Lisiko likokani mpo na bato banso
“Lokola Mwana na moto ayei mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na [bato] mingi.”—MATAI 20:28.
1, 2. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete lisiko lizali likabo lileki kitoko oyo Nzambe apesaki epai na bato? (b) Litomba nini moto oyo azali koyekola liteya ya lisiko azali kozwa?
LISIKO lizali likabo lileki kitoko oyo Nzambe asilaki kopesa epai na bato. Na lisalisi ya “lisiko na nzela na makila na [Yesu],” tokoki kozwa “lilimbisi na mabunga na biso.” (Baefese 1:7) Ezali likoló na lisiko nde elikya na bomoi na seko etongami, ezala na likoló to kati na paradis awa na mabelé. (Luka 23:43; Yoane 3:16) Mpe ezali mpo na yango, baklisto bakoki uta sikawa kotalelama lokola peto liboso na Nzambe.—Emoniseli 7:14, 15.
2 Na yango, lisiko lizali liteya ya bongo na bongo te to lizangi sikisiki te. Kozwaka moboko na yango kati na mitinda na Nzambe, lisiko likoki kopesa matomba ya solo mpe ya polele. Ekoki kosalema ete makambo mosusu ya liteya yango “mazali makasi mpo na kokanga ntina na yango.” (2 Petelo 3:16) Nzokande, milende oyo tozali kosala mpo na kotalela yango na bozindo mizali ya mpamba te; lisiko lizali komonisa bolingo monene oyo Nzambe azali kooka mpo na bato. Kosimba ndimbola ya lisiko, ezali nde kososola moko na makambo maleki ntina ya “bozwi mpe boyebi mpe bososoli” na Nzambe oyo ekoki koyebana bozindo te.—Baloma 5:8; 11:33.
Makambo masengeli kokatama
3. Mpo na likambo nini mposa na lisiko emonanaki, mpe mpo na nini Nzambe akokaki kokanga miso te likoló na masumu ya bato?
3 Mposa ya lisiko emonanaki nsima na lisumu ya moto na liboso, Adam, ye oyo atikelaki bakitani na ye libula ya “mpamba,” oyo emonisami na maladi mpe na mpasi. (Baloma 8:20) Na ntina na kozanga kokoka oyo bazwaki, bakitani nyonso ya Adam bazali “bana na nkanda”; babongi na kufa. (Baefese 2:3; Deteronome 32:5) Nzambe akokaki kopesa nzela te na liyoki moko ekeseni na bikateli na ye mpe kolimbisa bato bobele mpamba. Kati na Liloba na ye, elobami ete: “Mpo ete masumu makofutaka mbongo, mbongo yango bobele kufa.” (Baloma 6:23) Mpo na kokoka kokanga miso na masumu ya bato, mbele esengelaki ete Nzambe abebisa boyengebene na ye, na elobeli mosusu akanga miso likoló na bikateli na ye ya sembo. (Yobo 40:8) Nzokande, “boyengebene mpe sembo ezali [moboko] na kiti na bokonzi [na Nzambe].” (Nzembo 89:14) Botyoli nyonso ya boyengebene epai na ye ekopesa bobele nzela na kotyola mibeko mpe kokweisa etelemelo na ye ya Nkolo Moyangeli ya molongo mobimba.—Tala Mosakoli 8:11.
4. Botomboki na Satana ebimisaki makambo nini?
4 Nzambe asengelaki kosilisa ntembe nyonso ebimisamaki na botomboki ya Satana mpe yango ezalaki na ntina monene koleka ezalela ya moto. Satana abebisaki lokumu na Nzambe na kofundaka ye ete azali mokosi mpe mokonzi mabe oyo azali kopimela bikelamu na ye boyebi mpe bonsomi. (Genese 3:1-5) Lisusu, na kokweisaka—mpo na ntango moke—mokano na Nzambe, oyo ya kotondisa mabelé na bato ya sembo, Satana apesaki likanisi lokola ete Nzambe alongi te. (Genese 1:28; Yisaya 55:10, 11) Na lolendo nyonso, afundaki mpe basaleli na sembo ya Nzambe ete bazali kosalela Nkolo na bango bobele mpo na matomba ya moimi. Amikumisaki ete, liboso na minyoko, moko te kati na bango akotikala sembo epai na Nzambe.—Yobo 1:9-11.
5. Mpo na nini Nzambe akokaki kokanga miso te likoló na bifundeli na Satana?
5 Nzambe akokaki kolekisa bifundeli wana te. Soki apesaki eyano te, mbele elikya kati na boyangeli na ye mpe bosembo oyo emonisami epai na boyangeli yango ekokaki kobebisama. (Masese 14:28) Soki mibeko mpe ebongiseli malamu etyolamaki, mbele molongo esengelaki kotikama na libebi te? Nzambe asengelaki bongo, mpo na ye moko mpe mpo na boyengebene na ye, kolongisa bokonzi na ye. Asengelaki mpe kopesa nzela epai na basaleli na ye ya sembo na komonisa bosembo na bango ya solo epai na ye. Emonani bongo polele ete wana esengelaki na ye kobikisa bato na masumu, Nzambe asengelaki naino kotalela makambo maleki ntina. Alobaki na nsima epai na Yisraele ete: “Ngai, ngai nazali ye oyo akolimbisa masumu na yo mpo na ngai moko.”—Yisaya 43:25.
Lisiko ezali ‘ezipeli’
6. Maloba nini masalelami kati na Biblia mpo na komonisa mwango mosalelami na Nzambe mpo na kobikisa bato?
6 Kati na Nzembo 92:5, tozali kotanga ete: “Misala na yo mizali minene boni, e Jéhovah! Makanisi na yo mazali na bozindo mpenza!” Na bongo esengeli na biso kosala milende mpo na kokanga ntina ya makambo oyo Nzambe asali mpo na bolamu ya bato. (Tala Nzembo 36:5, 6.) Ezali esengo, mpo ete Biblia ezali kosalisa biso, mpamba te ezali kosalela ebele na maloba oyo mazali kolimbola to komonisa misala minene na Nzambe uta makanisi ndenge na ndenge. Na yango, ezali kolakisa lisiko na maloba lokola oyo ete kosomba, kosikola, kozongisa boyokani mpe kosala mbondi mpo na masumu. (Nzembo 49:8; Danyele 9:24; Bagalatia 3:13; Bakolose 1:20; Baebele 2:17) Nzokande, liloba oyo ezali komonisa malamu liteya yango ezali mbala mosusu oyo Yesu ye moko asalelaki kati na Matai 20:28: “Lokola Mwana na moto ayei mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko [greke: lyʹtron] mpo na [bato] mingi.”
7, 8. (a) Maloba na greke mpe ya liebele oyo mabongolami na lisiko mazali koteya biso nini? (b) Monisa na lisalisi ya ndakisa moko ete kati na “lisiko” ezali na likanisi ya eloko ekokani na mosusu.
7 Lisiko ezali nini? Liloba na greke oyo libongolami na yango, lyʹtron, euti na verbe oyo ezali na ndimbola ya “kokangola.” Ezalaki komonisa mosolo oyo mofutami mpo na kokangola bato oyo bakangamaki na etumba. Nzokande kati na Makomami na liebele, liloba libongolami na lisiko, koʹpher, euti na verbe elimboli “kozipa.” Ezali verbe wana nde esalelamaki ntango Nzambe alobaki na Noa ete apakola [to azipa madusu ya masuwa na] (koʹpherʹ) gudro. (Genese 6:14) Na likanisi oyo, kofuta lisiko to kosala mbondi ya masumu elimboli mpe kozipa masumu.—Nzembo 65:3.
8 Kati na Dictionnaire théologique du Nouveau Testament (angl.), ezali kotangama ete koʹpher “ezali ntango nyonso komonisa eloko oyo ekokani na mosusu.” Na ndakisa, ezipeli (kap·poʹreth) ya sanduku ya kondimana ekokanaki mpenza na bonene ya sanduku mobimba. Motindo moko, na likambo etali kosala mbondi mpo na masumu, to kofuta lisiko, boyengebene na Nzambe ezali kosenga “bomoi mpo na bomoi, liso mpo na liso, lino mpo na lino, loboko mpo na loboko, lokolo mpo na lokolo.” (Deteronome 19:21) Nzokande, ntango mosusu, boyengebene ekoki kokokisama soki bapesi, na esika ya etumbu makasi oyo ekanami, eloko moko oyo ekokani na yango. Ezali yango nde Exode 21:28-32 ezali komonisa, ntango elobi mpo na ngombe mobali oyo abomi moto na maseke na ye. Soki nkolo na yango ayebaki ete ngombe na ye mobali azali na momeseno ya kotuba bato maseke, kasi asali eloko te mpo na kokengela yango, bakokaki koboma ye mpo na kofuta bomoi ya moto oyo akufi! Nzokande, soki ezali ete nkolo na yango azali bobele na ngambo moke, na bongo azalaki na mposa ya koʹpher, eloko moko mpo na kozipa libunga na ye. Basambisi bakokaki bongo kosenga ye lisiko, to lomande, lokola mosolo mpo na kosikolama na ye.
9. Ndenge nini likambo oyo lisalemaki mpo na bana ya liboso na Yisraele emonisi ete mosolo ya lisiko mosengeli kozala sikisiki?
9 Liloba mosusu ya liebele oyo lizali kobongolama na “lisiko,” liuti na verbe pa·dhahʹ, oyo ndimbola na yango ya liboso ezali “kosikola.” Mituya 3:39-51 emonisi na meko nini motuya ya lisiko esengeli kokokana na eloko oyo yango elingi kosikola. Lokola abikisaki bana nyonso ya liboso ya Bayisraele na liwa, na mokolo ya Elekeli ya mobu 1513 liboso ya ntango na biso, Nzambe akomaki nkolo na bango. Azalaki bongo na lotomo ya kosenga ete mwana mobali nyonso ya liboso na Yisraele asalela ye na tempelo. Na esika ete ezala ndenge yango, Nzambe andimaki “motuya ya lisiko” (pidh·yohmʹ, lolenge na ebengeli oyo euti na liloba pa·dhahʹ) mpe ayebisaki ete: “Okokamata Balevite mpo na ngai . . . na esika na bana na [liboso] nyonso na bato na Yisraele.” Kasi bokitani wana to kosombitinya esengelaki kozala sikisiki. Yango wana batangaki libota na Levi: mibali 22 000. Na nsima batangaki bana nyonso ya liboso ya Yisraele: mibali 22 273. Na bongo esengelaki kofuta “mosolo ya lisiko” ba siekle mitano mpo na moto na moto, mpo ete bana na liboso 273 oyo balekaki likoló bakoka kosikolama, elingi koloba kolongola bango na mosala na tempelo.
Lisiko likokani
10. Mpo na nini mbeka na banyama ekokaki kozipa masumu na bato te?
10 Ndakisa wana emonisi ete lisiko lisengeli kokokana na eloko oyo yango ezali kokitana to kozipa. Mbeka ya banyama oyo mibali na kondima bapesaki kobanda na Abel, ekokaki mpenza te kozipa masumu, mpamba te moto aleki nyama oyo azangi bososoli. (Nzembo 8:4-8) Yango wana Paulo akokaki kokoma ete: “Mpo ete makila na bangombe mpe bantaba ekoki kolongola masumu te.” Na kozelaka lisiko ya solo, mbeka wana ekokaki bobele kozala ezipeli ya elilingi.—Baebele 10:1-4.
11, 12. (a) Mpo na nini esengamaki te ete bamiliare na bato bakufa lokola mbeka mpo na kozipa masumu ya bato na mokili? (b) Bobele nani asengelaki kozala “lisiko likokani,” mpe mokano nini liwa na ye ekokisaki?
11 Lisiko yango, oyo emonisamaki na elilingi na mbeka na banyama, esengelaki mpenza kozala na motuya mokokani na Adam, mpamba te etumbu na liwa oyo Nzambe apesaki na bosembo nyonso epai na Adam ebendaki kokweisama ya libota mobimba ya bato. Tozali kotanga kati na 1 Bakolinti 15:22 (MN) ete, “bato nyonso bazali kokufa mpo na Adam.” Esengamaki te ete bamiliare na bato bakoka kokufa lokola mbeka mpo na mosangani moko na moko ya libota na Adam. “Lisumu ekotaki na mokili mpo na moto moko [Adam], mpe kufa ekotaki mpo na lisumu.” (Baloma 5:12) Na yango, “mpo ete kufa eyaki na nzela na moto moko,” lisiko ya bato ekokaki mpe koya “na nzela na moto moko.”—1 Bakolinti 15:21.
12 Mpo ete akoka kozala lisiko, moto yango asengelaki kozala moto ya kokoka, moto oyo azali na nzoto ya mosuni mpe makila, moto oyo akokani mpenza na Adam. (Baloma 5:14) Ekelamu ya elimo to “Nzambe-moto” mbele akokaki kobonga mpo na lisiko te, mpamba te emekeli na boyengebene elingaki kotelema alima te. Bobele moto ya kokoka, oyo azalaki na nse na etumbu ya liwa te oyo ezwamaki likoló na Adam, nde akokaki kopesa “lisiko likokani,” na elobeli mosusu oyo akokanaki mpenza na Adam kati na makambo nyonso. (1 Timote 2:6)a Na kopesaka bomoi na ye lokola mbeka na bolingo na ye moko, “Adam na nsuka” wana akokaki kofuta nyongo ya lisumu lisalemaki na “Adam na yambo.”—1 Bakolinti 15:45; Baloma 6:23.
13, 14. a) Adam na Eva bakozwa litomba na lisiko? Limbola eyano na yo. (b) Ndenge nini lisiko lizali kopesa litomba epai na bakitani ya Adam? Pesa ndakisa moko.
13 Nzokande, ezala Adam to Eva, moko te kati na bango akoki kozwa litomba ya lisiko. Mpamba te, Mibeko na Moïse, mizalaki na etinda oyo kati na yango ete: “Bokoyamba lisiko te mpo na bomoi na mobomi na moto, oyo akiti na likambo na koboma. Ye akobomama.” (Mituya 35:31) Adam akosamaki te: lisumu na ye ezalaki bongo na bolingo na ye moko. (1 Timote 2:14) Ezali lokola ete abomaki bakitani na ye, mpamba te bazwaki lokola libula epai na ye, kozanga kokoka mpe liwa Ezali polele ete Adam abongaki na etumbu ya liwa, mpamba te, lokola azalaki moto ya kokoka, aponaki na bonsomi nyonso koboya kotosa mobeko na Nzambe. Soki Jéhovah apesaki nzela na Adam ete azwa litomba na lisiko, mbele elingaki kozala na boyokani te na bikateli na ye ya sembo. Nzokande, lokola nyongo ya lisumu ya Adam esili kofutama, etumbu na liwa oyo ezalaki likoló na bakitani na ye ekokaki kolongolama (Baloma 5:16) Na kokokisama na mibeko, nguya mabe na lisumu enyatamaki uta na liziba na yango. Ye oyo afutaki lisiko ‘akufaki mpo na bato banso,’ kokumbaka mpasi ya masumu mpo na bana nyonso ya Adam.—Baebele 2:9; 2 Bakolinti 5:21; 1 Petelo 2:24.
14 Mpo na komonisa malamu ekateli yango, tokamata ndakisa ya kompanyi moko monene oyo ezali na ebele na basali. Directeur moko moyibi akweisi kompanyi: etikali bobele ete kompanyi ekangama libela. Ebele na bato batikali bongo basomele mpe bazali na makoki lisusu te ya kobika mpo na oyo etali mosolo. Basi na bango, bana na bango, mpe ata bato oyo bango basengeli kofuta nyongo, bango nyonso bakokabola mpasi mpo na mabe ya moto moko! Na nsima moto moko malamu, ye mozwi monene ayei kosilisa nyongo ya kompanyi mpe afungoli lisusu kompanyi yango. Lokola nyongo esili kofutama, basali mingi, mabota na bango mpe bato oyo bango basengeli kofuta nyongo bakozwa matomba malamu mingi. Kasi mpo na directeur, ye akozwa eloko kati na bozwi oyo ezongisami? Eloko moko te! Akozala nde na boloko mpe abungisi mosala na ye mpo na libela. Motindo moko, kofutama na nyongo ya Adam epesi matomba epai na bamilio na bato, bakitani na ye, kasi epai na ye moko te.
Nani apesi lisiko?
15. Nani akokaki kopesa lisiko mpo na bato, mpe mpo na nini?
15 Mokomi na nzembo alobi na komilelaka ete: “Moto akolonga kosikola ndeko na ye te, to kopesa epai na Nzambe motuya na bomoi na ye; (motuya na kosikola milimo na bango ezali monene, ekokoka kofutama te, seko na seko).” Traduction Œcuménique de la Bible ekomi na nse (verset 9): “Akozanga libela (mosolo)” mpo na kofuta lisiko yango. (Nzembo 49:7, 8) Na yango, nani asengelaki kopesa lisiko? Bobele Jéhovah nde azalaki na likoki ya kopesa Mwana na Mpate ya kokoka “oyo akolongola masumu na mokili.” (Yoane 1:29) Ezali anzelu moko te kati na misusu nde Nzambe atindaki mpo na kobikisa bato, kasi—mbeka oyo eleki nyonso—Mwana na ye bobele moko, oyo ye “alingaki mingi.”—Masese 8:30; Yoane 3:16.
16. (a) Ndenge nini Mwana na Nzambe akokaki kobotama lokola moto ya kokoka? (b) Na kotalela mibeko, Yesu asengelaki kobyangama nani?
16 Kondimaka na bolingo na ye mpenza mpo na kosala na boyokani na ebongiseli wana ya Nzambe, Mwana na Nzambe “amiyeisaki mpamba” na kotikaka bomoi na ye na likoló. (Bafilipi 2:7) Jéhovah akotisaki nguya na bomoi mpe bomoto ya Mwana na ye ya likoló mobotami na liboso kati na libumu ya moseka moyuda moko na nkombo Marie. Ezali na ntango wana nde elimo santu ‘ezipaki ye,’ kondimisaka bongo ete mwana oyo azalaki kokola kati na libumu na ye akozala bulee mpe akozala na lisumu ata moko te. (Luka 1:35; 1 Petelo 2:22) Moto yango akobyangama Yesu. Nzokande na kotalela mibeko, akoki kobyangama ‘Adam na mibale,’ mpamba te akokanaki mpenza na Adam. (1 Bakolinti 15:45, 47) Ezali ndenge yango Yesu, “mwana na mpate azangi litono,” amipesaki lokola mbeka, ee, lokola lisiko mpo na bato ya masumu.—1 Petelo 1:18, 19.
17. (a) Epai na nani lisiko lisengelaki kofutama, mpe mpo na nini? (b) Mpo ete ezali Nzambe ye moko nde apesaki mpe azwaki lisiko, mpo na nini bosombitinyi wana bosalemaki?
17 Kasi epai na nani lisiko lisengelaki kofutama? Na boumeli ya bikeke, batéolojié ya boklisto na lokuta balobaki ete ezali epai na Satan le Diable. Ezali solo ete, bato ‘batekamaki’ na lisumu mpe na bongo bazali na nse na boyangeli ya Satana. (Baloma 7:14; 1 Yoane 5:19) Nzokande, ezali Jéhovah, kasi Satana te, nde “azali kopesa etumbu” mpo na mabe oyo masalemaki. (1 Batesaloniki 4:6) Na bongo, lokola elobi yango Nzembo 49:7 kozanga kokakatana, ezali epai na “Nzambe” nde lisiko lisengeli kofutama. Ya solo, ezali ye nde apesaki lisiko, kasi, nsima wana Mwana na Mpate na Nzambe apesamaki lokola mbeka, motuya na lisiko na ye efutamaki epai na Nzambe. (Tala Genese 22:7, 8, 11-13; Baebele 11:17.) Likambo yango likitisi ata moke te motuya na lisiko mpo na kokoma lokola kosombitinya ezangi ntina, lokola soki nde okamataki mosolo na libenga moko mpo na kotya yango kati na libenga mosusu. Ezali kosombitinya lokola na biloko na mosuni te kasi ezali nde ebongiseli moko eyokani na mibeko. Na kosengaka ete lisiko efutama—atako esengaki motuya monene epai na ye—Jéhovah amonisaki bokangami na ye makasi epai na boyengebene.—Yakobo 1:17.
“Yango esili ekokisami!”
18, 19. Mpo na nini ebongaki ete Yesu anyokwama?
18 Eleko oyo lisiko esengelaki kofutama ekokaki na printemps ya mobu 33. Yesu akangamaki mpo na bifundeli na lokuta, basambisaki ye mpe babomaki ye likoló na nzete. Asalaki malombo epai na Nzambe na “konganga makasi mpe na mpisoli,” na ntina na mpasi makasi mpe na kotyolama oyo atyolamaki. (Baebele 5:7) Ezalaki mpenza na ntina ete Yesu azwa mpasi motindo wana? Ee, mpamba te na kotikalaka “sembo, na bulee, na lofundo te, na litono te, komitangolaka na bato na masumu” kino na nsuka, asilisaki mpo na libela ntembe na ntina etali bosembo ya basaleli na Nzambe.—Baebele 7:26.
19 Bampasi ya Klisto epesaki ye mpe nzela na kobongama malamu mpo na mokumba ya Nganga Monene oyo asengelaki kokokisa mpo na bolamu na bato. Na yango, akokokisa mokumba yango te na lolenge ya mosali moko na biro oyo azangi boboto mpe azangi mayoki na motema. “Mpo ete lokola esili ye moko koyoka mpasi mpe komekama, ayebi kosunga bamekami.” (Baebele 2:10, 18; 4:15) Kosalelaka mpema na ye ya nsuka ya bomoi, Yesu angangaki na elonga ete: “Yango esili ekokisami!” (Yoane 19:30) Amonisaki bobele bosembo na ye te, kasi alongaki na kotya moboko mpo na lobiko ya bato mpe, likambo ya ntina koleka lisusu, mpo na kolongisa bokonzi ya Jéhovah.
20, 21. (a) Mpo na nini Klisto asekwisamaki kati na bakufi? (b) Mpo na nini Yesu Klisto “azalisamaki na bomoi kati na elimo”?
20 Nzokande, ntango nini mpe ndenge nini bato na masumu basengelaki kozwa litomba na lisiko? Mituna oyo mizangaki eyano te. Mokolo na misato nsima na liwa na Klisto, Jéhovah asekwisaki ye. (Misala 3:15; 10:40) Na likambo wana ya ntina monene, oyo ebele na bato bakokaki komona na miso na bango moko, Jéhovah apesaki lifuti epai na Mwana na ye mpo na mosala na ye ya sembo, mpe apesaki ye lisusu likoki ya kosilisa mosala na ye ya kosikola bato.—Baloma 1:4; 1 Bakolinti 15:3-8.
21 Yesu “azalisamaki na bomoi kati na elimo,” nzoto na ye ya mosuni ebimisamaki na nkunda na lolenge oyo moto ayebi te. (1 Petelo 3:18; Nzembo 16:10; Misala 2:27) Lokola Yesu asekwisamaki ekelamu na elimo, akokaki bongo kozonga na nkembo nyonso kati na makoló. Oyo nde esengo monene baanzelu bayokaki kuna na likoló! (Tala Yobo 38:7.) Yesu azongaki na likoló bobele te mpo ete asepela na boyambi motindo wana. Azalaki lisusu na mosala ya kokokisa: kopesa nzela na libota mobimba ya bato na kozwa litomba na lisiko. (Tala Yoane 5:17, 20, 21.) Ndenge nini akokisaki mosala yango, mpe makambo nini yango ebimisaki mpo na bato? Ezali yango nde elobelami na lisolo oyo lizali kolanda.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba na greke oyo lisalelami awa, an·tiʹly·tron, ezwami esika mosusu te kati na Biblia. Ezali na boyokani na liloba oyo Yesu asalelaki na Malako 10:45 mpo na kolobela lisiko (lyʹtron). Nzokande, Nouveau Dictionnaire international de théologie du Nouveau Testament (na Angl.) emonisi ete an·tiʹly·tron, ‘elobeli mingimingi likanisi ya kosombitinya.’ Ezali bongo na ntina malamu nde Traduction du monde nouveau ebongoli yango ete “lisiko likokani.”
Bozongeli
◻ Makambo nini mazali na ntina monene koleka lobiko na bato?
◻ Kofuta “lisiko’’ mpo na bato na masumu elimboli nini?
◻ Yesu asengelaki kokokana na nani, mpe mpo na nini?
◻ Nani apesaki lisiko, mpe efutamaki epai na nani?
◻ Mpo na nini esengelaki ete Yesu asekwisama kati na elimo?
[Elilingi na lokasa 13]
Mbeka na banyama ekokaki kozipa masumu na bato te; ezalaki elilingi na mbeka monene oyo ezalaki koya