“Tokolya nini?”
BILEI mpe masanga ezalaki makambo oyo bato bazalaki kolobela mingi ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye ya kosakola. Likamwisi na ye ya liboso ezalaki ya kobongola mai vinyo, mpe mbala mibale aleisaki ebele ya bato na mwa mampa mpe mbisi. (Matai 16:7-10; Yoane 2:3-11) Bato bayebaki ete Yesu azalaki kolya na babola, mpe kokende bafɛti ya bazwi. Kutu, banguna na ye balobaki ete amipesaki na kolunda mpe na komɛla. (Matai 11:18, 19) Na ntembe te, Yesu azalaki bongo te. Atako bongo, ayebaki ete bilei mpe masanga ezalaki na ntina mingi mpo na bato, mpe asalelaki yango lokola bandakisa mpo na koteya makambo ya Nzambe.—Luka 22:14-20; Yoane 6:35-40.
Bilei mpe masanga nini bato bazalaki kolya mpe komɛla na ntango ya Yesu? Bilei yango ezalaki kouta wapi? Ezalaki kosɛnga milende nini mpo na kozwa yango? Biyano na mituna yango ekosalisa yo okanga malamu ntina ya makambo mpe maloba mosusu oyo esalelami na Baevanzile.
Pesá biso “mampa na biso mpo na mokolo oyo”
Ntango Yesu ateyaki bayekoli na ye ndenge ya kobondela, amonisaki ete ezali malamu kosɛnga Nzambe akokisaka bamposa na biso ya mokolo—apesaka biso ‘mampa mpo na mokolo oyo.’ (Matai 6:11) Lokola mampa ezalaki bilei oyo bato bazalaki kolya mokolo na mokolo, liloba oyo basaleli mpo na kobongola “kolya biloko,” na monɔkɔ ya Liebele mpe ya Grɛki, elimboli “kolya mampa.” Farini oyo bazalaki kosalela mampa ezalaki kouta na mbuma ya blé, ɔrje, ata mpe mbuma mosusu lokola avoine, blé ya mposo makasi, mpe millet, ezalaki kolyama mingi epai ya Bayuda na ekeke ya liboso. Ankɛtɛ moko emonisi ete na mbula mobimba, moto moko akokaki kolya soki kilo 200 ya mbuma oyo bazalaki kosalela farini, mpe yango ezalaki kopesa moto bavitamini mingi oyo nzoto na ye ezalaki na yango mposa.
Bakokaki kosomba mampa na zando. Kasi, mabota mingi bazalaki kosala mampa bango moko—yango ezalaki mosala makasi. Buku moko, (Bread, Wine, Walls and Scrolls) elobi boye: “Lokola ezalaki mpasi kobomba farini ntango molai, mama ya libota asengelaki kotuta mbuma yango mikolo nyonso.” Mosala yango ezalaki kozwa ngonga boni? Mokomi moko alobi boye: “Na boumeli ya ngonga moko ya kotuta na eboka, kilo moko ya mbuma ya blé ezalaki kobimisa kilo koleka 0,8 ya farini. Lokola moto moko akokaki kolya soki ndambo ya kilo na mokolo moko, mpo na koleisa libota ya bato mitano to motoba, mama ya libota asengelaki kolekisa ngonga misato mpo na kotuta yango.”
Tókanisa sikoyo Malia, mama ya Yesu. Longola misala mosusu ya ndako, asengelaki kotuta mbuma mpo na koleisa mobali na ye, bana na ye ya mibali mitano mpe oyo ya basi mibale. (Matai 13:55, 56) Na ntembe te, ndenge moko na basi nyonso ya Bayuda, Malia azalaki kosala mosala makasi mpo na kozwa ‘mampa mpo na mokolo.’
“Boyá kolya bilei ya ntɔngɔ”
Nsima ya lisekwa na ye, Yesu abimelaki bayekoli na ye mosusu mokolo moko na ntɔngɔ. Bayekoli balukaki mbisi butu mobimba na ebale, kasi bazwaki eloko moko te. Yesu abengaki baninga na ye oyo balɛmbaki; alobaki na bango boye: “Bóya kolya bilei ya ntɔngɔ.” Na nsima apesaki bango mbisi mpe mampa. (Yoane 21:9-13) Atako na Baevanzile, balobeli bilei ya ntɔngɔ kaka na esika wana, bato bazalaki na momeseno ya kolya mampa, mbuma ya vinyo mpe ya olive na ntɔngɔ.
Ezali boni mpo na bilei ya midi? Bato oyo bazalaki kosala misala bazalaki kolya nini? Buku moko, (Life in Biblical Israel) elobi boye: “Na midi, bazalaki kolya mampa, masango, mbuma ya olive mpe ya figi.” Ekoki kozala ete yango nde bilei oyo bayekoli bayaki na yango ntango bautaki na Sikala mpe bakutaki Yesu azali kosolola na mwasi Mosamalia na libulu ya mai. “Ezalaki soki ngonga ya motoba,” to midi, mpe bayekoli “bakendaki na engumba mpo na kosomba biloko ya kolya.”—Yoane 4:5-8.
