Tolanda pole na mokili
“Ye oyo akolanda ngai ... akozala na pole na bomoi”.—YOANE 8:12, MN.
1. Mpo na nini pole ezali na ntina mingi?
MBELE tokokaki kosala nini soki pole ezalaki te? Kanisa naino ete mikolo nyonso ya mobu osengeli kolamuka na likanisi ya kolekisa bangonga 24 kati na molili. Kanisa ete mokili ezali na langi te, mpo ete soki pole ezali te langi mpe ekozala te. Mpo na koloba solo, soki pole ezalaki te mbele biso mpe tozali te! Mpo na nini? Mpo ete, kati na ebongiseli ya photosynthèse, nzete mpe matiti na langi ya mai na mpondu ezali kosalela pole mpo na kosala bilei oyo tozali kolya— masangu, ndunda mpe mbuma. Ya solo, mbala mosusu tolyaka nyama Kasi banyama yango balyaka matiti to mpe banyama mosusu oyo balyaka matiti. Na yango, kati na mosuni bomoi na biso esimbami na pole.
2. Biutelo nini makasi ya pole tozali na yango, mpe yango ezali koteya biso nini na ntina na Jéhovah?
2 Pole oyo tozali kozwa eutaka na moi, oyo ezali monzoto. Atako epesaka pole mingi mpenza, moi na biso ezali monzoto ya monene mingi te. Minzoto mingi eleki yango na monene. Nzokande, etuluku ya minzoto oyo tozali kati na yango, galaksi oyo ebyangami Voie lactée, ezali na minzoto koleka miliare monkama. Lisusu, kati na molongo, ezali na bamiliare mingi ya bagalaksi. Oyo nde limpinga ya nsomo kati na makolo! Oyo nde pole mingi esengeli kouta na minzoto yango! Jéhovah, oyo azalisaki yango azali liziba ya kokamwa ya pole! Yisaya 40:26 elobi ete: “Botombola miso na bino na likolo mpe bomona! Nani asalaki yango? Ye oyo akobimisaka ebele na bango na motuya, akobyangaka bango nyonso na nkombo; mpo na monene na nguya na ye mpe mpo ete azali na makasi kati na nguya, moko te azali kozanga.”
Pole ya lolenge mosusu
3. Pole ya elimo oyo ezali kouta na Jéhovah ezali na ntina nini?
3 Jéhovah azali mpe Liziba ya pole ya lolenge mosusu, oyo ezali kopesa biso nzela ya komona makambo na lolenge ya elimo. Pole ya lolenge yango ezali kopesa boyebi, kolakisama mpe bososoli ya elimo. Ezali kosikola na molili mpe na kozanga boyebi. Jéhovah azali kopesa pole yango na nzela ya boyebi ya sikisiki ya Liloba na ye, Biblia. Na nzela yango, toyebi Nzambe azali nani mpe nini ezali mikano na ye. “Mpo ete Nzambe nde alobaki ete: ˈTika moi engenga kati na molili,ˈ ye wana asili kongenga kati na mitema na biso ete apesa biso pole na boyebi na nkembo na Nzambe kati na elongi na Klisto.” (2 Bakolinti 4:6) Yango wana, solo oyo ezali kati na Liloba na Nzembe ezali kosikola biso na molili mpe na kozanga boyebi. Yesu alobaki ete: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.”—Yoane 8:32.
4, 5. Lolenge nini boyebi oyo ezali kouta na Jéhovah ekoki kosalisa biso lokola pole kati na bomoi na biso?
4 Jéhovah, Liziba ya pole ya solo ya elimo, azali “ye oyo abongi na boyebi nyonso.” (Yobo 37:16) Yango wana na Nzembo 119:105 mokomi na Nzembo alobi na ntina na Nzambe ete: “Liloba na yo ezali mwinda na matambe na ngai mpe pole na nzela na ngai.” Jéhovah azali na makoki ya kongengisa na elimo bobele makambo oyo tokosala na nsima te, kasi lisusu nzela oyo tozali kotambola na yango. Kozanga lisalisi yango, mbele bomoi ekokani mwa moke na likambo ya kokemba motuka mozangi miinda kati na molili makasi na nzela oyo ezali nyokanyoka, oyo eleki likolo na bangomba. Pole ya elimo oyo ezali kouta na Nzambe ekokani na pole ya mwinda. Ezali kongengisa nzela na biso, mpo ete tomona malamu epai wapi tozali kokende.
5 Esakweli ya Yisaya 2:2-5 emonisi ete na mikolo na biso Nzambe azali koyanganisa bato na mabota nyonso, baoyo balingi kozwa pole ya elimo mpo na koyekola mpe kosalela losambo ya solo. Tozali kotanga na verset 3 ete: “Alakisa biso nzela na ye mpe ete totambola na bipai bikokendaka ye.” Verset 5 ebyangi baoyo bazali koluka solo: “Yaka, totambola na pole na Jéhovah.”
6. Pole oyo ezali kouta na Jéhovah ezali komema biso wapi?
6 Na bongo, Jéhovah azali liziba ya mitindo mibale ya pole oyo ezali na ntina mingi mpo na bomoi: pole ya mosuni mpe pole ya elimo. Pole ya mosuni ezali kobatela nzoto na bomoi sikawa na boumeli ya mibu soko 70 to 80. Nzokande, pole ya elimo ekomema na bomoi ya seko kati na Paradis na mabele. Ezali lokola Yesu alobaki yango na Nzambe kati na libondeli ete: “Oyo ezali bomoi na seko ete bayekola koyeba yo Nzambe moko na solo mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.”—Yoane 17:3, MN.
Mokili ezali kati na molili ya elimo
7. Mpo na nini tozali lelo na mposa mingi mpenza ya pole ya elimo?
7 Lelo oyo tozali na mposa ya pole ya elimo koleka liboso. Bisakweli lokola oyo biyebisami na Matai mokapo 24 mpe 2 Timote mokapo 3 bizali komonisa ete nsuka ya biloko na ntango oyo ebelemi. Bisakweli yango mpe mosusu, biyebisaki makambo ya nsomo oyo mazali kokokana na ntango na biso, likambo oyo limonisi ete tozali kobika na “mikolo na nsuka.” Na boyokani na bisakweli yango, ekeke ya ntuku mibale oyo esili komona mpasi ya lolenge nyonso. Koboma bato mpe mobulu esili kokóla na motindo ya nsomo. Bitumba bisili koboma bato koleka milio monkama. Bokono lokola SIDA, oyo ezali kobangisa, ezali likama mpo na bamilió ya bato (bato 160.000 basili kokufa na yango bobele na Etats-Unis). Bomoi ya libota ezali kopanzana, mpe mitinda ya bizaleli malamu mitali kosangisa nzoto mizali kotalelama lokola makambo ya kala.
8 Bato bazali lelo kati na ezaleli nini, mpe mpo na nini?
8 Secrétaire général ya kala ya O.N.U., Javier Pérez de Cuéllar alobaki mokolo moko ete: “Ezalela ya mokili ezali komonisa polele ete bobola [ezali kotya na likama] bomoko ya bato.” Amonisaki ete “bato koleka miliare moko bazali kobika lelo kati na bobola na makambo nyonso” mpe ete yango “ezali kokolisa ntina ya koswana makasi.” Abakisaki ete: “Bampasi wana ya minene ezwi naino mwango moko te oyo biyangeli bikoki kosalela mpo na kosilisa yango.” Mokambi ya lisanga moko oyo eyebani mingi alobaki ete: “Ntina monene ya mokakatano ya bato ezali ete mokili mozali lisusu na mwango ya koyangelama te.” Maloba oyo ya Nzembo 146:3 mazali mpenza solo wana elobi ete: “Ndimela bana na mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te.”
9. Banani bazali ntina na molili oyo ezali kozipa bato lelo, mpe nani akoki kolongola biso na bopusi yango?
9 Ezalela ya sikawa ekokani na oyo esakolamaki kati na Yisaya 60:2 ete: “Tala, molili ekozipa mokili, molili tuu ekozipa mabota.” Soki bato mingi ya mokili bazipami na molili, ezali mpo ete bazali kozwa te pole ya elimo oyo ezali kouta na Jéhovah. Ntina ya liboso ya molili ya elimo ezali Satan le Diable mpe bilimu mabe na ye, banguna minene ya Nzambe na pole. Bazali “mikonzi na mokili oyo na molili.” (Baefese 6:12) Lokola tokoki kotanga yango na 2 Bakolinti 4:4, Diable azali “nzambe na mokili oyo,” oyo “azimisi miso na makanisi na bango baboyi kondima ete bamona pole na nsango malamu na nkembo na Klisto te. Ye azali elilingi na Nzambe.” Boyangeli moko te ya bato ekoki kolongola mokili na bopusi ya Satana. Bobele Nzambe ye moko akoki kosala yango.
“Pole monene”
10. Na maloba nini Yisaya asakolaki ete na eleko na biso pole ekongengisa bato?
10 Nzokande, wana molili ya makasi mozali kozipa ebele na bato, Liloba na Nzambe esakolaki mpe na Yisaya 60:2, 3 ete: “Nde Jéhovah akobimela yo, mpe nkembo na ye ekomonana likolo na yo. Mpe mabota bakoya epai na pole na yo.” Likanisi oyo eyokani na oyo ezali kati na Yisaya mokapo 2, epai elakami ete losambo engengisami ya Jéhovah, losambo ya solo esengelaki kotyama na mikolo ya nsuka oyo tozali kati na yango, lokola tozali kotanga na ba versets 2 mpe 3 ete: “Mabota nyonso bakokenda wana. Bikolo mingi bakokenda mpe bakoloba ete: ˈYakani, tobuta na ngomba na Jéhovah,ˈ“ elingi koloba na esika etombwami ya losambo na ye, oyo ezali ya solo. Na yango, atako mokili eyangelami na Satana, pole oyo euti na Nzambe ezali kongenga mpe ezali kosikola ebele na bato na molili.
11. Nani asengelaki mpenza komonisa pole na Jéhovah, mpe Simeona alobaki nini ntango amonaki ye?
11 Esakweli oyo ekomami na Yisaya 9:2 eye bisaki ete Nzambe akotinda moto moko na mokili mpo na komonisa pole na ye. Tozali kotanga ete: “Bato baoyo batambolaki na molili bamoni pole monene; baoyo bafandaki na mokili na molili na kufa pole engengeli bango.” “Pole monene” wana ezali Yesu Klisto, Molobeli na Jéhovah. Yesu alobaki ete: “Ngai nazali pole na mokili. Ye oyo akolanda ngai akotambola kati na molili te kasi akozala na pole na bomoi.” (Yoane 8:12, MN) Bato mosusu bayebaki makambo yango, wana Yesu azalaki naino bobele mwana moke. Kati na Luka 2:25 tozali kotanga ete mobali moko na nkombo Simeona azalaki “moto na sembo mpe na kobanga Nzambe” mpe ete “elimo santu ezalaki likolo na ye.” Ntango Simeona amonaki mwana moke Yesu, alobaki kati na libondeli epai na Nzambe ete: “Mpo ete miso na ngai mamoni kobikisa na yo oyo ebongisi yo na miso na bato nyonso, pole mpo na kolongola ezipeli na mabota.”—Luka 2:30-32.
12. Ntango nini mpe lolenge nini Yesu abandaki kolongola ezipeli ya molili likoló na bato?
12 Yesu abandaki kolongola ezipeli ya molili likolo na bato mwa moke nsima na batisimo na ye. Lokola Matai 4:12-16 eyebisi biso yango, akokisaki bongo Yisaya 9:1, 2, epai balobeli “pole monene” oyo esengelaki kongengisa bato oyo batambolaki kati na molili ya elimo. Tozali kotanga na Matai 4:17 ete: “Longwa wana, Yesu abandi kosakola, alobi mpe ete: ˈBobongola mitema! Mpo ete Bokonzi na likolo esili kobelema.ˈ” Na nzela ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe, Yesu angengisaki bato na ntina na mikano na Nzambe. Ye “abimisi bomoi mpe kozanga kopola kati na pole mpo na nsango malamu.”—2 Timoté 1:10.
13. Yesu alobaki nini na ntina na ye moko, mpe mpo na nini akokaki kosala yango na kondimisama makasi?
13 Yesu amonisaki na sembo nyonso pole ya Nzambe. Alobaki na ntina yango ete: “Ngai nazali pole; nayei na mokili ete moto na moto oyo azali kondima ngai aumela na molili te.... Nasololi monoko na ngai moko te kasi na motindi na ngai, Tata ye moko, asili kolakisa ngai yango ezali ngai koloba mpe yango ezali ngai kosolola. Nayebi ete lilako na ye ezali bomoi na seko.”—Yoane 12:44-50.
“Kati na ye ezalaki bomoi”
14. Mokumba nini mopesami na Yesu kati na Yoane 1:1, 2?
14 Ya solo, Jéhovah atindaki Mwana na ye na mabelé mpo ete azala pole oyo ekolakisa bato nzela ya bomoi na seko. Totala lolenge eyebisami na Yoane 1:1-16. Na ba versets 1 mpe 2, (MN) tozali kotanga: “Liloba azalaki na ebandeli, mpe Liloba azalaki elongo na Nzambe, mpe Liloba azalaki nzambe. Ye azalaki na ebandeli elongo na Nzambe.” Awa Yoane azali kopesa na Yesu nkombo “Liloba,” kati na bomoi na ye liboso na kokóma moto. Azali bongo komonisa mokumba oyo Yesu azalaki kokokisa penepene na Jéhovah Nzambe: oyo ya Molobeli. Ntango akomi ete: “Liloba azalaki na ebandeli,” Yoane alingi komonisa ete Liloba azalaki ebandeli na misala ya Jéhovah “ebandeli na bozalisi na Nzambe.” (Emoniseli 3:14) Etelemelo ya lokumu oyo azali na yango kati na bikelamu na Nzambe elongisi likambo oyo ete abyangami “nzambe,” elingi koloba moto na nguya. Na Yisaya 9:6, abyangami “Nzambe na nguya,” kasi Nzambe-Mozwi-na-Nguya nyonso te.
15. Makambo nini mosusu ya ntina mazali na Yoane 1:3-5 matali Yesu?
15 Yoane 1:3, (MN) elobi ete: “Biloko nyonso bizalisami kati na ye mpe, eloko moko te ezalisami libanda na ye.” Na Bakolose 1:16 ekomami ete: “Mpo kati na ye, biloko nyonso bizalisamaki, na biloko na likolo mpe biloko na nse.” Yoane 1:4 (MN) elandi koloba ete: “Oyo ezalisamaki na nzela na ye ezalaki bomoi, mpe bomoi ezalaki pole na bato.” Na yango, ezali na nzela ya Liloba nde lolenge mosusu nyonso ya bomoi ezalisamaki; ezali lisusu na nzela ya Mwana nde Nzambe azali kopesa bomoi na seko na bato na masumu mpe ya kokufa. Ntembe moko ezali te ete Yesu azali moto na nguya oyo abyangami na Yisaya 9:2 ete “pole monene.” Yoane 1:5, (MN) elobi ete: “Mpe pole ezali kongenga na molili, nde molili mozimisi yango te.” Pole ezali komonisa solo mpe boyengebene, oyo ezali kotemela molili oyo ekeseni na solo mpe boyengebene. Yoane amonisi bongo ete molili ekoki kolonga pole te.
16. Lolenge nini Yoane Mobatisi amonisaki bonene ya mosala na Yesu?
16 Ntóma Yoane alobi sikawa na versets 6 kino 9 ete: “Moto moko azalaki, atindamaki na Nzambe, nkombo na ye Yoane [Mobatisi]. Ye wana ayei lokola motatoli ete atatola mpo na pole ete bato nyonso bandima mpo na ye. Ye [Yoane] mpenza azalaki pole te, kasi ayei mpo na kotatola na ntina na pole [Yesu]. Pole ya solo oyo ekotanelaka moto na moto, ezalaki koingela kati na mokili.” Yoane alobelaki Masiya oyo asengelaki koya mpe amemaki bayekoli na ye epai na Ye. Na nsima, bato na lolenge nyonso bazwaki makoki ya kondima pole. Na motindo yango, Yesu ayaki kopesa bolamu bobele epai na Bayuda te, kasi epai na bato nyonso—bazwi to babola, kozanga kopona loposo.
17. Yoane 1:10, 11 eyebisi biso nini na ntina na ezaleli ya elimo ya Bayuda na eleko na Yesu?
17 Tolanda oyo elobami na versets 10 mpe 11: “Azalaki kati na mokili mpe mokili ezalisamaki na ye nde mokili eyebaki ye te. Ayei epai na ye moko nde bato na ye bayambi ye te.” Liboso ete abotama lokola moto, Yesu azalaki ye oyo asalelamaki mpo na kozalisa mokili na bato. Nzokande, ntango ayaki na mabele, mingi kati na bato na libota na ye, Bayuda, babwakaki ye. Balingaki te ete mabe na bango mpe bokosi na bango ebimisama liboso na bato nyonso. Balingaki mingi molili koleka pole.
18. Lolenge nini Yoane 1:12, 13 emonisi ete bato mosusu bakokaki kokoma bana na Nzambe mpe kozwa libula moko ya ntina?
18 Ntoma Yoane akomi na versets 12 mpe 13 ete: “Kasi epai na baoyo bayambi ye, apesi bango bokonzi na kozala bana na Nzambe, mpo ete bandimi nkombo na ye. Babotami na makiIa te soko na mposa na nzoto te soko na mposa na mobali te kasi na Nzambe mpenza.” Ba versets wana emonisi ete na ebandeli bayekoli na Yesu bazalaki bana na Nzambe te. Liboso ete Klisto aya na mabele, bato bazalaki na makoki te ya kokoma bana na Nzambe to ya kozala na elikya ya bomoi na likolo. Kasi mpo na mbeka ya lisiko na Klisto, oyo bazalaki kondimela, bato mosusu babotamaki lokola bana na Nzambe mpe bazwaki elikya ya kozala bakonzi elongo na Klisto kati na Bokonzi na Nzembe kuna na likolo.
19. Lokola emonisami na Yoane 1:14, mpo na nini Yesu abongi mpenza komonisa malamu pole na Nzambe?
19 Verset 14 epesi likanisi oyo: “Liloba akomi mosuni mpe atemisi mongombo na ye kati na biso mpe tomoni nkembo na ye, nkembo lokola mwana oyo abotami lokola mwana se moko longwa na Tata.” Ntango azalaki na mabele, Yesu amonisaki nkembo na Nzambe lokola Mwana bobele moko mobotami na liboso na Nzambe akokaki kosala yango. Na bongo, ye abongaki mpenza komonisa Nzambe mpe mikano na ye epai na bato, na motindo oyo moto mosusu akoki kosala yango te.
20. Na lolenge ekomami na Yoane 1:15, Yoane Mobatisi alobaki nini na ntina na Yesu?
20 Na nsima ntoma Yoane akomi na verset 15 ete: “Yoane [Mobatisi] atatolaki mpo na ye; angangaki mpe ete: ˈOyo azali ye oyo nalobi mpo na ye ete Ye oyo akoya nsima na ngai abongi kotyama liboso na ngai, mpo ete azalaki liboso na ngai.ˈ” Yoane Mobatisi abotamaki sanza motoba liboso ete Yesu abotama lokola moto. Kasi misala na Yesu mizalaki mingi koleka oyo ya Yoane; yango wana Yesu alekaki Yoane na makambo nyonso. Epai mosusu, Yoane andimaki ete, Yesu oyo azalaki na bomoi liboso ete abotama lokola moto, azalaki solo liboso na ye.
Makabo na Jéhovah
21. Mpo na nini Yoane 1:16 elobi ete tozwi “ngolu likolo na ngolu”?
21 Tozali kotanga kati na Yoane 1:16 ete: “Mpo ete uta na litondi na ye, biso nyonso tozali kozwa ngolu likoló na ngolu.” Atako bato bazali kobotama kati na masumu bazwi na Adam, Jéhovah akani kobebisa biloko mabe na ntango oyo, kopesa nzela na bamilio na bato ete bakoka koleka kozanga kokufa kati na ebongiseli ya sika, kosekwisa bakufi mpe kolongola lisumu mpe liwa, likambo oyo ekomema na bomoi na seko kati na Paradis na mabelé. Bato na masumu nyonso babongi te kozwa bolamu wana, bazali na lotomo na yango te. Ezali makabo na Jéhovah na nzela na Yesu Klisto.
22. (a) Likabo lileki monene ya Nzambe epesaki nzela na kozwa bolamu nini? (b) Libyangami nini epesami na bato nyonso kati na mokanda ya nsuka ya Biblia?
22 Wapi likabo eleki monene oyo epesi nzela na bolamu wana nyonso? “Mpo ete Nzambe alingaki mokili [bato] na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.” (Yoane 3:16) Yango wana, boyebi ya sikisiki ya Nzambe mpe ya Mwana na ye, “Mokonzi na bomoi,” ezali na ntina mingi mpo na baoyo balingi kozwa pole ya elimo mpe bomoi na seko. (Misala 3:15) Mpo na yango, mokanda ya nsuka ya Biblia epesi libyangami oyo epai na baoyo nyonso balingi solo mpe balingi kozala na bomoi: “ˈYaka!ˈ Tika moyoki aloba ete: ˈYaka!ˈ Tika moto na mposa na komela aya, mpe oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.”—Emoniseli 22:17.
23. Baoyo bakokani na bampate bakosala nini wana bakoya na pole?
23 Bato na bopolo, oyo bakokani na bampate, bazali bobele koya epai na pole na mokili te kasi bazali lisusu kolanda pole yango: “Bampate bakolandaka ye mpo ete bayebi [elobeli ya solo na] mongongo na ye.” (Yoane 10:4) Ya solo, bazali kosepela “kolanda matambe na ye” mpo bayebi ete yango ekopesa bango bomoi ya seko.—1 Petelo 2:21.
Okopesa eyano nini?
◻ Wapi mitindo mibale na pole oyo ezali kouta na Jéhovah?
◻ Mpo na nini pole ya elimo ezali na ntina mingi lelo oyo?
◻ Na ndimbola nini Yesu azalaki “pole monene”?
◻ Yoane mokapo l ezali komonisa biso nini na ntina na Yesu?
◻ Baoyo bazali kolanda pole na mokili bazali kozwa bolamu nini?
[Elilingi na lokasa 10]
Simeona abengaki Yesu ete “pole oyo esengeli kolongola ezipeli likoló na mabota”