Tiká Yehova amema yo na bonsomi ya solosolo
“[Tótalatala] na mobeko ya kokoka mpe ya bonsomi.”—YAK. 1:25.
OKOKI KOLIMBOLA?
Mobeko nini ememaka na bonsomi ya solosolo, mpe ezali mpo na bolamu ya banani?
Tosengeli kosala nini mpo tózwa bonsomi ya solosolo?
Baoyo bazali kokoba kotambola na nzela ya bomoi bakozwa bonsomi nini?
1, 2. (a) Tokoki koloba nini mpo na bonsomi ya bato lelo oyo, mpe mpo na nini? (b) Basaleli ya Yehova bakozwa bonsomi nini?
LELO oyo, bato ya lokoso, bato oyo batosaka mibeko te mpe bato ya mobulu bazali se kokóma mingi. (2 Tim. 3:1-5) Mpo na yango, baguvɛrnema ezali kobimisa mibeko ya sika, ezali kotya bapolisi na bisika mingi, mpe kosalela bakamera mpo na kotalatala makambo oyo ezali koleka. Na bamboka mingi, bato bakómi kotya baaparɛyi oyo elelaka soki moyibi alingi kokɔta na ndako, kokanga baporte na bafungola ebele mpe kotya bakangá-moyibi oyo ezali na kura. Bato mingi bakómi kobanga kobima na butu to mpe kotika bana na bango básakana bango moko libándá, ezala na butu to na moi. Ya solo mpenza, bonsomi ya bato ezali se kokita, mpe emonani ete likambo yango ekosila lelo te.
2 Na elanga ya Edene, Satana alobaki ete bato bakozala na bonsomi ya solosolo soki bapesi Yehova mokɔngɔ. Makambo oyo ezali kosalema banda wana emonisi ete abukaki mpenza lokuta! Kutu, ntango bato bazali kotyola mibeko ya Nzambe, mikakatano na mokili ezali se kobakisama. Mikakatano yango ezali mpe kokómela biso basaleli ya Yehova. Atako bongo, tozali na elikya ete mokolo mosusu bato bakolongwa na boombo ya lisumu mpe ya libebi mpe bakozwa oyo Biblia ebengi “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.” (Rom. 8:21) Kutu, Yehova azali sikoyo kobongisa basaleli na ye mpo na bonsomi yango. Na ndenge nini?
3. Mobeko nini Yehova apesi biso basaleli na ye, mpe mituna nini tokotalela?
3 Yehova azali kobongisa biso mpo tózwa bonsomi yango na ndenge apesi biso oyo Yakobo abengi “mobeko ya kokoka mpe ya bonsomi.” (Tángá Yakobo 1:25.) Biblia mosusu ebengi yango mobeko oyo “epesaka bato bonsomi” (Bible na lingala ya lelo oyo). Mbala mingi, bato bamonaka ete mibeko ezalaka nde mpo na kopekisa makambo, kasi ezalaka te mpo na kopesa bonsomi. Na yango, “mobeko ya kokoka mpe ya bonsomi” ezali nini? Ndenge nini mobeko yango ekoki kopesa biso bonsomi?
MOBEKO OYO EPESAKA BONSOMI
4. “Mobeko ya kokoka mpe ya bonsomi” ezali nini, mpe ezali mpo na bolamu ya banani?
4 “Mobeko ya kokoka mpe ya bonsomi” ezali Mibeko ya Moize te, mpo mibeko yango ezalaki komonisa polele makambo ya kobuka mibeko mpe ekokisamaki na Kristo. (Mat. 5:17; Gal. 3:19) Boye, Yakobo azalaki kolobela mobeko nini? Azalaki kolobela “mobeko ya Kristo,” oyo ebengami mpe “mobeko ya kondima” mpe “mobeko ya bato ya bonsomi.” (Gal. 6:2; Rom. 3:27; Yak. 2:12) Na yango, “mobeko ya kokoka” esangisi makambo nyonso oyo Yehova asɛngaka biso. Mobeko yango ezali mpo na bolamu ya bakristo nyonso, ezala baoyo batyami mafuta na elimo to “bampate mosusu.”—Yoa. 10:16.
5. Mpo na nini mobeko ya bonsomi ezali kilo te?
5 Na bokeseni na mibeko ya bikólo mingi, “mobeko ya kokoka” ezali mindɔndɔ te, kilo mpe te. Ezali na mibeko ya makasimakasi te mpe na mitinda oyo ezali mpasi te mpo na kokanga ntina mpe kotosa yango. (1 Yoa. 5:3) Yesu alobaki boye: “Ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.” (Mat. 11:29, 30) Longola yango, “mobeko ya kokoka” ezali te na liste molaimolai ya bitumbu, mpamba te esimbami na bolingo mpe ekomamá na makanisi mpe na mitema, kasi te na bitanda ya mabanga.—Tángá Baebre 8:6, 10.
NDENGE OYO “MOBEKO YA KOKOKA” EPESAKA BISO BONSOMI
6, 7. Tokoki koloba nini mpo na makambo oyo Yehova asɛngaka, mpe mobeko ya bonsomi esalisaka biso tósala nini?
6 Mibeko ya Yehova ezali mpo na bolamu na biso. Na ndakisa, toyebi ete soki touti likoló ya ngomba moko molai mpe tomibwaki na nse, tokobukana to mpe tokokufa. Elingi koloba ete ezali lokola mobeko moko epekisaka biso tósala yango; tomonaka te ete tozangaka likambo moko ya malamu, kasi ezali nde mpo na libateli na biso. Ndenge moko mpe, makambo oyo Yehova asɛngaka biso, oyo ezali na kati ya “mobeko ya kokoka” ya Kristo, ezali mpo na bolamu na biso.
7 Mobeko ya bonsomi ebatelaka biso, kasi epesaka mpe biso nzela tókokisa bamposa na biso nyonso kozanga ete tózwa likama to tóbebisa bonsomi ya bato mosusu. Na yango, mpo tózala na bonsomi ya solosolo, elingi koloba tósala makambo oyo tolingaka, tosengeli kozala na bamposa oyo ebongi, oyo eyokani na makanisi ya Yehova mpe makambo oyo asɛngaka. Na maloba mosusu, tosengeli koyekola kolinga oyo Yehova alingaka, mpe koyina oyo ayinaka. Mobeko ya bonsomi esalisaka biso tósala yango.—Amo. 5:15.
8, 9. Bato oyo batosaka mobeko ya bonsomi bazwaka matomba nini? Pesá ndakisa.
8 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tozali na etumba mpo na kolonga bamposa ya mabe. Atako bongo, ntango tozali kolanda mpenza mobeko ya bonsomi, tozali komona ndenge ezali kolongola biso na boombo ata lelo oyo. Tózwa ndakisa ya mobali moko na nkombo Jay oyo azalaki moombo ya bangi. Ntango akómaki koyekola Biblia, amonaki ete komɛla bangi ezali mabe na miso ya Nzambe. Yango wana, asengelaki kozwa ekateli: Akoba kolanda kaka mposa ya nzoto na ye to atosa mobeko ya Yehova? Azwaki ekateli malamu ya kosalela Nzambe, atako azalaki koyoka mposa makasi ya komɛla bangi. Ayokaki ndenge nini ntango alongaki etumba yango? Alobaki boye: “Nazwaki bonsomi mpe nazalaki na esengo mingi.”
