Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • “Yehova, Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1998 | 1 Sanza ya 10
    • 15-17. (a) Tata asalaki nini ntango amonaki mwana na ye? (b) Elamba, lopɛtɛ, sapato oyo tata apesaki mwana na ye elimbolaki nini? (c) Feti oyo tata asalaki emonisaki nini?

      15 “Nde naino ezalaki ye mosika, tata na ye amonaki ye mpe ayokeli ye mawa; atamboli mbango mpe abumeli ye mpe apwepwi ye. Mwana na ye nde alobi na ye ete, Tata, nasaleli Likoló mabe, nasali mabe mpe na miso na yo, nabongi kobyangama mwana na yo lisusu te. Tata nde alobi na baombo na ye ete, Yaká na elamba eleki kitoko nokinoki kolatisa ye, mpe tyá lopɛtɛ na mosapi na ye, mpe sapato na makolo na ye, mpe yaká na mwana na ngɔmbɛ na mafuta mpe bomá yango, tólya, tósepela, mpo ete mwana na ngai oyo awa azalaki mokufi mpe azali na bomoi lisusu: azalaki mobungani mpe azwami. Babandi kosepela.”​—Luka 15:20-24.

  • “Yehova, Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1998 | 1 Sanza ya 10
    • 17 Ntango tata akómaki liboso ya mwana na ye, ayambaki ye na nkingo mpe apwepwaki ye makasi. Na nsima, atindaki basaleli na ye ete bámemela mwana na ye elamba, lopɛtɛ, na sapato. Elamba yango ezalaki se elamba mpo na kozipa nzoto te, kasi oyo “eleki kitoko”—mbala mosusu ezalaki na mayemi kitoko; oyo bakoki mpenza kopesa na mopaya ya lokumu. Lokola ezalaki kosalema mpenza te ete moombo alata lopɛtɛ na sapato, tata amonisaki polele ete ayambaki mwana na ye na esika na ye mpenza na kati ya libota. Kasi tata asukaki wana te. Atindaki ete básala feti mpo ete mwana na ye azongi. Ya solo, kolimbisa oyo moto yango alimbisaki mwana na ye ezalaki ya likolólikoló te to mpe mpo kaka bozongi ya mwana esɛngaki bongo; alingaki mpenza kolimbisa ye. Asepelaki na yango.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto