LISOLO YA BOYEKOLI 27
Omibongisa banda sikoyo mpo na minyoko
“Baoyo nyonso bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe na boyokani na Kristo Yesu bango mpe bakonyokwama.”—2 TIM. 3:12.
LOYEMBO 129 Tokoyika mpiko tii na nsuka
NA MOKUSEa
1. Mpo na nini tosengeli komibongisa mpo na minyoko?
NA BUTU ya nsuka liboso Nkolo na biso Yesu abomama, alobaki ete bakoyina bato nyonso oyo baponi kozala bayekoli na ye. (Yoa. 17:14) Banda wana tii lelo oyo, bato oyo batɛmɛlaka losambo ya solo banyokolaka bakristo ya sembo. (2 Tim. 3:12) Lokola nsuka ya mokili oyo ekómi mpenza pene, tóyeba ete banguna bakotɛmɛla biso lisusu mingi.—Mat. 24:9.
2-3. (a) Kobanga ekoki kosala biso nini? (b) Tokolobela makambo nini na lisolo oyo?
2 Ndenge nini tokoki komibongisa banda sikoyo mpo tóyika mpiko na minyoko oyo ezali koya? Ezali na ntina te tóluka kokanisa makambo nyonso ya mabe oyo bakoki kosala biso. Kosala bongo ekoki kobakisela biso kobanga mpe mitungisi. Kokanisa makambo ya mabe oyo ekoki kokómela biso ekoki kopesa biso nsɔmɔ mpe kosala ete tótika kosalela Yehova liboso kutu komekama eya. (Mas. 12:25; 17:22) Kobanga ezali ebundeli ya makasi oyo ‘monguna na biso Zabolo’ asalelaka mpo na kobundisa biso. (1 Pe. 5:8, 9) Kasi, ndenge nini totoki komibongisa banda sikoyo mpo tóyika mpiko na minyoko?
3 Na lisolo oyo, tokolobela makambo oyo tokoki kosala mpo tókómisa makasi boninga na biso na Yehova. Tokolobela mpe mpo na nini kosala bongo ezali na ntina mingi sikoyo. Tokomona mpe oyo tokoki kosala mpo tózala na mpiko mingi. Mpe na nsuka, tokotalela oyo tokoki kosala mpo tóyika mpiko ntango banguna bazali koyina biso.
KÓMISÁ BONINGA NA YO NA YEHOVA MAKASI
4. Na kotalela Baebre 13:5, 6, tosengeli komindimisa likambo nini, mpe mpo na nini?
4 Osengeli komindimisa ete Yehova alingaka yo mpe akosundola yo soki moke te. (Tángá Baebre 13:5, 6.) Eleki bambula mingi, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko elobaki boye: “Moto oyo ayebi Nzambe malamu nde akotyela ye motema mingi na ntango ya komekama.” Ezali mpenza solo! Mpo tóyika mpiko na minyoko, tosengeli kolinga Yehova, kotyela ye motema mobimba, mpe kotya ntembe ata moke te ete alingaka biso.—Mat. 22:36-38; Yak. 5:11.
5. Nini ekosalisa yo omona ete Yehova alingaka yo?
5 Tángáká Biblia mokolo na mokolo na mokano ya kopusana penepene na Yehova. (Yak. 4:8) Ntango ozali kotánga Biblia, lukáká komona bizaleli malamu ya Yehova. Meká komona ndenge makambo oyo alobi mpe oyo asali emonisi ete alingaka yo. (Kob. 34:6) Bato mosusu bandimaka mpenza te ete Nzambe alingaka bango mpo moto moko te amoniselá bango bolingo. Soki yo mpe okanisaka bongo, meká kosala boye: mokolo na mokolo, komá makambo oyo emonisi motema mawa mpe boboto ya Yehova epai na yo. (Nz. 78:38, 39; Rom. 8:32) Soki ozali kotalela makambo oyo yo moko okutani na yango mpe komanyola makambo oyo otángi na Liloba ya Nzambe, okomona ete Yehova asaleli yo makambo ebele. Soki ozali komonisa botɔndi mingi mpo na makambo oyo Yehova asalaka, boninga na bino mibale ekokóma makasi.—Nz. 116:1, 2.
6. Na kotalela Nzembo 94:17-19, ndenge nini kobondela na motema mobimba ekoki kosalisa yo?
6 Bondeláká mingi. Meká kokanisa ete tata moko ya boboto amemi mwana na ye ya moke ya mobali. Mwana yango ayoki ete abatelami malamu na mabɔkɔ ya tata na ye mpe abandi koyebisa ye makambo nyonso oyo akutanaki na yango mokolo wana, ezala ya malamu to ya mabe. Yo mpe okoki kozala na boyokani ya ndenge wana na Yehova soki obondelaka ye na motema mobimba mikolo nyonso. (Tángá Nzembo 94:17-19.) Ntango ozali kobondela Yehova, “sopá motema na yo lokola mai” mpe yebisá ye makambo nyonso oyo ezali kobangisa yo mpe kotungisa yo. (Bil. 2:19) Bolamu nini okozwa? Okozwa eloko oyo Biblia ebengi “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” (Flp. 4:6, 7) Soki ozali kobondela mingi ndenge wana, boyokani na yo na Yehova ekokóma lisusu makasi.—Rom. 8:38, 39.
7. Mpo na nini osengeli kozala na kondima ete bilaka ya Nzambe ekokokisama?
7 Zalá na kondima ete tokozwa mpenza mapamboli na nzela ya Bokonzi ya Nzambe. (Mit. 23:19) Soki ondimaka mpenza te ete bilaka ya Nzambe ekokokisama, ekozala mpasi te mpo Satana ná bato na ye bábangisa yo. (Mas. 24:10; Ebr. 2:15) Okoki kosala nini mpo kondima na yo na Bokonzi ya Nzambe ekóma makasi? Zwá ntango ya kosala bolukiluki mpo na bilaka oyo Nzambe akokokisa na nzela ya Bokonzi na ye mpe ntina oyo osengeli kondima ete bilaka yango ekokokisama. Kosala bongo ekosalisa yo na nini? Tótalela ndakisa ya Ndeko Stanley Jones, oyo akɔtaki bolɔkɔ mbula nsambo mpo na kondima na ye.b Nini esalisaki ye atikala sembo? Alobaki boye: “Lokola nayebaki ete Bokonzi ya Nzambe ezali solo, nandimaki likambo yango, mpe nazalaki na ntembe ata moke te mpo na yango, moto moko te akokaki kobebisa bosembo na ngai.” Soki ozali na kondima makasi na bilaka ya Nzambe, okopusana penepene na Yehova mpe okotika te ete kobanga epekisa yo kosalela ye.—Mas. 3:25, 26.
8. Ndenge oyo totalelaka likambo ya koyangana na makita ezali komonisa nini? Limbolá.
8 Yanganáká pɔsɔ nyonso na makita ya lisangá. Makita esalisaka biso tópusana penepene na Yehova. Ndenge oyo totalelaka likambo ya koyangana na makita lelo ezali komonisa soki tokoyika mpiko to te na minyoko na mikolo oyo ezali koya. (Ebr. 10:24, 25) Na ndenge nini? Soki lelo totikaka makambo ya mikemike epekisa biso kokende makita, ekozala boni na mikolo ezali koya, soki esɛngi tótya bomoi na biso na likama mpo na koyangana na bandeko na biso? Nzokande, soki tozali na ekateli makasi ya koyangana na makita lelo, tokotika te kosala yango ntango banguna baluki kopekisa biso koyangana elongo. Sikoyo nde ntango ya koyekola kolinga makita na biso. Soki tolingaka mpenza koyangana na makita, tokokoba kotosa Nzambe na esika ya kotosa bato, ata soki tokutani na botɛmɛli, to guvɛrnema epekisi biso koyangana na makita.—Mis. 5:29.
9. Mpo na nini kokanga bavɛrsɛ na motó ezali lolenge malamu ya komibongisa mpo na minyoko?
9 Kangá na motó bavɛrsɛ oyo olingaka mingi. (Mat. 13:52) Ntango mosusu okoki kobosana makambo oyo okangaki na motó, kasi Yehova akoki kosalela elimo santu na ye mpo ezongisa bavɛrsɛ yango na makanisi na yo. (Yoa. 14:26) Ndeko moko oyo azalaki na bolɔkɔ na Allemagne de l’Est mpe batyaki ye kaka ye moko na ndako ya bolɔkɔ alobaki boye: “Ezalaki malamu mpenza ndenge banda kala nakangaki bavɛrsɛ ebele mpenza na motó! Atako nazalaki kaka ngai moko, nakokaki kolekisa mokolo mobimba na komanyola masolo ndenge na ndenge ya Biblia.” Bavɛrsɛ yango esalisaki ndeko na biso azala ntango nyonso penepene na Yehova, mpe atikala sembo.
10. Mpo na nini tosengeli kokanga maloba ya banzembo na biso na motó?
10 Kangá na motó banzembo oyo ekumisaka Yehova mpe yembáká yango. Ntango ntoma Paulo ná Silasi bazalaki na bolɔkɔ na Filipi, bayembaki na motó banzembo oyo ezalaki kokumisa Yehova. (Mis. 16:25) Ndenge moko mpe, bandeko ya Union soviétique oyo bamemamaki bakangami na Sibérie basalaki nini mpo bázwa makasi? Ndeko mwasi Mariya Fedun alobaki boye: “Toyembaki nzembo nyonso [ya Bokonzi] oyo toyebaki.” Alobaki ete banzembo yango elendisaki bango nyonso mpe esalisaki bango bámiyoka ete bazali penepene na Yehova. Omonaka ete koyemba banzembo ya Bokonzi mpe banzembo ya TV JW oyo olingaka mingi epesaka yo makasi? Soki bongo, oyo nde ntango ya kokanga maloba na yango na motó!—Talá etanda “Pesá ngai mpiko.”
NDENGE YA KOKÓMA NA MPIKO MINGI
11-12. (a) Na kotalela 1 Samwele 17:37, 45-47, mpiko ya Davidi eutaki wapi? (b) Ndakisa ya Davidi eteyi biso nini?
11 Mpo otikala sembo na ntango ya minyoko, osengeli kozala na mpiko. Kasi, okosala nini soki omoni ete ozali na mpiko te? Kobosana te ete komonisa mpiko ya solosolo etaleli te monene ya moto, makasi na ye to mpe mayele na ye. Tózwa ndakisa ya elenge Davidi ntango abundisaki Goliate. Liboso ya engambe Goliate, Davidi azalaki komonana moke, azalaki na makasi te mpe azalaki na bibundeli ya malonga te. Kutu, Davidi azalaki ata na mopanga te. Kasi, azalaki na mpiko. Akendaki kobundisa engambe yango ya lolendo.
12 Mpiko ya Davidi eutaki wapi? Andimaki na motema moko ete Yehova azalaki elongo na ye. (Tángá 1 Samwele 17:37, 45-47.) Aboyaki kokanisa ndenge Goliate alekaki ye na mbinga. Kasi, azalaki kokanisa ndenge Goliate azalaki moke mpenza na miso ya Yehova. Yango eteyi biso nini? Tokozala na mpiko soki tomindimisi ete Yehova azali elongo na biso mpe ete banguna na biso bazali moke mpenza na miso ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. (2 Nt. 20:15; Nz. 16:8) Tokoki kosala nini mpo tókóma na mpiko mingi banda sikoyo, liboso ete minyoko eya?
13. Ndenge nini tokoki kokóma na mpiko mingi? Limbolá.
13 Lelo, kobima na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ekoki kosalisa biso tókóma na mpiko mingi. Mpo na nini? Mpo, mosala ya kosakola esalisaka biso tótyela Yehova motema mpe tótika kobanga bato. (Mas. 29:25) Ndenge kaka misisa ya nzoto ekómaka makasi soki moto azali kosala ngalasisi mingi, tokokóma na mpiko mingi soki tozali kosakola ndako na ndako, na bisika ya bato ebele, ntango nyonso oyo tozwi libaku, mpe na bisika ya mombongo. Soki tobakisi mpiko na mosala ya kosakola banda sikoyo, tokokoba kosala yango ata soki mosala na biso epekisami.—1 Tes. 2:1, 2.
14-15. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya ndeko Nancy Yuen ná Valentina Garnovskaya?
14 Tokoki kozwa liteya monene na ndakisa ya bandeko basi mibale ya sembo oyo bamonisaki mpiko. Ndeko Nancy Yuen azalaki kaka molai ya mɛtrɛ moko ná ndambo (1,5 m), kasi ezalaki mpasi mpo moto abangisa ye.c Aboyaki kotika kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Na yango, Bakoministe batyaki ye na bolɔkɔ mbula 20 na Chine. Ntango bazalaki kotunatuna ye mituna, bayebisaki ye ete ye nde moto oyo ‘aleki motó makasi’ na ekólo mobimba.
15 Ndenge moko mpe, ndeko Valentina Garnovskaya akɔtaki bolɔkɔ mbala misato na Union soviétique; asalaki mbula 21 na babolɔkɔ yango.d Mpo na nini? Lokola azalaki na ekateli makasi ya kokoba kosakola, bakonzi balobaki ete azali “mosali-mabe ya nsɔmɔ mpenza.” Mpiko ya bandeko basi yango ya sembo eutaki wapi? Bandimaki ete Yehova azalaki elongo na bango.
16. Nini epesaka mpiko ya solosolo?
16 Ndenge tolobaki yango, mpo tókóma na mpiko mingi, tosengeli te kotya motema na makasi na biso moko mpe na mayele na biso. Kasi, tosengeli kondima ete Yehova azali elongo na biso mpe ete ye nde abundelaka biso. (Mib. 1:29, 30; Zek. 4:6) Yango nde epesaka mpiko ya solosolo.
OYO OKOKI KOSALA SOKI BATO BAZALI KOYINA YO
17-18. Na kotalela Yoane 15:18-21, likebisi nini Yesu apesaki? Limbolá.
17 Ya solo, tosepelaka ntango bato bazali kopesa biso limemya. Kasi soki bato balingi biso te, tosengeli te kokanisa ete tozali na ntina te. Yesu alobaki: “Esengo na bino ntango bato bazali koyina bino, mpe ntango bazali kobengana bino mpe kofinga bino mpe kobebisa nkombo na bino mpo na Mwana ya moto lokola nde bozali bato mabe.” (Luka 6:22) Maloba ya Yesu elimboli nini?
18 Yesu alingaki koloba te ete bakristo bakosepela soki bato bayini bango. Azalaki nde kokebisa biso. Lokola tozali bato ya mokili te, totosaka mateya ya Yesu mpe tosakolaka nsango oyo ye mpe asakolaki, yango wana mokili eyinaka biso. (Tángá Yoane 15:18-21.) Tolingaka kosepelisa Yehova. Soki bato bayini biso mpo tolingi Tata na biso ya likoló, etali kaka bango moko.
19. Ndenge nini tokoki komekola ndakisa ya bantoma ya Yesu?
19 Kotika ata likambo moko te oyo bato balobi to basali etinda yo oyoka nsɔni ya kozala Motatoli ya Yehova. (Mika 4:5) Ndakisa ya bantoma oyo bazalaki na Yerusaleme nsima ya kobomama ya Yesu ekoki kosalisa biso tótika kobanga bato. Bantoma bayebaki malamu ete bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki koyina bango. (Mis. 5:17, 18, 27, 28) Atako bongo, bakobaki kokende na tempelo mokolo na mokolo mpe bamonisaki polele ete bazali bayekoli ya Yesu. (Mis. 5:42) Baboyaki ete kobanga ezongisa bango nsima. Biso mpe tokotika kobanga bato soki tozali komonisa polele ete tozali Batatoli ya Yehova, na mosala, na kelasi, mpe na esika tofandi.—Mis. 4:29; Rom. 1:16.
20. Mpo na nini bantoma bazalaki na esengo atako bayinaki bango?
20 Mpo na nini bantoma bazalaki na esengo? Mpo bayebaki ntina oyo bato bayinaki bango, mpe bamonaki ete ezali lokumu bányokwama mpo bazali kosala mokano ya Yehova. (Luka 6:23; Mis. 5:41) Na nsima, ntoma Petro akomaki boye: “Soki bosengeli konyokwama mpo na boyengebene, bozali bato ya esengo.” (1 Pe. 2:19-21; 3:14) Soki toyebi ete bato bazali koyina biso mpo tozali kosala oyo ezali malamu, tokotika te kosalela Yehova mpo na likambo yango.
KOMIBONGISA BANDA SIKOYO EKOSALISA YO
21-22. (a) Ozwi ekateli ya kosala nini mpo omibongisa banda sikoyo mpo na minyoko? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
21 Toyebi te ntango oyo minyoko ekoya, to mpe ntango oyo guvɛrnema ekopekisa mosala na biso. Kasi, toyebi ete mpo tómibongisa banda sikoyo, tosengeli kokómisa makasi boninga na biso na Yehova, kokóma na mpiko mingi, mpe koyekola kozala na esengo ata soki bato bazali koyina biso. Soki tomibongisi banda sikoyo, ekosalisa biso tókoba kosalela Yehova na mikolo oyo ezali koya.
22 Kasi, tokosala nini soki losambo na biso epekisami? Lisolo oyo elandi ekolobela toli ya Biblia oyo ekosalisa biso tókoba kosalela Yehova ata na ntango ya epekiseli.
LOYEMBO 118 “Bakiselá biso kondima”
a Tolingaka te ete bato báyina biso. Kasi ata ndɛlɛ, biso nyonso tokokutana na minyoko. Lisolo oyo ekosalisa biso tózala na mpiko mpe tómibongisa banda sikoyo mpo na minyoko.
b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/1966, nk. 212-224, na Français.
c Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10/1979, nk. 4-7, na Français. Talá mpe video Nkombo ya Yehova ekoyebana na TV JW®. Kende na MASOLO YA BOMOI.
d Talá Buku ya mobu 2008, nk. 191-192, na Français.
e ELILINGI: Na losambo na kati ya libota, baboti bazali kosalela mwa bapapye mpo na kosalisa bana bákanga bavɛrsɛ na motó.
f ELILINGI: Bato ya libota moko bazali kokende na makita, bazali koyemba banzembo ya Bokonzi na motuka.