Mokanda ya Biblia nimero 5—Deteronome
Mokomi: Mose
Esika ya bokomi: Bisobe ya Moaba
Nsuka ya bokomi: 1473 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: Sanza mibale (1473 L.T.B.)
1. Mituna nini mikoki kotunama na ntina na bokɔti ya Yisalaele na Mokili ya Ndaka?
MOKANDA ya Deteronome ezali na nsango ya nguya mpo na libota ya Yehova. Nsima na koyengayenga mbula 40 kati na mokili mokauki, bana ya Yisalaele bakómi sikawa pene na kokɔta na Mokili ya Ndaka. Nini ezali kozela bango liboso? Mikakatano nini mpenza basengelaki kokutana na yango na ngámbo mosusu ya Ebale Yordani? Mpe Mose alingaki koyebisa nini epai na libota yango? Tokoki mpe komituna motuna oyo: Mpo na nini ezali na litomba epai na biso lelo ete tóyeba biyano na mituna oyo?
2. Na lolenge nini mokanda ya Deteronome emonani mpenza ete ezali na ntina mingi?
2 Biyano na mituna wana bizwami kati na maloba oyo Mose alobaki mpe akomaki na Deteronome, mokanda ya mitano ya Biblia. Atako yango ezali kozongela makambo mingi oyo mazwami kati na mikanda ya liboso, Deteronome ezali na ntina mingi mpo na kososolama na lolenge na yango moko. Mpo na nini? Mpo ete ebendi lisusu likebi likoló na nsango ya Nzambe, mpe epesamaki na ntango oyo mposa ya bokambami ya nguya mpe mposa ya litambwisi ya solosolo ezalaki makasi kati na lisoló ya libota ya Yehova. Bazalaki pene na kokɔta na Mokili ya Ndaka na kokambamáká na motambwisi mosusu. Bazalaki na mposa ya bilendiseli mpo na kokende liboso, mpe bazalaki na mposa ya makebisi ya Nzambe mpo na koyeba etamboli ya sembo oyo esengelaki komemela bango mapamboli ya Yehova.
3. Mose amonisi mingi likambo nini kati na Deteronome mobimba, mpe mpo na nini yango ezali na ntina mpo na biso lelo?
3 Na boyokani na mposa yango, Mose apusamaki na elimo ya Yehova mpo na kobyanga Yisalaele na mpiko nyonso ete bázala na botosi mpe bázala sembo. Kati na mokanda yango mobimba, azali komonisa mingi mpenza ete Yehova azali Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, oyo azali kosɛnga kokangama bobele epai na ye mpe oyo azali na mposa ete libota na ye ‘bálinga ye na motema na bango mobimba mpe na molimo na bango mobimba mpe na nguya na bango mobimba.’ Azali “Nzambe na banzambe mpe Nkolo na bankolo, Nzambe monene mpe makasi mpe na nsɔ́mɔ, oyo akoponapona bato te mpe akondimaka lifuti te.” Ye andimaka bombanda soko moke te. Kotosa ye elimboli bomoi, kozanga kotosa ye elimboli liwa. Malako ya Yehova, oyo mapesami kati na Deteronome, mazalaki mpenza toli mpe kobongisama oyo Yisalaele ezalaki na yango mposa mpo na mikumba minene oyo mizalaki kozela bango. Yango ezali mpe lolenge ya toli oyo tosengeli na yango lelo mpo na kokóba kotambola na bobángi liboso na Yehova, kosantisáká nkombo na ye kati na mokili oyo mosili kobeba.—Det. 5:9, 10; 6:4-6; 10:12-22.
4. Ndimbola ya nkombo Deteronome ezali nini, mpe wapi mokano ya mokanda yango?
4 Nkombo Deteronome euti na motó na likambo mozwami kati na libongoli ya Septante ete Deu·te·ro·noʹmi·on, oyo esangisi maloba deuʹte·ros, elingi koloba “ya mibale,” mpe noʹmos, oyo elimboli “mibeko.” Na bongo, ndimbola na yango ezali ete “Mibeko ya Mibale; Kozongelama ya Mibeko.” Yango euti na libongoli ya Greke ya maloba ya Liebele mish·nehʹ hat·toh·rahʹ oyo mazwami kati na Deteronome 17:18, oyo mabongolami malamu mpenza ete ‘kopi ya mibeko.’ Nzokande, atako nkombo Deteronome ezali na ndimbola wana, mokanda yango ya Biblia mozali mibeko ya mibale te soko mpe kozongelama mpamba ya Mibeko te. Kútu, yango ezali nde kolimbolama ya Mibeko, oyo elendisaki Yisalaele na kolinga Yehova mpe kotosa ye kati na Mokili ya Ndaka oyo bazalaki pene na kokɔta.—1:5.
5. Nini endimisi ete Mose azali mokomi ya Deteronome?
5 Lokola Deteronome ezali rulo to volimi ya mitano ya Pantatɛ́kɛ, boye mokomi na yango asengeli kozala moto oyo akomaki mikanda minei ya liboso, elingi koloba Mose. Maloba ya ebandeli mazali komonisa Deteronome ete ezali “maloba malobaki Mose na Bayisalaele nyonso,” mpe maloba oyo makomami mwa mosika mamonisi polele ete ye azali mokomi na yango; na ndakisa maloba oyo, “Mose akomaki mpe mibeko oyo” mpe “Mose akomaki loyembo oyo.” Nkombo na ye etángami pene na mbala 40 kati na mokanda yango, mpe mingimingi emonisami ete ye nde abimisaki maloba yango. Kati na mokanda yango mobimba, momei mwa yambo (première personne du singulier), mpo na kolobela Mose, esalelami mingi. Bavɛrsɛ́ ya nsuka ebakisamaki na nsima ya liwa ya Mose, mpe emonani ete ezali Yosua nde moto abakisaki yango to mpe Eleazala, nganga monene.—1:1; 31:9, 22, 24-26.
6. (a) Lisoló ya Deteronome liumelaki ntango boni? (b) Ntango nini kokomama ya mokanda yango esukaki mpenza?
6 Makambo oyo makomami na Deteronome masalemaki ntango nini? Na ebandeli, mokanda yango moyebisi ete “na mbula na ntuku minei, na mokolo na liboso na sanza na zomi na moko, Mose asololaki na bato na Yisalaele.” Na nsuka ya kokomama ya lisoló ya Deteronome, mokanda ya Yosua mokóbi lisoló yango mikolo misato liboso ete bákatisa Yordani; bokatisi yango esalemaki “na mokolo na zomi na sanza na liboso.” (Det. 1:3; Yos. 1:11; 4:19) Yango epesi eleko ya sanza mibale mpe pɔ́sɔ moko na makambo oyo mayebisami kati na Deteronome. Nzokande, mikolo 30 ya eleko wana ya bapɔ́sɔ libwa milekisamaki mpo na kolela na ntina na liwa ya Mose. (Det. 34:8) Yango emonisi mpenza ete makambo nyonso ya Deteronome masalemaki na sanza ya 11 na mbula ya 40. Na nsuka ya sanza wana, emonani polele ete kokomama ya mokanda yango esukaki, ntango Mose akufaki na ebandeli ya sanza ya 12 na mbula ya 40, to na ebandeli ya mobu 1473 L.T.B.
7. Nini emonisi bosolo ya Deteronome?
7 Bilembeteli oyo bisilaki kopesama mpo na kondimisa bosolo ya mikanda minei ya liboso kati na Pantatɛ́kɛ bizali mpe kondimisa bosolo ya Deteronome, mokanda ya mitano. Yango ezali mpe moko kati na mikanda minei ya Makomami ya Liebele oyo mitángami mingi koleka mpenza kati na Makomami ya Greke ya boklisto; mikanda mosusu oyo mitángami na yango elongo ezali Genese, Nzembo mpe Yisaya. Mikapo na yango oyo mitángami mizali na motángo ya 83, mpe mikanda 17 ya Makomami ya Greke ya boklisto mizali kolobela Deteronome.a
8. Litatoli nini ya kosilisa ntembe Yesu apesaki mpo na kosimba bosolo ya Deteronome?
8 Yesu ye moko apesi litatoli ya nguya mpo na kondimisa Deteronome. Na ebandeli ya mosala na ye, amekamaki mbala misato na Zábolo, mpe mbala misato, azongelaki eyano oyo: “Ekomami ete.” Ekomami wapi? Na mokanda ya Deteronome (8:3; 6:16, 13), oyo Yesu atángaki yango lokola endimiseli oyo epemami: “Moto akobika bobele na kwanga te nde na maloba nyonso makobimaka na monɔkɔ na [Yehova].” “Okomeka [Yehova] Nzambe na yo te.” “Okongumbamela [Yehova] Nzambe na yo mpe okosalela bobele ye.” (Mat. 4:1-11) Na nsima, ntango Bafalisai bayaki komeka ye likoló na mibeko ya Nzambe, Yesu apesaki eyano na kotángáká “mobeko moleki monene mpe oyo na liboso” uta na Deteronome 6:5. (Mat. 22:37, 38; Mko. 12:30; Luka 10:27) Litatoli ya Yesu lindimisi na lolenge ya kosilisa ntembe mpenza bosolo ya Deteronome.
9. Bilembeteli nini ya libándá ya Makomami bizali kondimisa Deteronome?
9 Lisusu, makambo mpe maloba oyo mazali kati na mokanda yango mayokani mpenza na istware mpe na makambo ya zingazinga. Kolobelama ya Ezipito, ya Kanana, ya Amaleki, ya Amona, ya Moaba mpe ya Edome eyokani mpenza na bileko na yango, mpe nkombo ya bisika iyebisami na bosikisiki mpenza.b Arkeoloji ezali ntango nyonso kobakisa bilembeteli oyo bindimisi bosolo ya makomi ya Mose. Henry H. Halley akomi ete: “Uta mwa bileko, arkeoloji ezali koloba na mongongo makasi na boye ete ezali kobimisa bondimi mozindo ya likanisi oyo libandá kala [ete Mose akomaki Pantatɛ́kɛ]. Liteya oyo limonisi ete bato bayebaki kokoma te na mikolo ya Mose lisili kokweisama mpenza. Mpe mbula na mbula, bilembeteli bizali kotimolama na Ezipito, na Palestine mpe na Mésopotamie, ezala na lolenge ya makomi to na lolenge ya biloko bisalemi na mabelé, na boye ete masoló ya [Makomami ya Liebele] mamonani mpenza makambo ya istware ya solo. Mpe ‘banganga-mayele’ bakómi mpenza kopesa limemya na likanisi oyo libandá kala ete Mose azali mokomi na yango.”c Boye, ezala bilembeteli ya libándá bizali kondimisa Deteronome, mpe makomi mosusu ya Pantatɛ́kɛ, ete ezali lisoló ya solo mpe ya sikisiki oyo Mose, mosakoli ya Nzambe, akomaki.
MAKAMBO MAZALI KATI NA DETERONOME
10. Deteronome esalemi mpenza na nini?
10 Mokanda yango mosalemi mpenzampenza na molɔngɔ́ ya masukúlu oyo Mose asalaki liboso na bana ya Yisalaele na bisobe ya Moaba, oyo etalani na Yeliko. Lisukúlu ya liboso esuki na mokapo ya 4, lisukúlu ya mibale ekei kino nsuka ya mokapo 26, oyo ya misato elandi kino mokapo 28, mpe lisukúlu mosusu etandami kino nsuka ya mokapo 30. Nsima ya kokamata bibongiseli liboso ya liwa na ye oyo ebɛlɛmaki mpe kobongisama ya Yosua lokola mokitani na ye, Mose akomi loyembo kitoko mpenza mpo na kosanzola Yehova, na nsima apamboli mabota ya Yisalaele.
11. Lolenge nini Mose abandi lisukúlu na ye ya liboso?
11 Lisukúlu ya liboso ya Mose (1:1–4:49). Yango ezali maloba ya ebandeli ya lisoló ya makambo oyo makolanda. Libosoliboso, Mose azongeli misala ya sembo oyo Yehova asalaki epai na libota na Ye. Mose ayebisi bango ete bákɔta mpe bákamata mokili molakamaki na batata na bango Abalayama, Yisaka mpe Yakobo. Ayebisi lisusu lolenge Yehova atambwisaki mosala ya libota yango ya Teokrasi na ebandeli ya mobembo na bango kati na mokili mokauki, na kotindáká ye, Mose, ete apona mibali ya bwanya, ya mayele, baoyo bayebi makambo mingi ete bázala bakapitɛni na nkóto, na nkámá, na ntuku mitano, mpe na zomi. Ezalaki ebongiseli ya molɔngɔ́ ya kokamwisa, oyo ekambamaki na Yehova, wana Yisalaele ‘etambolaki kati na mokili monene oyo mokauki mpe motondi na nsɔ́mɔ.’—1:19.
12. Akundweli bango makambo nini oyo malekaki nsima na konɔ́nga mokili ya Kanana?
12 Mose akundweli bango lisumu ya botomboki oyo basalaki ntango bayokaki lapólo ya banɔ́ngi oyo bautaki na Kanana mpe ntango bamilelaki ete Yehova azalaki koyina bango, abimisaki bango na Ezipito mpo na kosundola bango na mabɔkɔ ya Baamola. Na ntina na kozanga kondima na bango, Yehova ayebisaki libota mabe wana ete, longola Kalebe mpe Yosua, moko te kati na bango akomona mokili kitoko wana. Na likambo yango, bamitambwisaki lisusu na botomboki nyonso, basilikaki mpe bakendaki kobundisa banguna na ndenge na bango moko, kasi Baamona babenganaki bango lokola maboke ya nzoi mpe bapalanganisaki bango epai na epai.
13. Na moboko nini Mose apesaki Yosua kondimisama mpo na bolóngi?
13 Basalaki mobembo kati na mokili mokauki kino epai na Mai Motane, mpe na boumeli ya mbula 38, libota mobimba ya mibali ya etumba likufaki nyɛɛ. Bongo, Yehova atindaki [baoyo batikalaki] ete bákatisa mpe bákamata mokili ya nɔ́rdi ya Alenono, mpe alobaki ete: “Lelo oyo nakobanda kotya nsɔ́mɔ mpe kobanga na yo likoló na mabota nyonso bazali na nsé na lola, baoyo bakoyoka nsango na yo mpe bakolɛnga mpe bakozala na bolózi na ntina na yo.” (2:25) Sihona mpe mokili na ye bakweaki na mabɔkɔ ya Bayisalaele, mpe na nsima bokonzi ya Ogu ezwamaki. Mose apesaki Yosua endimiseli ete Yehova asengelaki kobunda mpo na Yisalaele na motindo bobele moko mpo na kolónga bikonzi nyonso. Na nsima, Mose atunaki Nzambe soki ye moko akokaki, na lolenge moko to mosusu, kokatisa kino na mokili kitoko na ngámbo ya Yordani, kasi Yehova akóbaki koboya likambo yango, koyebisáká Mose ete apesa mokumba na Yosua, alendisa ye mpe ayikisa ye mpiko.
14. Lolenge nini Mose abendi likebi makasi likoló na Mibeko ya Nzambe mpe likoló na kokangama bobele epai na Ye?
14 Mose abendi sikawa likebi makasi likoló na Mibeko ya Nzambe, kopesáká likebisi na ntina na kobakisa to kolongola makambo uta na mibeko na Ye. Kozanga botosi ekomema likámá monene: “Kebá bobele kokeba, mpe sɛnzɛlá [molimo, NW] na yo malamu ete obosana makambo mamoni miso na yo te, mpe ete málongwa na motema na yo te mikolo nyonso na bomoi na yo. Lakisá bana na yo yango mpe bana na bana na yo.” (4:9) Bamonaki elilingi moko te ntango Yehova apesaki Maloba Zomi epai na bango na nsé na makambo ya nsɔ́mɔ na Ngomba Holebe. Ekozala libebi mpo na bango soki bamipesi na losambo ya bikeko mpe ya bililingi, mpamba te, lokola Mose alobi yango, “[Yehova] Nzambe na bino azali mɔ́tɔ na kozikisa, Nzambe na zúwa na kobatela [“oyo asɛngaka kokangama bobele epai na ye,” NW]. (4:24) Ezalaki Ye nde alingaki batata na bango mpe aponaki bango. Ezali na Nzambe mosusu te kati na lola to na nsé awa na mabelé. Mose apesi elendiseli ete, tosá Ye “ete oyeisa mikolo na yo mingi kati na mokili oyo [Yehova] Nzambe na yo apesi na yo libela.”—4:40.
15. Ebongiseli nini esalemi na ɛ́sti ya Yordani na ntina na mboka ya kobombama?
15 Nsima na kosukisa lisukúlu wana ya nguya, Mose aponi Bɛsɛlɛ, Lamoti, mpe Golana ete ezala mboka na kobombama na ɛ́sti ya Yordani.
16. Lisukúlu ya mibale ya Mose elobeli mingi likambo nini?
16 Lisukúlu ya mibale ya Mose (5:1–26:19). Yango ezali libyangi epai na Yisalaele ete báyoka Yehova, oyo alobaki liboso na bango na Ngomba Sinai. Simbá lolenge Mose alobeli lisusu Mibeko elongo na mwa kosembolama ya ntina, koyokanisáká yango na bomoi na bango ya sika na ngámbo mosusu ya Yordani. Ezali kozongelama mpamba ya malako mpe mibeko te. Liloba mokomoko ezali komonisa ete motema ya Mose motondi na molende mpe na bokangami epai na Nzambe. Azali koloba mpo na bolamu ya libota mobimba. Uta ebandeli kino nsuka, alobeli mingi botosi na Mibeko—botosi oyo euti na motema motondi na bolingo, kasi na kotindikama te.
17. Lolenge nini Yisalaele esengeli koyanola na bolingo oyo Yehova amoniselaki bango?
17 Libosoliboso, Mose azongeli Maloba Zomi, to Mibeko Zomi, mpe ayebisi Yisalaele ete bátosa yango, kopɛngwáká na lobɔkɔ ya mobali te soko na lobɔkɔ ya mwasi mpe te, ete bákoka koyeisa mikolo na bango mingi kati na mokili mpe bákoka kofuluka. “Yoká, ɛ Yisalaele, [Yehova] azali Nzambe na biso, [Yehova] moko.” (6:4) Motema, molimo mpe makasi esengeli kopesama mpo na komonisela Ye bolingo, mpe Yisalaele basengeli koteya bana na bango mpe koyebisa bango bilembo mpe bikamwiseli minene oyo Yehova asalaki na Ezipito. Basengeli te kosala ekanganeli ya libala elongo na Bakanana oyo bazalaki basambeli na bikeko. Yehova aponaki Yisalaele ete ezala libota na ye ya sipesiale; yango ezalaki te mpo na ebele na yango ya bato, kasi mpo ete alingi bango mpe azali kobatela ndai oyo asalaki elongo na batata na bango. Yisalaele basengeli kokima motambo ya lingomba ya bademó, basengeli kobebisa bikeko ya mokili yango, mpe kokangama na Yehova, oyo azali solo “Nzambe monene mpe na nsɔ́mɔ.”—7:21.
18. Mose akebisi Bayisalaele ete bámibatela liboso na makambo nini?
18 Yehova akitisaki lolendo na bango na boumeli ya mbula 40 kati na mokili mokauki, koteyáká bango ete moto akobika, bobele na mana to mampa te, kasi na maloba nyonso makobimaka na monɔkɔ ya Yehova. Na boumeli ya bambula nyonso wana ya etumbu, bilamba na bango binzulukaki te, mpe makolo na bango mavimbaki te. Bakómi sikawa pene na kokɔta na mokili ya bozwi mpe ya biloko mingi! Nzokande, basengeli kokeba na mitambo ya koluka kozala na biloko mingi ya mosuni mpe ya komonana sembo na miso na bango moko, basengeli komikundola ete Yehova nde ‘apesaka nguya ya kozala na bozwi’ mpe azali mobɔtɔli epai na mabota ya misala mabe. (8:18) Bongo, Mose alobeli lisusu mabaku oyo Yisalaele etumolaki Nzambe. Basengeli kokanisa lolenge nkanda ya Yehova epɛlelaki bango kati na mokili mokauki, na nzela na maladi mabe, na mɔ́tɔ mpe na libomi! Basengeli komikundwela losambo ya mwana na ngɔmbɛ ya wolo oyo ememaki libebi, mpe oyo ebimisaki nkanda na kongala ya Yehova mpe esalaki ete bitando mosusu ya mabanga ya Mibeko bisalema! (Ex. 32:1-10, 35; 17:2-7; Mit. 11:1-3, 31-35; 14:2-38) Ya solo, basengeli sikawa kosalela Yehova mpe kokangama na Ye, Nzambe oyo alingaki bango na ntina na batata na bango mpe akómisi bango ‘ebele lokola minzoto na likoló.’—Det. 10:22.
19. Liponi nini limonisami polele, mpe mibeko nini milobelami mpo na libota ya Yisalaele?
19 Yisalaele basengeli kobatela “lilako nyonso,” mpe basengeli kotosa Yehova malamumalamu, kolinga ye mpo ete azali Nzambe na bango mpe kosalela ye na motema na bango mobimba mpe na molimo na bango mobimba. (11:8, 13) Yehova akosunga bango mpe akopesa bango mbano soki bakotosa ye. Nzokande, basengeli komipesa mpo na koteya bana na bango na molende nyonso. Liponi oyo lityami liboso na Yisalaele liyebisami polele ete: Botosi ekomema mapamboli, kasi kozanga botosi ekomema kolakelama mabe. Basengeli te “kobila banzambe mosusu.” (11:26-28) Na nsima, Mose alobeli mibeko ya sikisiki oyo mitaleli Yisalaele, ntango bazali kokende mpo na kokamata Mokili ya Ndaka. Ezali bongo (1) mibeko mitali lingomba mpe losambo; (2) mibeko mitali kosambisa makambo, boyangeli, mpe etumba; mpe (3) mibeko na ntina na bomoi ya moto na moto mpe ya bato banso kati na libota yango.
20. Makambo nini malobelami na mibeko mitali losambo?
20 (1) Lingomba mpe losambo (12:1–16:17). Ntango Bayisalaele bakokɔta na mokili yango, biloko nyonso bitikali ya losambo ya lokuta—bisika na yango ya likoló, bitumbelo na yango, nzeté na yango, makonzi na yango ya bulɛɛ, mpe bikeko na yango—esengeli kobebisama nyɛɛ. Yisalaele basengeli kosambela bobele na esika oyo Yehova Nzambe na bango aponi kotya nkombo na ye, mpe kuna, bango banso basengeli kosepela na ntina na ye. Mibeko na likambo litali kolya misuni mpe kopesa mbeka misangisaki makundoli oyo mazalaki kozongelama mbala na mbala ete basengelaki te kolya makila. “Kasi bobele makila bokolya te . . . Okolya yango te ete makambo na yo nyonso mázala malamu, mpe oyo na bana na yo na nsima na yo, wana ekosala yo yango ezali sembo na miso na [Yehova].” (12:16, 23-25, 27; 15:23) Mose akweisi losambo ya bikeko na lolenge ya polele sikawa. Yisalaele basengeli kútu te koluka koyeba makambo ya mangomba ya lokuta. Soki mosakoli moko amonani ete azali mosakoli na lokuta, boye asengeli kobomama, mpe bapɛngwi—ezala ndeko to moninga ya motema, ɛɛ, ata mpe engumba mobimba—basengeli mpe kobomama. Na nsima, alobeli mibeko likoló na bilei ya pɛto mpe bilei ya mbindo, likoló na kofutama ya ndambo na zomi, mpe likoló na lolenge ya kobatela Balevi. Matomba ya badefi, matomba ya babólá, mpe matomba ya baombo masengeli kobatelama na bolingo nyonso. Na nsuka, Mose alobeli bilambo ya mbula ete ezali ntango ya kopesa Yehova matɔ́ndi mpo na mapamboli na ye: “Mbala misato na kati na mbula mibali na yo nyonso bakobima liboso na [Yehova] Nzambe na yo na esika ekopona ye: na elambo na kwanga [“mampa,” NW] ezangi mfulu mpe na elambo na bapɔ́sɔ mpe na elambo na mingombo. Bakobima liboso na [Yehova] na mabɔkɔ mpamba te.”—16:16.
21. Mibeko nini mipesami na ntina na kosambisa, mpe Mose apesi esakweli nini ya ntina mingi?
21 (2) Kosambisa, boyangeli, mpe etumba (16:18–20:20). Libosoliboso, Mose apesi mibeko mitaleli basambisi mpe bakonzi. Bosembo ezali likambo ya ntina mingi, mpo ete kanyaka mpe lisambisi mabe eyinami na Yehova. Matambe ya kolanda mpo na kosangisa bilembeteli mpe kokata makambo emonisami polele. “Moto na kokufa akobomama na ntina na matatoli na batatoli mibale soko batatoli misato.” (17:6) Mibeko na ntina na bakonzi miyebisami. Bibongiseli na ntina na banganga mpe Balevi bikamatami. Kosalela bikelákela ekweisami na mibeko ete ezali “mbindo na miso na [Yehova].” (18:12) Kolobeláká makambo makosalema na mikolo mikoya mosika mpenza, Mose alobi ete: ‘Yehova Nzambe na yo akotɛmisela yo mosakoli longwa na kati na yo, longwa na bandeko na yo, lokola ngai—bokoyoka ye.’ (18:15-19) Nzokande, mosakoli ya lokuta asengeli kobomama. Eteni oyo esuki na mibeko mitaleli mboka na kobombama mpe lolenge ya kobekola makila, bakisá masɛngami mpo na kozanga koponama na mosala ya sodá mpe mibeko ya etumba.
22. Mibeko nini milobelami na ntina na bomoi ya moto na moto mpe na ntina na bomoi ya bato banso?
22 (3) Bomoi ya moto na moto mpe bomoi ya bato banso (21:1–26:19). Mibeko mitaleli bomoi ya mokolo na mokolo ya Bayisalaele mityami kati na makambo lokola oyo: moto oyo bakuti ye ete abomami, libala elongo na basi baombo, lotómo ya mwana-na-liboso, mwana motomboki, kokakisama ya mosáli na mabe likoló na nzeté, bilembeteli ya boseka, yauli na makambo matali kosangisa nzoto, kolongolama mbuma ya nzoto ya mobali, bana ya makango, lolenge ya kosalela bapaya makambo, bopɛto mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, kofutama na litomba mpe ndai, koboma libala, koyiba moto mpe kokende na ye epai mosusu, kodefisa, lifuti, mpe kolɔkɔtama ya mbuma nsima na kobukama na yango. Moto asengeli te kobɛtama fimbo koleka 40. Monɔkɔ ya ngombe esengeli kokangama te na ntango azali kopapola masango. Lolenge libala ya mwasi-mokufeli-mobali mpe semeki na ye esengeli kosalema eyebisami. Emekeli na bozito to balanse ya malamu esengeli kosalelama, mpo ete bokɛsɛnɛ eyinami na Yehova.
23. Mose alobeli eloko nini oyo ekomonana soki libota ya Nzambe litosi mibeko na Ye?
23 Liboso ya kosukisa lisukúlu oyo ya nguya, Mose akundoli lolenge Amaleki ebɛtaki Bayisalaele oyo batikalaki nsima ntango bakimaki uta na Ezipito, mpe Mose apesi Yisalaele etindá ete ‘bálongola Amaleki ete nkombo na yango elobelama lisusu te na nsé na lola.’ (25:19) Ntango bakokɔta na mokili, basengeli kokaba mbuma ya liboso ya mabelé na bosepeli nyonso, mpe basengeli lisusu kopesa dime elongo na libondeli ya matɔ́ndi epai na Yehova ete: “Talá na nsé longwa na ndako na yo na bulɛɛ na likoló, mpe pambolá bato na yo Yisalaele mpe mabelé oyo osili kopesa na biso, pelamoko esimbaki yo ndai epai na batata na biso, mokili moleki na mabɛlɛ [“miliki,” NW] mpe na mafuta na nzoi.” (26:15) Soki batosi mibeko yango na motema na bango mobimba mpe na molimo na bango mobimba, boye Yehova, na ngala na ye, ‘akotya bango likoló na mabota nyonso masalaki ye, mpe yango ekobimisa masanzoli mpe lokumu mpe bonzenga, mpo ete bamimonisi libota ya bulɛɛ mpo na Yehova Nzambe na bango, lokola esilaki ye kolaka.’—26:19.
24. Lisukúlu ya misato etye mapamboli nini mpe bilakeli mabe nini liboso na Yisalaele?
24 Lisukúlu ya misato ya Mose (27:1–28:68). Kati na lisukúlu oyo, bankumu na Yisalaele mpe banganga basangani na Mose ntango azali kolobela na bolai mpenza bilakeli mabe oyo Yehova akoyeisa mpo na kozanga botosi mpe mapamboli oyo akosopa mpo na bosembo. Makebisi makasi mapesami na ntina na bitumbu mabe oyo biuti na kozanga bosembo. Soki Yisalaele, libota ya bulɛɛ, ekóbi kotosa mongongo ya Yehova Nzambe na bango, bakozwa mapamboli mingi, mpe mabota nyonso ya mokili bakomona ete nkombo ya Yehova etángami likoló na bango. Nzokande, soki baboyi kotosa mongongo na ye, Yehova akotindela bango “bilakeli mabe mpe mobulu mpe bitungiseli.” (28:20) Bakobɛtama na makɔnɔ mabe, na kozanga mai, mpe na nzala; banguna na bango bakobengana bango mpe bakokómisa bango baombo, bakopalanganisama epai na epai mpe bakolongolama na mokili. Bilakeli mabe wana, mpe mingi mosusu, bikoyela bango soki ‘bakosɛnzɛla te mpo na kosala maloba nyonso ya mobeko, oyo ekomami na mokanda oyo mpo na kobanga nkombo ya nkembo mpe ya nsɔ́mɔ ya Yehova, Nzambe na [bango].’—28:58.
25. (a) Kondimana nini Yehova asali sikawa elongo na Yisalaele? (b) Liponi nini Mose atye liboso ya libota yango?
25 Lisukúlu ya minei ya Mose (29:1–30:20). Yehova asali sikawa kondimana elongo na Yisalaele na mokili ya Moaba. Yango esangisi Mibeko, lokola Mose azongelaki mpe alimbolaki yango, oyo mikotambwisa Yisalaele wana bakokɔta na Mokili ya Ndaka. Ndai monene oyo elapamaki elongo na kondimana wana epesi mikumba epai na Yisalaele. Na nsuka, Mose abyangi likoló mpe mokili mpo na kozala batatoli na ntango azali kotya, liboso na libota ya Yisalaele, bomoi mpe liwa, mapamboli mpe bilakeli mabe, mpe apesi elendiseli oyo: “Nabyangi likoló mpe nsé kotatola na ntina na bino lelo, ete natye liboso na yo bomoi mpe kufa, mpe lipamboli mpe elakeli mabe. Na bongo poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi, mpe ete olinga [Yehova] Nzambe na yo mpe otosa mongongo na ye mpe okangana na ye, mpo ete yango bomoi mpe konuna mpo na yo, ete okoka kofanda na mokili oyo [Yehova] asimbelaki batata na bino ndai, Abalayama, mpe Yisaka mpe Yakobo, ete akopesa yango na bango.”—30:19, 20.
26. Mose akamati bibongiseli nini ya nsuka liboso na liwa na ye?
26 Kotyama ya Yosua lokola motambwisi, mpe loyembo ya Mose (31:1–32:47). Mokapo 31 ezali koyebisa lolenge Mose atyaki Yosua motambwisi, nsima na kokoma Mibeko mpe kopesa malako na ntina na kotángama na yango mbala na mbala liboso na libota mobimba; ayebisaki Yosua ete azala na mpiko mpe azala makasi; na nsima, mokapo yango eyebisi lolenge abongisaki loyembo moko ya ekaniseli mpe lolenge asukisaki kokomama ya maloba ya Mibeko mpe azwaki ebongiseli ete Mibeko yango mityama pene na sanduku ya kondimana ya Yehova. Nsima na makambo wana, Mose amonisi maloba ya loyembo yango liboso na lisangá mobimba mpo na kopesa bango elendiseli ya nsuka.
27. Nsango nini ya nguya ezwami kati na loyembo ya Mose?
27 Loyembo ya Mose ebandi mpenza na maloba ya botɔ́ndi, oyo mamonisi Eutelo ebongi ya mateya oyo azwaki! “Tiká liteya na ngai ekwea lokola mbula mpe kosolola na ngai etanga lokola mamwɛ, lokola mbula moke na likoló na matiti motau, mpe lokola na mbula mokuse na likoló na ndunda. Mpo ete ngai nakosakola nkombo na [Yehova].” Ɛɛ, bópesa nkembo na “Nzambe na biso,” “Ye Libanga.” (32:2-4) Bósakola mosala na ye ya kokoka, banzela na ye ibongi, bosembo na ye, boyengebene na ye mpe kolongobana na ye. Ezalaki likambo ya nsɔ́ni ndenge Yisalaele etambolaki na lolenge mabe, atako Yehova azingaki bango kati na mokili mokauki ya nsɔ́mɔ, oyo mozangi biloko, kobateláká bango lokola mbuma ya liso na ye mpe kolekáká likoló na bango lokola mpongo oyo azali kopumbwa likoló na bana na ye. Ayeisaki libota na ye mafuta, kobéngáká bango Yesulune, “Mosembwi,” kasi bapusaki ye na kowelana na banzambe ya bapaya mpe bakómaki “bana bazali na sembo te.” (32:20) Kobekola mpe kofuta ezali na Yehova. Azali koyeisa liwa mpe kopesa bomoi. Ntango akopɛlisa mopanga na ye ya mikalikali mpe wana lobɔkɔ na ye ekosimba lisambisi, na ntembe te akosala bobekoli kotɛmɛla banguna na ye. Oyo nde elikya makasi yango esengeli kopesa epai na libota na ye! Lokola loyembo elobi yango na nsuka, oyo ezali ntango ya ‘kozala na esengo, bino bato, elongo na libota na ye.’ (32:43) Mokomi nini ya poeme akoki kobimisa bonzenga, nguya mpe bozindo ya ndimbola ya loyembo wana loyembami mpo na Yehova?
28. Lolenge nini Yehova akumisami na lipamboli ya nsuka oyo Mose apesaki?
28 Mose apesi lipamboli ya nsuka (32:48–34:12). Mose apesameli sikawa malako ya nsuka na ntina na liwa na ye, kasi asilisi naino mosala na ye ya Teokrasi te. Ya liboso, asengeli naino kopambola Yisalaele, mpe na kosaláká yango, akumisi lisusu Yehova, Mokonzi na Yesulune, oyo abimi elongo na makiasikiasi na ye ya bulɛɛ. Libota mokomoko lipesameli mapamboli na kobéngamáká na nkombo na yango, mpe na nsima Mose asanzoli Yehova lokola Oyo aleki banso: “Nzambe na seko azali efandelo na yo, mpe mabɔkɔ na libela mazali na nsé na yo.” (33:27) Na nsima, uta na motema ya botɔ́ndi mozindo, alobi maloba na ye ya nsuka epai na libota ete: “Ɛ Yisalaele, ozali na esengo! Nani akokani na yo, libota ebikisami na [Yehova]?”—33:29.
29. Na makambo nini Mose azalaki moto ya kobenda likebi?
29 Nsima na kotala Mokili ya Ndaka uta na Ngomba Nebo, Mose akufi, mpe Yehova akundi ye na mokili na Moaba; kino lelo, nkunda na ye eyebani te mpe ekumisami te. Aumelaki mbula 120 na bomoi, kasi “miso na ye ibebaki te, mpe nguya na nzoto na ye esilaki te.” Yehova asalelaki ye mpo na kokokisa bilembo minene mpe kosala bikamwiseli, mpe lokola mokapo ya nsuka emonisi yango, naino “mosakoli abimi kati na Yisalaele lisusu te lokola . . . Mose, oyo [Yehova] ayebaki miso na miso.”—34:7, 10.
LITOMBA NA YANGO
30. Lolenge nini Deteronome epesi bosukisi ebongi na Pantatɛ́kɛ?
30 Lokola ezali mokanda ya nsuka ya Pantatɛ́kɛ, Deteronome esangisi makambo nyonso oyo masalemaki liboso na kosakoláká mpe kosantisáká nkombo monene ya Yehova Nzambe. Bobele ye nde azali Nzambe, oyo asɛngaka kokangama bobele epai na ye mpe oyo andimaka soko moke te bombanda na banzambe ya losambo ya mangomba ya lokuta ya bademó. Na eleko na biso, baklisto nyonso basengeli kotya likebi makasi na mitindá minene oyo mimonisi polele mobeko ya Nzambe mpe basengeli kotosa ye na ntina ete bázwa te elakeli mabe uta na ye, ntango azali kopɛlisa mopanga na ye ya mikalikali mpo na kosala bobekoli epai na banguna na ye. Mobeko na ye ya liboso, oyo moleki monene, mosengeli kotambwisa bomoi na bango: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba.”—6:5.
31. Lolenge nini makomi mosusu mapemami mazali kotánga Deteronome mpo na kokólisa bososoli na biso ya mikano ya Nzambe?
31 Mbala mingi, mikanda mosusu ya Makomami milobelaka Deteronome mpo na kokólisa bososoli na biso na mikano ya Nzambe. Longola mikapo oyo atángaki mpo na kopesa eyano epai na Momeki na ye, Yesu alobelaki lisusu Deteronome mbala mingi. (Det. 5:16—Mat. 15:4; Det. 17:6—Mat. 18:16 mpe Yoa. 8:17) Yango elandani lisusu na Emoniseli, epai kuna Yesu oyo akembisami apesi likebisi ya nsuka na ntina ete moto abakisa te mpe alongola te makambo na mokanda ya bisakweli ya Yehova. (Det. 4:2—Emon. 22:18) Petelo atángi maloba ya Deteronome mpo na kopesa bandimbola na ye ya nguya ete Yesu azali Klisto mpe Mosakoli aleki Mose, oyo Yehova alakaki ete akotɛlɛmisa ye kati na Yisalaele. (Det. 18:15-19—Mis. 3:22, 23) Paulo atángi maloba na yango mpo na kolobela lifuti ya basáli, bolukiluki mpo na komona bosolo ya maloba ya batatoli, mpe lolenge ya koteya bana.—Det. 25:4—1 Kol. 9:8-10 mpe 1 Tim. 5:17, 18; Det. 13:14 mpe Det. 19:15—1 Tim. 5:19 mpe 2 Kol. 13:1; Det. 5:16—Ef. 6:2, 3.
32. Na likambo nini Yosua, Gideona mpe basakoli bazali ndakisa malamu mpo na biso?
32 Longola bakomi ya Makomami ya Greke ya boklisto, basaleli ya Nzambe ya Liboso ya Ntango na Biso bazwaki mateya mpe bilendiseli kati na Deteronome. Tokosala malamu soki tolandi ndakisa na bango. Talelá botosi mozindo ya Yosua, mokitani ya Mose, ntango abebisaki bamboka oyo ikamatamaki na bokɔti na bango na Kanana; azwaki ata eloko moko te kati na yango, lokola Akana asalaki yango. (Det. 20:15-18 mpe Det. 21:23—Yos. 8:24-27, 29) Kolongolama ya baoyo ‘bazalaki kobanga mpe kolɛnga’ kati na limpinga na Gideona emonisaki botosi na ye na Mibeko. (Det. 20:1-9—Bas. 7:1-11) Ezalaki mpo na bosembo na bango liboso na mibeko ya Yehova nde basakoli kati na Yisalaele mpe Yuda balobaki na nguya mpe na mpiko nyonso mpo na kokweisa mabota oyo mazalaki kozongela misala mabe na bango. Amosa apesi ndakisa malamu na likambo yango. (Det. 24:12-15—Amo. 2:6-8) Ya solo, ezali na bandakisa mingi oyo ekangisi Deteronome na makomi mosusu ya Liloba ya Nzambe, komonisáká yango ete ezali eteni ya Makomami, oyo ezali na litomba, kati na liboke wana ya boyokani makasi.
33. (a) Lolenge nini Deteronome ezali kosanzola Yehova? (b) Etánda oyo etyami pembeni ezali komonisa nini na ntina na kondimama ya mibeko ya Nzambe epai na mabota ya mokili?
33 Makambo mazwami kati na Deteronome mazali kopesa masanzoli epai na Yehova, Nzambe Mokonzi. Uta ebandeli kino nsuka, yango emonisi polele likambo oyo: ‘Sambelá Yehova; Omipesa bobele epai na ye.’ Atako baklisto bazali lisusu na nsé na Mibeko te, nzokande mitindá minene na yango milongolami te. (Gal. 3:19) Baklisto ya solo bakoki mpenza kozwa mateya mingi uta na mokanda wana ya nguya ya Mibeko ya Nzambe, na lisalisi ya mateya na yango oyo mapesami mokemoke, mpe mamonisami na lolenge ya polele mpe ya pɛtɛɛ! Ata mpe mabota ya mokili basili kondima bolamu ya mibeko mitombwani ya Yehova, mpe basili kokoma mibeko mingi ya Deteronome kati na babúku na bango ya mibeko. Etánda oyo etyami awa ezali komonisa bandakisa ya kosepelisa mpenza ya mibeko oyo basili kozwa na Deteronome to oyo bazali kosalela yango lokola mitindá.
34. Bokangani nini ezali kati na ‘Kozongelama oyo ya Mibeko’ mpe Bokonzi ya Nzambe?
34 Lisusu, kolimbolama yango ya Mibeko ezali kobenda likebi likoló na Bokonzi ya Nzambe mpe ezali kokólisa bososoli na ntina na yango. Ndenge nini? Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu Klisto, Mokonzi aponami, amesanaki mingi na mokanda yango mpe asalelaki yango, lokola emonisami na lolenge azalaki kolobela mikapo na yango na motindo mobongi. Ntango akopalanganisa boyangeli ya Bokonzi na ye na mabelé mobimba, akoyangela engebene mitindá ya sembo ya “mibeko” wana, mpe baoyo nyonso bakopambwama kati na ye, lokola “mombóto” ya Bokonzi, bakotosa mpenza mitindá yango. (Gen. 22:18; Det. 7:12-14) Ezali likambo ya ntina mpe ezali litomba ete tóbanda kotosa yango uta sikawa. Na esika ya kosila ngala, “mibeko” yango, oyo misili koumela mbula 3 500, mizali kolobela biso na nguya nyonso lelo, mpe mikokóba koloba motindo wana kino na mokili ya sika oyo mokotambwisama na Bokonzi ya Nzambe. Tiká nkombo ya Yehova elanda kosantisama kati na libota na ye wana bazali kosalela malako nyonso oyo mazali kopesa litomba mpe mazwami kati na Pantatɛ́kɛ, oyo nsuka monene na yango ezali Deteronome—na ntembe te, yango ezali eteni epemami mpe ya kolendisa ya “Makomami nyonso”!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá liste ya “Mikapo ya Testamá ya Kala oyo mitángami” (“Quotations from the Old Testament”) kati na búku The New Testament in Original Greek, ekomami na B. F. Westcott mpe F. J. A. Hort, 1956, nkasa 601-618.
b Deteronome 3:9, NW, maloba na nsé ya lokasa.
c Búku Halley’s Bible Handbook, 1988, ekomami na Henry H. Halley, lokasa 56.
[Etanda na lokasa 41]
MWA MIBEKO YA LETÁ KATI NA DETERONOMEd
I. Mibeko mpo na moto na moto Mikapo mpe bavɛrsɛ́ mpe mpo na libota
A. Boyokani ya moto mokomoko
1. Baboti mpe bana 5:16
2. Boyokani na kati ya libala 22:30; 27:20, 22, 23
3. Mibeko ya koboma libala 22:13-19, 28, 29
B. Ntómo mpo na biloko ya moto 22:1-4
II. Mibeko ya boyangeli
A. Masɛngami mpe mikumba 17:14-20 ya mokonzi
B. Mibeko ya basodá
1. Kozanga kotyama na 20:1, 5-7; 24:5 mosala ya sodá
2. Bakonzi mike (bakapitɛni) 20:9
III. Kosambisa
A. Mikumba ya basambisi 16:18, 20
B. Esambiselo eleki monene 17:8-11
IV. Mibeko na ntina na mabe minene
A. Mbeba liboso na Letá
1. Kanyaka, lisambisi mabe 16:19, 20
2. Matatoli ya lokuta 5:20
B. Mbeba na bizaleli malamu
2. Libala oyo eboyami na mibeko 22:30; 27:20, 22, 23
C. Kosala moto mabe
1. Koboma mpe kobundisa 5:17; 27:24
2. Kosangana na mwasi na makasi 22:25-29 mpe kolengola
V. Mibeko ya bizaleli ya bomoto
A. Konyokola nyama te 25:4; 22:6, 7
B. Boboto liboso na babólá 24:6, 10-18
C. Mibeko mpo na kopɛngola makámá 22:8 na botongi ndako
D. Lolenge ya kosala makambo 15:12-15; epai na baoyo bazali kobika 21:10-14; na nsima ya basusu, 27:18, 19 sangisá baombo mpe bakangami
E. Bibongiseli ya boboto 14:28, 29; 15:1-11;
mpo na baoyo bazali babólá 16:11, 12; 24:19-22
[Maloba na nse ya lokasa]
d Búku Israel’s Laws and Legal Precedents, 1907, ekomami na C. F. Kent, nkasa vii kino xviii; talá mpe búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 214-220.