Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yehova apesaka ‘elimo santu epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2006 | 15 Sanza ya 12
    • 4 Yesu alobaki boye: “Nani na kati na bino akozala na moninga mpe akokende epai na ye na katikati ya butu mpe akoloba na ye ete, ‘Moninga, defisá ngai mampa misato, mpamba te moninga na ngai moko ayei sikoyo epai na ngai na mobembo mpe nazali na eloko te ya kotya liboso na ye’? Bongo oyo wana banda na kati azongisi, ‘Tiká kotungisa ngai. Ekuke esili kokangama, mpe bana na ngai bazali elongo na ngai na mbeto; nakoki te kotɛlɛma mpe kopesa yo mwa eloko.’ Nazali koyebisa bino, Atako akotɛlɛma te mpe akopesa ye mwa eloko te mpo azali moninga na ye, ya solo mpenza mpo na mbamba na ye ya makasi akotɛlɛma mpe akopesa ye eloko oyo azali na yango mposa.” Na nsima, Yesu amonisaki boyokani oyo ndakisa yango ezali na yango na libondeli; alobaki boye: “Na yango nazali koloba na bino ete, Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino yango; bókoba koluka, mpe bokozwa; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino. Mpo moto nyonso oyo asɛngaka azwaka, mpe moto nyonso oyo alukaka amonaka, mpe moto nyonso oyo abɛtaka kɔkɔkɔ bakofungolela ye.”​—Luka 11:5-10.

  • Yehova apesaka ‘elimo santu epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2006 | 15 Sanza ya 12
    • 6. Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, ndenge nini bato bazalaki koyamba mopaya?

      6 Yesu asukaki kaka te na komonisa ete tosengeli kotyaka mbamba na mabondeli, ayebisaki mpe ntina oyo tosengeli kosala yango. Mpo tókanga ntina ya liteya yango malamu, ebongi tótalela ndenge oyo bato oyo Yesu ayebisaki ndakisa yango bazalaki koyamba mopaya oyo akómeli bango na ndako. Bavɛrsɛ mingi ya Biblia ezali komonisa ete bato ya kala, mingimingi basaleli ya Nzambe, bazalaki mpenza kolɛngɛla mopaya. (Genese 18:2-5; Baebele 13:2) Kozanga kosalela mopaya boboto ezalaki mbeba monene. (Luka 7:36-38, 44-46) Lokola toyebi likambo yango, tózonga sikoyo na ndakisa oyo Yesu apesaki.

      7. Mpo na nini moto oyo Yesu alobelaki ayokaki nsɔni te mpo na kolamusa moninga na ye?

      7 Moto oyo Yesu alobelaki na ndakisa wana ayambaki mopaya na katikati ya butu. Ayebaki ete asengeli kopesa mopaya na ye eloko ya kolya, kasi azalaki “na eloko te ya kotya liboso na ye.” Amonaki ete asengeli kokanga mabɔkɔ te! Asengeli kosala nyonso mpo na kolukela ye ata mwa limpa. Yango wana, atyaki nsɔni pembeni, akendaki epai ya moninga na ye moko mpe alamusaki ye. Alobaki na ye ete: “Moninga, defisá ngai mampa misato.” Atyaki ye mbamba tii azwaki biloko oyo azalaki na yango mposa. Nsima ya kozwa mampa yango nde amonaki ete ayambi mopaya na ye malamu.

      Soki moto azali na mposa makasi, akosɛnga na etingya

      8. Nini ekotinda biso tótyaka mbamba na mabondeli mpo na kosɛnga elimo santu?

      8 Ndakisa ya Yesu emonisi nini mpo na ntina oyo tosengeli kotyaka mbamba na mabondeli? Mobali oyo ayambaki mopaya alɛmbaki te kosɛnga mampa mpo amonaki ete asengeli kozwa yango mpo akokisa mokumba na ye ya moto oyo ayambi mopaya. (Yisaya 58:5-7) Soki azwaki mampa te, alingaki komona ete akokisi mokumba na ye te. Biso mpe, lokola toyebi ete tosengeli kozala na elimo ya Nzambe mpo na kokokisa mosala na biso ya baklisto ya solo, tosengeli kolɛmba te kobondela mpo na kosɛnga Nzambe elimo santu. (Zekalia 4:6) Soki tozangi elimo yango, tokolonga te. (Matai 26:41) Omoni likanisi ya ntina oyo tosengeli kosimba na ndakisa yango? Soki tozali komona ete tozali mpenza na mposa makasi ya elimo santu ya Nzambe, tokotya mbamba na kosɛnga yango.

      9, 10. (a) Pesá ndakisa oyo ezali komonisa ntina oyo tosengeli kotya mbamba mpo na kosɛnga Nzambe elimo santu. (b) Motuna nini tosengeli komituna, mpe mpo na nini?

      9 Tótalela liteya yango na likambo moko oyo ekoki kosalema na moi ya lelo. Soki, na ndakisa, moto moko na libota na yo abɛli na kati ya butu, okanisi ete okokende kolamusa monganga? Okosala yango te soki ezali kaka mwa maladi ya moke. Kasi, soki akangami mpema, tokanisi ete okokakatana te mpo na kobenga monganga. Mpo na nini? Mpamba te wana ekómi likambo oyo okoki kozelisa te. Monganga asengeli kosalisa ye nokinoki. Soki okakatani, moto akoki kokufa. Ndenge moko mpe, baklisto ya solo bazali liboso ya likambo oyo bakoki kozelisa te. Toyebi ete Satana azali lokola “nkɔsi oyo ezali konguluma,” azali koluka kolya biso. (1 Petelo 5:8) Tozali na mposa ete elimo santu ya Nzambe esalisa biso mpo tókufa te na elimo. Soki tosɛngi lisalisi epai ya Nzambe te, tokokufa. Yango wana, tosengeli kotya mbamba mpo na kosɛnga Nzambe elimo santu na ye. (Baefese 3:14-16) Kaka soki tosali bongo nde tokobatela makasi oyo tosengeli na yango mpo na ‘koyika mpiko tii na nsuka.’​—Matai 10:22; 24:13.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto