Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolongwa na séder kino na lobiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1990 | 15 Sanza ya 2
    • 13, 14. Makila na Yesu mazali na ntina nini mpo na kozwa lobiko? (Baefese 1:13)

      13 Mpe na mikolo na biso, makila oyo ya Yesu, oyo asopaki mazali na boyokani na lobiko. Na mobu 32, wana “Elekeli (Paque), elambo na Bayuda ebelemaki”, Yesu alobaki epai na bayoki mingi boye ete: “Ye oyo akoliaka mosuni na ngai mpe akomelaka makila na ngai azali na bomoi na seko mpe ngai nakosekwisa ye na mokolo na nsuka; mpo ete mosuni na ngai ezali bilei na solo mpe makila na ngai ezali bimeli na solo.” (Yoane 6:4, 54, 55). Bayoki na ye nyonso bango Bayuda bakanisaki na Paque oyo ebɛlɛmaki noki mpe na lolenge bankɔkɔ na bango basalelaki makila ya mwana na mpate na Ezipito.

      14 Awa Yesu azalaki kolobela te mpo na limpa mpe vinyo oyo basalelaki ntango ya Elambo na Nkolo. Molulu oyo ya sika mpo na baklisto ebandaki bobele nsima na mbula moko. Ezali mpo na ntina yango, ata bantoma oyo bayokaki Yesu kobimisa maloba yango na mobu 32 bayebaki naino eloko moko te mpo na yango. Nzokande, Yesu amonisaki ete makila na ye ezalaki ntina mingi mpo na lobiko ya seko. Ntoma Paulo alimbolaki boye: “Na nzela na ye tozwi lisiko mpo na makila na ye, kolimbisama na mabunga na biso, pelamoko ngolu na ye efuluki mingi mpenza.” (Baefese 1:7) Ezali bobele na nzela ya bolimbisi oyo ezwami na makila na Yesu nde tokoki kozala na bomoi ya seko.

  • Kolongwa na séder kino na lobiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1990 | 15 Sanza ya 2
    • 15. Lobiko ya lolenge nini mpe mabaku malamu nini mapesamaki epai na Baebele na Ezipito, kasi elikya nini epesamaki na bango te! (1Bakolinti 10:1-5)

      15 Na Ezipito ya kala, ezalaki bobele lobiko moke nde epesamaki epai na baoyo babimaki na mokili yango. Moko te kati na bango azalaki na elikya ya kozwa bomoi ezangi nsuka nsima ya kobima na Ezipito. Ezali solo ete Nzambe, aponaki Balewi bazala banganga mpo na Bayisraele, mpe basangani mosusu ya libota ya Yuda bakomaki bakonzi mpo na ntango mokuse, kasi mibali oyo nyonso bakufaki (Misala 2:29; Baebele 7:11, 23, 27). Ezali solo mpenza ete, “ebele na bato na ndenge na ndenge” oyo bango mpe babimaki na Ezipito bazwaki mikumba yango te; kasi, elongo na Baebele, bakokaki kolikya kokoma na Mokili na ndaka mpe kozala na bomoi moko malamu na kosambelaka Nzambe. Lisusu, basaleli ya Jéhovah oyo bazalaki na bomoi liboso na ntango ya boklisto bazalaki na ntina ya kolikya ete na ntango oyo eponami bakozwa bomoi ezangi nsuka na mabelé, esika Nzambe abongisaki mpo ete bato bafanda, yango nde ekozala na boyokani na elaka ya Yesu oyo ekomami na Yoane 6:54.

      16. Basaleli ya Nzambe ya kala bakokaki kolikya na lobiko ya lolenge nini?

      16 Na nzela na basaleli na ye mosusu ya ntango ya kala Nzambe akomisaki ete mabelé ezalisamaki mpo ete bato bafanda wana mpe ete basembwi bakofanda na mokili libela. (Nzembo 37:9-11; Masese 2:21, 22; Yisaya 45:18) Kasi ndenge nini basambeli ya solo bakozwa lobiko yango soki bakufi? Nzambe akozongisa bango na bomoi awa na mabelé. Ndakisa, Yobo, amonisaki elikya ete Mozalisi akoka kokanisela ye mpe kobianga ye azonga na bomoi. (Yobo 14:1315; Danyele 12:13) Emonani polele ete lolenge moko ya lobiko ezali komema na bomoi ya seko awa na mabelé.​—Matai 11:11.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto