Tóluka kimya ya Nzambe kati na bomoi ya libota
“Ɛ bino mabota na bato, bópesa [Yehova], bópesa [Yehova] lokumu mpe nguya.”—NZEMBO 96:7.
1. Yehova apesaki ebandeli ya lolenge nini na bomoi ya libota?
BOMOI ya libota oyo Yehova asalaki na ebandeli ezalaki na kimya mpe na esengo ntango asangisaki mobali mpe mwasi ya liboso kati na libala. Ya solo, Adama azalaki na esengo mingi na boye ete amonisaki yango na maloba ya liboso mpenza ya ntɔ́ki, wana alobaki ete: “Oyo azali sasaipi mokwa na mikwa na ngai, mpe mosuni na mosuni na ngai. Ye akobyangama mwasi, zambi ye akamatami na mobali.”—Genese 2:23.
2. Longola likambo ya kopesa bana na ye bato esengo, Nzambe azalaki mpe na likanisi nini?
2 Ntango Nzambe abandisaki ebongiseli ya libala mpe ya libota, azalaki te bobele na mokano ya kopesa esengo na bato oyo bazalaki bana na ye. Alingaki ete básala mokano na ye. Nzambe ayebisaki babalani ya liboso ete: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nsé na bino; mpe bózala na bokonzi na likoló na mbisi na mai, mpe na ndɛkɛ na likoló, mpe likoló na nyama nyonso na bomoi ikotambolaka na mokili.” (Genese 1:28) Ezalaki mpenza mosala moko ya kosepelisa. Oyo nde esengo Adama, Eva mpe bana na bango oyo basengelaki kobotama bakokaki kozala na yango soki babalani ya liboso bakokisaki mokano ya Yehova na botosi nyonso!
3. Nini esɛngami epai na mabota mpo ete mázala na bomoi ya bokangami na Nzambe?
3 Nzokande, ata lelo, mabota mazali na esengo mingi ntango mazali kosala mokano ya Nzambe na bomoko. Mpe oyo nde bilikya kitoko mabota ya botosi motindo wana mazali na yango! Ntoma Paulo akomaki ete: “Bizaleli [ya bokangami na Nzambe, NW] ikopesaka litomba na nzela nyonso, awa ezali yango na elaka na bomoi mpo na sasaipi oyo mpe mpo na ntango ekoya.” (1 Timoté 4:8) Mabota oyo mazali komitambwisa na bizaleli ya bokangami na Nzambe mazali kolanda mitindá ya Liloba ya Nzambe mpe mazali kosala mokano na ye. Bazali kolanda kimya ya Nzambe mpe na bongo bazali kozwa esengo kati na “bomoi mpo na sasaipi.”
Bomoi ya libota kati na likámá
4, 5. Mpo na nini tokoki koloba ete bomoi ya libota sikawa esili kobeba kati na mokili mobimba?
4 Mpo na koloba solo, kimya mpe esengo ezali komonana kati na mabota nyonso te. Kotángáká lapólo ya bolukiluki moko oyo esalemaki na ebongiseli moko oyo etángaka motango ya bato oyo ebéngami Population Council, zulunalo The New York Times elobi ete: “Ezala na mikili ya bobóla to ya bozwi, lolenge ya bomoi ya libota ezali kosala mbongwana mozindo mpenza.” Batángaki maloba ya mokomi moko ya bolukiluki yango ete: “Likanisi oyo ete libota ezali na bomoko makasi mpe na molɔngɔ́ oyo kati na yango tata azali kosala mpo na kokokisa bamposa ya libota mpe mama azali molendisi ya libota na mayoki, ezali bongo ndɔ́tɔ mpamba. Bosolo ezali ete mokakatano ya bamama-minzemba, komata ya mitángo ya mabala oyo mazali kokufa, [mpe] mabota mike . . . ezali mingi kati na mokili mobimba.” Na ntina na mikakatano yango, bamilió ya mabota mazangi moboko, kimya mpe esengo, mpe mingi mazali kokabwana. Na Espagne, motángo ya mabala oyo mabomami ekóli na libala 1 likoló ya mabala 8 na ebandeli ya mibu ya 1990—bokóli makasi oyo ebandaki na libala 1 likoló ya mabala 100 bobele na mibu 25 liboso ya mibu wana. Elobami ete Angleterre ezali moko na mikili ya Mpótó oyo eleki koboma mabala—mabala 4 likoló ya mabala 10 mazali kokufa. Mokili yango mpe mozali na motángo monene ya mabota oyo mazali na moboti bobele moko.
5 Emonani lokola bato mosusu baumelaka te koboma libala. Bato mingi bakendaka na “Tempelo ya kokata boyokani” pene na Tokyo, na mokili ya Japon. Tempelo yango ya Shintoïsme endimaka nkomá mpo na koboma libala mpe kokata boyokani mosusu oyo elingami lisusu te. Mosambeli moko na moko akomaka likambo na ye likoló na mwa libaya moko moke, akokwakisa yango na efelo oyo ezingi tempelo, mpe akosambela mpo na kozwa eyano. Zulunalo moko ya engumba Tokyo elobi ete ntango tempelo wana esalamaki esili koleka soko ekeke moko, “basi ya bato ya mombongo na mboka bakomaki mabondeli kosɛngáká ete mibali na bango bátika basi ya makango oyo bazalaki kozwa mpe bázongela bango.” Nzokande, lelo oyo, masɛngi mingi ezali mpo na koboma libala, kasi mpo na koyokana te. Na ntembe te, bomoi ya libota ebebi na mokili mobimba. Yango esengeli kokamwisa baklisto? Te, mpamba te Biblia ezali kopesa biso bososoli likoló na kobeba ya libota na mikolo na biso.
Mpo na nini mabota mazali kobeba?
6. Bopusi nini 1 Yoane 5:19 ezali na yango likoló na kokwea ya libota lelo oyo?
6 Moko na ntina ya kobeba ya libota lelo ezali ete “mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Nini tokoki komona epai na oyo mabe, Satana Zábolo? Azali mabe, mokosi monene. (Yoane 8:44) Likambo ya kokamwa ezali te ete mokili na ye ezinda kati na bizaleli mabe mpe ya mbindo, makambo oyo mazali mpenza kobebisa mabota! Na libándá ya lisangá ya Nzambe, bopusi ya Satana ezali kobebisa ebongiseli ya Yehova etali libala mpe kotya nsuka na kimya ya bomoi ya libota.
7. Na lolenge nini mabota makoki kobebisama na bizaleli oyo bato mingi bazali komonisa na mikolo oyo ya nsuka?
7 Ntina mosusu ya mikakatano ya libota oyo ebebisi bato sikawa emonisami na 2 Timoté 3:1-5. Maloba ya esakweli ya Paulo oyo makomami kuna mazali komonisa ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka.” Mabota makoki te kozala na kimya mpe na esengo soki basangani na yango bazali “bamikumisi na bango mpenza, baluki na mosolo, bato na lolɛndɔ, bato na ngambo, batuki, bato bazangi kokumisa baboti, bato bazangi matɔ́ndi, bato bazangi bulɛɛ, bato bazangi bolingo, bazangi boboto, batɔ́ngi, batomboki, bato na yauli, bayini na malamu, bakosi, bato na nkó, bato babimbi na lolɛndɔ, baoyo bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe, bato bazali na lolenge na kosambela nde bazali kowangana nguya na yango.” Libota moko likoki kozala na esengo te soki ata mosangani na yango moko azangi bolingo to azangi bulɛɛ. Ndenge nini libota ekoki kozala na bomoi ya kimya soki mosangani moko kati na ndako azali na yauli mpe azangi boboto? Lisusu mabe koleka, ndenge nini kimya mpe esengo ekoki kozala ntango basangani ya libota bakolinga malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe? Yango ezali bizaleli ya bato lelo kati na mokili oyo eyangelami na Satana. Likambo ya kokamwa ezali te ete esengo ya libota elimwa na mikolo oyo ya nsuka!
8, 9. Bopusi nini bizaleli ya bana ekoki kozala na yango likoló na esengo ya libota?
8 Nzokande, ntina mosusu oyo mabota mazangi kimya mpe esengo ezali bongo etamboli mabe ya bana. Ntango Paulo asakolaki bizaleli ya mikolo ya nsuka, asakolaki ete bana mingi bakozanga botosi epai na baboti na bango. Soki ozali elenge, ezaleli na yo epesaka nzela ete libota na yo lizala na kimya mpe na esengo?
9 Bana mosusu bazalaka na bizaleli malamu. Na ndakisa, elenge mobali moko akomelaki tata na ye nkomá moko mabe na maloba oyo: “Soki okei na ngai na engumba Alexandrie te, nakokomela yo nkomá lisusu te, nakolobisa yo te, nakopepa yo mbote te. Mpe soki okei na engumba Alexandrie mpe otiki ngai, nakosimba loboko na yo te mpe nakopesa yo mbote lisusu te. Yango ekosalema soki otiki ngai . . . Kasi nalɔmbi yo, tindelá ngai [ebɛteli ya miziki ebéngami] nzɛnzɛ. Soki oboi, nakolya te mpe nakomela te. Nalobi sé bongo!” Yango ezali mpe oyo ezali kosalema lelo? Ɛɛ, nkomá yango oyo elenge mobali wana akomelaki tata na ye ezalaki na ntango ya Ezipito ya kala, esili koleka mibu 2 000.
10. Na lolenge nini bilenge bakoki kosunga mabota na bango ete málanda kimya ya Nzambe?
10 Ezaleli ya elenge Moezipito yango epesaki kimya na libota te. Ya solo, makambo makómi mpasi koleka kati na mabota na mikolo oyo ya nsuka. Nzokande, bino bilenge bokoki kosunga mabota na bino ete máluka kimya ya Nzambe. Na lolenge nini? Na kotosáká toli oyo ya Biblia: “Bino bana bótosaka baboti na bino na makambo nyonso, mpo ekoki bongo kati na Nkolo.”—Bakolose 3:20.
11. Lolenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango ete bákóma basaleli ya sembo ya Nzambe?
11 Ezali boni mpo na bino baboti? Bósunga bana na bino na bolingo mpenza ete bákóma basaleli ya sembo ya Yehova. Masese 22:6 elobi ete: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ekokóma ye monene akopɛngwa na yango te.” Na nzela na mateya kitoko oyo mauti na Biblia mpe ndakisa malamu ya baboti, bilenge mingi ya mibali mpe ya basi bapɛngwaka te na nzela malamu ntango bakómi mikóló. Kasi mingi etalelaka lolenge mpe mozindo ya kobongisama euti na Biblia mpe motema ya elenge.
12. Mpo na nini ndako ya baklisto esengeli kozala na kimya?
12 Soki basangani nyonso ya libota na biso bazali kosala milende ya kosala mokano ya Yehova, tokoki kosepela na kimya ya Nzambe. Ndako ya baklisto esengeli kotonda na ‘baninga ya kimya.’ Luka 10:1-6 ezali komonisa ete Yesu azalaki kokanisa bato ya motindo wana ntango atindaki bayekoli 70 lokola baministre mpe alobaki na bango ete: “Soko bokokɔta na ndako nini, lobá liboso ete, Kimya na ndako oyo. Soko mpe moto na kimya azali wana, kimya na bino ekoumela na ye.” Ntango basaleli ya Yehova bakendaka na kimya nyonso kosakola “nsango malamu ya kimya” ndako na ndako, balukaka baninga ya kimya. (Misala 10:34-36; Baefese 2:13-18) Ya solo, ndako ya baklisto oyo bazali baninga ya kimya esengeli kozala na kimya.
13, 14. (a) Naomi azalaki na mposa ya nini mpo na Luta mpe Opela? (b) Ndako ya moklisto esengeli kozala esika ya bopemi ya motindo nini?
13 Ndako esengeli kozala esika ya kimya mpe ya kopema. Naomi, mobangé-mokufeli-mobali azalaki na elikya ete Nzambe akopesa Luta mpe Olepa, bilenge basi ya bana na ye, oyo bakómaki bakufeli-mibali, bopemi mpe bozwi oyo eutaka na kozala na mobali malamu mpe ndako malamu. Naomi alobaki ete: “[Yehova] asunga bino ete bózwa kopema, moto na moto na ndako na mobali na ye.” (Luta 1:9) Engebene bolingi ya Naomi, nganga-mayele moko akomaki ete kati na bandako motindo wana Luta mpe Olepa “basengelaki kosikolama na motungisi mpe na mawa. Basengelaki kozwa bopemi. Esengelaki kozala esika oyo bakokaki kofanda, mpe kati na yango mayoki na bango ya motema mpe mposa na bango ya lokumu ekokaki kokokisama. Nguya ya liloba ya Liebele . . . emonisami malamu na maloba oyo mayokani na mokapo yango masangani kati na [Yisaya 32:17, 18].”
14 Tótalela mokapo oyo ya Yisaya 32:17, 18. Kuna tozali kotánga boye: “Mosala na boyengebene ekozala kimya mpe nsuka na boyengebene ekozala kimya mpe kondima libela. Bato na ngai bakofanda na efandelo na kimya na bifandelo na solo mpe na ndako na bolɔ́zi te.” Ndako ya moklisto esengeli kozala esika ya boyengebene, ya kimya, ya libateli, mpe ya kimya ya Nzambe. Kasi ezali boni soki komekama, matata, to mikakatano mosusu ebimi? Na ntango yango, tokozala mingimingi na mposa ya koyeba sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.
Mitindá minei ya ntina
15. Lolenge nini okoki kolimbola sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota?
15 Mabota nyonso awa na mabelé mazwi nkombo uta na Yehova Nzambe, Mozalisi ya mabota. (Baefese 3:14, 15) Na bongo, mabota oyo mazali na mposa ya kimya masengeli koluka litambwisi na ye mpe kokumisa ye, lokola mokomi na nzembo asalaki yango: “Ɛ bino mabota na bato, bópesa [Yehova], bópesa Yehova lokumu mpe nguya.” (Nzembo 96:7) Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota ezali kati na Biblia, Liloba ya Nzambe, mpe kosalelama ya mitindá na yango. Libota oyo ezali kosalela mitindá yango likozala na esengo mpe likosepela na kimya ya Nzambe. Tiká ete tótalela mitinda minei kati na mitindá yango ya ntina.
16. Mosala nini ezaleli ya komipekisa esengeli kokokisa kati na bomoi ya libota?
16 Moko kati na mitindá yango ezwami na likambo oyo: Ezaleli ya komipekisa ezali na ntina mingi mpo ete kimya ya Nzambe ezala kati na bomoi ya libota. Mokonzi Salomo alobaki ete: “Lokola mboka ebukami mpe ezangi mapango bongo moto oyo ayebi kozala na bokonzi likoló na [elimo, NW] na ye te.” (Masese 25:28) Kopekisa elimo na biso—elingi koloba kosalela ezaleli ya komipekisa—ezali na ntina soki tolingi kozala na libota ya kimya mpe ya esengo. Atako tozali bato ya kozanga kokoka, tosengeli komonisa ezaleli ya komipekisa, yango ezali mbuma ya elimo santu ya Nzambe. (Baloma 7:21, 22; Bagalatia 5:22, 23) Elimo ekoki kobimisa ezaleli ya komipekisa epai na biso soki tozali kobondela mpo na kozwa ezaleli yango, kosalela toli ya Biblia na ntina na yango, mpe kosangana na basusu oyo bazali komonisa yango. Yango ekosalisa biso ete “tókima pite.” (1 Bakolinti 6:18) Ezaleli ya komipekisa ekosalisa biso mpe na kobwaka mobulu, kopɛngola to kolónga milangwa, mpe koyika mpiko na kimya kati na mikakatano.
17, 18. (a) Lolenge nini 1 Bakolinti 11:3 esalelamaka na bomoi ya libota ya moklisto? (b) Lolenge nini kotosa bokonzi ebimisaka kimya kati na libota?
17 Motindá mosusu ya ntina mingi ekoki komonisama na lolenge oyo: Kotosa ebongiseli ya bokonzi ekosalisa biso ete tólanda kimya ya Nzambe kati na mabota na biso. Paulo akomaki ete: ‘Nalingi ete bósosola ete motó na babali nyonso ezali Klisto mpe ete motó na mwasi ezali mobali mpe ete motó na Klisto ezali Nzambe.’ (1 Bakolinti 11:3) Yango elingi koloba ete mobali azali motambwisi ya libota, ete mwasi na ye azali mosungi ya sembo, ete bana bazali na botosi. (Baefese 5:22-25, 28-33; 6:1-4) Etamboli motindo wana ekopesa kimya ya Nzambe kati na bomoi ya libota.
18 Mobali moklisto asengeli komikundola ete bokonzi oyo Makomami ezali kopesa ye ezali ya kokonza te. Asengeli nde komekola Yesu, Motó na ye. Atako azalaki “motó likoló na makambo nyonso,” Yesu “ayaki mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga.” (Baefese 1:22; Matai 20:28) Lolenge moko, mobali moklisto asalelaka bokonzi na ye na lolenge ya bolingo ete epesa ye likoki ya komibanzabanza na matomba ya libota na ye. Mpe na ntembe te moklisto mwasi akolinga kosalana na mobali na ye elongo. Lokola azali “mosungi” oyo “abongi,” akomonisa bizaleli oyo bizangi epai ya mobali na ye mpe na bongo akopesa ye lisungi oyo azali na yango mposa. (Genese 2:20; Masese 31:10-31) Kosalelama ya bokonzi na lolenge lobongi ekosalisa mibali mpe basi ete bápesana limemya moko na mosusu mpe ekopusa bana ete bázala na botosi. Ɛɛ, kotosa bokonzi epesaka kimya ya Nzambe kati na libota.
19. Mpo na nini kosolola malamu ezali na ntina mpo na kimya mpe esengo ya libota?
19 Motindá ya misato ya ntina ekoki komonisama na maloba oyo: Kosolola malamu ezali na ntina mingi mpo na kotya kimya mpe esengo kati na libota. Yakobo 1:19 elobi na biso boye: “Moto na moto azala na koyoka noki nde aloba na [bokebi, NW].” Basangani ya libota basengeli koyoka mpe kosolola moko na mosusu mpamba te kosolola kati na libota ezalaka likambo ya koloba mpe koyoka. Nzokande, ata ntango likambo moko oyo tozali koloba ezali solo, ekoki kozala ete tokosala basusu mabe soki tolobi yango na lolenge ya kozokisa, ya lolɛndɔ to na nkanza. Maloba na biso masengeli kozala na ngɔlu, “na elengi na mongwa.” (Bakolose 4:6) Mabota oyo malandaka mitindá ya Makomami mpe masololaka malamu mazali kolanda kimya ya Nzambe.
20. Mpo na nini okoki koloba ete bolingo ezali na ntina mpo na kimya ya libota?
20 Motindá ya minei yango oyo: Bolingo ezali na ntina mpo na kimya mpe esengo ya libota. Lolango ekoki kozala na ntina mingi kati na libala, mpe bolingo mozindo ekoki kokóla kati na basangani ya libota. Nzokande, oyo ezali na ntina mingi koleka ezali bolingo oyo emonisami na liloba ya Greke a·gaʹpe. Yango ezali bolingo oyo tolónaka mpo na Yehova, mpo na Yesu mpe mpo na bazalani na biso. (Matai 22:37-39) Nzambe amonisaki bolingo motindo wana mpo na bato na kopesáká “Mwana-na-likinda [“Mwana mobotami-bobele moko,” NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.” (Yoane 3:16) Oyo nde esengo tozali na yango na koyeba ete tokoki komonisa bolingo motindo yango mpo na basangani ya libota na biso! Lolenge ya bolingo oyo etombwani ezali “ekanganeli ekoki mpenza.” (Bakolose 3:14) Ekangisaka babalani esika moko mpe epusaka bango na kosala oyo ezali malamu mpo na moko mpe mpo na mosusu mpe mpo na bana na bango. Ntango mikakatano ebimi, bolingo esalisaka bango ete básilisa yango na bomoko. Tokoki kondimisama na yango mpamba te “bolingo . . . ekolukaka malamu na yango mpenza te . . . Ekomemaka makambo nyonso, ekondimaka nyonso, ekolikyaka nyonso, ekoyikaka nyonso mpiko. Bolingo ekosuka te.” (1 Bakolinti 13:4-8) Esengo ezali na mabota oyo kati na yango bolingo ya moko epai na mosusu esangisami na bolingo mpo na Yehova!
Tókóba kolanda kimya ya Nzambe
21. Nini esengeli mpo na kokólisa kimya mpe esengo ya libota na yo?
21 Mitindá oyo touti kotalela mpe misusu oyo miuti na Biblia mimonisami kati na mikanda oyo Yehova azali kopesa na boboto nyonso na nzela ya “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45) Na ndakisa, makanisi motindo wana mazwami na búku ya nkasa 192 oyo ezali na motó na likambo ete Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, ebimisamaki na Liyangani ya Etúká ya Batatoli ya Yehova oyo esalemaki na mokili mobimba na mibu 1996/1997 mpe ezalaki na motó na likambo ete “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe.” Boyekoli ya Makomami mpo na moto ye moko mpe kati na libota na lisalisi ya mokanda motindo wana ekoki kopesa matomba mingi. (Yisaya 48:17, 18) Ɛɛ, kosalela batoli ya Makomami ekoki kokólisa kimya mpe esengo ya libota.
22. Bomoi na biso esengeli kotongama likoló na nini?
22 Yehova abombeli mabota oyo mazali kokokisa mokano na ye biloko kitoko, mpe abongi kopesamela lokumu mpe kosalela ye. (Emoniseli 21:1-4) Na bongo, tiká ete bomoi ya libota na yo etongama likoló na losambo ya Nzambe ya solo. Mpe tiká ete Nzambe na biso ya makoló, Yehova, oyo atondi na bolingo apambola bino na esengo wana bozali kolanda kimya ya Nzambe kati na bomoi ya mabota na bino!
Okoyanola lolenge nini?
◻ Nini esɛngami na mabota soki malingi komonisa bokangami na Nzambe?
◻ Mpo na nini mabota mazali kobeba lelo oyo?
◻ Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota ezali nini?
◻ Wapi mwa mitindá mosusu oyo mikoki kosalisa biso ete tókólisa kimya mpe esengo kati na bomoi ya libota?
[Elilingi na lokasa 24]
Kosolola malamu esalisaka biso ete tólanda kimya kati na libota