Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ‘Bótikala kaka na kati ya Liloba na ngai’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2003 | 1 Sanza ya 2
    • 16. (a) Banani oyo bakokani na mabele oyo ezali na banzubɛ? (b) Masolo ya Baevanzile misato eyebisi ete banzubɛ ezali komonisa nini?​—Talá maloba na nse ya lokasa.

      16 Banani oyo bakokani na mabele oyo ezali na banzubɛ? Yesu alobaki boye: “Yango ezali bato oyo bayoki, kasi, lokola bamemami na mitungisi mpe bomɛngo mpe bisengo ya bomoi oyo, bazwi nkaka bipai nyonso mpe babimisi eloko moko te na kokoka.” (Luka 8:14) Se ndenge oyo milona oyo moloni alonaki ezalaki kokola ná banzubɛ nzela moko, bato mosusu balukaka koyamba liloba ya Nzambe mpe kaka na ntango yango, komipesa na “bisengo ya bomoi oyo.” Solo ya liloba ya Nzambe elonamaka na mitema na bango, kasi ewelanaka na makambo mosusu oyo ebendaka likebi na bango. Na maloba ya elilingi, bato yango bazalaka na mitema mibale. (Luka 9:57-62) Yango ezangisaka bango ntango oyo ekoki mpenza mpo na komanyola malamumalamu likoló na liloba ya Nzambe elongo na mabondeli. Bamipesaka mobimba na liloba ya Nzambe te mpe na bongo, bapesaka yango te motuya oyo esengeli mpo bákoka koyika mpiko. Mokemoke, makambo ya mokili ezipaka mposa na bango mpo na makambo ya elimo mpe nsukansuka ‘bazwaka nkaka bipai nyonso.’c Talá ndenge bato oyo balingaka Yehova na motema moko te basukaka mabe!​—Matai 6:24; 22:37.

      17. Makambo nini tosengeli kozwa mokano ya kosala na bomoi na biso mpo ete banzubɛ ya elilingi oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye etya biso nkaka te?

      17 Soki tozali kotya makambo ya elimo liboso mpe kozongisa makambo ya mokili na nsima, bampasi to mpe bisengo ya mokili oyo ekotya biso nkaka te. (Matai 6:31-33; Luka 21:34-36) Tosengeli soki moke te kobosana momeseno ya kotánga Biblia mpe komanyola likoló ya makambo oyo tozali kotánga. Tokozala na ntango mingi mpo na komanyola malamumalamu elongo na mabondeli soki totiki makambo mingi oyo ezali kokómisa bomoi na biso mindɔndɔ. (1 Timote 6:6-8) Basaleli ya Nzambe oyo basalaki yango, oyo na maloba ya elilingi bapikolaki banzubɛ mpo ete milona oyo ebotaka mbuma ezala na bilei mingi, ezwa moi mpe ezala na esika ya malamu, bazali kozwa mapamboli ya Yehova. Sandra azali na mbula 26, ye alobaki boye: “Soki nakanisi mapamboli oyo nazali na yango na kati ya lisangá, namoni eloko moko te oyo mokili ekoki kopesa ngai oyo ekokani na yango!”​—Nzembo 84:11.

  • ‘Bótikala kaka na kati ya Liloba na ngai’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2003 | 1 Sanza ya 2
    • c Baevanzile misato ezali komonisa ete na ndakisa oyo Yesu apesaki, milona ekómaki na nkaka mpo na bampasi mpe bisengo ya mokili: “Mitungisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” “nguya ya bokosi ya bomɛngo,” “bamposa ya biloko mosusu,” mpe “bisengo ya bomoi oyo.”​—Malako 4:19; Matai 13:22; Luka 8:14; Yilimia 4:3, 4. 

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto