Biblia
Ndimbola: Liloba ya Yehova Nzambe oyo ekomami mpo na bato. Asalelaki bato soki 40 mpo na kokoma yango na boumeli ya basiɛklɛ 16. Bato yango bazalaki lokola basɛkrɛtɛrɛ, kasi Nzambe nde atambwisaki mosala yango na nzela ya elimo na ye. Na yango, Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Makambo mingi oyo ezali na Biblia ezali maloba oyo Yehova ye moko alobaki, kasi na kati okokuta mpe mateya ná misala ya Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe. Na kati ya Biblia, tokokuta makambo oyo Nzambe azali kosɛnga basaleli na ye mpe makambo oyo akosala mpo na kokokisa mokano na ye monene mpo na mabele. Mpo na kosalisa biso tókanga malamu ntina ya makambo yango, Yehova akomisaki na Biblia makambo oyo asalelaki bato mpo tóyeba nini ekómelaka bato mpe bikólo ntango bayoki mpe basali makambo oyo eyokani na mokano na ye, mpe nini ekómelaka bango ntango bamitambwisi ndenge balingi. Na masolo yango oyo tokoki kotyela motema, Yehova azali kosalisa biso tóyeba ndenge oyo asalelaka bato makambo, mpe yango ezali kosalisa biso tóyeba bizaleli ya malamu oyo azali na yango.
Ntina oyo tosengeli koyeba Biblia
Biblia yango moko elobi ete euti na Nzambe, Mozalisi ya bato
2 Tim. 3:16, 17: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini na boyengebene, mpo moto ya Nzambe akoka mpenza, azala na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.”
Em. 1:1: “Emoniseli ya Yesu Kristo, oyo Nzambe apesaki ye, mpo na kolakisa baombo na ye makambo oyo esengeli kosalema nsima ya mwa ntango moke.”
2 Sa. 23:1, 2: “Liloba ya Davidi, mwana ya Yese . . . Elimo ya Yehova nde elobaki na nzela na ngai, mpe liloba na ye ezalaki na lolemo na ngai.”
Yis. 22:15: “Talá oyo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga, alobi.”
Ebongi ete nsango oyo Nzambe atindeli bato nyonso ekóma na mokili mobimba. Biblia ebongolami na mobimba to na ndambo na minɔkɔ koleka 2 200. Bamiliare ya Babiblia esili kokabolama. Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi boye: “Biblia ezali buku oyo bato batángaka mingi koleka. Ekoki kozala buku oyo ekendá nsango koleka babuku mosusu nyonso. Biblia ekabolamá mingi koleka babuku mosusu nyonso. Ebongolami mpe mbala mingi mpe na minɔkɔ mingi koleka babuku mosusu.”—(1984), Vol. 2, lok. 219.
Bisakweli ya Biblia ezali kosalisa biso tóyeba ndimbola ya makambo oyo ezali koleka na mokili
Bakonzi mingi ya mokili bandimi sikoyo ete mokili ekómi pene na likama moko boye. Biblia esakolá banda kala makambo oyo ezali koleka na mokili; ezali komonisa ntina ya makambo yango mpe ndenge yango ekosuka. (2 Tim. 3:1-5; Luka 21:10, 11, 31) Ezali koyebisa biso makambo oyo tosengeli kosala mpo tóbika na nsuka ya mokili oyo, mpe ndenge tokoki kozwa bomoi ya seko na mabele ya boyengebene.—Sef. 2:3; Yoa. 17:3; Nz. 37:10, 11, 29.
Biblia ezali kosalisa biso tóyeba ntina ya bomoi
Ezali kopesa biso biyano na mituna lokola oyo: Bomoi eutá wapi? (Mis. 17:24-26) Mpo na nini tozali awa na mabele? Ezali kaka mpo na kofanda mwa bambula, tósala oyo tokoki kosala mpe na nsima tókufa?—Eba. 1:27, 28; Rom. 5:12; Yoa. 17:3; Nz. 37:11; 40:8.
Biblia ezali kolakisa biso ndenge tokoki kozwa biloko oyo bato oyo balingaka boyengebene balingaka mingi
Ezali koyebisa biso epai tokoki kozwa baninga ya malamu oyo balinganaka mpenza (Yoa. 13:35), nini tokoki kosala mpo na kozwa bilei oyo ekoki na biso mpe mabota na biso (Mat. 6:31-33; Mas. 19:15; Ef. 4:28), ndenge tokoki kozala na esengo atako tozali na mikakatano ndenge na ndenge.—Nz. 1:1, 2; 34:8; Luka 11:28; Mis. 20:35.
Ezali komonisa ete Bokonzi ya Nzambe to guvɛrnema na ye, ekolongola mokili oyo mabe (Dan. 2:44), mpe ntango yango ekoyangela, bato bakokóma na nzoto ya kokoka mpe bakozwa bomoi ya seko.—Em. 21:3, 4; talá Yisaya 33:24.
Esengeli mpenza koyeba Biblia mpo ezali buku oyo euti mpenza na Nzambe, oyo ezali komonisa ndimbola ya makambo oyo ezali koleka na mokili, mpe ezali kosalisa biso tóyeba ntina ya bomoi, mpe ezali komonisa ndenge mikakatano na biso ekosila.
Bilembo oyo emonisi mpenza ete Biblia ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe
Etondi na bisakweli oyo ezali kolobela makambo oyo ekoya, kasi bato bakoki kosala bongo te
2 Pe. 1:20, 21: “Esakweli moko te ya Likomami euti na ndimbola moko boye ya moto. Mpo esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto, kasi bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.”
◼ Esakweli: Yis. 44:24, 27, 28; 45:1-4: “Yehova . . . Ye oyo azali koloba na mai mozindo ete: ‘Kauká; mpe nakokaukisa bibale na yo nyonso’; Ye oyo azali koloba na Siruse ete: ‘Azali mobateli ya mpate na ngai, mpe akokokisa mpenza likambo nyonso oyo nasepeli na yango’; ɛɛ, liloba na ngai na ntina etali Yerusaleme, ete: ‘Ekotongama lisusu,’ mpe na ntina etali tempelo, ete: ‘Moboko na yo ekotyama.’ Talá oyo Yehova alobi na moto na ye oyo atyami mafuta, na Siruse, oyo nasimbi lobɔkɔ na ye ya mobali, mpo natya na nse na ye bikólo oyo ezali liboso na ye, mpo nafungola ata mikaba na loketo ya bakonzi; mpo nafungola baporte ya bizipeli mibale liboso na ye, bongo baporte ekokangama te. ‘Ngai moko nakokende liboso na yo, mpe nakokómisa mabele ya matutumatutu patatalu. Nakobukabuka baporte ya motako, mpe bikangiseli ya bibende, nakokata yango. . . . Mpo na mosaleli na ngai Yakobo mpe mpo na Yisraele moto oyo ngai naponi, nabengaki yo na nkombo na yo; napesaki yo nkombo ya lokumu, atako oyebaki ngai te.’” (Yisaya asilisaki kokoma bisakweli na ye pene na mobu 732 L.T.B.)
◻ Kokokisama na yango: Ntango esakweli yango ekomamaki, Siruse abotamaki naino te. Bayuda bakendaki boombo na Babilone nde na kati ya mobu 617-607 L.T.B., Yerusaleme ná tempelo na yango ebebisamaki na mobu 607 L.T.B. Esakweli yango ebandaki kokokisama mpenzampenza nde na 539 L.T.B. Siruse alekisaki mai ya Ebale Efrate na laki moko oyo basalaki kosala; ntango bato ya Babilone bazali kosala fɛti babosanaki kokanga baporte ya engumba Babilone oyo ezalaki kotala epai ya ebale; mpe Babilone ekweaki na mabɔkɔ ya Bamede ná Baperse oyo bakambamaki na Siruse. Nsima na yango, Siruse asikolaki Bayuda oyo bakendeki boombo na Babilone, azongisaki bango na Yerusaleme mpe apesaki bango mitindo ete bátonga lisusu tempelo.—The Encyclopedia Americana (1956), Vol. III, lok. 9; Light From the Ancient Past (Princeton, 1959), Jack Finegan, nk. 227-229; “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba,” nk. 282, 283, 285, 296.
◼ Esakweli: Yir. 49:17, 18: “‘Edome akokóma eloko ya kokamwa. Moto nyonso oyo akoleka pembeni na ye akotikala monɔkɔ polele na kokamwa mpe akobɛta piololo mpo na malɔzi na ye nyonso. Ndenge Sodoma ná Gomora mpe basité na yango oyo ezalaki zingazinga ebebisamaki,’ Yehova alobi: ‘moto akofanda kuna te.’” (Yirimia asilisaki kokoma bisakweli na ye pene na mobu 580 L.T.B.)
◻ Kokokisama na yango: “Na siɛklɛ ya 2 L.T.B., Yuda Makabe abenganaki [Baedome] na Palestine, mpe na mobu 109 L.T.B. Jean Hyrcan, mokonzi ya Bamakabe, akɔtisaki eteni ya wɛsti ya teritware ya Edome mpo teritware ya bokonzi ya Yuda ekóma monene. Na siɛklɛ ya 1 L.T.B., lokola bokonzi ya Roma ekómaki koyangela bamboka mingi, elongolaki mpenza makambo ya bokonzi ya Edome oyo etikalaki . . . Nsima ya kobebisama ya Yerusaleme na Baroma na mobu 70 T.B. . . . nkombo Idumea [Edome] ebungaki libela.” (The New Funk & Wagnalls Encyclopedia, 1952, Vol. 11, lok. 4114) Simbá ete esakweli yango ezali kokokisama tii lelo oyo. Moto moko te akoki koloba ete esakweli yango ekomamaki nsima ya kokokisama ya makambo yango.
◼ Esakweli: Luka 19:41-44; 21:20, 21: “[Yesu Kristo] atalaki engumba [Yerusaleme] mpe alelaki yango, alobi: . . . ‘Mikolo ekoyela yo wana banguna na yo bakotonga zingazinga na yo lopango moko ya makasi ya banzete oyo bakómisá nsɔngɛ mpe bakozingela yo mpe bakonyokola yo epai na epai, mpe bakobwaka yo ná bana na yo oyo bazali na kati na yo na mabele, mpe bakotika te libanga likoló na libanga na kati na yo, mpo ososolaki te ntango oyo bayaki kotala yo.’” Nsima ya mikolo mibale, Yesu apesaki bayekoli na ye toli ete: “Ntango bokomona mampinga ezingi Yerusaleme na bakaa, bóyeba ete libebi na yango ekómi pene. Na ntango yango, baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba, mpe baoyo bazali na katikati na yango bálongwa.” (Yesu Kristo apesaki esakweli yango na mobu 33 T.B.)
◻ Kokokisama na yango: Na mobu 66 T.B., Yerusaleme etombokelaki boyangeli ya Roma, mampinga ya Roma oyo Cestius Gallus azalaki kotambwisa ebundisaki engumba Yerusaleme. Kasi ndenge Josèphe, Moyuda oyo azalaki kokoma masolo ya kala, alobi, “na mbala moko,” mokonzi ya basoda ya Roma “abengisaki basoda na ye, batiki etumba, atako balongaki ye te mpe balekaki ye na makasi te, atiki etumba kaka boye.” (Josephus, the Jewish War, Penguin Classics, 1969, lok. 167) Yango epesaki bakristo nzela bákima engumba, mpe bakimaki bakei na Pela, na ngámbo mosusu ya Yordani ndenge Eusèbe moto ya Césarée akomaki na mokanda na ye. (Ecclesiastical History, ebongolamaki na C. F. Crusé, Londres, 1894, lok. 75) Na nsima, pene na eleko ya Elekeli ya mobu 70 T.B., Titus, mokonzi ya basoda, azingaki engumba, batongaki lopango ya kilomɛtrɛ 7,2 na boumeli ya mikolo misato mpamba, mpe nsima ya sanza mitano Yerusaleme ekweaki. “Yerusaleme ebebisamaki mpenza mpe Tempelo na yango etikalaki kaka mabondomabondo. Lelo oyo, misala ya Arkeoloji ezali komonisa ndenge bandako ya Bayuda ebebisamaki na mboka yango mobimba.”—The Bible and Archaeology (Grand Rapids, Mich.; 1962), J. A. Thompson, lok. 299.
