Ntango ya Kosɛnzɛla
“Ekoki ete nsango malamu elakisama kati na mabota nyonso liboso. . . . Kasi moto oyo akoyika mpiko kino nsuka akobika.”—MALAKO 13:10, 13.
1. Mpo na nini tosengeli kolendendela mpe kozala na mpiko?
TOSENGELI koyika mpiko—kati na libota oyo lizangi kondima mpe ya mabe! Kobanda na 1914 libota moko ya bato lisili kobebisama, bobele lokola ezalaki na mikolo ya Yesu. Mpe lelo oyo libebi yango esili kopalangana mokili mobimba. Na “mikolo ya nsuka” oyo, “ntango ya mpasi” oyo ntoma Paulo alobelaki ezali kopesa bato bwale. ‘Bato mabe mpe bakosi bazali kokóma lisusu mabe mingi koleka.’ Ezali polele ete, “mokili mobimba ezali kolala kati na oyo mabe,” Satana Zábolo, oyo azali kosala na makasi na ye nyonso mpo na kobebisa mabelé. Kasi, tólɛmba te! “Bolózi monene” etikali moke eya, oyo ekomema kobɔndisama ya libela epai na baoyo nyonso balingaka boyengebene.—2 Timoté 3:1-5, 13; 1 Yoane 5:19; Emoniseli 7:14.
2. Lolenge nini bisakweli bikokisamaki na 1914?
2 Likambo ya esengo ezali ete, Yehova asili sikawa kotya Nkolo Yesu Klisto na kiti ya bokonzi na makoló, yango ezali bolɛngɛli ya kolongolama ya banguna oyo bazali konyokola bato. (Emoniseli 11:15) Lokola ezalaki na ntango Masiya ayaki mpo na mbala ya liboso, bobele bongo mpe na ekeke oyo esakweli moko monene oyo Danyele akomaki ekokisamaki. Kati na Danyele 4:16, 17, 32, eyebisameli biso na ntina na kolongolama ya bokonzi oyo ezalaki na lotómo ya koyangela mpo na boumeli ya “ntango nsambo.” Na kokokisama monene na yango, ntango nsambo yango ekokani na mibu nsambo ya Biblia, mokomoko na yango ezali na ‘mikolo’ 360, to na nyonso, bambula 2520.a Ebandaki na mobu 607 L.T.B., na ntango Babilone ebandaki konyata bokonzi ya Yisalaele, kino na 1914 T.B. mbula oyo Yesu azwaki bokonzi na likoló lokola mokonzi oyo azali na lotómo ya koyangela bato. Na yango “bilaka na mabota” esukaki. (Luka 21:24) Kasi mabota baboyi komisɔkisa liboso na Bokonzi ya Masiya oyo elingi kokamata esika na bango.—Nzembo 2:1-6, 10-12; 110:1, 2.
3, 4. (a) Kokokana nini ezali kati na makambo oyo mabimaki na ekeke ya liboso mpe oyo ya eleko na biso? (b) Mituna nini ya ntina tokoki komituna?
3 Wana pɔ́sɔ ya 70 (29-36 T.B.) ya bambula ezalaki kobɛlɛma, mpe lisusu na ntango mobu 1914 ekómaki pene, bato na ezaleli ya kobanga Nzambe bazalaki kozela koya ya Masiya. Mpe ayaki! Nzokande, na bileko wana mibale, lolenge ya kobima na ye ekesanaki na lolenge bato bazalaki komizela na yango. Na bileko yango mibale mpe, nsima ya ntango mokuse, “libota” moko ya mabe ezwaki etumbu ya Nzambe.—Matai 24:34.
4 Na lisoló na biso oyo eleki, tomonaki lolenge libota mabe ya Bayuda oyo esɛngaki ete makila ya Yesu masopama esukaki. Na yango, ekozala boni mpo na libota mabe ya bato oyo bazali kotɛmɛla to koboya koyokela ye? Ntango nini ekateli ekokweisama likoló na libota wana lizangi kondima?
“Bósɛnzɛlaka”!
5. (a) Mpo na ntina nini malamu tozali na mposa te ya koyeba “mokolo mpe ntango” ya Yehova? (b) Engebene Malako, Yesu asukisaki esakweli na ye na toli nini oyo ebongi mpenza?
5 Nsima ya kosakola na ntina na makambo oyo masengelaki kobima liboso na “bolózi monene,” Yesu abakisaki ete: “Nde mpo na mokolo yango mpe mpo na ntango yango, moto ayebi te, ata baanzelu na likoló te, ata Mwana mpenza te, kasi bobele Tata ayebi.” (Matai 24:3-36; Malako 13:3-32) Tozali na mposa te ya koyeba ntango ya sikisiki oyo makambo yango makosalema. Nzokande, likebi na biso esengeli kozala mingi likoló na ezaleli ya kosɛnzɛla, kokólisa kondima makasi, mpe kozala ntango nyonso na makambo mingi ya kosala kati na mosala ya Yehova—kasi esengeli kozala te likoló na kotánga badati. Yesu asukisaki esakweli na ye monene na kolobáká ete: “Bókeba mpe bósɛnzɛla, mpo ete boyebi te soko elaka yango ekokoka ntango nini . . . Bósɛnzɛlaka . . . Oyo mpe nazali koloba na bino, nazali koloba na bato nyonso ete, Bókɛngɛlaka.” (Malako 13:33-37) Likámá ebombami kati na molili ya mokili ya lelo. Tosengeli kolanda ntango nyonso kosɛnzɛla!—Baloma 13:11-13.
6. (a) Kondima na biso esengeli kopikama likoló na nini? (b) Lolenge nini tokoki “kotánga mikolo na biso?” (c) Yesu alingaki mpenza koloba nini na ntango asalelaki liloba “libota”?
6 Tosengeli te bobele kotya likebi likoló na bisakweli bipemami oyo bizali kolobela mikolo ya nsuka ya ebongiseli mabe, kasi tosengeli kopika kondima na biso liboso mpenza likoló na mbeka ya Yesu Klisto oyo ezali na motuya mingi mpe likoló na bilaka kitoko oyo bikangani na yango. (Baebele 6:17-19; 9:14; 1 Petelo 1:18, 19; 2 Petelo 1:16-19) Lokola bazali na mposa makasi ya komona nsuka ya ebongiseli oyo mabe, basaleli ya Yehova basilaki mbala mosusu koluka koyeba ntango oyo “bolózi monene” esengelaki kobanda, bazalaki nkutu kokangisa yango na kotángáká bolai ya bomoi ya libota ya bato oyo bazali na bomoi uta 1914. Nzokande, tozali te ‘kozwa mitema na mayele’ engebene makanisi na biso moko likoló na motángo ya bambula oyo libota moko ya bato ekoki koumela, kasi na kokanisáká nde na ntina na lolenge oyo ‘tozali kotánga mikolo na biso’ na kopesáká masanzoli ya esengo epai na Nzambe. (Nzembo 90:12) Na esika ete etya mobeko likoló na lolenge ya komeka bolai ya ntango, liloba “libota,” na motindo Yesu asalelaki yango, etaleli mingi mpenza bato oyo bazali na bomoi na boumeli ya eleko moko ya lisoló ya bato elongo na makambo oyo ekesenisaki bango na bato ya eleko mosusu.b
7. Molakisi moko ya lisoló ya makambo ya kala akomaki nini na ntina na “libota ya 1914,” mpe lolenge nini yango ezali na boyokani na esakweli ya Yesu?
7 Na boyokani na ndimbola oyo, molakisi moko ya makambo ya kala, Robert Wohl, akomaki kati na búku na ye The Generation of 1914 ete: “Libota moko kati na lisoló ya bato etalelami te engebene bambula boni yango eumelaki . . . Ezali likambo ya badati te.” Kasi amonisaki ete Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebimisaki “mayoki makasi ya kobongwana monene ya makambo,” mpe abakisaki ete: “Baoyo babikaki na etumba yango bakoki kobosana soko moke te ete mokili moko mosukaki mpe mokili mosusu mobandaki na Augústo 1914.” Ezali mpenza solo! Yango emonisi mpenza bonene ya likambo. Uta 1914 “libota oyo” ya bato esili komona mbongwana ya nsɔ́mɔ. Esili komona kotanga ya makila ya bamilió ya bato likoló na mabelé. Bitumba, kobomama ya ebele ya bato, mobulu, mpe ezaleli ya kobuka mibeko esili kotonda na mokili mobimba. Nzala, maladi, mpe bizaleli ya mbindo ezali kobebisa mokili na biso. Yesu asakolaki ete: “Bino mpe bongo, wana [bayekoli na ye] ekomona bino makambo oyo kobima, bóyeba ete bokonzi na Nzambe ezali penepene. Nalobi na bino solo ete libota oyo ekoleka soko moke te kino ekobima makambo oyo nyonso.”—Luka 21:31, 32.
8. Lolenge nini basakoli ya Yehova balobelaki mingi na ntina ya kosɛnzɛla ntango nyonso?
8 Ee, bolóngi mobimba ya Bokonzi ya Masiya ekómi pene! Na yango, litomba nini tokozwa na kotángáká badati to na kokanisáká na ntina na ntango boni “libota” moko ekoki koumela? Tokozwa litomba soko moke te! Habakuku 2:3 elobi polele ete: “Emɔnɔneli ezali bobele mpo na ntango ebongisami, ekómi noki epai na nsuka, ekozanga te; ata ezali koumela, lambelá yango; ekoya solo mpenza, ekoumela mingi te.” Mokolo ya kosambisa ya Yehova ezali koya na lombangu mpenza koleka.—Yilimia 25:31-33; Malaki 4:1.
9. Makambo nini mazali kobima uta 1914 mamonisi ete ntango etikali mokuse?
9 Na ntango Bokonzi ya Klisto ebandaki na 1914, Satana abwakamaki na mabelé. Yango elimbolaki bongo “mawa na mokili . . . Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa eláká mokuse.” (Emoniseli 12:12) Soki tokokanisi bankóto ya bambula oyo Satana asili koyangela mpe ntango oyo etikali, tokomona ete ntango oyo etikali ezali mokuse mpenza. Bokonzi ekómi pene; na yango, mokolo mpe ntango ya kokokisama ya bikateli ya Yehova likoló na libota oyo mabe ekómi pene!—Masese 3:25; 10:24, 25.
“Libota” oyo ezali koleka
10. Lolenge nini “libota oyo” ekokani na oyo ya mikolo ya Noa?
10 Tiká tótalela na mozindo mpenza likambo oyo Yesu alobaki na Matai 24:34, 35: “Nazali koloba na bino solo ete libota oyo ekoleka te kino ekobima makambo oyo nyonso. Likoló ekolongwa mpe [mabelé] lokola nde maloba na ngai ikolongwa te.” Maloba oyo ya Yesu mamonisi ete ‘moto moko te ayebi mokolo mpe ntango yango.’ Oyo eleki mpenza ntina, amonisi ete tosengeli kopɛngola mitambo oyo mizali kozinga biso kati na libota oyo. Na yango, Yesu abakisi ete: “Zambi lokola ezalaki na mikolo na Noa, koya na Mwana na moto ekozala bongo. Mpo ete na mikolo yango liboso na mpela monene, bazalaki kolya mpe komela, kobala mpe kobalisa, kino mokolo eyingelaki Noa na bwato; bayebaki likambo te kino eyaki mpela mpe elongolaki bango nyonso. Koya na Mwana na moto ekozala mpe bongo.” (Matai 24:36-39) Awa Yesu akokanisaki libota ya mikolo na ye na oyo ya mikolo ya Noa.—Genese 6:5, 9, NW; maloba na nsé ya lokasa.
11. Engebene Matai mpe Luka, Yesu asalaki bokokanisi nini kati na ‘mabota’?
11 Yango ezalaki mbala ya liboso te mpo na bayekoli koyoka Yesu kosala bokokanisi kati na ‘mabota,’ mpamba te mwa mikolo liboso, alobaki na ntina na ye moko ete: “Mwana na moto . . . ekoki na ye komona mpasi na makambo mingi, mpe koboyama na libota oyo. Pelamoko na mikolo na Noa, ekozala bongo na mikolo na mwana na moto.” (Luka 17:24-26) Na yango, Matai mokapo 24 mpe Luka mokapo 17 esali bokokanisi lolenge moko. Na mikolo na Noa “bato nyonso [oyo] babebisaki nzela na bango na mokili” mpe babebisamaki na Mpela bazalaki ‘libota oyo.’ Na mikolo na Yesu libota ya Bayuda oyo lisilaki kopɛngwa mpe bato oyo baboyaki Yesu bazalaki ‘libota oyo.’—Genese 6:11, 12; 7:1.
12, 13. (a) Na mikolo na biso, “libota oyo” esengeli koleka ezali libota nini? (b) Lolenge nini basaleli ya Yehova bazali sikawa kobika kati na “libota na bato bayongotani mpe bapɛngwi”?
12 Na yango, kati na kokokisama ya nsuka ya esakweli ya Yesu lelo oyo, emonani ete “libota oyo” ezali bongo bato oyo bazali na mabelé mpe bazali komona elembo ya kozala ya Klisto kasi bazali te kobongola lolenge ya bomoi na bango. Na bokeseni, biso oyo tozali bayekoli ya Yesu tozali koboya kolanda lolenge ya bomoi ya “libota oyo.” Atako tozali kofanda kati na mokili, tosengeli te kosangana na yango, “mpo ete elaka ezali penepene.” (Emoniseli 1:3; Yoane 17:16) Ntoma Paulo apesi biso toli oyo ete: “Bósala makambo nyonso na kozanga koimaima mpe kotyana ntembe ete bózala na efundeli te mpe ekweli te, bana na Nzambe baoyo bazangi litɔ́nɔ kati na libota na bato bayongotani mpe bapɛngwi nzela. Kati na bango bozali kongɛnga lokola miinda na mokili.”—Bafilipi 2:14, 15; Bakolose 3:5-10; 1 Yoane 2:15-17.
13 ‘Kongɛnga na biso lokola miinda’ etaleli te bobele komonisa ezaleli ya pɛtɔ ya boklisto, kasi oyo eleki mpenza, kokokisa etindá ya esakweli oyo Yesu apesaki, ete: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Moto moko te akoki koyebisa soki ntango nini nsuka yango ekoya, kasi toyebi ete nsuka ya “libota” oyo mabe ekoya nsima wana litatoli ekosila kopesama na lolenge oyo Nzambe akosepela na yango, “kino na nsuka na mokili.”—Misala 1:8.
“Mokolo mpe ntango yango”
14. Toli nini Yesu mpe Paulo bapesi na ntina na “ntango mpe na bilaka,” mpe lolenge nini tosengeli koyamba toli yango?
14 Wana ntango litatoli ekosila kopesama na mabelé mobimba na meko oyo eyokani na mikano ya Yehova, ekozala “mokolo mpe ntango” na ye ya kolongola ebongiseli ya mokili oyo. Tozali na ntina te ya koyeba liboso mokolo yango. Na yango, kolandáká ndakisa ya Yesu, ntoma Paulo apesaki toli oyo ete: “Bandeko, mpo na makambo na ntango mpe na bilaka, bozali na bosɛnga te ete nakomela bino. Zambi boyebi solo solo ete mokolo na Nkolo ekoya lokola moyibi kati na butu. Ekolobaka bato ete, Kimya ezali, makambo mazali te, wana libebi ekokwela bango pwasa pelamoko mpasi ekoyela mwasi na zemi mpe nzela na kokima ekozala te.” Talá esika oyo Paulo abendi likebi: ‘Ekozala na ntango oyo bato bakoloba ete.’ Ee, wana bato bakoloba ete “kimya mpe libateli,” wana bato bakomizela na yango mpenza te, ekateli ya Nzambe ekokokisama na pwasa. Toli oyo ya Paulo ebongi mpenza: “Boye tiká te ete tólala mpɔngi, pelamoko ekosalaka bamosusu mpe [totengatenga te, NW]”!—1 Batesaloniki 5:1-3, 6; talá mpe milɔ́ngɔ 7-11, Misala 1:7.
15, 16. (a) Mpo na nini tosengeli kokanisa te ete Armagedon ezali mosika koleka lolenge oyo mbala mosusu tokanisaki yango? (b) Lolenge nini bokonzi monene ya Yehova ekokembisama mosika te?
15 Bososoli ya sikisiki likoló na “libota oyo” elimboli ete Armagedon ezali mosika mpenza koleka lolenge tozalaki kokanisa liboso? Ezali bongo te! Atako toyebi te “mokolo mpe ntango,” kasi Yehova ayebi yango, mpe abongwani te. (Malaki 3:6) Emonani polele ete mokili mozali sé kozinda kino na libebi ya nsuka. Ntina ya kosɛnzɛla ntango nyonso ezali mpenza monene lelo oyo koleka ndenge ezalaki liboso. Yehova asili komonisa biso “makambo makobima noki,” mpe tosengeli komonisa ete toyoki yango na kosaláká na etingya mpenza.—Emoniseli 1:1; 11:18; 16:14, 16.
16 Awa ntango yango ezali kobɛlɛma, tiká ete tósɛnzɛla, mpamba te Yehova azali pene na koyeisa mpasi likoló na ebongiseli mobimba ya Satana! (Yilimia 25:29-31) Yehova alobi ete: “Boye nakomonisa lokumu na ngai mpe bulɛɛ na ngai, mpe nakomiyebisa na miso na mabota mingi, mpe bakoyeba ete ngai nazali [Yehova].” (Ezekiele 38:23) “Mokolo [wana] ya Yehova” ya ntina mingi ebɛlɛmi!—Yoele 1:15; 2:1, 2; Amosa 5:18-20; Sefania 2:2, 3.
“Makoló na sika mpe mabelé na sika” ya boyengebene
17, 18. (a) Engebene Yesu mpe Petelo, lolenge nini “libota oyo” ezali koleka? (b) Mpo na nini tosengeli kosɛnzɛla mpo na oyo etali etamboli na biso mpe misala ya komipesa epai na Nzambe?
17 Na ntina na ‘makambo oyo nyonso masengeli kobima’ Yesu alobaki ete: “Likoló ekolongwa mpe [mabelé] lokola nde maloba na ngai ikolongwa te.” (Matai 24:34, 35) Ekoki mpenza kozala ete Yesu azalaki kokanisa na ntina na “likoló mpe [mabelé]”—bayangeli mpe bayangelami—oyo bazali kati na “libota oyo.” Ntoma Petelo asalelaki maloba motindo moko wana alobelaki “likoló mpe [mabelé] na ntango oyo,” oyo “ibombami mpo ete izika; izali kobatelama kino mokolo na kosambisa mpe na koboma bato bakotyolaka Nzambe.” Na nsima, alobeli lolenge oyo “mokolo na [Yehova] ekoya lokola moyibi. Na yango, Likoló [biyangeli] ekolimwa” elongo na libota ya bato oyo esili kobeba, to “mabelé,” mpe misala na yango ya masumu. Na bongo, ntoma yango apesi biso toli ete tózala “bato na bizaleli na bulɛɛ mpe na kosambela Nzambe, [awa ezali biso] kotalela mpe koyeisa noki emɔnɔneli na mokolo na [Yehova]? Mpo na yango likoló ekozika mɔ́tɔ, ekonangwa mpe biloko na Likoló bikonangwa mpo na mɔ́tɔ makasi.” Nini ekobima na nsima? Petelo abendi likebi na biso na ntina na ‘Likoló na sika mpe [mabelé] na sika epai kuna boyengebene ekozala.’—2 Petelo 3:7, 10, 11—13.c
18 “Likoló [wana] ya sika,” Bokonzi etambwisami na Yesu mpe bakonzi oyo bakoyangela elongo na ye, bakosopa mapamboli likoló na “[mabelé]” ya sika ya boyengebene oyo ekozala bongo libota ya bato. Ozali moko na baoyo bakosangana kati na libota wana? Soki ezali bongo, ozali na ntina ya kozala na nsai mpo na elikya kitoko oyo ezali kozela biso!—Yisaya 65:17-19; Emoniseli 21:1-5.
