Nzela se moko oyo ezali komema na bomoi ya seko
“Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi.”—YOANE 14:6.
1, 2. Yesu akokanisaki nzela ya bomoi ya seko na nini, mpe ntina ya elakiseli na ye ezali nini?
NA LISOLO na ye likoló ya Ngomba, lisolo oyo bato mingi bayebi yango, Yesu akokanisaki nzela ya bomoi ya seko na nzela oyo, mpo na kotambola na yango, moto asengeli koleka na ekɔtelo moko. Yesu amonisaki ete ezali pɛtɛɛ te mpo na kotambola na nzela oyo ezali komema na bomoi. Alobaki boye: “Bókɔta na porte ya moke. Mpamba te porte na nzela oyo ememaka bato na liwa ezali monene. Mpe bato mingi balandaka nzela wana; kasi porte na nzela oyo ememaka bato na bomoi [ya seko] ezali moke, mpe bato mingi balandaka yango te.”—Matai 7:13, 14, Boyokani ya sika.
2 Okangi ntina ya elakiseli yango? Ezali komonisa ete nzela kaka moko nde ememaka na bomoi mpe ekosɛnga tózala na ekɛngɛ mpo tótɛngama te ntango tozali kotambola na nzela yango. Nzela se moko oyo ememaka na bomoi ya seko ezali nzela nini?
Mokumba ya Yesu Klisto
3, 4. (a) Ndenge nini Biblia emonisi mokumba monene ya Yesu mpo na lobiko na biso? (b) Ntango nini Nzambe ayebisaki mpo na mbala ya liboso ete bato bakoki kozwa bomoi ya seko?
3 Ezali polele ete Yesu azali na mokumba monene na nzela yango, ndenge ntoma Petelo alobaki, “lobiko mpe ezali na moto mosusu te, mpo ete nkombo mosusu te [longola se nkombo ya Yesu] esili kopesama awa na nse kati na bato ete tókoka kobika mpo na yango.” (Misala 4:12) Ndenge moko mpe, ntoma Paulo alobaki ete: “Nzambe akopesa likabo mpamba, likabo na ye bomoi na seko kati na Yesu Klisto, Nkolo na biso.” (Baloma 6:23) Yesu ye moko amonisaki ete azali nzela se moko oyo ezali komema na bomoi ya seko, alobaki boye: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi.”—Yoane 14:6.
4 Yango wana, ezali na ntina mingi tóndima mokumba ya Yesu na likambo etali kopesa bomoi ya seko. Na yango, tiká tóluka koyeba mokumba na ye malamumalamu. Oyebi soki ntango nini, nsima ya lisumu ya Adama, Yehova Nzambe ayebisaki ete bato bakoki kozwa bomoi ya seko? Kaka nsima ya kokwea ya Adama. Tótalela sikoyo ndenge oyo likambo ya kopona Yesu Klisto lokola Mobikisi ya bato esakolamaki.
Mombóto oyo alakamaki
5. Ndenge nini tokoki koyeba nyoka oyo akosaki Eva?
5 Yehova Nzambe asalelaki maloba ya elilingi mpo na komonisa Mobikisi oyo alakamaki. Alobaki yango ntango akatelaki “nyoka” etumbu, nyoka oyo asololaki na Eva mpe apusaki ye na kobuka mobeko ya Nzambe na ndenge alyaki mbuma oyo epekisamaki. (Genese 3:1-5) Ya solo, nyoka wana ezalaki mpenza nyoka ya solo te. Ezalaki nde ekelamu ya elimo oyo ezali na nguya mingi; Biblia elobeli ye lokola “nyoka na kalakala, oyo abyangami Motɛmɛli mpe Satana.” (Emoniseli 12:9) Satana asalelaki mwa nyama wana lokola monɔkɔ na ye mpo na kokosa Eva. Yango wana, ntango akatelaki Satana etumbu, Nzambe alobaki na ye ete: “Nakotya koyinana kati na yo na mwasi mpe kati na mombóto na yo mpe mombóto na ye. Ye [mombóto ya mwasi] akosasa yo na motó mpe yo okosasa ye na litindi.”—Genese 3:15, NW.
6, 7. (a) Mwasi oyo aboti “mombóto” ezali nani? (b) Mombóto oyo alakamaki ezali nani, mpe azali kokokisa makambo nini?
6 “Mwasi” yango oyo Satana ayini to azali monguna na ye ezali nani? Emoniseli mokapo ya 12 oyo eyebisi biso soki nani azali “nyoka ya kalakala,” eyebisi biso mpe nani azali mwasi oyo Satana azali koyina. Vɛrsɛ 1 elobi mpo na mwasi yango ete “asili kolata moi, mpe sanza ezalaki na nse na matambe na ye, motole [esalemi na minzoto, NW] zomi na mibale na motó na ye.” Mwasi yango elimboli ebongiseli ya Nzambe na likoló, baanzelu ya sembo. “Mwana mobali” oyo ye aboti ezali nde Bokonzi ya Nzambe mpe Yesu Klisto azali mokonzi na yango.—Emoniseli 12:1-5.
7 Kasi, “mombóto,” to mwana ya mwasi oyo alobelami na Genese 3:15, oyo akosasa Satana “na motó” tii akoboma ye, ezali nani? Ezali ye oyo Nzambe atindaki longwa na likoló ete abotama na ndenge ya ekamwiseli na mwasi moko oyo ayebani naino na mobali te: moto oyo tobéngi Yesu. (Matai 1:18-23; Yoane 6:38) Mokapo 12 ya Emoniseli eyebisi ete Mombóto yango, Yesu Klisto, mokonzi oyo asekwi mpe azali koyangela na likoló, akotambwisa etumba mpo na kolonga Satana mpe akotya “Bokonzi na Nzambe na biso, na bokonzi na Klisto na ye,” lokola Emoniseli 12:10 elobi yango.
8. (a) Nzambe asalaki eloko nini ya sika mpo na kokokisa mokano na ye ya ebandeli? (b) Banani bazali na guvernema ya sika ya Nzambe?
8 Na bongo, Bokonzi yango oyo epesami na Yesu Klisto ezali eloko ya sika oyo Nzambe asali mpo na kokokisa mokano azalaki na yango na ebandeli ete bato bázwa bomoi ya seko awa na mabelé. Nsima ya botomboki ya Satana, mbala moko Yehova akamataki ekateli mpo na kosukisa mabe nyonso na nzela ya Bokonzi yango ya sika. Ntango azalaki awa na mabelé Yesu amonisaki ete akoyangela ye moko te. (Luka 22:28-30) Bato mosusu basengelaki koponama awa na mokili, mpe bato yango bakosangana na ye na likoló mpo na koyangela; na bongo, bakozala eteni ya mibale ya mombóto ya mwasi. (Bagalatia 3:16, 29) Biblia epesi motuya ya bato 144 000 oyo bakoyangela na Yesu, bango nyonso bakamatami na kati ya bato ya masumu awa na mabelé.—Emoniseli 14:1-3.
9. (a) Mpo na nini esengelaki naino ete Yesu aya na mokili lokola moto? (b) Ndenge nini Yesu asukisaki misala ya Zabolo?
9 Kasi, liboso Bokonzi yango ebanda koyangela, esengelaki naino ete Yesu Klisto, eteni ya liboso ya mombóto yango, aya awa na mabelé. Mpo na nini? Mpamba te Yehova Nzambe aponaki ye lokola Ye oyo ‘akobebisa [to, akosukisa] misala ya Zabolo.’ (1 Yoane 3:8, NW) Moko na misala ya Satana ezalaki kopusa Adama na kosala lisumu oyo ememelaki bana na ye nyonso etumbu ya lisumu mpe ya liwa. (Baloma 5:12) Yesu asukisaki mosala yango ya Zabolo na ndenge akabaki bomoi na Ye lokola mbeka. Na bongo, apesaki bato likoki ya kolongwa na etumbu ya lisumu mpe ya liwa, afungolaki nzela ya bomoi ya seko.—Matai 20:28; Baloma 3:24; Baefese 1:7.
Makambo oyo mbeka ekokisi
10. Ndenge nini Yesu akokanaki na Adama?
10 Lokola Nzambe akamataki bomoi ya Yesu na likoló mpe atyaki yango na libumu ya mwasi moko, Yesu abotamaki moto ya kokoka; lisumu ya Adama ezwaki ye te. Akokaki kozala na bomoi libela na libela awa na mabelé. Ndenge moko mpe, Adama akelamaki lokola moto ya kokoka mpe akokaki kozala na bomoi ya seko awa na mabelé. Ntoma Paulo akanisaki bokokani oyo kati na bato yango mibale ntango akomaki ete: “‘Moto ya liboso Adama akómaki molimo ya bomoi.’ Adama ya nsuka [Yesu Klisto] akómaki elimo oyo epesaka bomoi. Moto ya liboso auti na mabelé mpe asalemi na mabelé; moto ya mibale auti na likoló.”—1 Bakolinti 15:45, 47, NW.
11. (a) Adama na Yesu basalaki bopusi nini epai ya bato? (b) Ndenge nini tosengeli kotalela mbeka ya Yesu?
11 Bokokani oyo ezali kati na bato yango mibale—oyo bazalaki bato ya kokoka na mokili oyo—emonisami na maloba oyo ya Biblia ete Yesu ‘amipesaki lokola lisiko oyo ekokani mpo na bato nyonso.’ (1 Timote 2:6, NW) Yesu akokanaki na nani? Na Adama ntango azalaki moto ya kokoka! Lisumu ya Adama ya liboso ememelaki bato nyonso etumbu ya liwa. Mbeka ya “Adama ya nsuka” epesaki bato nzela ya kosikwama na lisumu mpe na liwa mpo tózwa bomoi ya seko. Mbeka ya Yesu ezali solo na motuya monene! Ntoma Petelo alobaki ete: “Bosili kosikwa . . . na biloko bikopola lokola palata soko wolo te.” Kasi, Petelo alimbolaki ete: “Bosili kosikwa na makila na Yesu Klisto maleki nyonso na motuya, lokola makila na mwana na mpate oyo na mpota te mpe na litɔnɔ te.”—1 Petelo 1:18, 19.
12. Ndenge nini Biblia elobeli lolenge oyo etumbu ya liwa oyo tozali na yango ekosuka?
12 Biblia esaleli maloba kitoko mpo na komonisa ndenge oyo bato bakolongwa na etumbu ya liwa, elobi ete: “Libunga na moto moko [Adama] eyeisi ekweli mpo na bato nyonso, boye mosala na boyengebene [etamboli ya Yesu lokola moto ya sembo tii na liwa na ye] na moto moko eyeisi elonga mpe bomoi mpo na bato nyonso. Zambi [lokola] moto moko [Adama] na nkanza na ye azalisi bato mingi na masumu, bongo mpe moto moko [Yesu] na nzela na botosi na ye azalisi bato mingi bayengebene.”—Baloma 5:18, 19.
Elikya ya nkembo
13. Eloko nini epesi bato makanisi oyo bazali na yango mpo na kozala na bomoi ya libela?
13 Likambo oyo Nzambe asali esengeli kosepelisa biso mingi mpenza! Ozali na esengo te na koyeba ete Nzambe apesi biso Mobikisi? Babimisi ya zulunalo moko basalaki ankɛtɛ na engumba moko monene ya États-Unis na motuna oyo: “Okosepela kozala na bomoi ya seko?” Likambo ya kokamwa, bato 67,4 % bayanolaki ete, “Te.” Mpo na nini balobaki ete balingi kozala na bomoi ya seko te? Ezali mpo ete bomoi awa na mabelé etondi na mikakatano. Moko na bato oyo batunaki alobaki ete: “Likanisi ya kozala na mbula 200 ezali kosepelisa ngai te.”
14. Mpo na nini kozala na bomoi ya libela ekozala esengo monene?
14 Kasi, Biblia ezali koloba te ete bomoi ya seko ekozala na mokili oyo bato bazali na maladi, bazali mibange, to mpe bazali na mikakatano mosusu. Ezali bongo te, mpamba te Yesu, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, akosukisa mikakatano yango oyo Satana akɔtisaki. Biblia elobi ete Bokonzi ya Nzambe “ekobuka mpe ekosilisa” biyangeli nyonso ya mokili oyo. (Danyele 2:44) Na ntango wana, libondeli oyo Yesu ateyaki bayekoli ekozwa eyano, ete “mokano” ya Nzambe ‘esalema na mabelé lokola esalemaka na likoló.’ (Matai 6:9, 10, NW) Na mokili ya sika, nsima ya kosilisa makambo nyonso ya mabe, bolamu ya lisiko ya Yesu ekokokisama na mobimba mpenza. Ɛɛ, bato nyonso oyo bakokokisa masɛngami bakokóma na nzoto ya kokoka!
15, 16. Makambo nini ekozala na mokili ya sika ya Nzambe?
15 Vɛrsɛ oyo ya Biblia ekokokisama mpo na bato oyo bakofanda na mokili ya sika: “Tiká ete mosuni na ye eleka yango na elenge na kitoko, azonga na mikolo na bolenge na ye.” (Yobo 33:25) Elaka mosusu ya Biblia ekokokisama, yango elobi: “Miso na bakufeli miso makofungolama, mpe matoi na bimimi makozipolama; bongo, motɛngumi akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo na ebubu ekoyemba na esengo.”—Yisaya 35:5, 6.
16 Kanisá naino: Na ntango wana, ata soki tozali na mbula boni, ezala mbula 80, mbula 800, to mpe koleka, tokozala nzoto kolɔngɔnɔ. Makambo ekozala ndenge Biblia elaki ete: “Mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.” Na ntango wana, elaka oyo mpe ekokokisama: “[Nzambe] akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”—Yisaya 33:24; Emoniseli 21:3, 4.
17. Tokoki kolikya ete bato bakosala makambo nini na mokili ya sika?
17 Na mokili ya sika wana, tokozala na likoki ya kosalela bɔɔngɔ na biso na ndenge oyo Mokeli na biso alingaki ntango asalaki yango mpe apesaki yango makoki oyo ezangi nsuka ya koyekola makambo. Kanisá naino makambo kitoko oyo tokosala! Kutu, kaka na biloko oyo ezali na mabelé, bato ya kozanga kokoka basali biloko nyonso oyo tozali komona: telefone ya mabɔkɔ, mikro, montre, ordinatere, aviɔ, mpe bongo na bongo. Eloko moko te esalemi na biloko oyo euti epai mosusu. Ntango tokozwa bomoi ezangi nsuka na Paladiso awa na mabelé, makoki ya kosala biloko ya sika ekozala na nsuka te!—Yisaya 65:21-25.
18. Mpo na nini na mokili ya sika tokolɛmba bomoi te?
18 Tokolɛmba mpe bomoi te. Lokola sikoyo, atako tolyá mbala nkóto na nkóto, tozalaka kaka na esengo ntango toyebi ete tokolya lisusu. Na kati ya Paladiso, ntango tokozala bato ya kokoka, biloko kitoko oyo mabelé ekobota ekosepelisa biso mingi koleka. (Yisaya 25:6) Mpe tokozala na esengo ya libela ya kobatela ebele ya banyama mpe kotala kolala ya moi, bangomba, bibale, mpe mabwaku. Ya solo, bomoi ekozala ntango nyonso na makambo oyo ekosepelisa biso na mokili ya sika!—Nzembo 145:16.
Tókokisa masɛngami ya Nzambe
19. Mpo na nini elongobani kokanisa ete ezali na masɛngami mpo na kozwa likabo ya bomoi ya seko?
19 Okanisi ete okoki kozwa likabo monene ya bomoi ya seko na Paladiso oyo Nzambe akopesa kozanga ete osala eloko moko? Ebongi mpenza ete Nzambe asɛnga biso tókokisa eloko moko, boye te? Ezali mpenza boye. Ezali te ete Nzambe abwakeli biso likabo yango. Atandeli biso likabo yango, kasi tosengeli kosembola lobɔkɔ mpo na kozwa yango. Ɛɛ, esengeli kosala makasi. Okoki kotuna motuna oyo elenge mobali mozwi atunaki Yesu ete: “Nasala malamu nini ete nazala na bomoi na seko?” To okoki kobalola motuna yango na ndenge oyo mokɛngɛli ya bolɔkɔ na engumba Filipi atunaki ntoma Paulo: “Nasala nini ete nabikisama?”—Matai 19:16; Misala 16:30.
20. Lisɛngami ya ntina mingi mpo na bomoi ya seko ezali nini?
20 Na butu ya nsuka liboso akufa, Yesu alobelaki lisɛngami moko ya ntina ntango abondelaki Tata na ye ya likoló ete: “Oyo ezali bomoi ya seko ete báyeba yo Nzambe moko na solo mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Ebongi ete tóyeba Yehova oyo apesi biso likoki ya kozwa bomoi ya seko, mpe tóyeba ye oyo akufaki mpo na biso, elingi koloba Yesu Klisto. Kasi, makambo esuki kaka na kozwa boyebi yango te.
21. Ndenge nini tokomonisa ete tozali kokokisa lisɛngami ya kozala na kondima?
21 Biblia elobi lisusu ete: “Ye oyo andimi Mwana azali na bomoi na seko.” Mpe ebakisi ete: “Ye oyo aboyi Mwana akomona bomoi te, kasi nkanda na Nzambe ekoumela na ye.” (Yoane 3:36) Okoki komonisa ete ozali kondima Mwana soki osali mbongwana na bomoi na yo mpo na kosala mokano ya Nzambe. Osengeli kotika etamboli nyonso ya mabe oyo ozalaki na yango liboso mpe kosala makambo oyo ezali kosepelisa Nzambe. Osengeli kosala oyo ntoma Petelo atindaki ete: “Na bongo, bóbongola mitema, mpe bóbongwana, mpo ete masumu na bino elongwa, mpe bileko ya kobɔndisama biuta na Yehova.”—Misala 3:19, NW.
22. Kolanda matambe ya Yesu esɛngi kokokisa makambo nini?
22 Tóbosana te ete tokoki kozwa bomoi ya seko se soki tondimeli Yesu. (Yoane 6:40; 14:6) Tokomonisa ete tozali kondimela Yesu soki tozali ‘kolanda matambe na ye.’ (1 Petelo 2:21) Kosala bongo esɛngi makambo nini? Na libondeli moko asalaki epai ya Nzambe, Yesu alobaki ete: “Talá nasili koya, . . . Ɛ Nzambe, nayei kosala mokano na yo.” (Baebele 10:7) Ezali na ntina mingi ete olanda Yesu na kondima kosala mokano ya Nzambe mpe komipesa na Yehova. Na nsima, osengeli komonisa komipesa yango na batisimo ya mai. Yesu mpe azwaki batisimo. (Luka 3:21, 22) Kosala matambe yango ezali makambo oyo ebongi mpenza. Ntoma Paulo amonisaki ete “bolingo na Klisto ekangi biso.” (2 Bakolinti 5:14, 15) Na ndenge nini? Bolingo nde etindaki Yesu ete akaba bomoi na ye mpo na biso. Yango esengeli kokanga biso ete tókamata ekateli, biso mpe tóndimela ye, boye te? Ɛɛ, esengeli kopusa biso tólanda ndakisa na ye ya bolingo oyo emonani na ndenge amipesaki mpo na kosalisa basusu. Klisto akokisaki mokano ya Nzambe na bomoi na ye mobimba; biso mpe tosengeli kosala bongo, tosengeli kozala na bomoi mpo na biso moko te.
23. (a) Baoyo bakozwa bomoi basengeli kobakisama na nini? (b) Eloko nini esɛngami na baoyo bazali na lisangá ya boklisto?
23 Esuki wana te. Biblia elobi ete ntango bato 3 000 bazwaki batisimo na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., bato yango ‘babakisamaki.’ Babakisamaki na nini? Luka alobi ete “baumeli ntango nyonso na mateya na bantoma, na lisangana.” (Misala 2:41, 42) Ɛɛ, bazalaki koyangana esika moko mpo na koyekola Biblia mpe kofanda na boninga mpe na bongo babakisamaki, to bakɔtaki na lisangá ya boklisto. Baklisto ya liboso bazalaki koyangana mbala na mbala mpo na koteyama makambo ya elimo. (Baebele 10:25) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova basalaka bongo, mpe balendisi yo ete oyanganaka na makita na bango.
24. “Bomoi ya solosolo” ezali nini, mpe ndenge nini mpe ntango nini ekokokisama?
24 Bamilio ya bato bazali kolanda nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi. Kotikala na nzela yango ya nkaka esɛngi milende makasi! (Matai 7:13, 14) Paulo amonisaki likambo yango na elendiseli ya mɔ́tɔ oyo apesaki ete: “Obundaka etumba malamu na kondima, osimba bomoi na seko; zambi obyangami mpo na yango.” Mpo na ‘kosimba bomoi ya solosolo’ esengeli kobunda etumba yango. (1 Timote 6:12, 19, NW) Bomoi wana ekozala bomoi ya bwale te to ya mpasi te mpe minyoko oyo tozali na yango lelo, oyo lisumu ya Adama ememelaki biso. Kasi, ekozala bomoi na mokili ya sika ya Nzambe, oyo etikali moke ekosalema ntango bato nyonso oyo balingaka Yehova Nzambe na Mwana na ye bakozwa bolamu ya mbeka ya lisiko ya Klisto, nsima ya kolongola ebongiseli ya biloko ya ntango oyo. Tiká ete biso nyonso tópona bomoi—“bomoi ya solosolo”—bomoi ya seko na mokili ya sika mpe ya nkembo oyo Nzambe akosala.
Okopesa eyano nini?
◻ Nani azali nyoka, mwasi, mpe mombóto oyo alobelami na Genese 3:15?
◻ Ndenge nini Yesu akokanaki na Adama, mpe lisiko epesaki nzela na likambo nini?
◻ Ozali kozela eloko nini oyo ekosala ete bomoi ya seko na mokili ya sika ezala likambo ya esengo mpo na yo?
◻ Tosengeli kokokisa masɛngami nini mpo na kozala na mokili ya sika ya Nzambe?
[Elilingi na lokasa 10]
Mpo na bilenge mpe mikóló, Yesu azali nzela se moko mpo na bomoi oyo ezangi nsuka
[Elilingi na lokasa 11]
Na ntango oyo Nzambe aponi, mibange bakozala lisusu makasi lokola bilenge