Makambo oyo ekomami na Biblia ezali na boyokani na siansi ndenge makambo oyo bato bayei koyeba na nsima emonisi yango
Ebandeli ya molɔ́ngɔ́: Eba. 1:1: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.” Na 1978, Robert Jastrow, moto ya astronomi [moto oyo bayekolaka minzoto], akomaki boye: “Sikoyo tomoni ete makambo ya astronomi endimisi oyo Biblia elobi na likambo etali ndenge oyo mokili ebandaki. Atako makambo ya mikemike ekeseni, kasi na makambo ya ntina, oyo astronomi elobi ná oyo Biblia elobi na mokanda ya Ebandeli ezali ndenge moko: kolandana ya makambo oyo ememi tii na kozalisama ya moto ebandi kaka pwasa, ntango kongɛnga mpe nguya epanzanaki na ntango moko boye.”—God and the Astronomers (New York, 1978), lok. 14.
Lolenge oyo mabele ezali: Yis. 40:22: “Ezali na Moto oyo afandi likoló ya zolongano ya mabele.” Kala bato nyonso bazalaki kokanisa ete mabele ezali patatalu. Mbula 200 nsima ya kokomama ya vɛrsɛ oyo, bato ya eteyelo moko ya filozofi ya Bagrɛki bakanisaki ete mabele ezali lokola libungutulu, mpe nsima ya mbula mosusu 300, Mogrɛki moko, moto ya astronomi, alukaki koyeba bolai ya ndambo ya diamɛtrɛ na yango. Atako bongo, na ntango yango, bato nyonso bayebaki naino te ete mabele ezali libungutulu. Bobele na siɛklɛ ya 20, lokola bato bakómi kosala mibembo na mpɛpɔ mpe kokende likoló tii na sanza, nde bayaki mpenzampenza komona malamu ete mabele ezali “sɛrklɛ.”
Bomoi ya banyama: Lev. 11:6: “Simbiliki . . . enyamutaka lisusu biloko oyo ebimi na libumu.” Atako bato mosusu ya mayele bazalaki kondima te ete simbiliki enyamutaka biloko oyo ebimi na libumu na yango, na siɛklɛ ya 18, William Cowper, moto ya Angleterre, ayaki komona ete simbiliki enyamutaka biloko oyo ebimi na libumu. Ndenge oyo yango enyamutaka, oyo ekeseni na ndenge oyo banyama mosusu enyamutaka, elimbolamaki na 1940 na buku moko.—Proceedings of the Zoological Society of London, Vol. 110, Eteni A, nk. 159-163.
Mikanda ya Biblia ezali na boyokani makasi mpenza
Likambo yango ezali kokamwisa mpo mikanda yango ekomamaki na bato soki 40, oyo bazalaki kosala misala ndenge na ndenge: bakonzi, basakoli, babateli ya mpate, mosusu azalaki mokɔngɔli-mpako mpe mosusu monganga. Bakomaki yango na boumeli ya mbula 1 610; yango wana, libaku ya kokutana mpo bápesana makanisi ezalaki te. Atako bongo, makomi na bango ezali na boyokani, ata na makambo ya mikemike. Mpo oyeba mpenza boyokani oyo ezali na kati ya mikanda ya Biblia, osengeli kotánga mpe koyekola yango.
Nini ekoki kondimisa biso ete Biblia ebongwaná te?
“Soki totaleli motángo ya bamaniskri ya kala oyo endimisaka bosolo ya makomi, mpe soki totali bambula oyo ekaboli makomi yango moko na bamaniskri yango, Biblia eleki makomi nyonso ya kala ya bato ya mayele [lokola Homer, Platon mpe basusu]. . . . Soki tokokanisi baminiskri ya Biblia na baminiskri ya mikanda mosusu ya kala, oyo ya mikanda wana ezali moke mpenza. Mokanda moko te ya kala ezali na bilembeteli ebele oyo ezali kondimisa lokola Biblia.”—The Bible From the Beginning (New York, 1929), P. Marion Simms, nk. 74, 76.
