Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mosamalia amimonisi mozalani malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1998 | 1 Sanza ya 7
    • Yesu alobaki lisusu ete: “Mosamalia azalaki kotambola mobembo, akutaki ye, mpe emonaki ye ayokelaki ye mawa mingi.” Na ntembe te, ntango Yesu atángaki nkombo Mosamalia likebi ya molakisi na mibeko elamukaki. Yesu mpe azalaki na likanisi mabe mpo na bato yango? Nzokande, komonáká mosali mobembo oyo azalaki na mpasi, Mosamalia “ayokelaki ye mawa mingi.” Yesu alobaki ete: “Mpe akendaki epai na ye mpe akangi mpota na ye mpe asopi mafuta na vinyo na kati na yango, mpe abutisi ye na mpunda na ye mpenza, mpe akei na ye na ndako na bato na mobembo, mpe abateli ye.b Na mokolo na nsima abimisi denali mibale, mpe apesi yango na mobateli na ndako, mpe alobi ete, Bátela ye, mpe soko okosilisa mosolo mosusu boni, nakozongisela yo yango wana ekozonga ngai awa.”​—Luka 10:33-35.

  • Mosamalia amimonisi mozalani malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1998 | 1 Sanza ya 7
    • b Emonani ete na mikolo ya Yesu bandako mosusu ya mobembo ezalaki bobele kopesa bato esika ya kolala te kasi lisusu biloko ya kolya mpe misala mosusu. Ekoki kozala motindo ya bandako yango nde Yesu azalaki kokanisa, mpo ete liloba ya Greke oyo esalelami awa ekeseni na oyo ebongolami na “ndako na kolala” na Luka 2:7.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto