Bolamu ya seko bozali kozela baoyo bazali kopesa engebene mokano ya nzambe
“Mpo ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko ete moto na moto oyo akondima ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”—YOANE 3:16.
1, 2. (a) Nani aleki kati na bakabi nyonso, mpe likabo nini lileki kitoko apesaki epai na bato? (b) Na nzela na likabo kitoko wana eleki makabo nyonso, ezaleli nini Nzambe amonisaki?
JÉHOVAH NZAMBE azali mokabi oyo aleki bakabi nyonso. Ezali mpo na ye, Mozalisi na likoló mpe na mabelé, nde moyekoli Yakobo akomaki ete: “Makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi makoutaka na likoló, mpo ete makokitaka na nse longwa na Tata na moi. Ye azali na kobongwana te, akoyeisa ata molili moke mpe te.” (Yakobo 1:17) Lisusu, Jéhovah apesaki epai na bato likabo lileki kitoko oyo moto mosusu asala yango naino te mpe na ntina na yango elobamaki ete: “Mpo ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko ete moto na moto oyo akondima ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”—Yoane 3:16.
2 Ye oyo alobaki maloba wana ezali moto mosusu te bobele Mwana se moko na Nzambe. Ezali likambo libongi ete mwana se moko aoka botondi mpe bolingo mpo na tata na ye, oyo apesaki ye bomoi mpe biloko nyonso malamu oyo bizali kookisa esengo. Kasi bolingo na Nzambe bosukaki te bobele na Mwana se moko wana. Na kopesaka likabo yango epai na bikelamu na ye mosusu, Nzambe alingaki komonisa bolingo na ye na lolenge ya bozindo koleka. (Tala Baloma 5:8-10.) Bolingo yango bozali komonana mingi mpenza ntango tozali kotalela ndimbola ya verbe “apesaki” kati na maloba oyo ya zingazinga.
Nzambe apesaki “Mwana na ye na bolingo”
3. Longola “Mwana na ye na bolingo,” nani lisusu asepelaka na bolingo ya Tata na likoló?
3 Na boumeli na eleko moko eyebani molai te, Nzambe asepelaki kozala elongo na Mwana na ye bobele moko, “Mwana na ye na bolingo” kati na makoló. (Bakolose 1:13) Na boumeli ya ntango nyonso wana, bolingo oyo bozalaki kati na Tata mpe Mwana ezalaki kobakisama se kobakisama, na boye ete ezalaki na bolingo mosusu te ekokanaki na oyo ya bango. Nzambe alingaki mpe bikelamu mosusu oyo ye azalisaki na nsima ya Mwana na ye bobele moko, bikelamu oyo bisangani kati na libota na Nzambe. Na bongo, bolingo bozalaki kati na libota mobimba na Nzambe. Tala mpo na nini tozali kotanga kati na Makomami Mosantu ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Libota na Nzambe esalamaki bongo na baoyo balingamaki na Tata, Jéhovah Nzambe.
4. Mpo na nini tokoki koloba ete na kopesaka Mwana na ye, Nzambe amipimelaki mingi koleka boninga oyo bozalaki kati na bango mibale, mpe nani azwaki litomba na yango?
4 Jéhovah mpe Mwana na ye mobotami na liboso bazalaki na bomoko na nzela na bikanganeli makasi na boye ete kopimelana bolingo motindo yango ekokaki kopesa mpasi monene. (Bakolose 1:15) Nzokande, na ‘kopesaka’ Mwana bobele moko wana, Nzambe alekisaki lisusu ndelo mingi koleka likambo ya komipimela boninga ya “Mwana na ye na bolingo.” Andimaki kino ete Mwana yango akufa mpe atika naino mpo na mwa ntango moke kozala na bomoi lokola mosangani ya libota na Nzambe kati na molongo mobimba. Bato oyo naino bazalaki na libota na Nzambe te bakokaki kozwa litomba na liwa yango. Ezalaki na likabo mosusu te ya monene koleka oyo Jéhovah akokaki kopesa epai na bato banyokwami, bobele likabo na Mwana na ye bobele moko, oyo Makomami mazali kobenga ye “ebandeli na bozalisi na Nzambe.”—Emoniseli 3:14.
5. (a) Kati na ezalela nini ya mawa bakitani ya Adam bazwamaki, mpe boyengebene na Nzambe ezalaki kosenga nini epai na moko kati na bana na ye ya sembo? (b) Likabo lileki monene lisengaki nini epai na Nzambe?
5 Adam mpe Eva, babalani na liboso kati na bato, babatelaki te esika na bango kati na libota na Nzambe. Babimisamaki na elanga ya Edene mpo ete basalelaki Mozalisi na bango lisumu. Bobele te ete bazwamaki lisusu kati na libota na Nzambe te, kasi bakomaki lisusu na nse na etumbu ya liwa. Na ntina yango, esengelaki te bobele kopesa lisusu epai na bakitani na bango ngolu na Nzambe kati na libota na ye; kasi esengelaki lisusu kolongola etumbu ya liwa oyo Nzambe akatelaki bango. Mpo na kotosa boyengebene na Nzambe, moko na bana ya sembo ya Jéhovah Nzambe asengelaki kokufela bango, lokola lisiko. Na bongo motuna moko monene mozalaki kotunama: mwana oyo aponami akondima mpenza kokufela bato na masumu? Lisusu, mpo ete yango esalema, esengelaki likamwisi na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Esengelaki mpe ete bolingo na Nzambe emonisama na koleka ndelo.—Baloma 8:32.
6. Mpo na bantina nini Mwana na Nzambe abongaki kati na ezalela ya mpasi oyo mokili na bato na masumu ezwamaki, mpe alobaki nini na ntina yango?
6 Bobele Mwana mobotami na liboso ya Jéhovah nde abongaki mpo na kobikisa bato na masumu kati na likambo monene oyo bazwamaki na yango. Na ntina na bolingo na ye mpo na basangani ya libota liuti na Nzambe, koleka bana nyonso mosusu ya Nzambe, azali komonisa malamu elilingi ya Tata na ye ya likoló. Mpo ete bikelamu nyonso ya mayele bizalisamaki na nzela na ye, tokangi ntina ete azali na bolingo mingi mpo na bango. Lisusu, bolingo ezali ezaleli eleki monene ya Mwana bobele moko ya Jéhovah, Yesu Klisto, mpamba te “ye azali kongenga na nkembo na Nzambe, azali mpe elilingi na motindo na ye.” (Baebele 1:3) Yesu alobaki na bantoma na ye 12 ete: “Mpo ete Mwana na moto ayei kosalelama te kasi kosalela, mpe mpo na kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na bato mingi.” Na maloba wana, amonisaki ete azalaki pene ya kokende kino nsuka kati na komonisama ya bolingo na ye, kino kopesa bomoi na ye mpo na bolamu ya libota na bato na masumu.—Malako 10:45; tala Yoane 15:13.
7, 8. (a) Nini epusaki Jéhovah ete atinda Yesu Klisto kati na mokili? (b) Mosala ya lolenge nini Nzambe apesaki epai na Mwana na ye mobotami na liboso?
7 Jéhovah Nzambe azalaki na ntina ya sikisiki mpenza mpo na kotinda Yesu kati na mokili ya mawa, ya bato. Engebene maloba na Yesu, apusamaki na bolingo. “Mpo ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko ete moto na moto oyo akondima ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko. Mpo ete Nzambe atindi Mwana na ye kati na mokili ete asambisa mokili te kasi ete mokili ebika mpo na ye.”—Yoane 3:16, 17.
8 Ezali mpo na mosala ya kobikisa nde, kati na bolingo na ye, Jéhovah atindaki Mwana na ye bobele moko. Soki Yesu ayaki mpo na kosambisa, mbele mokili mobimba ekokaki kozala ata na elikya moke te. Etumbu monene oyo Yesu akokaki kokatela libota na bato mbele esengelaki kozala etumbu ya liwa. (Baloma 5:12) Na yango, na komonisaka bongo bolingo boleki monene, Nzambe alembisaki ekateli na liwa oyo boyengebene na solo mbele ekokaki kosenga yango.
9. Mokomi na nzembo Davidi akanisaki nini mpo na bokabi ya Jéhovah?
9 Na makambo nyonso, Jéhovah Nzambe azali komonisa bolingo yango oyo ezali bongo elembo eleki monene ya bomoto na ye. Mpe tokoki koloba kozanga komikosa ete Nzambe azali kopesa na bolingo nyonso mpe na koleka biloko malamu epai na basambeli na ye ya sembo na mabelé. Ezali nde yango mokomi na nzembo Davidi akanisaki ntango alobaki na ye ete: “Malamu na yo ezali monene mingi mpenza, oyo yo obombeli bango bakotosaka yo; mpe oyo obongiseli bango bakokima epai na yo liboso na bana na bato.” (Nzembo 31:19) Na boumeli ya boyangeli na ye mobimba likoló na libota ya Yisraele, ata mpe na boumeli ya bomoi na ye kati na libota yango oyo liponamaki na Nzambe, mbala mingi Davidi amekaki malamu na Jéhovah, mpe amonaki yango mingi mpenza.
Yisraele ebungisi likabo monene liuti na Nzambe
10. Na nini Yisraele ya kala ekesanaki na mabota nyonso mosusu ya mokili?
10 Yisraele ya kala ezalaki libota bobele moko na mabelé oyo Jéhovah azalaki Nzambe na bango. Na nzela na mosakoli Moize, Jéhovah akotisaki bakitani ya Abalayama, ya Yisaka mpe ya Yakobo kati na kondimana moko. Asalaki motindo wana ata mbala moko te elongo na libota mosusu. Yango wana mokomi na nzembo epemami akokaki koloba ete: “Akoyokisaka liloba na ye na Yakobo, toli mpe mibeko na ye epai na Yisraele. Asalaki motindo boye epai na bato mosusu te; bango bayebi toli na ye te. [Kumisa Jah!]”—Nzembo 147:19, 20.
11. Kino ntango nini libota na Yisraele ezalaki kati na boboto na Nzambe, mpe na maloba nini Yesu alobelaki mbongwana oyo ekotaki kati na boyokani yango?
11 Libota na Yisraele ezalaki kati na ngolu na Nzambe kino ntango baboyaki Masiya, Yesu Klisto, na mobu 33 ya ntango na biso. Mpo na koloba solo, yango ezalaki mokolo na mawa mingi mpo na Yisraele ntango Yesu angangaki, na mpasi na motema: “E Yelusaleme, Yelusaleme, mboka oyo ekobomaka basakoli mpe kobwaka mabanga epai na bango batindami na ye, mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo lokola nsoso akoyanganisa bana na ye na nsé na mapapu na ye, nde bolingaki te. Tala, ndako na bino etikali mpamba.” (Matai 23:37, 38) Maloba wana na Yesu mamonisaki ete libota na Yisraele, oyo kala lindimamaki na Jéhovah, bazangisaki libaku ya kozwa likabo monene liuti na Nzambe. Likabo nini yango?
12. Banani bazalaki ‘bana na Yelusaleme,’ mpe na ndimbola nini Yesu mbele akokaki koyanganisa bango?
12 Na liloba “bana,” Yesu azalaki kolobela mpenzampenza Bayuda bakatami ngenga, oyo bazalaki kofanda na Yelusaleme mpe baoyo bazalaki komonisa bongo libota mobimba ya Bayuda. Koyanganisa ‘bana na Yelusaleme’ ekokaki kolimbola ete Yesu akotisi “bana” yango kati na kondimana na sika elongo na Nzambe, oyo ye moko Yesu alingaki kozala Moyokanisi katikati na Jéhovah mpe Bayuda yango ya mosuni. (Yilimia 31:31-34) Na lisalisi ya kondimana yango, masumu na bango makokaki kolimbisama, mpamba te bonene na bolingo na Nzambe ekanaki bongo. (Tala Malaki 1:2) Yango ekokaki kozala mpenza likabo moko kitoko.
13. Libota na Yisraele emipimelaki nini na kobwakaka Mwana na Nzambe, kasi mpo na nini esengo na Jéhovah ekitaki te?
13 Na boyokani na Liloba na ye ya esakweli, Jéhovah azelaki lisusu liboso ete apesa epai na Bapakano likoki ya kosangana kati na kondimana ya sika. Na kobwakaka Mwana na Nzambe, Masiya, libota na Yisraele emipimelaki likabo wana kitoko mingi. Komonaka ete Mwana na ye aboyami na Bayuda, Jéhovah apesaki nzela na bato oyo bazalaki Bayuda te ete bazwa litomba na likabo yango. Na bongo, esengo oyo Jéhovah aokaki na kopesa ekitaki te.
Esengo na kopesa
14. Mpo na nini Yesu azali ekelamu na esengo koleka kati na molongo mobimba?
14 Jéhovah azali “Nzambe na esengo.” (1 Tim. 1:11) Kopesa ezali bongo moko na makambo mazali kopesa ye esengo. Na ekeke ya liboso ya ntango na biso, Mwana na ye bobele moko alobaki ete: “Esengo na kopesa eleki esengo na kozwa.” (Misala 20:35) Na boyokani na etinda oyo, Yesu akomaki ekelamu na esengo koleka kati na bikelamu na Nkolo Moyangeli na molongo. Ndenge nini? Nsima na Jéhovah Nzambe, ezali Yesu Klisto nde apesaki likabo lileki makabo nyonso na kokabaka bomoi na ye mpo na bolamu ya bato. Azali ‘Mokonzi moko na esengo,’ boye te? (1 Timoté 6:15, MN) Yesu amonisaki bongo na ndakisa na ye ete esengo eleki mingi nde na kopesa.
15. Ndakisa nini Jéhovah akotika te kopesa yango, mpe ndenge nini bikelamu na ye na mayele bakoki kozwa ndambo na esengo na ye?
15 Na nsima na Yesu Klisto, Jéhovah Nzambe akotika te kopesa makabo kitoko epai na bikelamu na ye nyonso ya mayele mpe ntango nyonso akozala ndakisa malamu mpo na bango. Lokola azali kosepela mpo na kopesa makabo kitoko, akotisaki elimo na bokabi kati na mitema ya bato oyo ye azalisaki. Yango wana bazali komonisa mpe komekola bomoto na ye, mpe bazali kozwa ndambo na esengo na ye. (Genese 1:26; Baefese 5:1) Na bongo toyebi sikawa mpo na nini Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bopesa mpe ekopesama na bino. Kati na maboko na bino bakopesa emekeli malamu na kopo esili kokáma mpe koningisama mpe etondi mɛkɛ.”—Luka 6:38, MN.
16. Likabo ya lolenge nini Yesu azali kolobela kati na Luka 6:38?
16 Yesu azalaki na momeseno ya kolakisa epai na bayekoli na ye nzela malamu oyo basengeli kolanda, mpe na wana atikaki ndakisa malamu. Alobaki ete baoyo bakozwa makabo bakoyanola na lolenge malamu. Na Luka 6:38, Yesu alobelaki bobele makabo ya mosuni te. Alakisaki bayekoli na ye te ete bamekola ezalela moko oyo ekokomisa bango babola. Nzokande, alendisaki bango kati na nzela moko oyo ekoyeisa bango bazwi mingi kati na elimo.
Tozali na elikya mpo na esengo ya seko
17. Likabo nini ya kitoko mingi Nzambe apesi yango epai na Batemwe na ye na mikolo oyo ya nsuka?
17 Oyo nde likabo kitoko Jéhovah, Mokonzi na bikelamu nyonso, apesi epai na Batemwe na ye na mikolo oyo ya nsuka! Apesi biso nsango malamu na Bokonzi na ye. Tozali na libaku monene ya kosakola Bokonzi na Nzambe oyo esili kosalama, oyo epesami na Mwana na ye, Mokonzi Yesu Klisto. (Matai 24:14; Malako 13:10) Ezali bongo likabo moko monene koleka mpo na kozala Batemwe ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, mpe lolenge malamu oyo tokoki kokaba lokola Nzambe, ezali bongo ya kosakola nsango na Bokonzi liboso ete nsuka na biloko mabe na ntango oyo eya.
18. Biso baoyo tozali ba Témoins de Jéhovah, eloko nini tosengeli kopesa epai na bazalani na biso?
18 Ntóma Paulo alobelaki mimekamo oyo azwaki mpo na kosakola nsango na Bokonzi. (2 Bakolinti 11:23-27) Ba Témoins de Jéhovah ya ekeke na ntuku mibale basengeli mpe koyikela mimekamo mpiko mpe kotika bamposa na bango mosusu mpo na kopesa epai na bazalani na bango elikya ya Bokonzi. Mbala mosusu ezali momeseno na biso te ya kokende kotala bato, mingi mpenza soki tozalaka nsoninsoni. Kasi lokola tozali bayekoli na Klisto tosengeli komilongola te na libaku kitoko ya kopesa makabo na elimo na kosakolaka “nsango malamu oyo na bokonzi.” (Matai 24:14) Esengeli na biso kozala na ezalela motindo moko na Yesu. Liboso na liwa, asambelaki boye: “Tata na ngai, . . . lokola elingi ngai te, nde lokola elingi yo.” (Matai 26:39) Mpo na oyo etali koyebisa nsango malamu na Bokonzi, basaleli na Jéhovah basengeli kokokisa mokano na Nzambe, kasi oyo na bango te; basengeli kosala oyo Nzambe alingi, kasi oyo bango balingi te.
19. Banani bazali Bankolo na “bifandelo na seko,” mpe ndenge nini tokoki kozala baninga na bango?
19 Makabo kitoko yango mazali kosenga ntango mpe misolo na biso, kasi soki tozali kopesa engebene mokano na Nzambe, tokoki kondimisama ete esengo na biso ekozala ya seko. Mpo na nini? Mpo ete Yesu alobaki: “Bozwa baninga mpo na bino mpo na mosolo [“bozwi ya mokili oyo,” Français courant] mabe ete soko ekosila, bayamba bino kati na [bifandelo] na seko.” (Luka 16:9) Tosengeli kozala na mokano, mpo na “misolo na biso mabe,” kokoma baninga ya Bankolo na “bifandelo na seko.” Biloko nyonso bizali ya Mozalisi, Jéhovah, mpe ya Mwana na ye mobotami na liboso, mpamba te azali Mosangoli na libula ya biloko nyonso. (Nzembo 50:10-12; Baebele 1:1, 2) Mpo ete tozala baninga na bango, tosengeli kosalela bozwi na biso na lolenge oyo bango bazali kondima. Na ntina yango, esengeli na biso kozala na elimo oyo ebongi ntango tozali kosalela biloko ya mosuni mpo na bolamu ya bazalani na biso. (Tala Matai 6:3, 4; 2 Bakolinti 9:7) Likoki ezali na biso na kolendisa boninga na biso elongo na Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto soki tokosalela na lolenge malamu mosolo na biso. Ndakisa, na kokamataka bozwi na biso na esengo nyonso mpo na kosalisa bato oyo bazali mpenza na mposa na yango mpe na kotokaka kati na bozwi na biso mpo na kokolisa mosala ya Bokonzi na Nzambe.—Masese 19:17; Matai 6:33.
20. (a) Mpo na nini Jéhovah mpe Yesu Klisto bakoki kokamba biso epai na “bifandelo na seko,” mpe bifandelo yango bikoki kozala wapi? (b) Nini ekozala litomba na biso ya seko?
20 Lokola bazangi kufa, Jéhovah mpe Yesu Klisto bakoki kozala baninga na biso mpo na libela mpe bakokamba biso epai na “bifandelo na seko,” ezala ete bifandelo yango bizali na likoló, elongo na baanzelu basantu, to kati na Paradis na mabelé oyo ekozongisama (Luka 23:43) Ekozala bongo mpamba te, kati na bolingo na ye, Nzambe apesaki Yesu Klisto lokola likabo. (Yoane 3:16) Mpo na esengo na ye monene, Jéhovah Nzambe akokoba kopesa makabo epai na bikelamu na ye nyonso na nsima na Yesu. Mpo na biso, na nse na bokonzi ya molongo mobimba ya Jéhovah Nzambe mpe na bokonzi ya Mwana na ye mobotami na liboso Yesu Klisto, Nkolo na biso mpe Mobikisi na biso, tokozala na litomba ya seko ya kopesa. Na yango, baoyo nyonso bazali kopesa engebene mokano na Nzambe bakozala na esengo ezangi nsuka.
Bozongeli
◻ Likambo nini Nzambe andimaki kosala mpo na kopesa likabo lileki makabo nyonso?
◻ Mokumba ya motindo nini Nzambe apesaki epai na Mwana na ye?
◻ Nani azali ekelamu na esengo koleka kati na molongo mobimba, mpe mpo na nini?
◻ Mpo na nini tokoki koloba ete baoyo bazali kopesa engebene mokano na Nzambe bakozwa esengo ezongi nsuka?
[Elilingi na lokasa 10]
Nzambe apesaki Mwana na ye lokola mbeka mpo na lisiko: topesaka motuya na likabo yango?
[Bililingi na lokasa 12]
Tolukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe na kosakolaka nsango malamu mpe na kosalelaka bozwi na biso mpo na kosunga mosala yango?