Lapolo moko oyo ebimaki na 1971 ezali komonisa ete Makomami ya Ebre, mobimba to ndambo, ezali na bamaniskri soki 6 000; bamaniskri yango oyo eumeli mingi ekomamaki na siɛklɛ ya misato L.T.B. Makomami ya Grɛki ya bokristo ezali na bamaniskri soki 5 000 na monɔkɔ ya Grɛki, maniskri oyo eumeli mingi ekomamaki na ebandeli ya siɛklɛ ya mibale T.B. Ezali na bamaniskri mosusu ebele ya mabongoli ya ebandeli na minɔkɔ mosusu.
Sir Frederic Kenyon akomaki boye na maloba ya ebandeli ya buku na ye (The Chester Beatty Biblical Papyri) oyo ezalaki na volimi nsambo: “Ekateli ya liboso mpe ya ntina mingi oyo tozwi nsima ya kotalela [bapapirisi] ezali kosepelisa mpo endimisi bosolo ya makomi oyo tozali na yango. Bokeseni ya monene mpenza ezali te, ezala na Kondimana ya Kala to na Kondimana ya Sika. Balongoli to babakisi makambo ya minene te, bokeseni ata moko oyo ezali kobebisa mateya to makambo ya ntina ezali te. Mwa bokeseni oyo ezali komonana ezali kaka ya mwa makambo mikemike lokola kolandana ya maloba mosusu to ndenge ya kosalela maloba mosusu na ndenge esengeli mpenza. . . Kasi lokola bapapirisi yango epesaki bilembeteli ya kala mingi koleka baminiskri oyo ezalaki na ntango wana, bapapirisi ezali mpenza kondimisa bosolo ya makomi oyo ezali lelo.”—(Londres, 1933), lok. 15.
Ezali solo ete mabongoli mosusu ya Biblia elandeli mpenza minɔkɔ ya kala koleka mabongoli mosusu. Babongoli mosusu ya Biblia na mikolo na biso babongoli makambo mosusu ndenge bango moko balingi, mpe na yango, babebisi ndimbola oyo ezalaki na ebandeli. Babongoli mosusu bazali kokɔtisa nde bindimeli na bango. Kasi mabunga nyonso wana ekoki koyebana soki tokokanisi Babiblia yango na Babiblia mosusu.
Soki moto alobi—
‘Nandimaka Biblia te’
Okoki koyanola: ‘Kasi ondimaka ete Nzambe azali, boye te? . . . Tiká natuna yo, ezali na likambo moko na Biblia oyo omonaka mpasi mpo na kondima yango?’
To okoki koloba: ‘Tiká natuna yo naino: Ondimaka yango te banda kala? . . . Bato mosusu bayebisaki ngai mpe bongo, nzokande naino bayekolá yango mpenza te. Kasi lokola Biblia elobi polele ete nsango na yango euti na Nzambe ye moko mpe ete akopesa biso bomoi ya seko soki tondimeli ye mpe tosaleli makambo oyo ezali na Biblia, omoni te ete ekozala malamu tótánga yango mpo na koyeba soki oyo yango elobi ezali mpenza solo to te? (Salelá makambo oyo ezali na nkasa 103-106.)’
‘Biblia ezalaka bongolabongola’
Okoki koyanola: ‘Bato mosusu mpe basilá koloba na ngai bongo, kasi moko te amonisá ngai bavɛrsɛ oyo ezali bongolabongola. Ngai mpe namoná naino bavɛrsɛ yango te na boyekoli na ngai ya Biblia. Okoki kolakisa ngai bavɛrsɛ yango?’ Okoki kobakisa: ‘Kasi nayebi ete bato mingi bazwá naino biyano te na mituna oyo bamitunaka ntango batángaka Biblia. Na ndakisa, Kaina azwaki mwasi na ye wapi? (Salelá makambo oyo ezali na nkasa 383, 384.)’
‘Bato nde bakomaki Biblia’
Okoki koyanola: ‘Olobi solo. Bato soki 40 nde bakomaki yango. Nzokande, ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Yango elingi koloba nini? Nzambe nde ayebisaki bango makambo oyo bakomaki, kaka ndenge patrɔ atindaka sɛkrɛtɛrɛ na ye akomela ye mikanda.’ (2) ‘Koloba ete nsango oyo bakomaki euti na likoló ekoki kokamwisa biso te, mpo ata lelo oyo bato batindaka bansango mpe bafɔtɔ longwa na sanza tii awa na mabele. Basalaka yango ndenge nini? Basalelaka mibeko oyo Nzambe atyá banda kala.’ (3) ‘Kasi, nini ekoki kondimisa biso ete makambo oyo ezali na Biblia euti mpenza na Nzambe? Mpo makambo oyo yango elobi ekokaki kouta epai ya bato te. Makambo nini? Makambo ndenge na ndenge oyo esakolaki, esalemaka kaka ndenge wana. (Na ndakisa, talá nkasa 103-105, mpe nkasa 359-364, na motó ya likambo “Mikolo ya nsuka.”)’
‘Moto na moto alimbolaka Biblia na ndenge na ye’
Okoki koyanola: ‘Kasi emonani polele ete bato nyonso te nde balimbolaka yango malamu.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Kolimbola Makomami mpo eyokana na makanisi na biso ekoki komemela biso likama monene mpenza. (2 Pe. 3:15, 16)’ (2) ‘Makambo mibale ekoki kosalisa biso tóyeba Biblia malamu. Ya liboso, esengeli kotalela bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima ya vɛrsɛ oyo ozali koluka ndimbola na yango. Ya mibale, esengeli kokokanisa bavɛrsɛ yango na bavɛrsɛ mosusu oyo elobeli likambo yango. Na ndenge yango, tozali kotika Liloba ya Nzambe etambwisa makanisi na biso mpe ndimbola ya vɛrsɛ yango ekozala ya biso te kasi ya Nzambe. Yango nde Batatoli ya Yehova basalaka na mikanda na bango oyo elimbolaka Biblia.’ (Talá nkasa 86, 87, na motó ya likambo “Batatoli ya Yehova.”)
‘Ezali na litomba te na mikolo na biso’
Okoki koyanola: ‘Tosepelaka na makambo oyo ekoki kopesa biso litomba, boye te?’ Okoki kobakisa: (1) ‘Soki bitumba esili, ekozala malamu, boye te? . . . Omoni te ete ekozala malamu soki balakisi bato ya bikólo nyonso ndenge ya kofanda na kimya na kati na bango? . . . Biblia esakolaki mpenza likambo yango. (Yis. 2:2, 3) Mateya ya Biblia ezali kosala ete esakweli yango ekokisama epai ya Batatoli ya Yehova lelo oyo.’ (2) ‘Kasi esengeli kosuka kaka wana te—esengeli kolongola bikólo mpe bato nyonso oyo babimisaka bitumba. Likambo yango ekosalema mpenza? Ɛɛ, mpe Biblia emonisi ndenge oyo yango ekosalema. (Dan. 2:44; Nz. 37:10, 11)’
To okoki koloba: ‘Namoni esika ozali. Soki mokanda moko ekoki kopesa litomba te, ntina ya kosalela yango ezali te, boye te?’ Okoki kobakisa: ‘Omoni te ete buku oyo ezali na toli ya malamu mpo na kosalisa biso tózala na libota ya esengo ezali mpenza na litomba? . . . Toli mpe mimeseno oyo etali bomoi ya libota ezali kobongwana mbala na mbala, mpe tozali komona ete toli yango ezali kosalisa mabota te. Nzokande, baoyo bayebi toli ya Biblia mpe basalelaka yango bazalaka na mabota ya malamu mpe ya esengo. (Kol. 3:12-14, 18-21)’
‘Biblia ezali mokanda malamu, kasi ezali na bosolo nyonso te’
Okoki koyanola: ‘Ezali solo ete moto na moto azalaka na makanisi na ye. Mpe ata soki moto akanisi ete asimbi ntina ya likambo moko malamu, mbala mingi emonanaka ete ezali na mwa likambo oyo atalelaki te. Kasi ezali na moto oyo abosanaka eloko te ntango azali kotalela likambo moko boye. Moto yango nani? . . . Ezali Mozalisi ya molɔ́ngɔ́.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Yango wana, Yesu Kristo alobaki mpo na moto yango boye: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoa. 17:17) Solo yango ezali na kati ya Biblia. (2 Tim. 3:16, 17)’ (2) ‘Nzambe alingi te ete tótikala na kati ya boinga; alingi ete tózwa boyebi ya sikisiki ya solo. (1 Tim. 2:3, 4) Biblia ezali kopesa biyano ya malamu mpenza na mituna lokola . . .’ (Mpo na kosalisa bato mosusu, luká kosolola na bango libosoliboso makambo oyo endimisaka ete Nzambe azali. Talá nkasa 397-403, na motó ya likambo “Nzambe.”)
‘Biblia ezali buku ya mindɛlɛ’
Okoki koyanola: ‘Ezali solo ete mindɛlɛ babimisi Babiblia mingi mpenza. Kasi Biblia emonisi te ete loposo moko boye eleki loposo mosusu.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Biblia euti na Mozalisi na biso, mpe ye aponaka bilongi te. (Mis. 10:34, 35)’ (2) ‘Liloba ya Nzambe ezali kopesa bato ya mboka nyonso mpe bikólo nyonso libaku ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. (Em. 7:9, 10, 17)’
To okoki koloba: ‘Te! Mozalisi ya bato ye moko aponaki bato oyo atambwisaki na elimo na ye mpo na kokoma mikanda 66 ya Biblia. Mpe soki aponaki bato ya loposo moko boye, wana etali kaka ye moko. Kasi nsango ya Biblia ezali kaka mpo na mindɛlɛ te.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Simbá likambo oyo Yesu alobaki . . . (Yoa. 3:16) “Moto nyonso” elingi koloba bato ya mposo nyonso. Lisusu, liboso Yesu azonga na likoló, alobaki na bayekoli na ye maloba oyo . . . (Mat. 28:19)’ (2) ‘Likambo mosusu yango oyo: Misala 13:1 elobeli mobali moko na nkombo Nigere, nkombo yango elimboli “moindo.” Azalaki na kati ya basakoli mpe bateyi na lisangá ya Antiokia, na Siri.’
‘Nandimaka kaka Biblia na ngai’
Okoki koyanola: ‘Soki ozali na yango wana, nakosepela kolakisa yo likambo moko oyo elendisaki ngai mingi.’
To okoki koloba: ‘Biblia nini ozali na yango? Bato mingi basalelaka Biblia yango, ngai mpe nazali na yango.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Oyebaka ete na ebandeli Biblia ekomamaki na Ebre, Aramɛyɛ, mpe na Grɛki? . . . Oyebi kotánga minɔkɔ yango? . . . Na yango, tosepelaka ndenge Biblia ezali na Lingala.’ (2) ‘Etanda oyo (“Etanda ya mikanda na Biblia,” na lokasa 1848-1849 na NW) emonisi ete Ebandeli, mokanda ya liboso ya Biblia, esilaki kokomama na 1513 L.T.B. Oyebi ete, nsima ya kokoma mokanda ya Ebandeli, mbula soki 3 400 elekaki liboso bábongola Biblia na Lingala?’ (3) ‘Banda na ntango wana, Lingala ebongwani mingi. Mpe biso moko tozali komona yango na miso, boye te? . . . Na yango, tozali kosepela mingi na Babiblia ya mikolo na biso oyo ezali komonisa mateya ya solo ndenge ezalaki na ebandeli, na monɔkɔ oyo tozali koloba lelo.’
‘Bozali na Biblia na bino moko’
Talá motó ya likambo “Libongoli ya Mokili ya Sika.”