Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • “Baoyo babengami ‘banzambe’”
    Lamuká!—2005 | Sanza ya 10 8
    • Kasi, moto akoki kotuna: ‘Na ndimbola nini Yesu azali “Nzambe ya nguya,” mpe ntoma Yoane alobaki te ete Yesu azali Nzambe? Na libongoli ya Biblia Liloba lya Nzambe, Yoane 1:1 elobi boye: “O libandela Liloba azalákí. Liloba azalákí bangó na Nzámbe mpé Liloba azalákí Nzámbe.” Bato mosusu balobaka ete yango elimboli ete “Liloba,” oyo abotamaki awa na mabelé lokola mwana Yesu, ye moko azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Ezali solo bongo?

      Soki tolobi ete vɛrsɛ yango elimboli ete Yesu ye moko azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, yango ekoyokana te na maloba oyo ezali liboso na vɛrsɛ yango, oyo elobi ete ‘Liloba azalákí bangó na Nzámbe.’ Moto oyo azali “na” moto mosusu akoki kozala te kaka ye moko moto yango. Yango wana, mabongoli mingi ya Biblia emonisaka polele ete Liloba azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso te. Na ndakisa, Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika mpe La Sainte Bible, Segond-Oltramare, elobi ete: “Liloba azalaki nzambe.” Babiblia yango emonisi ete Liloba azali Nzambe ye moko te. Liloba abengami “nzambe” (na “n” ya moke), mpamba te ye aleki bikelamu nyonso ya Yehova na lokumu. Na vɛrsɛ wana, liloba “nzambe” elakisi “moto ya makasi.” Kutu La Bible du Centenaire elobi yango polele lisusu, ete: “Liloba azalaki moto ya bonzambe.”

      Bavɛrsɛ mosusu ya Biblia na monɔkɔ ya Grɛki ezali na maloba yango oyo ekokani na Yoane 1:⁠1, oyo esaleli liloba “nzambe.” Na ndakisa, mpo na Elode Agilipa I, ebele ya bato bagangaki: “Mongongo ya nzambe.” Mpe ntango nyoka eswaki Paulo kasi akufaki te, bato balobaki ete: “Azali nzambe.” (Misala 12:​22; 28:​3-6) Kobenga Liloba “nzambe,” kasi Nzambe te, eyokani ezala na mibeko ya lokota ya Grɛki, to na mateya ya Biblia.​—⁠Yoane 1:⁠1.

      Tótala ndenge Yoane ayebisi soki “Liloba” ezali nani na mokapo ya liboso ya Evanzile na ye. Akomi boye: “Liloba akómaki mosuni mpe afandaki na kati na biso, mpe tomonaki nkembo na ye, nkembo lokola oyo ya [Nzambe te kasi ya] mwana mobotami-se-moko oyo auti epai ya tata moko.” Na bongo, “Liloba,” oyo akómaki mosuni, oyo afandaki awa na mabelé lokola moto mpe bato bamonaki ye, ezali Yesu. Yango wana, akokaki te kozala Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpamba te Yoane alobaki ete: “Moto amoná Nzambe ata mokolo moko te.”​—⁠Yoane 1:​14, 18.

  • “Baoyo babengami ‘banzambe’”
    Lamuká!—2005 | Sanza ya 10 8
    • Bato ya Lisitala babengaki Paulo ná Balanabasi banzambe

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto