Oyebaki yango?
Mbongo mibale ya bibende ya mwasi oyo akufelá mobali ezalaki na valɛrɛ nini?
Na ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.), mpako ya tempelo oyo Bayuda bazalaki kofuta mbala moko na mbula ezalaki “badalakima mibale,” oyo ekokani na lifuti ya mikolo mibale ya mosala. (Matai 17:24) Yesu alobelaki ndɛkɛ oyo babengaka mokɛngɛli-mboka mpe amonisaki ete ndɛkɛ yango mibale ezalaki kotɛkama “na mbongo moko ya ebende ya motuya moke,” elingi koloba lifuti ya moto oyo asali miniti 45 na mosala. Kutu, ndɛkɛ wana mitano ezalaki kotɛkama na mbongo mibale ya bibende ya motuya moke, to lifuti ya moto oyo asali miniti 90 na mosala.—Matai 10:29; Luka 12:6.
Likabo ya mobola mwasi oyo Yesu amonaki na tempelo ezalaki na valɛrɛ moke lisusu koleka. Mbongo ya bibende oyo mwasi yango atyaki ezalaki leptôn mibale, mbongo oyo ezalaki na valɛrɛ moke koleka mbongo nyonso oyo bazalaki kolya na Yisalaele na ntango wana. Yango ezalaki na nse ya lifuti ya moto oyo asali miniti 12 na mosala mpo na mokolo ya mosala oyo ezalaki koumela ngonga 12.
Yesu Klisto alobaki ete likabo ya mwasi wana ezalaki monene koleka makabo ya bato oyo bazalaki kopesa mingi “oyo balongolaki na biloko na bango oyo eleki ebele.” Mpo na nini? Biblia elobi ete mwasi yango azalaki na “mbongo mibale ya bibende”; na yango, akokaki kotya moko mpe kotikala na moko. Kasi, apesaki “nyonso oyo azalaki na yango, nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobikela.”—Malako 12:41-44; Luka 21:2-4.
Ntango nini Saulo ayebanaki na nkombo ya Paulo?
Ntoma Paulo abotamaki na baboti oyo bazalaki Baebele, kasi azalaki mpe Moloma. (Misala 22:27, 28; Bafilipi 3:5) Na yango, ekoki mpenza kozala ete banda bomwana na ye, azalaki na nkombo na ye ya Baebele, Saulo, mpe na nkombo na ye ya Baloma, Paulo. Kutu, bandeko na ye mosusu bazalaki na bankombo ya Baloma mpe bankombo ya Bagrɛki. (Baloma 16:7, 21) Longola yango, Bayuda mingi na ntango wana, mingimingi baoyo bazalaki kofanda na bikólo mosusu, bazalaki na bankombo mibalemibale.—Misala 12:12; 13:1.
Emonani ete mbula koleka zomi nsima ya kokóma moklisto, ntoma yango ayebanaki mingi na nkombo na ye ya Baebele, Saulo. (Misala 13:1, 2) Kasi, na mobembo na ye ya liboso na mosala ya misionɛrɛ, oyo asalaki na mobu soki 47 to 48 T.B., ekoki kozala ete asepelaki kosalela nkombo na ye ya Baloma, Paulo. Lokola azwaki mokumba ya kosakola nsango malamu epai ya bato oyo bazalaki Bayuda te, mbala mosusu amonaki ete bato yango bakosepela na nkombo na ye ya Baloma. (Misala 9:15; 13:9; Bagalatia 2:7, 8) Ekoki mpe kozala ete asalelaki nkombo ya Paulo mpamba te ndenge Bagrɛki bazalaki kobenga nkombo Saulo, ekokani na liloba moko ya Grɛki oyo ezalaki liloba ya nsɔni. Ata soki ezali mpo na ntina nini oyo asepelaki kosalela nkombo Paulo, ntoma yango amonisaki ete azalaki ‘kokóma makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso, mpo ata ndenge nini akoka kobikisa bamosusu.’—1 Bakolinti 9:22.
[Elilingi na lokasa 12]
Leptôn, ndenge mpenza ezalaki