Bazalaki kozela Masiya
“Bato bazalaki kozela mpe bango nyonso bazalaki komitunatuna na mitema na bango mpo na Yoane ete: ‘Mbala mosusu ye nde Kristo [to, Masiya]?’”—LUKA 3:15.
1. Nsango nini ya esengo anzelu moko ayebisaki babateli ya mpate?
BUTU eyindi. Babateli ya mpate bazali libándá mpo na kokɛngɛla bitonga na bango. Bakamwe mpenza ntango anzelu ya Yehova atɛlɛmi pembeni na bango mpe nkembo ya Nzambe engɛngɛli bango. Bazali kobanga, kasi anzelu apesi bango nsango moko ya esengo ete: “Bóbanga te, mpo talá! nazali kosakwela bino nsango malamu ya esengo moko monene oyo bato nyonso bakozala na yango, mpo lelo . . . baboteli bino Mobikisi, oyo azali Kristo Nkolo.” Mwana yango akokóma Masiya. Anzelu ayebisi bango ete bakokuta ye alali na elyelo ya bibwɛlɛ na mboka moko oyo ezali mosika te. Na mbala moko, “ebele ya baanzelu” babandi kosanzola Yehova mpe koloba ete: “Nkembo na Nzambe kuna na likoló, mpe kimya na mabele na bato oyo ye andimi.”—Luka 2:8-14.
2. Liloba “Masiya” elimboli nini, mpe ndenge nini bato bakokaki koyeba ye?
2 Na ntembe te, lokola babateli yango ya mpate bazali Bayuda, bayebi ete liloba “Masiya” to “Kristo” elimboli “Oyo atyami mafuta.” (Kob. 29:5-7) Na yango, ndenge nini bakoyeba likambo yango malamu mpe bakondimisa bato ete mwana oyo anzelu alobeli akozala mpenza Masiya oyo Yehova aponi? Basengeli koyekola bisakweli oyo etali Masiya na Makomami ya Ebre mpe kotala soki bisakweli yango ekokisami na misala mpe bomoi ya mwana yango.
Mpo na nini bato bazalaki kozela?
3, 4. Danyele 9:24, 25 ekokisamaki ndenge nini?
3 Bambula mingi na nsima, ntango Yoane Mobatisi abandaki kosakola, maloba mpe misala na ye etindaki bato mosusu bámituna soki ye nde Masiya. (Tángá Luka 3:15.) Ekoki kozala ete bato mosusu bakangaki mpenza ntina ya esakweli moko oyo etali Masiya, oyo elobelaki “pɔsɔ ntuku nsambo.” Soki ezali bongo, bayebaki ntango oyo Masiya asengelaki kobima. Na esika moko, esakweli yango elobaki boye: “Banda kobima ya liloba ya kobongisa mpe kotonga lisusu Yerusaleme tii Masiya Mokambi, ekozala pɔsɔ nsambo, lisusu pɔsɔ ntuku motoba na mibale (62).” (Dan. 9:24, 25) Bato mingi ya mayele na makambo ya Biblia bandimaka ete bapɔsɔ yango ezali nde bapɔsɔ ya bambula. Na ndakisa, Biblia liloba lya Nzambe elobi ete: “Nzambe akateli ekolo . . . bileko ntuku nsambo bya mibu nsambo.”
4 Lelo oyo, basaleli ya Yehova bayebi ete pɔsɔ 69 oyo Danyele 9:25 elobeli ezali mbula 483 mpe ebandaki na mobu 455 L.T.B., ntango Artazerezese, mokonzi ya Perse, apesaki Nehemia nzela ya kobongisa mpe kotonga lisusu Yerusaleme. (Neh. 2:1-8) Mbula 483 yango esukaki na mobu 29 T.B., ntango Yesu moto ya Nazarete azwaki batisimo. Na ntango yango, atyamaki mafuta na elimo santu, mpe akómaki Masiya.—Mat. 3:13-17.a
5. Bisakweli nini tokotalela sikoyo?
5 Tótalela sikoyo mwa bisakweli mosusu oyo etali Masiya oyo ekokisamaki na mbotama, bomwana, mpe mosala ya Yesu. Na ntembe te, yango ekolendisa kondima na biso na Biblia. Ekomonisa mpe polele ete Yesu azalaki mpenza Masiya oyo bato bazalaki kozela.
Bisakweli oyo elobelaki bomwana na ye
6. Limbolá ndenge Ebandeli 49:10 ekokisamaki.
6 Masiya asengelaki kobima na libota ya Yuda na Yisraele. Liboso Yakobo akufa, apambolaki bana na ye mpe asakolaki boye: “Lingenda ya bokonzi ekolongwa na Yuda te, mpe lingenda ya komanda na kati ya makolo na ye te, kino Shilo akoya; mpe bato ya bikólo bakotosa ye.” (Eba. 49:10) Bayuda mingi oyo bazalaki bateyi na ntango ya kala balobaki ete maloba yango etalaki Masiya. Kobanda na boyangeli ya Mokonzi Davidi, oyo azalaki moto ya libota ya Yuda, lingenda ya bokonzi (to bokonzi) mpe lingenda ya komanda (to nguya ya kopesa mitindo) efandaki na libota ya Yuda. “Shilo” elimboli “Moto oyo eloko ezali ya ye.” Molɔngɔ ya bakonzi na libota ya Yuda esengelaki kosuka na “Shilo,” mpo ntango Mosangoli ya libula yango akoyangela, akotikala libela. Nzambe ayebisaki Zidikiya, mokonzi ya nsuka na libota ya Yuda, ete bokonzi ekopesama na moto oyo azali na lotomo oyo euti na mibeko. (Ezk. 21:26, 27) Nsima ya Zidikiya, kaka Yesu nde mokitani ya Davidi oyo balakaki ete akozala mokonzi. Liboso Yesu abotama, anzelu Gabriele ayebisaki Maria ete: “Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, mpe akoyangela ndako ya Yakobo libela na libela, mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.” (Luka 1:32, 33) Na ntembe te, Shilo ezali nde Yesu Kristo, oyo azalaki mokitani ya Yuda mpe ya Davidi.—Mat. 1:1-3, 6; Luka 3:23, 31-34.
7. Masiya abotamaki wapi, mpe mpo na nini ezali likambo ya kokamwa?
7 Masiya asengelaki kobotama na Beteleme. Mosakoli Mika akomaki boye: “Yo, Ee Beteleme Efrata, yo oyo ozali moke mpenza mpo okoka kotángama na kati ya bankóto ya Yuda, uta na yo moto moko akobima mpo na ngai, oyo akokóma mokonzi na Yisraele, oyo ebandeli na ye ezali uta kalakala, uta ntango oyo etyami ndelo te.” (Mika 5:2) Masiya asengelaki kobotama na Beteleme, engumba moko ya Yudea, oyo na ntembe te kala ezalaki kobengama Efrata. Maria mama ya Yesu mpe Yozefe, tata-mobɔkɔli na ye, bazalaki kofanda na engumba mosusu, Nazarete. Kasi mitindo oyo mokonzi moko ya Roma apesaki ete bato bákomisa nkombo na mboka na bango ya kobotama, ememaki bango na Beteleme mpe Yesu abotamaki kuna na mobu 2 L.T.B. (Mat. 2:1, 5, 6) Esakweli yango ekokisamaki na ndenge ya kokamwa mpenza!
8, 9. Nini esakolamaki mpo na mbotama ya Masiya mpe makambo oyo elandaki yango?
8 Ngɔndɔ nde asengelaki kobota Masiya. (Tángá Yisaya 7:14.) Vɛrsɛ yango elobi ete elenge mwasi akobota mwana mobali. Liloba ya Ebre mpo na ngɔndɔ ezali bethulah. Yisaya 7:14 esaleli nde liloba almah, oyo elimboli elenge mwasi. Kasi toyebi ete liloba yango (almah) elimboli mpe ngɔndɔ mpo Biblia ebengi Rebeka elenge mwasi (almah) liboso abala. (Eba. 24:16, 43) Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Matai asalelaki liloba ya Grɛki parthenos oyo elimboli “ngɔndɔ” mpo na komonisa ete Yisaya 7:14 ekokisamaki ntango Yesu abotamaki. Matai ná Luka bakomaki ete Maria azalaki ngɔndɔ mpe ete azwaki zemi na nzela ya elimo ya Nzambe.—Mat. 1:18-25; Luka 1:26-35.
9 Bana mike bakobomama nsima ya kobotama ya Masiya. Likambo moko ya ndenge wana esalemaki bikeke mingi liboso, ntango Farao ya Ezipito akweisaki mitindo ete bana mibali ya Baebre nyonso oyo babotami sika bábwakama na Ebale Nile. (Kob. 1:22) Esakweli ya Yirimia 31:15, 16 elobeli Rashele azali kolela bana na ye ya mibali oyo bamemami “na mokili ya monguna.” Kolela na ye eyokanaki mosika na Rama, na teritware ya Benyamina, na nɔrdi ya Yerusaleme. Matai amonisaki ete maloba ya Yirimia ekokisamaki ntango Mokonzi Erode apesaki mitindo ete báboma bana mike nyonso ya mibali na Beteleme mpe na bitúká na yango nyonso. (Tángá Matai 2:16-18.) Kanisá mawa oyo ezalaki na esika yango!
10. Limbolá ndenge Hosea 11:1 ekokisamaki epai na Yesu.
10 Lokola Bayisraele, Masiya akobengama mpo alongwa na Ezipito. (Hos. 11:1) Liboso Erode apesa mitindo ete báboma bana mike, anzelu moko ayebisaki Yozefe mpe Maria bálongwa na Yisraele mpe bámema Yesu na Ezipito. Batikalaki kuna “tii na liwa ya Erode, mpo oyo Yehova alobaki na nzela ya mosakoli na ye [Hosea] ekokisama: ‘Nabengaki mwana na ngai alongwa na Ezipito.’” (Mat. 2:13-15) Na ntembe te, Yesu ye moko akokaki te kotambwisa makambo oyo esalemaki na mbotama mpe bomwana na ye.
Masiya abandi mosala!
11. Nani abongiselaki Masiya nzela?
11 Basengelaki kobongisa nzela liboso ya Masiya. Malaki asakolaki ete “mosakoli Eliya” akosala mosala ya kobongisa nzela, akobongisa mitema ya bato mpo na koya ya Masiya. (Tángá Malaki 4:5, 6.) Yesu ye moko alobaki ete “Eliya” yango ezali Yoane Mobatisi. (Mat. 11:12-14) Mpe Marko alobaki ete mosala ya Yoane ekokisaki esakweli ya Yisaya. (Yis. 40:3; Mrk. 1:1-4) Yesu ayebisaki Yoane te ete abongisela ye nzela. Mosala ya “Eliya” yango oyo asakolamaki esalemaki na boyokani na mokano ya Nzambe mpo na kosalisa bato báyeba Masiya.
12. Mosala nini Nzambe apesaki Masiya?
12 Nzambe akopesa Masiya mosala moko ya ntina mingi. Mokolo moko na sinagoga ya Nazarete, epai akolaki, Yesu atángaki rulo ya Yisaya mpe alobaki ete maloba na yango ekokisami epai na ye moko ete: “Elimo ya Yehova ezali na ngai, mpo atye ngai mafuta mpo nasakwela babola nsango malamu, atindi ngai mpo nasakwela baoyo bakangami kosikolama mpe nafungola miso ya bato oyo bakufá miso, mpo natika bato oyo batutamá bákende na bonsomi, mpo na kosakola mbula ya kondimama na Yehova.” Lokola azalaki mpenza Masiya, Yesu akokaki mpenza koloba ete: “Lelo oyo likomami oyo bouti koyoka ekokisami.”—Luka 4:16-21.
13. Yisaya alobaki nini mpo na mosala ya Yesu na Galile?
13 Esakweli moko eyebisaki ete Masiya akobanda mosala na ye na Galile. Yisaya alobelaki “mokili ya Zebulone mpe mokili ya Nafatali . . . [mpe] Galile ya bikólo.” Akomaki boye: “Bato oyo bazalaki kotambola na molili bamoni pole moko monene. Nde baoyo bafandi na mokili ya molili tuu, pole engɛngɛli bango.” (Yis. 9:1, 2) Yesu abandaki mosala na ye na Galile; azalaki kofanda na Kapernaume, epai bato mingi ya Zebulone ná Nafatali bazwaki matomba mpo na pole ya elimo oyo amemelaki bango. (Mat. 4:12-16) Na Galile, Yesu asalaki Lisolo Likoló ya Ngomba, aponaki bantoma na ye, asalaki likamwisi na ye ya liboso, mpe mbala mosusu kuna nde abimelaki bayekoli soki 500 nsima ya lisekwa na ye. (Mat. 5:1–7:27; 28:16-20; Mrk. 3:13, 14; Yoa. 2:8-11; 1 Ko. 15:6) Na yango, esakweli ya Yisaya ekokisamaki ntango Yesu asakolaki na “mokili ya Zebulone mpe mokili ya Nafatali.” Ya solo, Yesu asakolaki mpe nsango ya Bokonzi na bisika mosusu na Yisraele.
Misala mosusu ya Masiya esakolamaki
14. Ndenge nini Nzembo 78:2 ekokisamaki?
14 Masiya akoloba na masese to bandakisa. Mokomi ya nzembo Asafe ayembaki boye: “Nakofungola monɔkɔ na ngai na liloba ya lisese.” (Nz. 78:2) Ndenge nini toyebi ete esakweli yango etalaki Yesu? Matai ayebisi biso yango. Nsima ya kolobela bandakisa oyo Yesu akokanisaki Bokonzi ya Nzambe na mbuma ya mutarde oyo ezali kokola mpe na levire, Matai alobi boye: “[Yesu] azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa; mpo likambo oyo elobamaki na nzela ya mosakoli ekokisama; ye alobaki ete: ‘Nakofungola monɔkɔ na ngai na bandakisa, nakosakola makambo oyo ebombamá banda na ebandeli.’” (Mat. 13:31-35) Maloba ya masese mpe bandakisa oyo Yesu asalelaki esalisaki bato mingi báyeba Nzambe.
15. Lobelá ndenge Yisaya 53:4 ekokisamaki.
15 Masiya akobikisa bato. Yisaya asakolaki boye: “Ya solo, amemaki nde bamaladi na biso; mpe akumbaki bampasi na biso.” (Yis. 53:4) Matai amonisi ete nsima ya kobikisa bokilo ya Petro, Yesu abikisaki mpe bato mosusu mpo “likambo oyo elobamaki na nzela ya mosakoli Yisaya ekokisama: ‘Akamataki bamaladi na biso mpe amemaki bampasi na biso.’” (Mat. 8:14-17) Ezali mpe na bisika mosusu mingi na Biblia oyo emonisi ete Yesu abikisaki bato ya maladi.
16. Ndenge nini ntoma Yoane amonisaki ete Yesu akokisaki Yisaya 53:1?
16 Atako Masiya akosala bolamu mingi, bato mingi bakondima ye te. (Tángá Yisaya 53:1.) Mpo na komonisa ete esakweli yango ekokisamaki, ntoma Yoane akomaki boye: “Atako [Yesu] asalaki bilembo mingi liboso na bango, bandimelaki ye te, mpo liloba ya mosakoli Yisaya ekokisama, oyo elobaki ete: ‘Yehova, nani andimeli likambo oyo toyoki? Bongo lobɔkɔ ya Yehova, emonisami epai ya nani?’” (Yoa. 12:37, 38) Lisusu, bambula na nsima ntango ntoma Paulo asakolaki nsango malamu, kaka bato moke nde bandimaki ete Yesu azalaki Masiya.—Rom. 10:16, 17.
17. Ndenge nini Yoane amonisaki ete Nzembo 69:4 ekokisamaki?
17 Bato bakoyina Masiya kaka mpamba. (Nz. 69:4) Ntoma Yoane alobaki ete Yesu alobaki boye: “Soki nasalaki te na kati na [bato] misala oyo ata moto moko te asalá, mbɛlɛ bazali na lisumu te; kasi sikoyo bamoni mpe bayini ná ngai ná Tata na ngai. Kasi ezali mpo liloba oyo ekomamá na Mibeko na bango ekokisama ete: ‘Bayinaki ngai kaka mpamba.’” (Yoa. 15:24, 25) Mbala mingi “Mibeko” elimbolaka Makomami nyonso. (Yoa. 10:34; 12:34) Masolo ya Baevanzile emonisi ete bato, mingimingi bakonzi ya mangomba ya Bayuda, bayinaki Yesu. Lisusu, Kristo alobaki ete: “Mokili ezali na ntina moko te ya koyina bino, kasi ezali koyina ngai, mpamba te nazali kopesa litatoli ete misala na yango ezali mabe.”—Yoa. 7:7.
18. Makambo nini mosusu tokotalela oyo ekondimisa biso mpenza ete Yesu azali Masiya?
18 Bayekoli ya Yesu na ekeke ya liboso bandimaki mpenza ete Yesu azali Masiya, mpo akokisaki mpenza bisakweli ya Makomami ya Ebre oyo etali Masiya. (Mat. 16:16) Ndenge tomoni yango, bisakweli yango mosusu ekokisamaki na bomwana mpe na mosala ya Yesu moto ya Nazarete. Tokotalela bisakweli mosusu oyo etali Masiya na lisolo oyo elandi. Soki tomanyoli bisakweli yango mpe tobondeli, tokondima mpenza ete Yesu Kristo azali Masiya oyo Yehova aponá.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali “pɔsɔ ntuku nsambo,” talá mokapo 11 ya buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
Okopesa eyano nini?
• Bisakweli nini ekokisamaki mpo na mbotama ya Yesu?
• Ndenge nini nzela ebongisamaki liboso ya Masiya?
• Ndenge nini bisakweli oyo ezali na Yisaya mokapo 53 ekokisamaki epai na Yesu?