19. Libaku nini kitoko tokoki kozala na yango lelo oyo?
19 Ee, “libota” ya bato ya boyengebene ezali nkutu koyanganisama uta sikawa. Lelo oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo apakolami azali kopesa kolakisama oyo euti na Nzambe, na boyokani na maloba oyo ezwami na Nzembo 78:1, 4. “Bino bato na ngai bópesa litoyi na mibeko na ngai, bópesa litoyi na bino na maloba na monɔkɔ na ngai . . . tokosolola epai na libota na nsima lokumu na [Yehova] mpe nguya na ye mpe misala na ye na kokamwa oyo elakisaki ye.” (Matai 24:45-47) Na mokolo ya 14 Apríli ya mobu oyo, na masangá koleka 75 500 mpe na mikili soko 230, koleka bato 12 000 000 na mabelé mobimba bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Ozalaki kati na bango? Tiká ete tótya kondima na biso likoló na Yesu Klisto mpe ‘tóbelela nkombo ya Yehova mpo na kozwa lobiko.’—Baloma 10:10-13.
20. Lokola “ntango eyei mokuse,” lolenge nini tosengeli kosɛnzɛla, mpe tosengeli bongo kozala na elikya nini?
20 Ntoma Paulo alobaki ete: “Ntango eyei mokuse.” Na yango oyo ezali ntango ya kosɛnzɛla lisusu mingi koleka mpe ya kozala na mosala mingi kati na mosala ya Yehova, awa ezali biso konyokolama mpe koyinama na libota oyo mabe ya bato kati na mokili. (1 Bakolinti 7:29; Matai 10:22; 24:13, 14) Tiká ete tólanda ntango nyonso kosɛnzɛla, kotaláká makambo nyonso masakolami kati na Biblia kokwea likoló na “libota oyo.” (Luka 21:31-33) Na kokimáká makambo oyo nyonso mpe na kondimamáká na Nzambe mpo na kotɛlɛma liboso na Mwana na moto, tokoki kozwa libonza ya bomoi ya seko.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa bandimbola mosusu na ntina na “ntango nsambo,” talá nkasa 127-139, 186-189 ya búku “Que ton royaume vienne!” ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
b Talá volimi 1, lokasa 918, ya búku Insight on the Scriptures, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
c Talá mpe nkasa 152-156 mpe 180-181 ya búku Le futur gouvernement universel — le Royaume de Dieu, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Mituna ya bozongeli:
◻ Nsima ya komona kokokisama ya Danyele 4:32, lolenge nini tosengeli sikawa “kosɛnzɛla”?
◻ Lolenge nini Baevanzile ya Matai mpe ya Luka emonisi “libota oyo”?
◻ Awa ezali biso kozela “mokolo mpe ntango yango,” tozali komona nini, mpe tosengeli kosala nini?
◻ Elikya ya “Likoló na sika mpe [mabelé] na sika” esengeli kolendisa biso na kosala nini?
[Bililingi na lokasa 17]
Bato oyo bazali komona mpasi lelo bakozwa libɔndisi wana libota oyo ya mabe mpe ya mobulu ekoleka
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Alexandra Boulat/Sipa Press
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na lobɔkɔ ya mwasi mpe na nsé: Luc Delahaye/Sipa Press
[Elilingi na lokasa 18]
“Likoló na sika mpe mabelé na sika” ya nkembo etikali moke mpenza eya mpo na bato ya bikólo nyonso