“Azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa”
“Yesu alobaki . . . epai ya bibele na nzela ya bandakisa. Kutu, azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa.”—MATAI 13:34.
1, 2. (a) Mpo na nini bandakisa ya malamu ebungaka noki te na makanisi? (b) Yesu asalelaki bandakisa ya ndenge nini, mpe ndenge azalaki kosalela bandakisa ezali kobimisa mituna nini? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
OKOKI koyeba lisusu ndakisa moko oyo oyoká, mbala mosusu na lisukulu moko, eleki sikoyo bambula mingi? Bandakisa ya malamu ebungaka noki te na makanisi. Moto moko oyo akomaka babuku alobaki ete bandakisa “ekómisaka matoi miso mpe esalisaka bato oyo bazali koyoka bámona na makanisi na bango makambo oyo bazali koyoka.” Lokola tosimbaka ndimbola ya likambo malamu soki ezali polele na makanisi na biso, bandakisa ekoki kokómisa makambo pɛtɛɛ mpo tókanga ntina na yango. Bandakisa ekoki kosalisa na komona makambo polele, ekoki kosalisa na koteya makambo oyo ekotikala na bɔɔngɔ.
2 Yesu Klisto ayebaki kosalela bandakisa koleka bato nyonso oyo bateyá na mokili oyo. Masese mingi oyo Yesu alobaki ezongaka mbala moko na makanisi ya bato atako eleki mbula soki nkóto mibale banda alobá yango.a Mpo na nini Yesu azalaki kosalela mingi mayele wana ya koteya? Mpe mpo na nini bandakisa na ye ezalaki mpenza malamu?
Ntina oyo Yesu azalaki kosalela bandakisa mpo na koteya
3. (a) Na kolanda Matai 13:34, 35, wapi ntina moko oyo Yesu azalaki kosalela bandakisa? (b) Nini ezali komonisa ete Yehova apesaka motuya mingi na mayele wana ya koteya?
3 Biblia eyebisi ntina mibale ya minene oyo Yesu azalaki kosalela bandakisa. Ya liboso, koteya oyo Yesu ateyaki na bandakisa ekokisaki esakweli moko. Ntoma Matai akomaki ete: “Yesu alobaki . . . epai ya bibele na nzela ya bandakisa. Kutu, azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa; mpo ete oyo elobamaki na nzela ya mosakoli ekoka kokokisama, oyo alobaki ete: ‘Nakofungola monɔkɔ na ngai na bandakisa.’ ” (Matai 13:34, 35) “Mosakoli” oyo Matai atángaki maloba na ye ezali nde mokomi ya Nzembo 78:2. Mokomi wana ya nzembo apemamaki na elimo ya Nzambe mpe akomaki likambo yango bankama ya bambula liboso Yesu abotama. Ezali mpamba te ete bankama ya bambula liboso, Yehova alobaki ete Mwana na ye akoteya na bandakisa, boye te? Tokanisi mpenza ete Yehova atalelaka mayele wana ya koteya na motuya mingi!
4. Yesu alobaki nini mpo na komonisa ntina oyo azalaki kosalela bandakisa?
4 Ya mibale, Yesu ye moko amonisaki ete azalaki kosalela bandakisa mpo na kokabola bato mosusu na bato oyo bazalaki mitema mabanga. Nsima ya koyebisa “bibele ya bato” lisese ya moloni, bayekoli batunaki ye: “Mpo na nini ozali koloba na bango na kosaleláká bandakisa?” Yesu ayanolaki ete: “Likoki ya kososola basɛkɛlɛ mosantu ya bokonzi ya likoló epesami epai na bino, kasi yango epesami epai ya bato wana te. Yango wana nazali koloba na bango na kosaleláká bandakisa, mpamba te, kotaláká, bazali kotala kaka mpamba, mpe koyokáká, bazali koyoka kaka mpamba, mpe bazali kokanga ntina na yango te; mpe na oyo etali bango esakweli ya Yisaya ezali kokokisama, oyo elobi ete, ‘Na koyokáká, bokoyoka kasi bokokanga ntina na yango soki moke te; mpe, kotaláká, bokotala kasi bokomona ata moke te. Mpo motema ya bato ya ekólo oyo ekómi makasi.’ ”—Matai 13:2, 10, 11, 13-15; Yisaya 6:9, 10.
5. Ndenge nini bandakisa ya Yesu ekabolaki bato ya komikitisa na bato ya lolendo?
5 Na ndenge nini bandakisa ya Yesu ezalaki kokabola bato? Na bantango mosusu, bato oyo bazalaki koyoka ye basengelaki kokɔta na mozindo mpo na kokanga mpenza ntina ya maloba na ye. Bato ya komikitisa bazalaki kotuna mituna mpo na koyeba makambo malamumalamu. (Matai 13:36; Malako 4:34) Na bongo, bandakisa ya Yesu emonisaki solo na bato oyo bazalaki na mposa na yango na mitema na bango; mpe ebombaki yango na miso ya bato ya lolendo. Yesu azalaki mpenza moteyi ya solosolo! Tiká tótalela mwa makambo oyo esalaki ete bandakisa na ye ezala mpenza malamu.
Azalaki kopona makambo ya mikemike oyo akoloba
6-8. (a) Libaku malamu nini bato oyo bayokaki Yesu na ekeke ya liboso bazwaki te? (b) Bandakisa nini ezali komonisa ete Yesu ayebaki kopona makambo ya mikemike oyo asengeli koloba?
6 Osilá kokanisa ndenge oyo bayekoli ya ekeke ya liboso oyo bayokaki Yesu ntango azalaki koloba bazalaki komiyoka? Atako bato yango bazwaki libaku ya koyoka mongongo ya Yesu, bazalaki te na libaku oyo biso tozali na yango ya kotánga makambo oyo ekomami mpo na koyeba lisusu makambo oyo alobaki. Basengelaki nde kobomba maloba ya Yesu na makanisi na bango mpe na mitema na bango. Lokola ayebaki malamu mpenza kosalela bandakisa, Yesu asalisaki bayekoli na ye bázala na mokakatano te mpo na koyeba lisusu makambo oyo ateyaki bango. Na ndenge nini?
7 Yesu azalaki kopona makambo mikemike oyo akoloba. Azalaki koloba makambo mikemike oyo ezali na ntina na lisolo to oyo ebongi mpo na komonisa likanisi ya ntina. Yango wana, amonisaki bampate boni mobateli atikaki mpo na kokende koluka moko oyo ebungaki, mpe ngonga boni bato basalaki na elanga ya vinyo, mpe talanta boni babombisaki epai ya bato.—Matai 18:12-14; 20:1-16; 25:14-30.
8 Nzokande, Yesu azalaki kotika makambo mikemike oyo ezali na ntina te mpe ekoki kosala ete tókanga ntina te ya bandakisa na ye. Na ndakisa, na lisese ya moombo ya motema mabe, alobaki te ndenge nini moombo yango akɔtaki nyongo ya denali milio 60. Yesu azalaki nde komonisa ntina ya kolimbisa. Likambo ya ntina ezalaki te ya komonisa ndenge nini moombo akɔtaki nyongo yango, kasi ndenge nini balimbisaki ye nyongo yango mpe likambo nini ye asalaki moninga na ye moombo oyo azalaki na nyongo na ye ya mbongo moke. (Matai 18:23-35) Ndenge moko mpe, na lisese ya mwana ya kilikili, Yesu alimbolaki te mpo na nini, na mbala moko, mwana ya nsuka asɛngaki bozwi na ye mpe mpo na nini akendaki kobebisa yango. Kasi Yesu akendaki mwa mosika mpo na komonisa ndenge oyo tata ayokaki na motema na ye mpe ndenge oyo asalaki ntango mwana na ye abongolaki motema mpe azongaki na ndako. Makambo mikemike wana oyo emonisi likambo tata asalaki ezalaki na ntina mingi na likambo oyo Yesu azalaki komonisa, ete Yehova alimbisaka “mingi mpenza.”—Yisaya 55:7; Luka 15:11-32.
9, 10. (a) Na nini Yesu azalaki kotya likebi mingi ntango azalaki kolobela bato na kati ya bandakisa na ye? (b) Yesu asalaki nini mpo ete bato oyo azalaki koloba na bango, mpe bato mosusu na nsima, bábosana bandakisa na ye te?
9 Yesu ayebaki mpe malamu ndenge ya komonisa bato oyo azali kolobela na kati ya masese na ye. Mbala mingi na esika ya komonisa ndenge oyo bato yango bazalaki, Yesu azalaki kolobela makambo oyo basalaki mpe ezaleli na bango na likambo oyo azalaki kolobela. Yango wana, Yesu alobaki te soki Mosamalia ya malamu azalaki ndenge nini, kasi alobelaki likambo oyo eleki ntina: ndenge oyo Mosamalia amonisaki motema mawa mpe asalisaki Moyuda oyo bazokisaki bampota mpe batikaki ye na nzela. Yesu alobaki makambo mikemike oyo ezalaki na ntina mpo na koteya biso kolinga bazalani na biso, ata baoyo tozali na bango loposo moko te to ekólo moko te.—Luka 10:29, 33-37.
10 Ndenge Yesu azalaki kopona malamu makambo mikemike oyo akoloba esalaki ete bandakisa na ye ezala milaimilai te mpe mindɔndɔmindɔndɔ te. Yango wana ezalaki mpasi te mpo bato oyo bayokaki ye na ekeke ya liboso, bakisa mpe ebele ya bato mosusu oyo basengelaki kotánga Baevanzile na nsima, bábosana te bandakisa yango mpe bábosana te mateya ya ntina oyo ezalaki kati na yango.
Bandakisa oyo euti na makambo oyo bato basalaka
11. Pesá bandakisa oyo ezali komonisa ndenge oyo masese ya Yesu emonisaki makambo oyo, na ntembe te, ye moko amonaki yango ntango azalaki kokola na Galilai.
11 Yesu ayebaki mpenza kosalela bandakisa oyo euti na makambo oyo bato bameseni kosala. Masese mingi oyo alobaki ezali kolobela makambo oyo, ntango mosusu, ye moko amonaki yango ntango azalaki kokola na Galilai. Kanisá naino ntango oyo azalaki mwana moke. Mbala boni amonaki mama na ye azwi mwa pɔtɔpɔtɔ ya mampa oyo atikaki mbala eleki ntango asalaki mampa mpo na kosangisa yango na pɔtɔpɔtɔ ya sika mpo evimbisa yango mpo na kosala mampa mosusu? (Matai 13:33) Mbala boni amonaki babomi-mbisi bazali kobwaka minyama na bango na Mbu ya Galilai? (Matai 13:47) Mbala boni amonaki bana bazali kosakana na zando? (Matai 11:16) Na ntembe te Yesu amonaki makambo mosusu oyo esalemaka mingi mpe alobelaki yango na kati ya bandakisa na ye: mbóto oyo bazali kolona, fɛti ya libala ya esengo, mbuma oyo ezali kotela na elanga.—Matai 13:3-8; 25:1-12; Malako 4:26-29.
12, 13. Ndenge nini lisese ya ble mpe matiti mabe ezali komonisa ete Yesu ayebaki malamu makambo ya mboka na bango?
12 Na yango, tokoki kokamwa te ete bandakisa ya Yesu ezalaki kolobela makambo oyo bato basalaka. Yango wana, mpo na komona malamumalamu makoki na ye ya kosalela mayele yango ya koteya, ezali malamu tótalela ndenge oyo Bayuda bazalaki kokanga ntina ya maloba na ye. Tótalela bandakisa mibale.
13 Ya liboso, na lisese ya ble mpe matiti mabe, Yesu alobelaki moto moko oyo alonaki ble ya malamu na elanga na ye kasi “monguna” akɔtaki na elanga yango mpe alonaki matiti mabe. Mpo na nini Yesu aponaki kolobela likambo mabe wana? Tóbosana te ete alobaki lisese yango pene na Mbu ya Galilai, mpe bato mingi ya Galilai bazalaki basali-bilanga. Mpo na mosali-bilanga, eloko nini ekokaki kozala mabe koleka oyo ete monguna moko akɔta na elanga na ye na mayele mpe alona matiti mabe na esika oyo ye asilaki kolona milona ya malamu? Mibeko ya mboka oyo ezalaki na ntango wana ezali komonisa ete makambo ya ndenge wana ezalaki kosalema. Tomoni mpenza ete Yesu alobelaki likambo moko oyo bato oyo bazalaki koyoka ye bakokaki kokanga ntina na yango, boye te?—Matai 13:1, 2, 24-30.
14. Na lisese ya Mosamalia malamu, mpo na nini ndenge oyo Yesu alobelaki nzela oyo eutaki “na Yelusaleme mpo na kokende na Yeliko” mpo bato bákanga ntina malamu ezali kobenda likebi?
14 Ya mibale, tókanisa lisusu lisese ya Mosamalia malamu. Yesu abandaki yango boye: “Moto moko azalaki kokita banda na Yelusaleme mpo na kokende na Yeliko mpe akweaki na kati ya babandi, oyo babɔtɔlaki ye nyonso mpe babɛtabɛtaki ye, mpe bakendaki, batikaki ye penepene na liwa.” (Luka 10:30) Likambo oyo ezali kobenda likebi ezali ete mpo bato bákanga ntina malamu, Yesu alobelaki nzela oyo ezalaki kouta “na Yelusaleme mpo na kokende na Yeliko.” Yesu alobaki lisese yango ntango azalaki na Yudea, mosika te na Yelusaleme; elingi koloba ete ekoki mpenza kozala ete bato oyo bazalaki koyoka ye bayebaki nzela yango. Eyebanaki malamu ete nzela wana ezalaki malamu te, mingimingi mpo na moto oyo azali ye moko na mobembo. Nzela yango ezalaki nyokanyoka mpe ezalaki na bisika mingi oyo bato balekaka mingi te epai miyibi bakokaki kobombana.
15. Na lisese ya Mosamalia malamu, mpo na nini moto ata moko te akokaki kolongisa nganga-nzambe na Molevi na ndenge basalisaki te moto oyo bakutaki na nzela?
15 Ezali mpe na likambo mosusu oyo ezali kobenda likebi na ndenge oyo Yesu alobelaki nzela oyo eutaki “banda na Yelusaleme mpo na kokende na Yeliko.” Lisolo elobi ete, ya liboso nganga-nzambe moko alekaki na nzela yango, bongo na nsima Molevi moko mpe alekaki na nzela yango, kasi moko te kati na bango atɛlɛmaki mpo na kosalisa moto oyo alalaki pembeni ya nzela. (Luka 10:31, 32) Banganga-nzambe bazalaki kosala na tempelo na Yelusaleme mpe Balevi bazalaki kosunga bango. Banganga-nzambe mpe Balevi mingi bazalaki kofanda na Yeliko soki ezali ngala na bango te ya kosala na tempelo, mpamba te longwa na Yeliko tii na Yelusaleme ezalaki kaka na ntaka ya kilomɛtrɛ 23. Na yango, ekoki mpenza kozala ete bazalaki koleka na nzela wana. Tóbosana mpe te ete nganga-nzambe yango na Molevi yango batambolaki na nzela yango “banda na Yelusaleme,” elingi koloba ete bautaki na tempelo.b Na bongo, moto moko te akokaki kolongisa bango ete, ‘Balekaki moto oyo azokaki bampota mpamba te azalaki lokola akufi, mpe kosimba ebembe elingaki kokómisa bango mbindo mpe bakokaki kosala mosala na tempelo te.’ (Levitike 21:1; Mituya 19:11, 16) Tozali komona mpenza ete ndakisa ya Yesu elobelaki makambo oyo bato oyo bazalaki koyoka ye bayebaki, boye te?
Bandakisa oyo euti na biloko oyo Nzambe akelá
16. Mpo na nini tokoki kokamwa te ete Yesu ayebaki malamu biloko oyo Nzambe akelá?
16 Ebele ya bandakisa mpe masese ya Yesu ezali komonisa ete ayebaki malamu banzete, banyama mpe bileko. (Matai 6:26, 28-30; 16:2, 3) Ayebaki makambo yango wapi? Na ntembe te ntango azalaki kokola na Galilai amonaki biloko mingi oyo Yehova akelá. Mpe na koleka, Yesu azali “mwana ya liboso na bozalisi nyonso,” mpe azalaki “mosali monene” oyo asalaki elongo na Yehova mpo na kokela biloko nyonso. (Bakolose 1:15, 16; Masese 8:30, 31, NW) Ezali likambo ya kokamwa te ete Yesu ayebaki malamu biloko oyo Nzambe akelá! Tótala ndenge oyo asalelaki malamu makambo oyo ayebaki ntango azalaki koteya.