Na mpokwa, bato ya libota mobimba bazalaki kofanda esika moko mpo na kolya bilei ya mokolo. Mpo na bilei yango, buku moko (Poverty and Charity in Roman Palestine, First Three Centuries C.E.) elobi boye: “Bato mingi bazalaki kolya mampa to pɔtɔpɔtɔ ya ɔrje, mbuma ndenge na ndenge ya kosalela farini mpe bandunda, to mpe ntango mosusu blé. Bazalaki kotya yango mungwa mpe mafuta to mbuma ya olive, ntango mosusu bazalaki kolya yango na supu etondá matiti ya nsolo makasi, mafuta ya nzoi, to masanga ya sukali oyo esalemi na mbuma.” Bazalaki mpe kotya na mesa miliki, fromaje, bandunda mpe bambuma ya mobesu to ya kokauka. Na ntango wana, lolenge ya bandunda ezalaki soki 30, kati na yango tokoki kotánga litungulu, ayi, radi, carotte, choux, mpe ezalaki na lolenge koleka 25 ya bambuma, na ndakisa (1) figi, (2) date, mpe (3) bambuma ya grenade.
Kanisá ete ozali komona bambuma yango na mesa wana Yesu azali kolya bilei ya mpokwa elongo na Lazalo mpe bandeko na ye ya basi, Malata mpe Malia! Sikoyo, kanisá nsolo kitoko oyo etondi na ndako ntango Malia azali kopakola Yesu “nalada ya solosolo” na makolo—nsolo ya bilei esangani na nsolo ya malasi wana ya ntalo mingi.—Yoane 12:1-3.
“Ntango osali elambo”
Na libaku moko oyo Yesu azalaki kolya “na ndako ya moko ya bayangeli ya Bafalisai,” apesaki bato oyo bazalaki wana liteya moko ya ntina mingi. Alobaki boye: “Ntango osali elambo, byangá babola, bibɔsɔnɔ, batɛngumi, bato bakufá miso; mpe okozala na esengo, mpamba te bazali na eloko ya kozongisela yo te. Mpo okofutama na lisekwa ya bayengebene.” (Luka 14:1-14) Soki Mofalisai yango alandaki toli ya Yesu, bilei nini akokaki kobongisa mpo na elambo yango?
Mozwi alingaki kobongisa mampa ya ntalo mingi, oyo basali na mitindo ndenge na ndenge mpe vinyo, mafuta ya nzoi, miliki, mpe biloko ndenge na ndenge ya nsolo kitoko. Na ntembe te, alingaki mpe kotya manteka mpe fromaje. Bambuma ya olive oyo babuki sika, oyo ya kala to mpe mafuta ya olive elingaki kozanga te na mesa. Buku moko, (Food in Antiquity) elobi boye: “Na mbula moko, moto moko akokaki kosalela kilo 20 ya mafuta ya olive na bilei mpe kopakola yango na nzoto.”
Soki Mofalisai yango azalaki kofanda pene na Mbu, ye mpe bato oyo abengaki balingaki kolya mbisi ya mai oyo bauti koboma sika. Bato oyo bazalaki kofanda mosika na Mbu bazalaki kolya mingi mbisi oyo bazalaki kotya yango mungwa mpe biloko mosusu mpo epɔla te. Mofalisai yango alingaki mpe kopesa bango nyama—eloko ya motuya mingi mpo na mopaya oyo azali mobola. Eloko mosusu oyo eyebanaki mingi oyo akokaki kotya na mesa ezali maki oyo elambami na ndenge moko boye. (Luka 11:12) Na bilei yango, bakokaki kotya matiti ya nsolo kitoko mpe oyo ebakisaka elɛngi, na ndakisa matungulu, ndembi, ayi, manti, aneti, kumini mpe mutarde. (Matai 13:31; 23:23; Luka 11:42) Na nsima, alingaki lisusu kopesa bapaya na ye mwa bilei ya pɛpɛlɛ lokola mbuma ya blé oyo bakalingi mpe basangisi yango na mbuma ya amande, mafuta ya nzoi, mpe biloko mosusu ya nsolo kitoko.
Akokaki mpe kopesa bapaya na ye mbuma ya vinyo ya sika, ya kokauka, to mpe masanga na yango. Ebele ya bikamwelo ya vinyo oyo bamonaki na Palestine emonisi ete bato bazalaki komɛla masanga ya vinyo mingi kuna. Na esika moko na Gibona, bato ya arkeoloji bamonaki bibombelo 63 ya mabanga oyo ekokaki kobomba litre 100 000 ya vinyo.
“Bómitungisa soki moke te”
Wana ozali kotánga Baevenzile, luká komona mbala boni Yesu alobeli bilei to masanga na bandakisa na ye to mateya ya ntina mingi oyo azalaki kopesa na ntango ya bolei. Na ntembe te, Yesu ná bayekoli na ye bazalaki kosepela kolya mpe komɛla, mingimingi ntango bazali ná baninga ya malamu, kasi batikaki te ete biloko yango ezwa esika ya liboso na bomoi na bango.
Yesu alendisaki bayekoli na ye bázala na bokatikati na likambo ya kolya mpe komɛla; alobaki na bango boye: “Bómitungisa soki moke te mpe bóloba te ete, ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ Mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo mosusu balukaka na lokoso mpenza. Mpo Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na mposa ya biloko nyonso wana.” (Matai 6:31, 32) Bayekoli basimbaki liteya yango, mpe Nzambe akokisaki bamposa na bango. (2 Bakolinti 9:8) Ya solo, bilei na biso ekoki kokesana na oyo bato ya ekeke ya liboso bazalaki kolya. Atako bongo, okoki kozala na elikya ete Nzambe akokokisa bamposa na yo soki ozali kotya matomba na ye na esika ya liboso na bomoi na yo.—Matai 6:33, 34.