Yesu Kristo
Ndimbola: Mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki, Mwana se moko oyo Yehova ye moko asalaki. Ye nde Mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá. Biloko mosusu nyonso na likoló mpe na mabele ezalisamaki na nzela na ye. Azali moto ya mibale oyo aleki na molɔ́ngɔ́ mobimba. Ezali Mwana yango nde Yehova atindaki awa na mabele mpo apesa bomoi na ye ezala lisiko mpo na bato, mpe na ndenge yango Yehova afungolaki nzela mpo bana ya Adama oyo bakondimela Yesu bázwa bomoi ya seko. Yehova azongiselaki Mwana yango lisusu nkembo na likoló, epai azali sikoyo Mokonzi, mpe akómi na nguya ya koboma bato nyonso ya mabe mpe ya kokokisa mokano oyo Tata na ye azalaki na yango na ebandeli mpo na mabele. Na Ebre, nkombo Yesu elimboli “Yehova azali lobiko”; nkombo Kristo yango nde Mashiach (Masiya) na Ebre, mpe elimboli “Moto oyo atyami mafuta na elimo.”
Yesu Kristo azalaki moto ya solo mpenza?
Biblia nde elembeteli ya liboso oyo emonisi ete Yesu Kristo azalaki moto ya solo. Makambo oyo ekomami na Baevanzile ezali masapo te, to ezali mpe te makambo oyo esalemaki na ntango mpe bisika oyo eyebani te. Masolo yango ezali komonisa polele ntango mpe bisika oyo makambo esalemaki, ata na makambo mikemike. Na ndakisa, talá Luka 3:1, 2, 21-23.
Josèphe, Moyuda oyo azalaki mokomi ya makambo ya kala na siɛklɛ ya liboso, alobelaki ndenge oyo babomaki na mabanga “Yakobo, ndeko ya Yesu oyo abengamaki Kristo.” (The Jewish Antiquities, Josèphe, Buku XX, eteni 200) Buku na ye moko (Buku XVIII, biteni 63, 64), ezali kolobela Yesu na ndenge ya malamu; nzokande bato mosusu balobaka ete masolo yango ebakisamaki nsima to mpe bakristo nde babongisaki yango, kasi endimami mpenza ete maloba ya ebandeli mpe ekomeli ezali ya Josèphe mpe eteni yango ezali na kati ya bamaniskri nyonso oyo ezali tii lelo.
Tacite, Moroma oyo azalaki mokomi ya makambo ya kala, oyo azalaki na bomoi pene na nsuka ya siɛklɛ ya liboso T.B., akomaki boye: “Nkombo mokristo euti na [Kristo], oyo anyokwamaki mpe abomamaki na mabɔkɔ ya Ponse Pilate, moko ya baguvɛrnɛrɛ na biso ntango Tibere azalaki mokonzi.”—The Complete Works of Tacitus (New York, 1942), “Annales,” Buku 15, par. 44.
Mpo na makambo oyo bato oyo bazalaki bakristo te balobaki na ntina na Yesu, buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Masolo yango oyo ekomami na bato oyo bazalaki bakristo te ezali komonisa ete na ntango ya kala, ata banguna ya bakristo bazalaki kotya ntembe te ete Yesu Kristo azalaki moto ya solo, kasi ntembe ezangá ntina mpo na likambo yango ebandaki na nsuka ya siɛklɛ ya 18, na boumeli ya siɛklɛ ya 19 mpe na ebandeli ya siɛklɛ ya 20.”—(1976), Macropædia, Vol. 10, lok. 145.
Yesu azalaki kaka moto moko boye ya malamu?
Ntango moto moko abengaki Yesu ete “Moteyi Malamu,” Yesu apamelaki ye, mpo ayebaki ete kaka Tata na ye nde azali moto malamu kasi ye te. (Mrk. 10:17, 18) Ata bongo, soki totaleli ndenge oyo bato batalelaka moto malamu, tokoloba ete Yesu azalaki mpenza moto malamu. Ya solo, ata banguna na ye bandimaki ete azalaki moto malamu. (Mrk. 12:14) Ye moko alobaki ete azalaki na likoló liboso aya awa na mabele, ete azali Mwana se moko ya Nzambe, ete azali Masiya oyo koya na ye esakolamaki na Makomami ya Ebre mobimba. Likambo yango oyo: to Yesu azalaki ndenge alobaki, to azalaki moto ya lokuta; kasi ezala bongo to te, ye azalaki kaka moto moko boye ya malamu te.—Yoa. 3:13; 10:36; 4:25, 26; Luka 24:44-48.
Yesu azalaki kaka mosakoli lokola Moize, Buda, Mahomet, mpe bakonzi mosusu ya mangomba?
Yesu ye moko ateyaki ete azali Mwana se moko ya Nzambe, (Yoa. 10:36; Mat. 16:15-17), Masiya oyo asakolamaki (Mrk. 14:61, 62), ete azalaki na likoló liboso aya awa na mabele (Yoa. 6:38; 8:23, 58), ete akobomama mpe mokolo ya misato nsima ya liwa na ye akosekwa, mpe na nsima akozonga na likoló. (Mat. 16:21; Yoa. 14:2, 3) Makambo oyo alobaki ezalaki solo? Yesu akesanaki nde na basakoli mosusu nyonso ya solo ya Nzambe, mpe akesanaki mpenza na bakonzi mosusu nyonso ya mangomba? Bosolo ya makambo yango eyebanaki mokolo ya misato nsima ya liwa na ye. Nzambe asekwisaki ye mokolo yango, mpo na kondimisa bosolo ya maloba ya Yesu Kristo ete azalaki mpenza Mwana se moko ya Nzambe? (Rom. 1:3, 4) Bato koleka 500 bamonaki mpenza Yesu na bomoi nsima ya lisekwa na ye, mpe bayekoli na ye ya sembo bamonaki ye ntango azalaki komata na likoló, mpe lipata ezipaki ye na miso na bango. (1 Ko. 15:3-8; Mis. 1:2, 3, 9) Lokola bandimaki mpenza ete asekwaki, mingi kati na bango batyaki bomoi na bango na likama mpo na koyebisa bato mosusu likambo yango.—Mis. 4:18-33.
Mpo na nini Bayuda mingi bandimaki te ete Yesu azali Masiya?
Buku moko (Encyclopaedia Judaica) elobi ete: “Bayuda oyo bazalaki na ntango ya Baroma, bakanisaki ete Nzambe akotindela bango [Masiya] oyo akolongola bango na boombo ya bapakano mpe akoyangela Yisraele, mpe oyo akozongisela Yisraele bokonzi na yango.” (Yerusaleme, 1971, Vol. 11, kol. 1407) Likambo oyo balukaki mpenza ezalaki nde kosikolama na boombo ya Baroma. Lisolo ya makambo ya Bayuda emonisi ete na kotalela esakweli ya Danyele 9:24-27 oyo ezali kolobela Masiya, Bayuda mosusu bazalaki kozela Masiya na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso. (Luka 3:15) Nzokande esakweli yango emonisaki mpe ete koya na ye ‘ekosilisa lisumu nyɛɛ.’ Yisaya mokapo 53 esakolaki mpe ete Masiya akokufa mpo na kokokisa likambo yango. Kasi, Bayuda mingi bamonaki ete ezali na ntina te ete moto akufa mpo na masumu na bango. Bakanisaki ete bazali bayengebene liboso ya Nzambe mpo bazali bakitani ya Abrahama. Buku moko (A Rabbinic Anthology) elobi ete: “Abrahama azali na lokumu mingi mpenza, oyo ekoki kozipa bozoba nyonso mpe lokuta nyonso ya Bayisraele na mokili oyo.” (Londres, 1938, C. Montefiore mpe H. Loewe, lok. 676) Lokola Bayuda baboyaki kondima ete Yesu azali Masiya, bakokisaki esakweli oyo elobaki mpo na ye ete: “Atiolamaki mpe aboyamaki na bato.”—Yisaya 53:3, hf.
Liboso Moize akufa, asakolaki ete ekólo yango ekotika losambo ya solo, mpe mpo na yango, mpasi ekokwela bango. (Tángá Kolimbola Mibeko 31:27-29.) Buku ya Basambisi emonisi ete likambo yango ekómelaki bango mbala na mbala. Na mikolo ya mosakoli Yirimia, bato ya ekólo yango bakendeki na boombo na Babilone mpo bazangaki bosembo. Lisusu, mpo na nini Nzambe atikaki Baroma bábebisa Yerusaleme ná tempelo na yango na mobu 70 T.B.? Bato ya ekólo yango basalaki likambo nini ya kozanga bosembo mpo Nzambe abatela bango te ndenge azalaki kosala ntango bazalaki kotyela ye motema? Baboyaki kondima ete Yesu azali Masiya.
Yesu Kristo azali mpenza Nzambe?
Yoa. 17:3, hf: “[Yesu abondelaki Tata na ye ete:] Oyo ezali bomoi na seko ete bayeba yo Nzambe moko na solo [“Nzambe wa solo se moko,” LNz], mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.” (Simbá ete Yesu alobaki te ete ye moko azali “Nzambe ya solo kaka moko,” kasi alobaki ete ezali nde Tata na ye.)
Yoa. 20:17, LNz: “Yezu alobi na ye [Maria Magadalena], Osimba ngai te, mpo nabuti naino epai ya Tata te. Kasi kende koyebisa bandeko ba ngai ’te nakobuta epai ya Tata wa ngai oyo azali mpe Tata wa bino; epai ya Nzambe wa ngai, oyo azali mpe Nzambe wa bino.” (Na yango Tata azalaki Nzambe ya Yesu oyo asekwi, kaka ndenge azalaki Nzambe ya Maria Magadalena. Simbá ete, vɛrsɛ moko te na Biblia emonisi ete Tata abengi Mwana ete “Nzambe na ngai.”)
Talá mpe nkasa 135, 140, 141, na motó ya likambo “Bosato.”
Yoane 1:1 emonisi mpenza ete Yesu azali Nzambe?
Yoa. 1:1, hf: “Na ebandeli Liloba azalaki, mpe Liloba azalaki mboka na Nzambe, Liloba azalaki mpe Nzambe [KSM, KSN].” NE ebongoli yango boye “ndenge Nzambe azalaki, ndenge Liloba azalaki.” Mo ebongoli vɛrsɛ yango “Logos azalaki na lolenge ya nzambe.” AT ná Sd ebongoli yango boye “Liloba azalaki na lolenge ya nzambe.” NW ebongoli yango “Liloba azalaki nzambe.”
Eloko nini na makomi ya Grɛki etindi babongoli mosusu bátika kokoma ete “Liloba azalaki Nzambe”? Na Grɛki liloba theos (Nzambe) ya liboso ezali na artikle defini kasi oyo ya mibale ezali na yango te. Soki artikle ezali liboso ya liloba moko, yango emonisaka soki moto yango azali nani to bomoto na ye; soki liloba ezali na bɔɔkɔ (kasi liloba yango ezangi artikle) mpe liloba yango ezali liboso ya vɛrbɛ (ndenge fraze yango ezali na Grɛki) yango emonisaka ezaleli ya moto yango. Na yango, vɛrsɛ oyo elobi te ete Liloba (Yesu) azalaki nde Nzambe oyo azalaki elongo na ye, kasi nde Liloba azalaki lokola Nzambe, na lolenge ya nzambe, to nzambe. (Talá Rbi8-F lok. 1705.)
Ntoma Yoane alingaki koloba nini ntango akomaki Yoane 1:1? Alingaki nde koloba ete Yesu ye moko azali Nzambe to nde ete Yesu ná Tata bazali Nzambe moko? Na vɛrsɛ 18 ya mokapo yango, Yoane akomi boye: “Moto moko amoni naino Nzambe te; kasi Mwana se moko wa Ye; [“nzambe kaka moko oyo abotamá,” NW], oyo azali na mboka Tata, ye moto ayebisi Nzambe.” (LNz) Bato bamonaki Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe? Ɛɛ! Na yango, Yoane alingaki nde koloba ete Yesu azali Nzambe? Te. Na nsuka ya Evanzile na ye, Yoane akomaki na mokuse ete: “Kasi maye makomami awa makomami mpo boyamba ete Yezu azali Kristu, [Nzambe te, kasi] Mwana wa Nzambe.”—Yoa. 20:31, LNz.
Maloba ya Toma oyo ezali na Yoane 20:28 emonisi ete Yesu azali mpenza Nzambe?
Yoa. 20:28 (hf) elobi: “Toma azongiseli ye: ‘Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai!’”
Soki Toma amonaki malamu abenga Yesu “Nzambe,” mabe ezali te. Yango mpe eyokani na maloba ya Nzembo oyo Yesu atángaki, oyo emonisi ete mibali ya makasi oyo bazalaki basambisi, babengamaki “banzambe.” (Yoa. 10:34, 35, LNz; Nz. 82:1-6) Kutu, lokumu oyo Kristo azali na yango eleki mosika oyo ya mibali yango. Lokola Yesu akeseni na bato mosusu nyonso mpo na mokumba monene oyo azali na yango liboso ya Yehova, na Yoane 1:18 (NW) Yesu abengami “nzambe kaka moko oyo abotamá.” (Talá mpe Ro, By.) Lisusu, na esakweli ya Yisaya 9:6 (hf) Yesu abengami “Nzambe na nguya,” kasi abengami Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso te. Nyonso wana emonisi ntina oyo na Yoane 1:1 (NW, AT), Yesu abengami “nzambe,” to “oyo azali na lolenge ya nzambe.”
Bavɛrsɛ mosusu ya mokapo yango esalisi biso tókanga ntina ya vɛrsɛ yango ndenge wana. Mwa moke liboso Yesu akufa, Toma ayokaki ntango Yesu alobaki na libondeli ete Tata na ye azali “Nzambe wa solo se moko.” (Yoa. 17:3, LNz) Nsima ya lisekwa na ye, Yesu atindaki báyebisa bantoma na ye, ezala mpe Toma, ete: “Nakobuta . . . epai ya Nzambe wa ngai oyo azali mpe Nzambe wa bino.” (Yoa. 20:17, LNz) Nsima ya kokoma makambo oyo Toma alobaki ntango amonaki mpe asimbaki Kristo oyo asekwaki, ntoma Yoane alobaki: “Kasi maye makomami awa makomami mpo boyamba ete Yezu azali Kristu, Mwana wa Nzambe, mpe mpo ’te soko boyambi, bózwa bomoi mpo ya nkombo ya ye.” (Yoa. 20:31, LNz) Na yango, soki mpo na maloba ya Toma moto alobi ete Yesu nde “Nzambe ya solo kaka moko,” to ete Yesu azali “Nzambe-Mwana” na kati ya Bosato, asengeli kotalela lisusu maloba oyo Yesu ye moko alobaki na vɛrsɛ 17 mpe maloba ya bosukisi oyo ntoma Yoane alobaki polele na vɛrsɛ 31.
Matai 1:23 emonisi ete ntango Yesu azalaki awa na mabele azalaki Nzambe?
Mat. 1:23, LNz: “Ngondo akokwela zemi mpe akobota mwana mobali, mpe bakopesa mwana nkombo Emanuel (oyo elimboli, Nzambe azali na biso [“Nzambe na biso elongo,” KSN]).”
Ntango anzelu ya Yehova asakolaki kobotama ya Yesu, alobaki ete mwana yango akozala nde Nzambe? Te, alobaki ete: ‘Akozala moto monene, bakotánga ye Mwana wa Nzambe wa Ntá-Likoló.’ (Luka 1:32, 35, LNz) Lisusu, ata mokolo moko te Yesu alobaki ete azali Nzambe, kasi azalaki koloba ete azali ‘Mwana ya Nzambe.’ (Yoa. 10:36, LNz.) Nzambe atindaki Yesu na mokili; na yango, Nzambe azalaki elongo na bato na nzela ya Mwana yango se moko oyo abotamaki.—Yoa. 3:17; 17:8.
Baebre bazalaki na momeseno ya kokɔtisa na bankombo na bango liloba Nzambe to ebengeli ya mokuse ya nkombo mpenza ya Nzambe. Na ndakisa, nkombo Eliata elimboli “Nzambe na ngai ayei”; nkombo Yehu elimboli “Ye nde Yehova”; nkombo Eliya elimboli “Nzambe na ngai ezali Yehova.” Kasi nkombo moko te na kati ya bankombo yango emonisi ete moto oyo abengami na nkombo yango ye nde Nzambe.
Yoane 5:18 elimboli nini?
Yoa. 5:18, LNz: “Mpo ya maloba mana mpe ba-Yuda baluki nzela ya koboma ye [mpo] abuki bobele mobeko mwa sabato te, kasi atángi mpe Nzambe ‘Tata wa ye’ mpenza lokola ’te ye moko akokani na Nzambe.”
Bayuda oyo bandimelaki Yesu te nde bakanisaki ete Yesu alukaki komikokanisa na Nzambe ntango alobaki ete Nzambe azali Tata na ye. Atako Yesu alobaki ete Nzambe azali Tata na ye, alobaki ata mokolo moko te ete akokani na Nzambe. Ayanolaki Bayuda polelepolele ete: “Ya solo solo, nalobi na bino: Mwana ye moko akoki kosala eloko te, akosalaka bobele maye amoni Tata azali kosala.” (Yoa. 5:19, LNz; talá mpe Yoane 14:28; Yoane 10:36.) Ezali kaka Bayuda yango oyo bandimelaki Yesu te nde balobaki ete Yesu atosi Sabata te, kasi na likambo yango balobaki mpe solo te. Yesu atosaki Mobeko malamumalamu; yango wana alobaki: “Ekoki nde kosala malamu na mokolo na sabata.”—Mat. 12:10-12, hf.
Lokola bagumbamelaka Yesu, yango emonisi nde ete azali Nzambe?
Na Baebre 1:6, baanzelu bazwi etinda ya “kogumbamela” Yesu. Matai 14:33 elobi ete bayekoli ya Yesu “bagumbamelaki ye.” Bavɛrsɛ yango emonisi ete basambelaki ye lokola nde azali Nzambe?
Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kogumbamela” ezali proskyneo. Diksionɛrɛ moko (Greex-Croatian Dictionary of the New Testament) elobi ete liloba yango ezali na bandimbola ebele mpe ekoki kobongolama na “kosambela, kokumisa, kofukamela, kopesa lokumu, kogumbamela moto mpe kopwɛpwa lobɔkɔ na ye; kotya mabɔlɔngɔ na nse liboso ya moto; kokwea elongi na nse, kopesa mbote na limemya.” (Rudolf Amerl, Croatian Ecumenical Bible Society, Zagreb, 2000) Yango emonisi ete liloba ya Grɛki oyo esalelami awa ezalaki kolobela kaka te makambo ya losambo. Yango nde liloba oyo esalelami na Matai 14:33 mpo na komonisa ete bayekoli bagumbamelaki Yesu; na Baebre 1:6 liloba yango esalelami mpo na komonisa likambo oyo baanzelu basengeli kosala liboso ya Yesu; na Ebandeli 22:5 na Septante ya Grɛki liloba yango esalelami mpo na komonisa ete Abrahama asambelaki Yehova; mpe na Ebandeli 23:7 liloba yango esalelami mpo na komonisa ete Abrahama agumbamelaki bato oyo asombaki bilanga na bango, ndenge ezalaki momeseno ya ntango wana; na 1 Bakonzi 1:23 na Septante liloba yango esalelami mpo na komonisa ete mosakoli Natane afukamaki elongi na nse liboso ya Mokonzi Davidi.
Na Matai 4:10, (hf) Yesu alobaki: “Okokumbamela [(‘okosambela,’ NW), euti na liloba proskyneo] Nkolo Nzambe na yɔ mpe okosalela bobɛlɛ ye.” (Na Kolimbola Mibeko 6:13, oyo Yesu atángi awa, nkombo ya Nzambe ezali komonana na lolenge ya Tetragrami.) Ndenge vɛrsɛ oyo emonisi yango, tosengeli koyeba ete na makambo ya losambo, tosengeli “kogumbamela” (proskyneo) kaka Yehova.
Makamwisi oyo Yesu asalaki emonisi ete azali Nzambe?
Bik. [Mis.] 10:34, 38, LNz: “Petro abandi koloba, ye ’te: ‘ . . . Nzambe atondisaki [“atyaki ye mafuta,” NW] Yezu wa Nazarete na Elimo Santu mpe apesaki ye nguya; . . . azalaki kosala bato malamu mpe kobikisa baye banso bakangemaki na zabolo, mpo Nzambe azalaki na ye.’” (Na yango, nsima ya komona makamwisi oyo Yesu asalaki, Petro alobaki te ete Yesu azali Nzambe, kasi ete Nzambe azalaki na ye. Talá Matai 16:16, 17.)
Yoa. 20:30, 31, LNz: “O miso ma bayekoli Yezu asali makamwisi masusu mingi, maye makomami o buku eye te. Kasi maye makomami awa makomami mpo ’te boyamba ’te Yezu azali Kristu, Mwana wa Nzambe, mpe mpo ’te soki boyambi, bozwa bomoi mpo ya nkombo ya ye.” (Na yango, makamwisi oyo Yesu asalaki esengeli kotinda biso tóloba ete azali “Kristo,” Masiya, “Mwana ya Nzambe.” Maloba “Mwana ya Nzambe” ekeseni mpenza na maloba “Nzambe Mwana.”)
Basakoli ya kala, na ndakisa Eliya ná Elisha, basalaki makamwisi lokola Yesu. Kasi, yango emonisaki te ete Eliya to Elisha bazalaki Nzambe.
Yesu nde Yehova na “Kondimana ya Kala”?
Talá nkasa 426, 427, na motó ya likambo “Yehova.”
Kondimela Yesu ekoki mpo na kobika?
Mis. 16:30-32, LL: “‘Batata, nasala nini mpo nabika?’ Bango [Paulo ná Silasi] bazongiseli ye: ‘Ndima Nkolo Yezu, bongo okobika, yo ná bato nyonso ya libota na yo.’ Boye ye abengi bato nyonso oyo bazalaki na ndako na ye mpe Polo ná Silas babandaki koteya bango maloba ya Nkolo [“Nzambe,” LNz].” (Mobali yango asengelaki kaka kosuka na koloba na bosembo ete ‘andimeli Nkolo Yesu’? Paulo amonisaki ye ete asengeli kosuka wana te—mokɛngɛli yango ya bolɔkɔ asengelaki mpe koyeba mpe kondima Liloba ya Nzambe oyo Paulo ná Silasi basakwelaki ye. Moto akoki mpenza koloba ete azali na kondima ya solosolo soki azali kosambela te Nzambe oyo Yesu asambelaki, soki azali kotosa te mateya ya Yesu oyo emonisaki lolenge bayekoli na ye basengeli kozala, to soki azali kosala te mosala oyo Yesu apesaki bayekoli na ye? Tokoki kozwa bomoi na makasi na biso moko te; mpo moto abika asengeli kondima motuya ya mbeka ya bomoi ya Yesu. Kasi makambo oyo tozali kosala na bomoi na biso esengeli koyokana na kondima na biso, ata soki yango esɛngi tónyokwama. Na Matai 10:22 [LNz] Yesu alobaki: “Moto akotya molende tee nsuka akobika.”)
Yesu azalaki na likoló liboso aya awa na mabele?
Kol. 1:15-17, LNz: “[Yezu] azali elili ya Nzambe oyo akomononoko te, abotami yambo ya bikelamo binso . . . binso bikelami na [“mabɔkɔ na,” hf] ye mpe mpo ya ye. Azali liboso lya biloko binso.”
Yoa. 17:5, hf: “[Yesu abondelaki:] Tata kumisa ngai pembeni na yo na lokumu lozalaki na ngai pembeni na yo liboso, naino mokili ezalaki te.” (Talá Yoane 8:23.)
Yesu azali kaka na nzoto na ye ya mosuni na likoló?
1 Ko. 15:42-50, hf: “Ezali mpe bongo na lisekwa na bakufi. Ekokonama eloko na kopɔla, ekosekwa eloko na kozanga kopɔla. . . . Ekokonama nzoto na mosuni mpenza, ekosekwa nzoto na elimo. . . . Pelamoko ekomami ete, Adama moto na liboso ayaki na nzoto na bomoi; Adama na nsima [Yesu Kristo, oyo azalaki moto ya kokoka ndenge Adama azalaki liboso] ayei [elimo, LNz] oyo ekopesaka bomoi. . . . Bandeko, nazali koloba oyo ete, mosuni mpe makila ikoki kozwaka Bokonzi na Nzambe te. Oyo ekopɔlaka ekosangola yango ezangi kopɔla te.”
1 Pe. 3:18, hf: “Klisto akufaki mpo na masumu mbala moko mpo na libela . . . Abomamaki solo na nzoto na ye mpe azalisami na bomoi [na elimo, NW, JB, Dy].” (Talá nkasa 295, 296.)
Ndakisa: Soki moto moko afuteli moninga na ye nyongo kasi na nsima abɔtɔli mbongo yango, emonani polele ete nyongo esili te. Ndenge moko mpe, ntango Yesu asekwaki, soki azongelaka lisusu nzoto na ye mpe makila na ye, oyo apesaki mbeka mpo na kofuta lisiko, ebongiseli oyo ezwamaki mpo na kosikola bato ya sembo na nyongo ya lisumu, elingaki kosimba te, boye te?
Ezali solo ete nsima ya lisekwa ya Yesu, abimelaki bayekoli na ye na nzoto oyo ezali komonana. Kasi mpo na nini mbala mosusu bazalaki koyeba ye na mbala moko te? (Luka 24:15-32; Yoa. 20:14-16) Mokolo moko, Yesu abimelaki bayekoli na ye na nzoto oyo ezalaki na bilembo ya nsɛtɛ na mabɔkɔ mpe ya likɔnga na mopanzi mpo na kondimisa Toma ete asekwi. Kasi ndenge nini abimelaki bango pwasa atako baporte ekangamaki? (Yoa. 20:26, 27) Emonani ete Yesu azalaki kolata nzoto oyo ezali komonana, ndenge baanzelu bazalaki kosala na ntango ya kala ntango bazalaki kobimela bato. Ezalaki mpasi te Nzambe alimwisa nzoto ya Yesu ntango asekwaki. Kasi simbá ete atako Nzambe atikaki nzoto ya Yesu na nkunda te, (mbala mosusu mpo na kondimisa bayekoli ete Yesu asekwi mpenza), bilamba ya lini oyo balingaki ye etikalaki na nkunda; nzokande ntango Yesu azalaki kobimela bato, azalaki ntango nyonso na bilamba na nzoto.—Yoa. 20:6, 7.
Yesu Kristo ná Mikaele, anzelu-mokonzi, ezali kaka moto moko?
Nkombo Mikaele ezali na Biblia kaka mbala mitano. Ekelamu ya elimo oyo azali na nkembo mpe oyo abengami na nkombo yango, Biblia ebengi ye “moko na mikonzi oyo aleki na lokumu,” “mokonzi monene oyo mobateli na bato na yo [bato ya Danyele],” mpe “mokolo na banze.” (Dan. 10:13; 12:1; Yuda 9, hf) Mikaele elimboli “Nani akokani na Nzambe?” Nkombo yango emonisi ete Mikaele azali moto ya liboso oyo azali kolongisa boyangeli ya Yehova mpe oyo akoboma banguna ya Nzambe.
Mokanda ya 1 Batesaloniki 4:16 (LNz), elobi ete “anzelu mokumi akobelela” mpo na kolobela etinda oyo Yesu Kristo akopesa mpo lisekwa ebanda, mpe Yuda 9 (hf) elobi ete mokolo na baanzelu yango ezali Mikaele. Tokoki mpenza koloba ete kobelela ya Yesu ezali kobelela ya moto oyo azali na bokonzi mingi te? Na yango, emonani mpenza ete anzelu-mokonzi ezali Yesu Kristo. (Simbá ete na Biblia, liloba “anzelu-mokonzi” ezalaka na boike (pluriel) te, yango emonisi ete ezali kaka moto moko wana.)
Emoniseli 12:7-12 elobi ete ntango Kristo akozwa bokonzi, Mikaele ná baanzelu na ye bakobunda na Satana mpe bakobengana ye ná baanzelu na ye kuna na likoló. Na nsima, Yesu amonani azali kokamba mampinga ya likoló na etumba ya mokili mobimba. (Em. 19:11-16) Na yango, ezali Yesu nde moto akobunda na Satana Zabolo, “mokonzi ya mokili oyo,” boye te? (Yoa. 12:31) Danyele 12:1 (hf) elobi ete ntango ‘Mikaele akotɛlɛma’ mpo na kozwa bokonzi, “ntango na bolɔzi ekozala, lokola ezalaki te longwa na ebandeli na mabota kino ntango yango.” Yango nde mpasi oyo ekokómela mabota, ntango Kristo akotɛlɛma mpo na koboma bango. Na yango, bilembeteli emonisi ete Mwana ya Nzambe ayebanaki na nkombo Mikaele liboso aya awa na mabele mpe ayebani lisusu na nkombo yango ntango azongi na likoló, epai afandi na nkembo ya Mwana ya Nzambe.
Soki moto alobi—
‘Bondimelaka Yesu te’
Okoki koyanola: ‘Emonani polele ete yo ondimelaka Yesu. Ngai mpe nandimelaka ye; soki bongo te mbɛlɛ nayei epai na yo te.’ Okoki kobakisa: ‘Kutu, mikanda na biso emonisaka ete kondimela Yesu ezali likambo ya ntina mingi. (Fungolá buku moko oyo ozali na yango na mokapo oyo elobeli Yesu, mpe bósolola likambo yango, monisá ete Yesu azali Mokonzi. To tángelá ye ntina ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, na lokasa 2.)’
To okoki koloba: ‘Tiká natuna yo naino, nini etindi yo okanisa bongo?’
Ndenge mosusu ya koyanola: ‘Ntango mosusu, bayebisá yo bongo, kasi nakoyebisa yo ete ezali bongo te, mpo biso tondimelaka mpenza Yesu Kristo.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Nzokande ezali na makambo mosusu oyo balobaka mpo na Yesu oyo biso tondimaka te. Na ndakisa, bato mosusu balobaka ete azalaki Mwana ya Nzambe te, kasi azalaki kaka moto moko malamu. Tondimaka yango te, bongo yo? . . . Biblia eteyaka bongo te.’ (2) ‘Mpe tondimaka te mateya oyo bato mosusu bateyaka, ete Yesu akokani na Tata na ye; Yesu ateyaki bongo te. (Yoa. 14:28) Tata na ye apesaki ye bokonzi, mpe likambo yango etaleli biso lelo. (Dan. 7:13, 14)’
‘Osilá koyamba Yesu ete azali Mobikisi na yo?’
Okoki koyanola: ‘Biblia elobi polele ete . . . (tángá Misala 4:12). Nandimaka likambo oyo totángi na vɛrsɛ oyo. Kasi nayebi mpe ete kondimela Yesu esukaka kaka na maloba te. Na ndenge nini? Soki moto andimeli mpenza Yesu, asengeli mpe kotosa makambo oyo Yesu asɛngi atako mbala mosusu ekoki komonana ete ezali mpasi.’ Okoki kobakisa: ‘Tokoki kozwa bolimbisi ya masumu na nzela ya bomoi na ye ya kokoka oyo apesaki mbeka. Kasi nayebi ete esengeli mpe kotya likebi na malako oyo apesi biso bakristo mpo tóyeba kokokisa mikumba na biso. (Mis. 1:8; Mat. 28:19, 20)’
To okoki koloba: ‘(Nsima ya komonisa ete ondimaka ete Yesu azali Mobikisi na yo mpe ya bato nyonso oyo bakondimela ye . . . ) Tosengeli kotɔnda ye mpo na makambo oyo asalelá biso mpe mpo na oyo azali kosalela biso sikoyo. (Mat. 24:14)’
‘Nayambá Yesu ete azali Mobikisi na ngai’
Okoki koyanola: ‘Nasepeli koyeba ete ondimelaka Yesu, mpo bato mingi lelo oyo bakipaka te makambo oyo Yesu asalelaki biso. Ntango mosusu oyebi malamu likambo oyo Yoane 3:16 elobi. . . . Kasi bato yango bakofanda libela epai wapi? Basusu bakozala elongo na Kristo na likoló. Kasi Biblia elobi nde ete bato nyonso ya malamu bakokende na likoló? (Mat. 6:10; 5:5)’