9 Jay amonaki ete bonsomi oyo mokili epesaka, oyo etindaka bato ‘bákanisaka bamposa ya nzoto,’ ekómisaka nde bato baombo; nzokande, bonsomi oyo Yehova apesaka, oyo elimboli “kokanisa na elimo” esikolaka mpe ememaka na “bomoi mpe kimya.” (Rom. 8:5, 6) Nini esalisaki Jay alongwa na boombo ya bangi? Alongaki na makasi na ye moko te, kasi na makasi ya Nzambe. Alobaki boye: “Nazalaki koyekola Biblia mbala na mbala, kobondela mpo na kosɛnga elimo santu, mpe koluka lisalisi epai ya bandeko na ngai ya bolingo na kati ya lisangá.” Makambo yango ekoki mpe kosalisa biso tózwa bonsomi ya solosolo. Tótala ndenge ekoki kosalisa biso.
TÓTALATALA NA LILOBA YA NZAMBE
10. “Kotalatala” na mobeko ya Nzambe elimboli nini?
10 Yakobo 1:25 elobi ete “moto oyo azali kotalatala na mobeko ya kokoka mpe ya bonsomi mpe oyo azali kotingama na yango . . . akozala na esengo ndenge azali kosalela yango.” Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kotalatala” elimboli “kogunzama mpo na kotala”; kosala bongo esɛngaka kolendendela. Na yango, mpo mobeko ya bonsomi ekɔta na makanisi mpe na mitema na biso, tosengeli komipesa na koyekola Biblia mpe komanyola malamumalamu makambo oyo tozali kotánga.—1 Tim. 4:15.
11, 12. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki ntina ya kotika solo etambwisa bomoi na biso? (b) Ndenge bililingi oyo ezali likoló emonisi yango, likama nini mingimingi bilenge basengeli kokeba na yango?
11 Longola yango, tosengeli mpe “kotingama,” to kolendendela na kosalela makambo oyo tozali koyekola na Liloba ya Nzambe; na ndenge yango tokotika solo etambwisa bomoi na biso. Yesu alobaki likambo ya ndenge wana ntango ayebisaki bato mosusu oyo bandimelaki ye ete: “Soki botikali na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoa. 8:31, 32) Buku moko elobi ete na vɛrsɛ yango, liloba ‘koyeba’ emonisi botɔndi oyo moto azali na yango mpo “likambo oyo ‘ayebi’ ezali na valɛrɛ to ntina mingi mpo na ye.” Na yango, tokoloba ete toyebi mpenza solo soki tozali kotika yango etambwisa bomoi na biso. Na ntango yango nde tokoloba mpenza ete “liloba ya Nzambe” ezali “kosala mosala” na kati na biso, ezali kobongola bomoto na biso mpo tómekola malamumalamu Tata na biso ya likoló.—1 Tes. 2:13.
12 Omituna boye: ‘Nayebi mpenza solo? Natikaka yango etambwisa bomoi na ngai? To nazali naino kobendama na makambo mosusu ya mokili oyo nakanisaka ete epesaka bonsomi?’ Ndeko mwasi moko oyo abotamá na libota ya Batatoli ya Yehova akomaki boye: “Soki obotami na kati ya solo, okolanda makambo ya Yehova banda bomwana. Nzokande, ezalaki bongo te mpo na ngai. Nayekolaki te koyina makambo oyo ayinaka. Nazalaki kondima te ete akipaka makambo oyo nasalaka. Nazalaki kobondela ye te soki nakutani na mikakatano. Nazalaki kondimela mayele na ngai moko; sikoyo namoni ete ezalaki bozoba mpo nayebaki eloko te.” Likambo ya malamu mpo na ndeko mwasi yango ezali ete na nsima ayebaki ete makanisi na ye ezalaki mabe, mpe abongwanaki mpenza. Kutu, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza.
ELIMO SANTU EKOKI KOSALISA YO OZWA BONSOMI
13. Ndenge nini elimo santu ya Nzambe ekoki kosalisa biso tózwa bonsomi?
13 Mokapo ya 2 Bakorinti 3:17 elobi boye: “Esika elimo ya Yehova ezali, bonsomi ezali wana.” Ndenge nini elimo santu ekoki kosalisa biso tózwa bonsomi? Ekoki kosalisa biso tólona bizaleli oyo epesaka bonsomi: “bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, komipekisa.” (Gal. 5:22, 23) Soki bizaleli yango ezali te, mingimingi bolingo, bato bakozala na bonsomi ya solosolo te; yango nde ezali komonana na mokili lelo oyo. Nsima ya kolobela mbuma ya elimo, ntoma Paulo abakisaki ete: “Ezali na mobeko ata moko te oyo ezali kotɛmɛla makambo wana.” Alingaki koloba nini? Mobeko moko te ekoki kopekisa mbuma ya elimo ya Nzambe ekola. (Gal. 5:18) Kutu, ntina ya mobeko ya ndenge wana ekozala nini? Yehova alingi ete tókoba kolona bizaleli ya bokristo libela na libela mpe tómonisa yango lisusu mingi.
14. Ndenge nini elimo ya mokili ekómisaka bato baombo?
14 Bato oyo balandaka elimo ya mokili mpe bamipesaka na bamposa ya nzoto bakoki kokanisa ete bazali na bonsomi. (Tángá 2 Petro 2:18, 19.) Kasi, bazali koyeba te ete bazali baombo. Esɛngaka kotyela bango mibeko mpe bipekiseli kilikili mpo na kopekisa bango bákokisa bamposa ya mabe. Paulo alobaki ete “babimisaka mibeko mpo na moyengebene te, kasi mpo na bato oyo babukaka mibeko mpe bato ya motó makasi.” (1 Tim. 1:9, 10) Bato yango bazali mpe baombo ya lisumu mpo basalaka ‘makambo oyo nzoto ezali kolinga,’ nzokande nzoto etindaka moto na makambo ya mabe. (Ef. 2:1-3) Bato yango bazali lokola banyama mikemike oyo ekwei na kati ya saani ya mafuta ya nzoi. Lokola balandaka bamposa na bango, baumelaka te kokwea na motambo.—Yak. 1:14, 15.
TOZWI BONSOMI NA KATI YA LISANGÁ YA BOKRISTO
15, 16. Matomba nini tozwaka na kati ya lisangá ya bokristo, mpe bonsomi nini tozali na yango?
15 Ntango okɔtaki na lisangá ya bokristo, okɔtaki te na moziki moko boye. Okɔtaki na lisangá mpo Yehova nde abendaki yo. (Yoa. 6:44) Mpo na nini abendaki yo? Ezali nde mpo amonaki ete ozali moyengebene to moto oyo abangaka Nzambe? Mbala mosusu okoloba ete, “Ezali bongo te.” Boye, Nzambe amonaki nini? Amonaki ete motema na yo ekondima kotosa mobeko na ye oyo epesaka bonsomi, mpe okondima ete atambwisa yo. Na kati ya lisangá na ye, Yehova apesi yo mateya ya elimo oyo ebongisi motema na yo, alongoli yo na boombo ya mateya ya lokuta mpe biyambayamba, mpe ateyi yo ndenge oyo okoki kolona bizaleli ya bokristo. (Tángá Baefese 4:22-24.) Yango wana, lelo oyo ozali na libaku monene ya kozala na kati ya lisangá kaka moko ya bato oyo, na mokili mobimba, bakoki mpenza kobengama “bato ya bonsomi.”—Yak. 2:12.
16 Kanisá naino: Ntango ozali elongo na bato oyo balingaka Yehova na motema na bango mobimba, obangaka eloko moko? Ozalaka motema likolólikoló? Ntango ozali kosolola na bandeko na Ndako ya Bokonzi, olingaka te kotika biloko na yo na nse to na esika mosusu oyo ozali komona yango te mpo ozali kobanga ete elimwa? Te, ozalaka motema mpiɔ. Okoyoka mpe ndenge wana ntango ozali na bato ya mokili? Soki moke te! Longola yango, bonsomi oyo ozali na yango lelo na kati ya basaleli ya Nzambe ezali kaka komonisa mwa moke bonsomi oyo tokozala na yango na mikolo ezali koya.
“BONSOMI YA BANA YA NZAMBE OYO ETONDI NA NKEMBO”
17. Boyokani nini ezali kati na ‘komonana ya bana ya Nzambe’ mpe bonsomi ya bato?
17 Paulo alobelaki bonsomi oyo Yehova akopesa basaleli na ye oyo bakozwa bomoi awa na mabele; akomaki boye: “Biloko oyo ezalisamá ezali kozela na mposa makasi komonana ya nkembo ya bana ya Nzambe.” Abakisaki ete: “Biloko oyo ezalisamá ekolongwa mpe na boombo ya kopɔla mpe ekozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.” (Rom. 8:19-21) Na vɛrsɛ yango, “biloko oyo ezalisamá” elimboli bato oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi awa na mabele, baoyo bakozwa matomba na ntango ya “komonana” ya bana ya Nzambe oyo batyami mafuta na elimo. Komonana yango ekobanda ntango bakristo oyo batyami mafuta na elimo kuna na likoló, bakosangana elongo na Kristo mpo na koboma bato nyonso ya mabe mpe kokɔtisa “ebele mpenza ya bato” na mokili ya sika.—Em. 7:9, 14.
18. Ndenge nini bonsomi ekobakisama mokemoke mpo na bato ya botosi, mpe nsukansuka bakozwa bonsomi nini?
18 Na ntango yango, bato bakozwa bonsomi moko monene: Satana ná bademo na ye bakotungisa bango lisusu te. (Em. 20:1-3) Bato bakosikolama mpenza! Na nsima, bato 144 000 oyo bakozala banganga-nzambe mpe bakonzi elongo na Kristo bakokoba kopesa bato bonsomi na ndenge bakosalela mokemoke matomba ya mbeka ya lisiko tii ntango bato bakolongwa libela na boombo ya lisumu mpe kozanga kokoka oyo eutá na Adama. (Em. 5:9, 10) Bato oyo bakotikala sembo nsima ya komekama ya nsuka bakozwa bonsomi ya kokoka oyo Yehova alingaki banda kala ete bázala na yango: “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.” Kanisá naino! Okobunda lisusu te mpo na kosala oyo ezali sembo na miso ya Nzambe, mpo nzoto na yo mobimba ekokóma ya kokoka mpe okomekola mpenza bizaleli ya Nzambe, okomonisa mpenza ete osalemá na elilingi na ye.
19. Tosengeli kokoba kosala nini lelo oyo mpo tótikala na nzela oyo ezali komema na bonsomi ya solosolo?
19 Olingi mpenza kozwa “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo”? Boye, tiká motema na yo mpe makanisi na yo ekoba kotosa “mobeko ya kokoka mpe ya bonsomi.” Omipesa mpenza na koyekola Biblia. Tiká solo etambwisa bomoi na yo. Bondeláká mpo na kosɛnga elimo santu. Landáká bibongiseli nyonso ya lisangá ya bokristo mpe kobá kolya bilei ya elimo oyo Yehova azali kopesa. Kotika te ete Satana akosa yo ndenge akosaki Eva, ete makambo oyo Nzambe asɛngaka biso eleki kilo. Ya solo, Satana Zabolo azali na mayele mingi. Kasi, ndenge tokomona yango na lisolo oyo elandi, tosengeli te kotika ete “alonga biso,” “mpo toyebi malamu mayele na ye.”—2 Ko. 2:11.
[Bililingi na lokasa 9]
Nazali naino kobendama na makambo mosusu ya mokili oyo nakanisaka ete epesaka bonsomi?
[Bililingi na lokasa 9]
Natikaka solo etambwisa bomoi na ngai?