3, NW.
2, 3. Bilembeteli nini ya libándá mpe ya kati bimonisi ete monganga Luka nde akomaki Evanzile oyo?
2 Atako Luka atángami ata na esika moko te kati na lisoló, mikanda ya kala mindimi ete ye nde mokomi na yango. Kati na Eteni ya Mokanda ya Muratori [Fragment muratorien] (soko 170 T.B.) elobami ete Luka nde akomaki yango mpe bakomi ya ekeke ya mibale lokola Irénée mpe Clément, moto na Alesandalia, bandimi likambo yango. Bilembeteli bizali na kati mpe bimonisi mpenza ete Luka nde azali mokomi na yango. Paulo alobeli ye na Bakolose 4:14 ete “Luka, monganga molingami,” mpe mokanda na ye ezali ya moto ya mayele, ezali yango tokoki kozela komona epai na moto oyo atángá mingi, lokola monganga. Liponi na ye malamu ya elobeli mpe bonene ya boyebi na ye ya maloba mabongi, oyo eleki ya bakomi mosusu misato ya Baevanzile soki tosangisi bango, epesi nzela na kolobela na likebi mpe na bososoli mingi koleka lisoló na ye ya makambo ya ntina mingi ya bomoi. Lisoló na ye ya mwana na kilikili etalelami na basusu lokola ete ezali lisoló mokuse ya malamu oyo eleki masoló nyonso makomamá.
3 Luka asaleli maloba ya monganga koleka 300 to maloba oyo azali kopesa yango ndimbola ya monganga oyo esalelami te na lolenge moko (soki esalelamaki) na bakomi mosusu ya Makomami ya Greke ya boklisto.a Na ndakisa, ntango alobeli maba, Luka asaleli ntango nyonso te maloba motindo moko lokola basusu. Mpo na bango, maba ezali bobele maba, kasi epai na monganga, maba ezali na mitindo mikeseni, na ndakisa Luka alobeli “mobali oyo atondi na maba.” Alobi ete, Lasalo “atondaki na mpota.” Ezali na mokomi mosusu te ya Evanzile oyo alobi ete mama ya mwasi ya Petelo azalaki na “fɛ́fɛlɛ makasi.” (5:12; 16:20; 4:38, NW) Atako bakomi mosusu bayebisi biso ete Petelo akataki litoi ya moombo ya nganga-monene, bobele Luka nde alobeli ete Yesu abikisaki ye. (22:51) Esengeli kozala monganga mpo na koloba epai na mwasi ete azalaki na “elimo ya bolɛmbu na boumeli ya mbula zomi na mwambe, mpe angumbamaki mpe azalaki na likoki te ya kotɛlɛma sembá.” Mpe nani mosusu, soki “Luka, monganga molingami” te, akokaki kolimbola likambo moko na moko litalaki kosalisama ya liboso oyo epesamaki epai na mobali moko na Mosamalia oyo “akangaki mpota na ye, asopaki mafuta mpe vinyo likoló na yango”?—13:11; 10:34.
4. Ekoki kozala ete Luka ekomamaki ntango nini, mpe makambo nini mandimisi yango?
4 Ntango nini Luka akomaki Evanzile na ye? Misala 1:1 emonisi ete mokomi ya Misala (oyo ezalaki sé Luka) asilaki kokoma Evanzile, ‘lisoló ya liboso.’ Mbala mosusu Misala esilaki kokomama pene na mobu 61 T.B. ntango oyo Luka azalaki na Loma elongo na Paulo, oyo azalaki kozela kosambisama na ye epai na Kaisala. Na bongo, lisoló ya Evanzile ekomamaki na Luka na Kaisalia soko na mobu 56 kino 58 T.B., nsima wana azongaki elongo na Paulo longwa na Filipi na nsuka ya mobembo ya misato ya Paulo na mosala ya misionere mpe na boumeli ya mbula mibale ntango Paulo azalaki kati na bolɔ́kɔ na Kaisalia liboso ete bákenda na ye na Loma mpo na kosambisama. Lokola Luka azalaki kuna na Palestine, na boumeli ya ntango wana, ye nde abongaki mpenza mpo na ‘kotya makambo nyonso na bosikisiki longwa na ebandeli’ na ntina na bomoi mpe mosala ya Yesu. Na yango, lisoló ya Luka emonani ete ekomamaki liboso ya Evanzile ya Malako.
5. Na biutelo nini Luka akokaki ‘kotya na bosikisiki nyonso’ makambo oyo matalaki bomoi ya Yesu?
5 Ya solo, Luka amonaki te makambo nyonso oyo akomi kati na Evanzile na ye, azalaki mpe moko te kati na ba 12 mpe kútu emonanaki ete ayaki kokóma mondimi nde nsima ya liwa ya Yesu. Atako bongo, azalaki mpenza moninga ya penepene ya Paulo kati na mosala ya misionere. (2 Tim. 4:11; Flmo. 24) Na bongo, lokola tokoki komizela na yango, ekomeli ya Paulo ezali komonana kati na lolenge ya kokoma ya Luka, lokola tokoki komona yango na kokokanisa masoló na bango mibale na ntina na Elambo ya Mpokwa ya Nkolo, na Luka 22:19, 20 mpe na 1 Bakolinti 11:23-25. Mpo na koyeba makambo mosusu mingi, Luka akokaki kotánga Evanzile ya Matai. Mpo na ‘kotya makambo nyonso na bosikisiki,’ asengelaki kotuna makambo matali bomoi ya Yesu epai na batatoli mingi, na ndakisa epai na bayekoli oyo bazalaki na bomoi mpe mbala mosusu epai na Malia, mama ya Yesu. Tokoki kondima ete atikaki te likambo moko ya ntina na kosangisáká makambo nyonso oyo mabongaki na kotyela motema.
6. Na makambo nini Evanzile ya Luka ekeseni mpenza na mosusu, mpe mpo na banani akomaki yango? Mpo na nini ozali koyanola bongo?
6 Na kotalela masoló ya Baevanzile minei, emonani polele ete bakomi basuki te bobele na kozongela masoló na bango moko na mosusu, soko mpe kokoma bobele mpo na kopesa matatoli mingi mpo na lisoló wana ya ntina ya Biblia. Lisoló ya Luka ezali mpenza ya ye moko. Na mobimba, 59 % ya Evanzile na ye ekeseni na mosusu nyonso. Alobeli soko makamwisi motoba ya sikisiki mpe koleka mbala mibale motuya ya masese oyo malobelami te kati na masoló ya Baevanzile mosusu, ndambo moko likoló na misato ya Evanzile na ye ezali maloba na ye moko mpe ndambo mibale likoló na misato ezali maloba ya bato mosusu; Evanzile na ye ezali oyo eleki molai kati na nyonso minei. Matai akomaki libosoliboso mpo na Bayuda, mpe Malako mpo na batángi oyo bazalaki Bayuda te, mingimingi mpo na Baloma. Evanzile ya Luka ekomamaki mpo na “Teofili, moto na lokumu” mpe na nzela na ye mpo na bato nyonso, Bayuda mpe bato oyo bazali Bayuda te. (Luka 1:3, 4) Mpo na komonisa ete lisoló na ye etaleli bato ya mokili mobimba, alobeli bankɔ́kɔ ya Yesu kino na “Adama, mwana ya Nzambe,” kasi kino na Abalayama te, lokola esalaki Matai, oyo akomaki bobele mpo na Bayuda. Akomaki mpenza maloba ya esakweli ya Simeona oyo ete Yesu asengeli kozala nzela mpo na “kolongola ezipeli longwa na mabota,” mpe ayebisaki ete “nzoto nyonso ekomona mwango na kobikisama ya Nzambe.”—3:38; 2:29-32; 3:6, NW.
7. Makambo nini mamonisi mpenza bosolo ya Evanzile ya Luka?
7 Kati na mokanda na ye, Luka amimonisi ete azali molobi monene, oyo masoló na ye mabongisami malamu mpe na sikisiki. Bosikisiki mpe bosembo, bizaleli oyo bimonani kati na mikanda ya Luka ezali elembeteli ya nguya ya bosolo na yango. Mokomi moko ya Letá alobaki mokolo mosusu ete: “Wana mikanda ya masoló, masapo mpe matatoli ya lokuta ebongisami malamumalamu mpo na kolobela makambo masalemaki na bisika biyebani te mpe na bantango ya sikisiki te, kobukáká bongo mitindá ya liboso oyo biso, basambisi, toyekolaka mpo na kokata likambo malamu, elingi koloba ete ‘maloba nyonso masengeli komonisa ntango mpe esika,’ makambo makomami na Biblia mazali kopesa biso badati mpe bisika ya makambo oyo malobelami na bosikisiki nyonso.”b Lokola elembeteli, atángaki Luka 3:1, 2: “Na mbula na zomi na mitano na bokonzi na Kaisala Tibɛli, Ponti Pilata azalaki mokóló na mokili na Yud[e]a, mpe Elode mokonzi na ndambo na Galilai, mpe Filipo ndeko na ye mokonzi na ndambo na Itulia na mokili na Talakoniti, mpe Lusania mokonzi na ndambo na Abilene. Na ntango Ana na Kayafa bazalaki [banganga-kapita, NW], liloba na Nzambe ebimelaki Yoane mwana na Zekalia kati na lisobe.” Likambo lizangi koyebana awa mpo na oyo etali ntango to esika lizali te, nzokande Luka atángi bakonzi nsambo ya minene mpo ete tókoka koyeba ntango oyo mosala ya Yoane mpe ya Yesu ebandaki.
8. Lolenge nini Luka amonisi ntango ya kobotama ya Yesu “na bosikisiki”?
8 Luka mpe apesi biso makambo mibale mpo na koyeba ntango Yesu abotamaki wana alobi, na Luka 2:1, 2 ete: “Na mikolo yango mobeko ebimaki na Kaisala Augusite ete bákoma nkombo na bato na mikili nyonso na mikanda. Oyo kokoma na liboso esalamaki wana ezalaki Kuleni mokóló na mokili na Sulia.” Yango esalemaki ntango Yosefe mpe Malia bakendeki na Beteleme mpo na kokomisa nkombo, mpe Yesu abotamaki na ntango bazalaki kuna.c Tokoki bobele kondima maloba ya molimboli moko ete: “Moko na bilembeteli bimonisi ete Luka, mokomi na makambo ya kala, asalaki mpenza bolukiluki ezali ete ntango nyonso alukaka komonisa makambo na bosikisiki mpenza.”d Tosengeli sé kondima maloba ya Luka oyo ete asili “kotya makambo nyonso na bosikisiki longwa na ebandeli.”
9. Esakweli nini ya Yesu, ekomami na Luka, oyo ezwaki kokokisama na yango monene na mobu 70 T.B.?
9 Luka mpe amonisi lolenge nini bisakweli ya Makomami ya Liebele bikokisamaki na bosikisiki nyonso epai na Yesu Klisto. Atángaki matatoli mapemami ya Yesu na likambo yango. (24:27, 44) Lisusu, akomi na bosikisiki nyonso bisakweli oyo Yesu apesaki na ntina na makambo mazali koya, mpe mingi kati na yango esili kokokisama na makambo mikemike na yango oyo masakolamaki. Na ndakisa, Yelusaleme ezingelamaki na bizingeli ya makonzí oyo matyamaki nsɔ́ngɛ́ mpe mabebisamaki na kobomama ya nsɔ́mɔ oyo esalemaki na mobu 70 T.B., lokola Yesu asakolaki yango. (Luka 19:43, 44; 21:20-24; Mat. 24:2) Flavius Josèphe, mokomi na makambo ya kala, oyo amonaki makambo yango, oyo azalaki elongo na mampinga ya Baloma andimi ete nzeté izalaki lisusu na zámba te na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ soko 16 mpo na kozwa makonzí, ete efelo ya kozingelama ezalaki na bolai ya bakilomɛtɛlɛ 7,2, ete basi mpe bana mingi bakufaki na nzala, mpe ete koleka Bayuda 1 000 000 bakufaki mpe 97 000 bamemamaki na boombo. Kino lelo, oyo ebéngami Litimbo ya Titus, oyo ezali na Loma ezali komonisa nkémbi ya bolóngi ya Baloma elongo na biloko oyo bazwaki na etumba longwa na tempelo ya Yelusaleme.e Tokoki kondimisama ete bisakweli mosusu bipemami oyo bikomamaki na Luka bikokokisama na bosikisiki mpenza.
MAKAMBO MAZALI KATI NA LUKA
10. Luka amibongisaki mpo na kokoma nini?
10 Maloba ya ebandeli ya Luka (1:1-4). Luka ayebisi ete asili kotya makambo nyonso na bosikisiki longwa na ebandeli mpe ete asili kozwa ekateli ya kokoma yango na molɔngɔ́ na lolenge lobongi mpo ete ‘Teofili, moto na lokumu . . . akoka koyeba mpenza bosolo’ ya makambo yango.—1:3, 4.
11. Makambo nini ya esengo malobelami kati na mokapo ya liboso ya Luka?
11 Bambula ya liboso ya bomoi ya Yesu (1:5–2:52). Anzelu moko abimeli Zekalia, mobangé oyo azalaki nganga, na nsango moko ya esengo ete akozwa mwana mobali oyo asengeli kobyangama Yoane. Kasi kino mwana akobotama, Zekalia akozala na likoki ya koloba te. Lokola elakamaki, mwasi na ye, Elisabeta, azwi zemi, atako “azalaki mpenza na mbula mingi ya kobotama.” Soko sanza motoba na nsima, anzelu Gabaliele abimeli Malia mpe ayebisi ye ete akozwa zemi na “nguya ya Oyo-Aleki-Likoló” mpe akobota mwana mobali oyo asengeli kobéngama Yesu. Malia akei kotala Elisabeta mpe, nsima na kopesa mbote moko ya esengo, alobi na bosepeli nyonso ete: “Molimo na ngai ekumisi Yehova, mpe elimo na ngai ekoki te kozanga kotonda na esengo na ntina na Nzambe, Mobikisi na ngai.” Alobi na ntina na nkombo na bulɛɛ ya Yehova mpe na ntina na ngɔlu na ye monene epai na baoyo bazali kobanga ye. Na kobotama ya Yoane, lolemo ya Zekalia efungwamaki mpo na koloba mpe na ntina na ngɔlu ya Nzambe mpe ete Yoane akozala mosakoli oyo akobongisa nzela ya Yehova.—1:7, 35, 46, 47, NW.
12. Nini elobami na ntina na kobotama ya Yesu mpe bomwana na ye?
12 Na ntango elakamaki, Yesu abotami na Beteleme, mpe anzelu moko asakoli “nsango malamu ya esengo mingi” epai na babateli na mpate oyo bazali kokɛngɛla bitongá na bango na butu. Akatami ngenga na boyokani na Mibeko, mpe na nsima, ntango baboti ya Yesu “balakisi ye epai na Yehova” na tempelo, mobangé Simeona mpe mosakoli mwasi Ana babimisi maloba na ntina na mwana. Wana ezongi bango na Nasalete, ‘alandi kokóla mpe azwi nguya, kotondáká na mayele, mpe ngɔlu ya Nzambe elandi kozala elongo na ye.’ (2:10, 22, 40) Wana ekómi ye na mibu 12, na mobembo moko longwa na Nasalete mpo na kokende na Yelusaleme, Yesu akamwisi bateyi na bososoli na ye mpe na biyano na ye.
13. Makambo nini Yoane azali kosakola, mpe makambo nini mabimi na batisimo ya Yesu mpe nokinoki nsima na yango?
13 Kobongisama mpo na mosala (3:1–4:13). Na mbula ya 15 ya boyangeli ya Tibɛli Kaisala, liloba ya Nzambe liyei epai na Yoane, mwana na Zekalia, mpe akei “kosakola batisimo lokola elembo ya kobongola motema mpo na bolimbisi ya masumu,” mpo ete bato nyonso bákoka “komona mwango na kobikisama ya Nzambe.” (3:3, 6, NW) Wana bato banso bazali kobatisama na Yordani, Yesu mpe abatisami, mpe wana azali kobondela, elimo santu ekiteli ye, mpe longwa na likoló Tata na ye amonisi ete andimi ye. Yesu Klisto azali sikawa soko na mibu 30. (Luka alobeli kokitana ya bankɔ́kɔ na ye.) Nsima na batisimo na ye, elimo ememi Yesu pene na mokili mokauki na boumeli ya mikolo 40. Awa Zábolo ameki ye kozanga kolónga mpe na nsima atiki ye “kino na ntango mosusu ebongi.”—4:13, NW.
14. Epai wapi Yesu amonisi polele mosala na ye, yango ezali nini, mpe lolenge nini bayoki na ye bazali koyanola?
14 Mosala ya ebandeli ya Yesu, mingimingi na Galilai (4:14–9:62). Kati na sinagoga ya mboka na ye Nasalete, Yesu amonisi polele mosala na ye, na kotángáká mpe na kokokisáká mpo na ye mpenza esakweli ya Yisaya 61:1, 2: “Elimo ya Yehova ezali likoló na ngai, mpamba te asili kopakola ngai mpo na koyebisa nsango malamu epai na babólá, atindi ngai mpo na kosakola kobikisama epai na bakangami mpe komona lisusu epai na bakufi-miso, mpo na kokangola banyokwami, mpo na kosakola mbula ya ngɔlu ya Yehova.” (4:18, 19, NW) Na ebandeli, bato bazali koyoka ye na esengo, kasi wana azali kokóba lisoló na ye, nkanda na bango eyei makasi, mpe baluki kokanga ye. Na yango akei na Kapalanauma, epai abikisi bato mingi. Bibele balandi ye mpe bameki kopekisa ye ete alongwa na bango te, kasi ayebisi bango ete: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpe mpo na yango.” (4:43, NW) Akei kosakola kati na sinagoga na Yudea.
15. Lobelá kobyangama ya Petelo, ya Yakobo, ya Yoane, mpe ya Matai.
15 Kati na Galilai, Yesu apesi nzela na Simona (oyo abyangami mpe Petelo), Yakobo, mpe Yoane, ete bákanga mbisi mingi na lolenge ya likamwisi. Ayebisi Simona ete: “Uta sikawa, okozala molɔ́bi na bato na bomoi.” Na yango batiki biloko nyonso mpe balandi ye. Yesu akóbi kobondela mpe koteya, mpe ‘nguya ya Yehova ezali wana mpo na ye ete abikisa bato.’ (5:10, 17) Abyangi Levi (Matai), mokɔngɔli na mpako oyo ayinami, oyo akumisi Yesu na elambo monene, epai kuna “ebele monene na bakɔngɔli na mpako” bazalaki mpe wana. (5:29) Yango epesi nzela na kolobela bokutani ya liboso kati na bokutani mingi elongo na Bafalisai, oyo bazali na nkanda mpe bazali kokana kosala ye mabe.
16. (a) Yesu asali nini liboso ya kopona bantoma 12? (b) Makambo nini Luka amonisi polele wana azali kolobela Lisoló likoló na Ngomba?
16 Nsima ya kolekisa butu mobimba mpo na kobondela Nzambe, Yesu aponi bantoma 12 kati na bayekoli na ye. Alandi kobikisa bato mingi. Na nsima, apesi lisoló oyo ezali na Luka 6:20-49, oyo ezali na bokokani, kasi na lolenge ya mokusé na Lisoló likoló na Ngomba oyo ezali na Matai mokapo 5 kino mokapo 7. Yesu amonisi bokeseni: “Esengo ezali epai na babólá, mpamba te bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bango. Kasi mawa epai na bato na bozwi, mpamba te bozali kozwa kobɔndisama na bino na mobimba.” (6:20, 24) Apesi toli epai na bayoki na ye ete bálinga bayini na bango, bázala na motema mawa, bápesaka makabo, mpe bábimisa oyo ezali malamu longwa na biloko ya motuya oyo ebombami na motema.
17. (a) Makamwisi nini Yesu asali na nsima? (b) Lolenge nini Yesu ayanoli epai na bato oyo Yoane Mobatisi atindaki epai na ye mpo na koyeba soki azali Masiya?
17 Wana ezongi ye na Kapalanauma, mokonzi moko ya basodá asɛngi Yesu ete abikisa moombo na ye oyo azali kobɛ́la. Amiyoki ete abongi te mpo na koyamba Yesu na ndako na ye mpe asɛngi Yesu ete “abimisa liloba” uta esika azali. Mpo na yango, moombo abiki, mpe Yesu apusami na koloba ete: “Nalobi na bino, Ata na Yisalaele, nasili naino kokuta kondima monene motindo oyo te.” (7:7, 9, NW) Mpo na mbala ya liboso, Yesu asekwisi moto oyo akufi, mwana-mobali bobele moko ya mwasi moko mokufeli-mobali na mboka Naina, mpamba te “ayokaki mawa,” mpo na ye. (7:13) Lokola nsango na ntina na Yesu ezali kopalangana na Yudea, Yoane Mobatisi atindi bato epai na ye longwa na bolɔ́kɔ mpo na kotuna ye ete, “Yo ozali oyo akoya?” Lokola eyano, Yesu alobi na batindami ete “Bózonga, bóyebisa Yoane oyo bomoni mpe oyo boyoki: bakufi-miso bazali komona, bibɔsɔnɔ bazali kotambola, bato na maba bapɛtwi mpe bakufi-matoi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa, nsango malamu ezali kosakolama epai na babólá. Mpe esengo na moto oyo azali kobɛta libaku na ntina na ngai te.”—7:19, 22, 23, NW.
18. Kosakola Bokonzi ezali kolandana na masese nini, na misala nini, mpe na batoli nini?
18 Elongo na ba 12, Yesu akei “na engumba na engumba mpe na mboka na mboka, kosakoláká mpe koyebisáká nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” Apesi lisese ya molóni, mpe asukisi lisoló na kolobáká ete: “Na yango, bókeba na lolenge bozali koyoka; mpamba te epai na ye oyo azali na yango, bakopesa ye mingi, kasi ye oyo azali na yango te, ata oyo akanisi ete azali na yango ekobɔtɔlama na ye.” (8:1, 18) Yesu alandi kosala misala ya nguya mpe makamwisi. Apesi mpe epai na ba 12 bokonzi likoló na bademó mpe nguya ya kobikisa makɔnɔ mpe atindi bango “kosakola bokonzi ya Nzambe mpe kobikisa babɛ́li.” Bato nkóto mitano baleisami na lolenge ya likamwisi. Yesu abongwani na ngomba mpe mokolo molandi abikisi elenge mobali moko oyo azalaki na bademó, oyo bayekoli bakokaki kobikisa te. Apesi likebisi oyo epai na baoyo balingi kolanda ye: “Nkaza bazali na mabulu, mpe ndɛkɛ na zámba bazali na ndako, nde Mwana na moto azali na esika ya kolalisa motó na ye te.” Mpo na kobonga mpo na Bokonzi ya Nzambe, moto asengeli kotya lobɔkɔ na likalo mpe kotala lisusu na nsima te.—9:2, 58.
19. Lolenge nini Yesu amonisi bolingo ya solo ya mozalani?
19 Mosala ya nsuka ya Yesu na Yudea (10:1–13:21). Yesu atindi ba 70 mosusu kati na “mosala ya kobuka mbuma,” mpe batondi na esengo mingi na bolóngi ya mosala na bango. Wana ezali ye kosakola, mobali moko, alingi komimonisa ete azali moyengebene, atuni Yesu ete: “Nani azali mpenza mozalani na ngai?” Na eyano, Yesu apesi lisese ya Mosamalia ya boboto. Mobali moko oyo azalaki pene na kokufa, mpo ete abɛtami makasi na babɔtɔli, alali pembeni na balabála, mpe talá nganga moko mpe Molevi moko baboyi kosalisa ye. Ezali Mosamalia ayinami nde atɛlɛmi, na boboto nyonso akangisi bampota na ye, atye ye likoló na nyama na ye, amemi ye na ndako mpo na bato na mobembo, mpe afuti mbongo mpo ete básalisa ye. Ɛɛ, ezali “moto oyo amonisaki motema mawa epai na ye” nde amimonisaki mozalani na ye.—10:2, 29, 37, NW.
20. (a) Likanisi nini Yesu abimisi na ntina na Malata mpe Malia? (b) Maloba nini amonisi na ntina na libondeli?
20 Kati na ndako ya Malata, na bopɔlɔ nyonso Yesu apameli ye mpo ete azali komibanzabanza mingi na misala ya ndako, kasi akumisi Malia mpo ete aponi likambo lileki malamu, kofanda mpe koyoka maloba na ye. Ateyi bayekoli libondeli ya ndakisa mpe lisusu ntina ya kolendendela kati na mabondeli, kolobáká ete: “Bólanda kosɛnga, mpe yango ekopesamela bino; bólanda koluka mpe bokozwa.” Na nsima abimisi bademó mpe alobi ete “baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe bazali kobatela yango” bazali na esengo. Wana ezali bango kolya, atyani ntembe elongo na Bafalisai na ntina na Mibeko mpe abimisi elakeli mabe na ntina na bango mpamba te balongoli “lifungola ya boyebi.”—11:9, 28, 52, NW.
21. Likebisi nini Yesu apesi na ntina na bilulela, mpe asɛngi na bayekoli na ye ete básala nini?
21 Wana azali lisusu elongo na bibele, moto moko alobi na Yesu ete: “Yebisá ndeko na ngai akabola libula elongo na ngai.” Mpo na koyanola, Yesu amonisi mpenza ntina ya lisɛngi wana: “Bófungola miso na bino mpe bómibatela na ntina na lolenge nyonso ya bilulela, mpamba te ata wana moto azali na biloko mingi, bomoi na ye euti te na biloko azali na yango.” Na nsima apesi lisese ya moto na bozwi oyo abuki bibombelo na ye mpo na kotonga ya minene, nde akufi sé na butu yango mpe atiki bozwi na ye na bato mosusu. Yesu amonisi na bokuse likanisi ya ntina: “Ezali bongo mpo na moto oyo abombi biloko ya motuya mpo na ye moko nde azali mozwi te epai na Nzambe.” Nsima na kolendisa bayekoli na ye ete bálukaka liboso Bokonzi ya Nzambe, Yesu ayebisi bango ete: “Bóbanga te, etongá moke, mpamba te Tata na bino asili kondima kopesa bino bokonzi.” Kobikisa na ye ya mwasi moko, na mokolo ya Sabata, oyo azalaki na bokɔnɔ na boumeli ya mbula 18 ebimisi kowelana makasi kati na ye mpe batɛmɛli na ye, baoyo bayoki nsɔ́ni.—12:13, 15, 21, 32.
22. Na nzela ya masese nini ya kosimba motema Yesu ateyi na ntina na Bokonzi?
22 Eteni ya nsuka ya mosala ya Yesu, mingimingi na Pelea (13:22–19:27). Yesu asaleli maloba ya kosimba motema kati na masese mpo na kobenda likebi ya bayoki na ye epai na Bokonzi ya Nzambe. Amonisi ete baoyo bazali koluka esika ya liboso mpe lokumu bakokitisama. Tiká ete moto oyo asali elambo abyanga babólá, mpo ete bakoki kozongisela ye te; akozala na esengo mpe yango “ekozongisamela ye na lisekwa ya bayengebene.” Na nsima, tozali kokuta lisese ya moto oyo asali elambo monene ya mpokwa. Bato oyo babyangamaki, moko nsima na mosusu, bamonisi bantina oyo bazangi koya na elambo: Moko auti kosomba elanga; mosusu auti kosomba bangɔmbɛ, mpe mosusu auti kobala mwasi. Na nkanda makasi, mokóló-ndako atindi ete bábyanga “babólá mpe bibɔsɔnɔ mpe bakufi-miso mpe batɛngumi,” mpe alobi ete moko te kati na baoyo babyangamaki liboso “bakolya ata ndambo” na elambo na ye. (14:14, 21, 24) Apesi lisese ya mpate ebungaki oyo emonani, kolobáká ete, “Na yango, nalobi na bino ete esengo ekozala mingi kati na likoló na ntina na mosumuki moko oyo abongoli motema koleka bayengebene ntuku libwa na libwa oyo bazali na mposa te ya kobongola motema.” (15:7, NW) Lisese ya mwasi oyo azali kokɔmbɔla ndako na ye mpo na komona mbuma na palata oyo ebungi emonisi sé likanisi yango moko.f
23. Nini emonisami kati na lisoló ya mwana na kilikili?
23 Na nsima ayebisi lisese ya mwana na kilikili oyo asɛngaki na tata na ye ete apesa ye oyo ya ye ndambo ya libula mpe na nsima abungisaki yango “na komitambwisáká na bomoi ya mbindo.” Nsima na kokwea kati na bobólá makasi, makanisi na ye mazongelaki ye mpe azongaki na ndako mpo na kosɛnga na tata na ye ete ayokela ye mawa. Kopusamáká na mawa, tata na ye “apotaki mpe amibwakaki na nkingo na ye mpe apwepwaki ye na bolingo nyonso.” Balatisaki ye bilamba ya kitoko, elambo monene ebongisamaki, mpe “babandaki kosepela.” Kasi nkulutu na ye asepelaki te. Na boboto nyonso, tata na ye asembolaki likanisi na ye: “Mwana, ozalaka ntango nyonso elongo na ngai, mpe biloko nyonso ya ngai ezali ya yo; kasi tosengelaki mpenza kozala na esengo mpe kosepela, mpamba te ndeko na yo oyo akufaki mpe azongi na bomoi, abungaki mpe amonani.”—15:13, 20, 24, 31, 32, NW.
24. Makambo nini ya solo Yesu alobeli mingi kati na lisese ya mozwi mpe Lasalo mpe kati na lisese ya Mofalisai mpe mokɔngɔli na mpako?
24 Nsima na koyoka lisese ya kapita oyo azangi sembo, Bafalisai oyo bazalaki balingi na mosolo batyoli mateya ya Yesu, kasi alobi na bango ete: “Bozali baoyo bakomitánga liboso na bato ete bayengebene, kasi Nzambe ayebi mitema na bino; mpamba te oyo etombwami kati na bato ezali eloko ya mbindo na miso ya Nzambe.” (16:15, NW) Na nzela ya lisese ya mozwi mpe Lasalo, amonisi libulu monene oyo ezali kati na baoyo bandimami mpe baoyo bandimami te epai na Nzambe. Yesu akebisi bayekoli ete makambo ya kobɛtisa mabaku makozala, kasi “mawa na ye oyo akoyeisa yango!” Alobeli mikakatano oyo mikobima “wana Mwana na moto asengeli komonana.” Ayebisi bango ete: “Bómikundola mwasi ya Lota.” (17:1, 30, 32) Na nzela ya lisese moko, apesi endimiseli ete Nzambe akosala mpenza eloko mpo na bolamu ya baoyo bazali “kobelela ye butu na moi.” (18:7) Na nsima, na nzela ya lisese mosusu, apameli ezaleli ya komimonisa moyengebene yo moko: Mofalisai moko azali kobondela kati na tempelo, atɔ́ndi Nzambe mpo ete azali te lokola bato mosusu. Mokɔngɔli na mpako, atɛlɛmi mosika mpe alingi ata moke te kotombola miso na ye na likoló, abondeli ete: “Ɛ Nzambe, monisá motema mawa epai na ngai mosumuki.” Lolenge nini Yesu ataleli likambo yango? Alobi ete mokɔngɔli na mpako azali moyengebene koleka Mofalisai, “mpamba te moto na moto oyo akomikumisa ye moko akokitisama, kasi ye oyo azali komikitisa akokumisama.” (18:13, 14, NW) Na Yeliko, Yesu ayambami epai na Zakai, mokɔngɔli na mpako mpe apesi lisese ya mina zomi, komonisáká matomba makeseni oyo mazali kozwama na kosalela na bosembo nyonso biloko bipesamaki mpe na kozanga kosalela yango.
25. Lolenge nini Yesu abandisi eteni ya nsuka ya mosala na ye, mpe makebisi nini ya esakweli apesi?
25 Nsuka ya mosala ya Yesu liboso na bato na Yelusaleme mpe na bamboka ya zingazinga (19:28–23:25). Wana Yesu akɔti na Yelusaleme likoló na mwana na mpunda mpe bibele ya bayekoli na ye bakumisi ye ete azali “Ye oyo azali koya lokola Mokonzi na nkombo ya Yehova,” Bafalisai basɛngi ye ete apamela bayekoli na ye. Yesu ayanoli ete: “Soki bango bakangi monɔkɔ, mabanga makonganga.” (19:38, 40, NW) Apesi esakweli na ye eyebani mingi na ntina na kobebisama ya Yelusaleme, kolobáká ete ekozingelama na makonzí oyo matyami nsɔ́ngɛ́, ekozala na mpasi monene, mpe ekobukana elongo na bana na yango mpe ete libanga moko likotikala te likoló na mosusu. Yesu ateyi bato kati na tempelo, asakoli nsango malamu mpe ayanoli na mituna makasi ya banganga-kapita, ya bakomeli, mpe ya Basadukai na nzela ya masese mpe maloba ya mayele. Yesu alobeli na nguya nyonso elembo monene ya nsuka, kolobeláká lisusu kozingelama ya Yelusaleme na mampinga ya banguna. Bato bakosenzwa na nsɔ́mɔ ya makambo mazali koya, kasi ntango makambo wana makobima, bayekoli na ye basengeli ‘kotɛlɛma ngwi mpe kotombola mitó na bango, mpamba te kobikisama na bango esili kobɛlɛma.’ Basengeli kosɛnzɛla mpo na kolónga kokima makambo oyo makanami kobima.—21:28.
26. (a) Kondimana nini Yesu asali, mpe asangisi yango na nini? (b) Lolenge nini Yesu akembisamaki na nsé ya komekama, mpe mpamela nini apesi na ntango ya kokangama na ye?
26 Ezali sikawa mokolo mwa 14 ya sanza ya Nisana ya mobu 33 T.B. Yesu akumisi Elekeli mpe na nsima abandisi “kondimana ya sika” elongo na bantoma na ye ya sembo, asangisi yango na elambo ya elilingi oyo asɛngi bango ete bákumisaka mpo na kokanisa ye. Alobi na bango lisusu ete: “Nazali kosala kondimana elongo na bino, lokola Tata na ngai asili kosala kondimana elongo na ngai, mpo na bokonzi.” (22:20, 29, NW) Bobele na butu yango, wana Yesu azali kobondela na Ngomba ya Olive, ‘anzelu moko longwa na likoló abimeli ye mpe akembisi ye. Kasi wana etikali moke ete akufa, akóbi kobondela na molende mingi; mpe motoki na ye ekómi lokola matanga ya makila oyo mazali kokwea na mabelé.’ Makambo mayei ndóngó wana Yuda, mosuli azali kokamba etuluku ya bato oyo bayei kokanga Yesu. Bayekoli bangangi ete: “Nkolo, tobɛta na mopanga?” Moko na bango akati litoi ya moombo ya nganga-monene, kasi Yesu apameli bango mpe abikisi moto oyo azokaki.—22:43, 44, 49.
27. (a) Petelo akwei na likambo nini? (b) Bifundeli nini bisalemi na ntina na Yesu, mpe na makambo nini amekami na yango mpe akatelami etumbu nini?
27 Bamemi Yesu na makasi na ndako ya nganga-monene mpo na kotuna ye mituna, mpe lokola na butu wana malili ezali, Petelo azali elongo na ebele zingazinga na mɔ́tɔ. Na mbala misato afundami ete azali moyekoli ya Yesu, mpe na mbala misato awangani yango. Na nsima nsoso ya mobali eleli. Nkolo abaloli miso mpe atali Petelo, mpe Petelo, amikundoli lolenge Yesu asakolaki mpenza likambo wana, abimi mpe aleli mingi. Nsima ya kobimisa ye liboso ya ndako ya Sanedrina, bakei sikawa na Yesu liboso ya Pilata mpe bafundi ye ete azali kotɔmbɔkisa mboka, azali kopekisa kofuta mpako, mpe “kolobáká ete ye mpenza azali Klisto, mokonzi.” Koyebáká ete Yesu azali moto na Galilai, Pilata atindi ye epai na Elode, oyo azalaki na Yelusaleme na ntango yango. Elode mpe basɛnzɛli na ye bazali kotyola Yesu mpe bazongisi ye mpo na kotumolama makasi liboso ya bato na mboka oyo batondi na nkanda. Pilata ‘akabi Yesu engebene mokano na bango.’—23:2, 25.
28. (a) Yesu alaki nini epai na mosáli na mabe oyo andimelaki ye? (b) Luka akomi nini na ntina na liwa, kokundama, mpe lisekwa ya Yesu?
28 Liwa ya Yesu, lisekwa, mpe komata na ye na likoló (23:26–24:53). Yesu akakisami kati na basáli na mabe mibale. Moko azali kotyola ye, kasi mosusu amonisi kondima mpe asɛngi na Yesu ete akanisa ye na ntango akokóma na Bokonzi na ye. Yesu alaki ete: “Solo nazali koloba na yo lelo ete: ‘Okozala elongo na ngai kati na Paladiso.’” (23:43, NW) Na nsima, molili makasi oyo ekwea naino liboso te esalemi, ridó ya esika ya bulɛɛ epasuki na katikati, mpe Yesu angangi ete: “Tata, nazali kotika [elimo] na ngai na mabɔkɔ na yo.” Nsima na yango akufi, mpe nzoto na ye ekitisami mpe elalisami kati na nkunda oyo etimolami kati na libanga. Na mokolo ya liboso ya pɔ́sɔ, basi oyo bayaki elongo na ye longwa na Galilai bakei na nkunda kasi bakuti nzoto ya Yesu te. Bobele lokola ye moko asakolaki yango, asili kosekwa nsima na mikolo misato!—23:46.
29. Lisoló nini ya esengo lisukisi Evanzile ya Luka?
29 Kozanga komimonisa epai na bayekoli na ye mibale na nzela ya Emau, Yesu alobeli minyoko na ye mpe alimbweli bango Makomami. Na mbala moko bayebi ye, kasi alimwe. Sikawa bakómi kolobana ete: “Wana ezalaki ye kosolola na biso na nzela mpe kofungola makomi mpo na biso, mitema na biso mizalaki na mɔ́tɔ kati na biso te?” Nokinoki, bazongi na Yelusaleme mpo na koyebisa bayekoli mosusu. Wana ezali bango koloba makambo yango, Yesu abimi katikati na bango. Bakoki te kondima yango, mpamba te batondi na esengo monene mpe na kokamwa. Na nsima uta na Makomami ‘afungoli polele makanisi na bango mpo na kokanga’ ndimbola ya makambo oyo mauti kosalema. Luka asukisi lisoló ya Evanzile na ye na kolobeláká komata ya Yesu na likoló.—24:32, 45.
LITOMBA NA YANGO
30, 31. (a) Lolenge nini Luka alendisi kotya elikya kati na Makomami ya Liebele mpo ete epemamaki na Nzambe? (b) Maloba nini ya Yesu matángami na Luka mpo na kondimisa yango?
30 Nsango malamu “engebene Luka” ezali kolendisa elikya ya moto kati na Liloba ya Nzambe mpe ezali kokembisa kondima na ye mpo ete akoka kotɛmɛla mikakatano ya mokili oyo ya mabe. Luka apesi bandakisa mingi ya kokokisama ya sikisiki ya Makomami ya Liebele. Yesu amonisami ete azwaki maloba ya sikisiki mpo na mosala na ye kati na mokanda ya Yisaya, mpe emonani ete Luka asaleli yango lokola motó na likambo na mokanda na ye mobimba. (Luka 4:17-19; Yis. 61:1, 2) Yango ezalaki moko na mabaku oyo Yesu atángaki makambo mauti na Basakoli. Atángaki mpe maloba mazwami na Mibeko, na ndakisa wana azalaki kobwaka masɛnginya misato ya Zábolo, mpe atángaki maloba mazwami na Nzembo, na ndakisa wana atunaki na banguna na ye ete, ‘Bakoki koloba boni ete Klisto azali mwana na Davidi?’ Lisoló ya Luka ezali na maloba mosusu mingi oyo matángami longwa na Makomami ya Liebele.—Luka 4:4, 8, 12; 20:41-44; Det. 8:3; 6:13, 16; Nz. 110:1.
31 Wana Yesu akɔtaki na Yelusaleme likoló na mwana na mpunda lokola yango esakolamaki na Zekalia 9:9, bibele bakumisaki ye na esengo nyonso, kosaleláká na ntina na ye likomi lizwami na Nzembo 118:26. (Luka 19:35-38) Na esika moko, bavɛrsɛ́ mibale ya Luka ekoki mpo na kolobela makambo motoba oyo Makomami ya Liebele masakolaki na ntina na liwa ya nsɔ́ni oyo Yesu akufaki mpe lisekwa na ye. (Luka 18:32, 33; Nz. 22:7; Yis. 50:6; 53:5-7; Yona 1:17) Na nsuka, nsima ya lisekwa na ye, na makasi nyonso Yesu asalaki ete bayekoli bákanga ntina ya Makomami ya Liebele na mobimba na yango. “Sikawa alobaki na bango ete: ‘Oyo ezali maloba na ngai oyo nalobaki na bino wana nazalaki naino elongo na bino, ete makambo nyonso oyo makomami kati na mobeko ya Mose mpe kati na basakoli mpe kati na Nzembo na ntina na ngai esengeli kokokisama.’ Na nsima afungolaki mpenza makanisi na bango mpo na kokanga ndimbola ya Makomami.” (Luka 24:44, 45, NW) Lokola bayekoli wana ya liboso ya Yesu Klisto, biso mpe tokoki kongɛngisama mpe kozwa lisusu makasi na kotyáká likebi na kokokisama ya Makomami ya Liebele, oyo elimbolami na bosikisiki nyonso na Luka mpe na bakomi mosusu ya Makomami ya Greke ya boklisto.
32. Lolenge nini lisoló ya Luka elobeli mingi Bokonzi mpe ezaleli na biso esengeli kozala nini na ntina na Bokonzi?
32 Na lisoló na ye mobimba, Luka azali ntango nyonso kobenda likebi ya batángi na ye likoló na Bokonzi ya Nzambe. Uta na ebandeli ya mokanda, epai kuna anzelu alaki Malia ete mwana oyo akobota “akozala mokonzi na ndako na Yakobo libela, mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te,” kino na mikapo ya nsuka, epai kuna Yesu alobi ete asali kondimana mpo na Bokonzi elongo na bantoma, Luka azali mpenza komonisa elikya ya Bokonzi. (1:33; 22:28, 29) Azali komonisa Yesu wana ezali ye kotambwisa kosakolama ya Bokonzi mpe kotinda bantoma 12, mpe na nsima bayekoli 70, mpo na kosala sé mosala wana. (4:43; 9:1, 2; 10:1, 8, 9) Elimo ya komipesa yo moko, oyo esengeli mpo na kokɔta kati na Bokonzi emonisami na maloba ya Yesu oyo ete: ‘Tiká bakufi bákunda bakufi na bango, kasi yo kendá mpe yebisá bipai binso bokonzi ya Nzambe,’ mpe, “Moto oyo atye lobɔkɔ na [likalo] mpe azali kotala na nsima abongi na Bokonzi na Nzambe te.”—9:60, 62.
33. Pesá bandakisa oyo emonisi lolenge Luka alobi mingi na ntina na libondeli. Liteya nini tokoki kozwa na yango?
33 Luka alobeli mingi likambo litali libondeli. Evanzile na ye eyebani mingi na likambo yango. Ezali koyebisa biso ete bibele bazalaki kobondela na ntango oyo Zekalia azalaki kati na tempelo, ete Yoane Mobatisi abotamaki lokola eyano na mabondeli mpo na kosɛnga mwana mobali, mpe na ntina na Ana, mosakoli mwasi oyo azalaki kobondela butu na moi. Elobeli libondeli ya Yesu na ntango ya batisimo na ye, kolekisa na ye ya butu mobimba kati na libondeli liboso ya kopona ba 12, mpe libondeli na ye na ntango ya kobongwana. Yesu alendisi bayekoli na ye ete “bábondela ntango nyonso mpe bátika te,” komonisáká yango na lisese ya mwasi moko mokufeli-mobali oyo alendendelaki ntango nyonso mpo na kosɛnga na mosambisi moko kino asambisaki likambo na ye. Bobele Luka nde alobeli lisɛngi ya bayekoli epai na Yesu mpo ete alakisa bango lolenge ya kobondela mpe ete anzelu akembisaki Yesu wana azalaki kobondela na Ngomba ya Olive; mpe bobele ye moko nde alobeli maloba ya libondeli ya nsuka ya Yesu: “Tata, nazali kotika [elimo] na ngai na mabɔkɔ na yo.” (1:10, 13; 2:37; 3:21; 6:12; 9:28, 29; 18:1-8; 11:1; 22:39-46; 23:46) Motindo moko na mikolo oyo Luka azalaki kokoma Evanzile na ye, bobele bongo libondeli ezali ebongiseli ya ntina lelo mpo na kolendisa baoyo nyonso bazali kosala mokano ya Nzambe.
34. Bizaleli nini ya Yesu bilobelami mingi na Luka lokola ndakisa oyo baklisto basengeli kolanda?
34 Na nzela ya bososoli na ye mozindo mpe na ekomeli na ye ya kozanga nkaká, oyo ezali kolimbola likambo moko na moko, Luka azali kopesa mɔ́tɔ mpe bomoi na mateya ya Yesu. Bolingo, boboto, motema mawa, koyokela mawa oyo Yesu azalaki na yango epai na bato na bolɛmbu, banyokwami mpe baoyo bazali komona mpasi emonisi bokeseni monene na losambo ya bakomeli, ya Bafalisai oyo ezalaki ya malili, ya bongo na bongo, ya bipekiseli mingi mpe ya bokosi. (4:18; 18:9) Yesu azali ntango nyonso kopesa bilendiseli mpe lisalisi epai na babólá, bakangami, bakufi-miso, mpe banyokwami, kopesáká bongo ndakisa monene mpo na baoyo bazali koluka ‘kolanda penepene matambe na ye.’—1 Pet. 2:21.
35. Mpo na nini tokoki mpenza kozala na botɔ́ndi epai na Yehova lokola apesaki Evanzile ya Luka?
35 Motindo moko Yesu, Mwana na Nzambe, moto na kokoka, mosáli monene, amonisaki lobanzo ya bolingo mpo na bayekoli na ye mpe mpo na bato banso ya motema sembo, biso mpe tosengeli kosala milende na kokokisa mosala na biso kati na bolingo, ɛɛ, “mpo na motema mawa na Nzambe na biso.” (Luka 1:78) Mpo na yango nsango malamu “engebene Luka” ezali solo na litomba monene mpe na ntina. Tokoki mpenza kozala na botɔ́ndi epai na Yehova lokola apemisaki Luka, “monganga molingami,” mpo na kokoma lisoló oyo ya sikisiki, ya kolendisa, mpe ya koyikisa mpiko, oyo ezali komonisa kobikisama na nzela ya Bokonzi oyo etambwisami na Yesu Klisto, ‘mwango na kobikisama ya Nzambe.’—Kols. 4:14; Luka 3:6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku The Medical Language of Luke, 1954, W. K. Hobart, nkasa xi-xxviii.
b A Lawyer Examines the Bible, 1943, I. H. Linton, lokasa 38.
c Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 766-767.
d Búku Modern Discovery and the Bible, 1955, A. Rendle Short, lokasa 211.
e Búku The Jewish War, V, 491-515, 523 (xii, 1-4); VI, 420 (ix, 3); talá mpe Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 751-752.
f Mbuma na palata (drachme) ezalaki palata ya Grèce oyo ezalaki na bozito soko ya bagalami 3,4.