Ozali komikundola?
Otyaki likebi na masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na banimero oyo eutaki kobima? Soki ezali bongo, okosepela komikundola makambo oyo:
◻ Mpo na nini liteya oyo elobaka ete makambo nyonso masilá kokanama elongobani te?
Soki Nzambe ayebaki mpe akanaki ete Adama akokwea na lisumu, boye tokoloba ete Yehova nde abandisaki lisumu ntango azalisaki moto mpe ye nde mobandisi ya bampasi nyonso mpe ya minyoko oyo bato bazali komona. Yango ekoki koyokana te na likambo oyo ete Yehova azali Nzambe ya bolingo mpe ayini makambo mabe. (Nzembo 33:5; Masese 15:9; 1 Yoane 4:8)—15/4, nkasa 7, 8.
◻ Na kokokisama ya Yisaya 2:2-4, makambo nini bato oyo bauti na mabota mingi bazali kosala?
Lokola bazali kokende na ndako ya Yehova mpo na losambo, bazali mpe koboya ‘koyekola etumba,’ mpamba te batii elikya na bango na libateli ya mampinga ya Nzambe na likoló, oyo bazali pene mpo na koboma banguna nyonso ya kimya.—15/4, lokasa 30.
◻ Banani bazali bilombe ya Nzambe oyo balobelami na Yoele 3:10, 11?
Mbala soko 280 kati na Biblia, Nzambe ya solo abéngami ete “Yehova na bibele.” (2 Mikonzi 3:14) Bibele yango ezali bongo mampinga ya baanzelu ya nguya na likoló, oyo bamilɛngɛli mpo na kokokisa likambo nyonso oyo Yehova akotinda bango.—1/5, lokasa 23.
◻ Liteya nini tokoki kozwa na lisɛngi oyo Yehova asalaki epai na Yobo ete abondela mpo na bato oyo basalelaki ye mabe? (Yobo 42:8)
Liboso ete Yobo azongela nzoto kolɔngɔnɔ, Yehova asɛngaki ye ete abondela mpo na bato oyo basalaki ye mabe. Yango emonisi ete Yehova azali kosɛnga na biso tólimbisa bato oyo bazali kosalela biso mabe liboso ete masumu na biso málimbisama. (Matai 6:12; Baefese 4:32)—1/5, lokasa 31.
◻ Yakobo alingaki koloba nini na maloba oyo ete: “Tiká mpe ete mpiko ekokisa mosala na yango nyɛ”? (Yakobo 1:4)
Mpiko ezali na “mosala” ya kokokisa. Mosala na yango ezali ya kobongisa biso na makambo nyonso. Na yango, na ntango totiki komekama esala mosala na yango, kozanga ete tóluka kosilisa yango nokinoki na banzela oyo eyokani te na Makomami, kondima na biso ekomekama mpe ekopɛtolama.—15/5, lokasa 16.
◻ Mpo na nini Nzambe azeli ntango molai mpo na kosilisa mikakatano ya bato?
Lolenge oyo Yehova atalelaka ntango ekeseni na lolenge biso totalelaka yango. Epai na Nzambe ya seko, bandá Adama azalisamaki kino sikawa, pɔsɔ mobimba ekoki naino te. (2 Petelo 3:8) Ata soki totalelaka ntango lolenge nini, mokolo mokomoko oyo ezali koleka ezali kobɛlɛmisa biso penepene na “mokolo” ya Yehova ya kolongisama.—1/6, nkasa 5, 6.
◻ Eloko nini ezali kopusa Batatoli ya Yehova?
Mateya ya Yehova mabimisi libota moko oyo ekokani na libota mosusu te, libota oyo eteyami bolingo bamoko na bamosusu mpe kolinga bazalani na bango lokola bango moko. (Yisaya 54:13) Ezali bolingo nde ezali kopusa Batatoli ya Yehova na kokoba kosakola atako bazali kokutana na kozanga bosepeli to minyoko. (Matai 22:36-40; 2 Bakolinti 13:1-8)—15/6, lokasa 20.
◻ Yesu alingaki koloba nini na maloba oyo ete: “Meká makasi kokɔta na ekuke ya nkaka”? (Luka 13:24)
Maloba ya Yesu esɛngisi kobunda, kosala nyonso oyo tokoki kosala. Maloba yango mamonisi lisusu ete bato mosusu bakoluka ‘kokɔta na ekuke’ bobele na ntango bango moko bamoni malamu, malɛmbɛmalɛmbɛ ndenge basepeli. Na boyokani na maloba wana ya Yesu mokomoko na biso akoki kotuna boye: ‘Nazali kosala na kolendendela mpe na molende?’—15/6, lokasa 31.
◻ Ndenge nini basekwi ‘bakosambisama na makambo masili kokomama na buku yango, na motindo na misala na bango’? (Emoniseli 20:12)
Babuku yango ezali na makambo oyo basalaká te; mpamba te ntango bakufaki, batikaki kotángela bango masumu oyo basalaki na bomoi na bango. (Baloma 6:7, 23) Nzokande, bato oyo bakosekwisama bakokoba kozala na lisumu ya Adama. Boye esengeli kozala ete babuku yango ekopesa malako ya Nzambe oyo bato nyonso bakotosa mpo na kozwa litomba na mbeka ya Yesu Klisto.—1/7, lokasa 22.
◻ Liteya nini tokozwa na lisese ya Yesu oyo elobeli Mosamalia oyo amimonisaki mozalani malamu? (Luka 10:30-37)
Lisese ya Yesu emonisi ete moto oyo azali mpenza sembo ezali te bobele ye oyo atosaka mibeko ya Nzambe kasi lisusu oyo amekolaka bizaleli na ye. (Baefese 5:1) Emonisi lisusu ete mozalani na biso ezali te bobele moto oyo tozali na ye ekólo moko, mimeseno moko, to lingomba moko. (Bagalatia 6:10)—1/7, lokasa 31.
◻ Wapi ndenge misato oyo bokoki koyeba bana na bino mpe kobɔkɔla bango malamu?
(1) Bósalisa bana na bino ete bápona mosala ya malamu; (2) bóbongisa bango mpo báyeba kolonga mitungisi ya mayoki na kelasi mpe na esika ya mosala; (3) bólakisa bango ndenge ya kokokisa bamposa na bango ya elimo.—15/7, lokasa 4.
◻ Mpo na nini Nzambe apemaki na “mokolo na nsambo”? (Genese 2:1-3)
Nzambe apemaki te mpo ete alɛmbaki. Kasi, asukisaki mosala ya kozalisa awa na mabelé mpo ete biloko oyo asalaki bilanda kokola kino na nkembo na yango, mpo na masanzoli mpe lokumu na ye.—15/7, lokasa 18.
◻ Wapi ndenge misato oyo tokoki komonisa bosembo?
Ya liboso, tosengeli kolanda mitinda ya Nzambe mpo na bizaleli malamu. (Yisaya 1:17) Ya mibale, tomonisaka bosembo ntango tozali kosalela bato mosusu makambo na ndenge oyo tolingi ete Yehova asalela biso. (Nzembo 130:3, 4) Ya misato, tomonisaka bosembo ya moto ya Nzambe ntango tozali komipesa na mosala ya kosakola. (Masese 3:27)—1/8, lokasa 14.