17, 18. (a) Ndenge nini maloba ya Yesu na Yoane mokapo 10 ezali komonisa ete ayebaki malamu bampate? (b) Bato oyo basilá kokende kotala mikili ya Moyen-Orient bamonaki nini mpo na boyokani oyo ezalaka kati na babateli ya mpate na bampate na bango?
17 Moko na bandakisa kitoko ya Yesu ezali na Yoane mokapo 10, epai akokanisaki boyokani na ye na bayekoli na ye na boyokani ya mobateli ya mpate na bampate na ye. Maloba ya Yesu ezali komonisa ete ayebaki malamu makambo oyo bampate basalaka. Alobaki ete bampate bazalaka na matata te mpo na kolanda nzela oyo bazali komema bango, mpe batikaka kolanda mobateli na bango te. (Yoane 10:2-4) Bato oyo basilá kokende kotala mikili ya Proche-Orient bamonaki mpenza ndenge oyo babateli ya mpate balingaka bampate na bango mpe ndenge oyo bampate balingaka mobateli na bango. Na ekeke ya 19, Henry Tristram, moto ya mayele oyo ayekolaka banyama mpe banzete, alobaki boye: “Mokolo mosusu namonaki mobateli ya mpate azali kosakana na bampate na ye. Asalaki lokola akimi mbangu mwa moke; bampate balandaki ye mpe bazingaki ye. . . . Na nsima, bampate nyonso bazingaki ye mpe babandaki kopumbwapumbwa.”
18 Mpo na nini bampate balandaka mobateli na bango? Yesu alobaki ete: “Mpamba te bayebi mongongo na ye.” (Yoane 10:4 ) Ya solo mpenza bampate bayebaka mongongo ya mobateli na bango? Na buku na ye (The Historical Geography of the Holy Land), George Smith akomaki makambo oyo ye moko amonaki na miso: “Ntango mosusu tozalaki kolekisa bopemi na biso ya midi pembeni ya libulu moko ya mai na Yudea; mpe tozalaki komona babateli misato to minei ya mpate bayei na bibwele na bango. Bampate nyonso bazalaki kosangana esika moko, mpe tozalaki komituna ndenge nini mobateli mokomoko akoyeba lisusu bampate na ye. Kasi, soki bampate basilisi komɛla mai mpe kosakana, mobateli mokomoko azalaki kokende na ngámbo na ye, mpe mokomoko azalaki kobenga bampate na ye na ebengeli na ye; mpe bampate ya moto na moto bazalaki kotika bampate mosusu mpe kolanda mobateli na bango, mpe bampate bazalaki kokabwana na ndenge oyo mpenza bazalaki liboso.” Yesu asalelaki mpenza ndakisa oyo ebongi mpo na komonisa likambo oyo azalaki kolobela. “Mobateli ya bampate oyo aleki malamu” akoki kobatela biso na bolingo mpe na boboto soki tozali koyeba mpe kotosa mateya na ye mpe soki tozali kolanda litambwisi na ye.—Yoane 10:11.
Bandakisa oyo euti na makambo oyo bato bayebi
19. Mpo na kolongola liteya ya lokuta na mitó ya bato, ndenge nini Yesu asalelaki malamu ndakisa ya likama moko oyo esalemaki na mboka?
19 Bandakisa ya malamu ekoki kozala makambo oyo esalemá oyo tokoki kobimisa liteya na kati na yango. Mokolo mosusu, Yesu alobelaki likambo moko oyo eutaki kosalema mpo na komonisa ete makama ezalaka bitumbu te. Alobaki boye: “Baoyo zomi na mwambe oyo linɔ́ngi ya Siloama ekwelaki, kobomáká bongo bango, bokanisi ete bamonanaki bato ya nyongo minene [bato ya masumu] koleka bato mosusu nyonso oyo bafandaka na Yelusaleme?” (Luka 13:4) Yesu akweisaki mpenza makanisi ya bato mosusu oyo bazalaki koloba ete makambo oyo ekómelaka biso esilá kotángama. Soki bato wana 18 bakufaki ezali te mpo basalaki masumu oyo esalaki ete Nzambe asepela na bango te. Liwa ya nsɔmɔ oyo bato wana bakufaki ezalaki ntango mpe makambo oyo ekanami te. (Mosakoli 9:11, NW) Na bongo, asalelaki likambo moko oyo bato mingi oyo bazalaki koyoka ye bayebaki mpo na kokweisa liteya ya lokuta.
20, 21. (a) Mpo na nini Bafalisai bakweisaki bayekoli na Yesu? (b) Yesu asalelaki lisolo nini oyo ezali na kati ya Makomami mpo na komonisa ete Yehova akanaki kotya makambo ya makasimakasi te mpo na mobeko ya Sabata? (c) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
20 Na mateya na ye, Yesu azalaki mpe kosalela bandakisa oyo ezali na kati ya Makomami. Kanisá lisusu mokolo oyo Bafalisai bamonaki mabe mpo bayekoli na ye babukaki mitó ya ble mpe balyaki yango na mokolo ya Sabata. Soki totaleli likambo yango malamu, bayekoli babukaki Mibeko ya Nzambe te, kasi balandaki te ndenge oyo Bafalisai bazalaki kolimbola misala nini ekoki kosalema te mokolo ya Sabata. Mpo na komonisa ete Nzambe akanaki te ete bato bátosaka makambo ya makasimakasi ndenge wana mpo na mobeko ya Sabata, Yesu alobelaki likambo oyo ezali na 1 Samwele 21:3-6. Ntango Davidi na bato na ye bazalaki na nzala, bakendaki na hema mpe balyaki mampa ya kolakisama oyo eutaki kolongolama mpe mosusu, ya sika, etyamaki. Mbala mingi, mampa ya kolakisama oyo balongoli bazalaki kopesa banganga-nzambe bálya yango. Kasi, mokolo wana Davidi na bato na ye balyaki yango, mpe lisolo elobi te ete balobaki na bango ete basalaki mabe. Likambo oyo esimbi likebi na biso ezali ete na Biblia mobimba, kaka lisolo yango nde elobeli bato mosusu oyo bazali banganga-nzambe te ete balyaki mampa wana. Yesu ayebaki mpenza lisolo nini oyo ebongi kosalela, mpe ekoki mpenza kozala ete Bayuda oyo bazalaki koyoka ye bayebaki lisolo yango malamu.—Matai 12:1-8.
21 Ya solo mpenza, Yesu azalaki Moteyi Monene! Ndenge oyo ateyaki solo ya ntina mingi na makoki oyo moto mosusu azalaki na yango te mpe bato oyo azalaki koloba na bango bazalaki kokanga ntina na yango ezali mpenza kokamwisa. Kasi, ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye ntango tozali koteya? Tokolobela likambo yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yesu azalaki kosalela bandakisa ndenge na ndenge, mosusu ezalaki bilakiseli, to mpe bokokanisi. Bato mingi bayebi ete azalaki koloba masese. Lisese ezali “mwa lisolo oyo euti na likambo oyo mbala mingi ezali ya solo te, oyo bapesi yango mpo na kobimisa liteya moko oyo etali bizaleli malamu to makambo ya elimo.”
b Yelusaleme ezalaki na likoló ya ngomba mpe Yeliko ezalaki na nse. Yango wana, soki moto azali kosala mobembo “banda na Yelusaleme mpo na kokende na Yeliko,” lokola bato oyo lisese elobeli, azalaki “kokita.”
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini Yesu azalaki kosalela bandakisa mpo na koteya?
• Likambo nini ezali komonisa ete Yesu azalaki kosalela bandakisa oyo bato oyo azalaki koloba na bango na ekeke ya liboso bakokaki kokanga ntina na yango?
• Ndenge nini Yesu amonisaki ete ayebaki malamu biloko oyo Nzambe akelá ntango azalaki kosalela bandakisa?
• Na ndenge nini Yesu alobelaki makambo oyo bato oyo bazalaki koyoka ye bayebaki?
[Bililingi na lokasa 15]
Yesu alobaki lisolo ya moombo moko oyo aboyaki kolimbisa nyongo moke mpe tata moko oyo alimbisaki mwana na ye oyo akendaki kobebisa bozwi na ye nyonso
[Elilingi na lokasa 16]
Yesu alingaki mpenza koteya nini na lisese ya Mosamalia malamu?
[Elilingi na lokasa 17]
Ezali solo ete bampate bayebaka mongongo ya mobateli na bango?