Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Azalaki “kokanisakanisa mingi na motema na ye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2008 | 1 Sanza ya 10
    • Malia ná Yozefe bakutaki mwa mboka yango etondi na bato. Bato mosusu bakómaki liboso na bango, yango wana bazwaki esika ya kolala te na ndako ya bapaya.b Lokola esika ezalaki te, bakendeki kolala na ndako ya banyama. Kanisá naino ndenge Yozefe amitungisaki ntango azalaki komona mwasi na ye azali kobunda na mpasi makasi oyo ayoká naino te. Mpasi yango ezwaki ye na esika ya mabe mpenza!

      Mwasi nyonso oyo abotá ayebi mpasi oyo Malia ayokaki mokolo wana. Mbula soki 4 000 liboso, Yehova asakolaki ete mwasi nyonso akobanda koyoka mpasi ya kobota mpo na lisumu oyo tobotamá na yango. (Genese 3:16) Emonani ete Malia mpe ayokaki mpasi yango. Lisolo ya Luka elobeli te mpasi nyonso oyo Malia ayokaki. Elobi kaka na mokuse ete “abotaki mwana na ye ya mobali, mwana ya liboso.” (Luka 2:7) Ɛɛ, abotaki ‘mwana na ye ya liboso,’ yaya ya bana soki nsambo. (Malako 6:3) Kasi, mwana yango azalaki lokola bana mosusu te. Azalaki kaka te mwana ya Malia ya liboso, kasi azalaki mpe “mwana ya liboso na bozalisi nyonso,” mwana se moko ya Nzambe!​—Bakolose 1:15.

      Sikoyo, Luka abakisi likambo mosusu ya ntina mingi: “Azingaki ye na biteni ya bilamba mpe alalisaki ye na elyelo ya bibwɛlɛ.” (Luka 2:7) Masano, mayemi mpe bilili ya mbotama oyo ezali kosalema na mokili mobimba ekómisá likambo yango lokola lisɛki. Kasi, tótala ndenge likambo yango esalemaki mpenza. Elyelo ya bibwɛlɛ ezali esika oyo banyama balyaka. Na yango, balalaki na ndako ya banyama, esika oyo banda kala mopɛpɛ ya malamu mpe ya pɛto ezalaka te. Moboti nini akoki kondima kobota mwana na ye na esika ya bosɔtɔ ndenge wana soki esika mosusu ya malamu ezali? Baboti mingi balukaka bolamu ya bana na bango. Kanisá naino mposa oyo Malia ná Yozefe bazalaki na yango ya kosala ete Mwana ya Nzambe azala malamu!

      Atako bazalaki babola, balɛmbaki nzoto te, kasi basalaki nyonso oyo bakokaki na moke oyo bazalaki na yango. Na ndakisa, mpo na kobatela mwana na malili, Malia azingaki ye na biteni ya bilamba mpe alalisaki ye na bokɛngi nyonso na elyelo ya banyama. Malia atikaki te mikakatano wana epekisa ye kosala nyonso oyo akokaki mpo na bolamu ya mwana na ye. Ye ná Yozefe bayebaki mpe ete kokokisa bamposa ya elimo ya mwana yango ezalaki likambo eleki ntina oyo bakokaki kosala mpo na ye. (Deteronome 6:6-8) Lelo oyo mpe, baboti ya bwanya batyaka mpe makambo ya elimo na esika ya liboso, ntango bazali koteya bana na bango banzela ya Nzambe na mokili oyo esalelaka Nzambe te.

  • Azalaki “kokanisakanisa mingi na motema na ye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2008 | 1 Sanza ya 10
    • b Na ntango wana, na bingumba nyonso bazalaki na momeseno ya kobongisela bapaya bisika ya kolala.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto