Biloko na motuya na Evanzile na Yoane
ELIMO na Jéhovah epemisaki ntoma Yoane, oyo akomaki mobange mpo ete akoma lisolo moko kitoko na ntina etali bomoi mpe mosala na Yesu Klisto. Evanzile yango ekomamaki na Efese to na bamboka zongazonga na yango, penepene na mobu 98 ya ntango na biso. Kasi ntina ya lisolo yango ezali nini, mpe nini ezali mwa bileko na motuya oyo bizwami kati na yango?
Ezali na makambo mingi oyo mayebisami kati na ba Evanzile mosusu te
Yoane azalaki kopona makambo. Azongelaki bobele moke na makambo oyo Matai, Malako mpe Luka bayebisaki. Na ntembe te, lisolo wana ya temwe oyo amimonelaki makambo nyonso ye moko ezali na makambo mingi koleka, mpamba te koleka 90%, ya makambo oyo ye akomaki malobelami te kati na ba Evanzile mosusu. Na ndakisa bobele Yoane nde azali kolobela mpo na bomoi na Yesu liboso ya koya na ye na mokili mpe alobi ete ‘Liloba akomaki mosuni’. (1:1-14) Wana ba Evanzile mosusu ezali koloba ete Yesu apetolaki temple na nsuka ya mosala na ye, Yoane azali koyebisa sikisiki ete Klisto asalaki yango mpe na ebandeli (2:13-17) Bobele ntoma wana mobange nde ayebisi biso bikamwiseli mosusu oyo Yesu asalaki: lokola, mai mabongolami na vinyo. lisekwa na Lazare, to koboma mbisi na lolenge ya kokamwa nsima ya lisekwa na ye.—2:1-11; 11:38-40; 21:4-14.
Bakomi nyonso ya Evanzile bazali koyebisa ndenge nini Yesu abandisaki elambo ya kokanisa liwa na ye, kasi bobele Yoane nde amonisi ete Klisto apesaki epai na bantoma liteya ya komikitisa na kosukolaka bango makolo na butu wana. Lisusu, bobele Yoane nde akomi masolo ya polele to ya kozanga kokakatana ya Yesu elongo na bankama mpe na libondeli oyo asalaki mpo na bolamu na bango na libaku wana.—13:1 kino 17:26.
Kati na Evanzile yango, nkombo Yoane ezali komonisa Yoane Mobatisi, nzokande mokomi azali koloba mpo na ye moko lokola ‘moyekoli oyo Yesu alingaki mingi’. (13:23) Na ntembe te, ntoma oyo alingaki Yesu mingi; mpo na biso, bolingo na biso mpo na Klisto ezali kokola ntango tozali kokanga ndimbola oyo Yoane azali kopesa likoló na ye: azali komonisa ye lokola Liloba, limpa ya bomoi, pole ya mokili, Mobateli na mpate oyo aleki malamu, nzela, solo mpe bomoi. (1:1-3,14; 6:35; 8:12.; 10:11; 14:6) Yango nde ezalaki mokano oyo Yoane akanaki na kokokisa: ’(Makambo) oyo makomamaki mpo bandima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe mpe ete, wana ekondima bino, bozala na bomoi na seko kati na nkombo na ye.’’—20:31.
Komikitisa mpe esengo
Evanzile ya Yoane ezali komonisa Yesu lokola liloba mpe Mwana na Mpate oyo azali kolongola masumu; ezali koyebisa bikamwiseli oyo bizali komonisa ete azali ’Mosantu ya Nzambe’. (1:1 kino 9:41) kati na makambo mosusu, lisolo ezali komonisa polele komikitisa mpe esengo ya Yoane Mobatisi, oyo, atako azalaki mobongisi nzela mpo na Klisto, alobaki: ‘Ngai nabongi kokangola nsinga na sapato na (ye) te.”(1:27) Sapato ezalaki kokangama na lisalisi ya bansinga esalami na mposo ya nyama. Moombo azalaki na mokumba ya kofungola bansinga ya sapato ya moto mpe komemela ye yango mpo na kotia esika mosusu, mpamba te ezalaki mokumba ya mwana ya mosala. Na liloba wana, Yoane mobatisi azalaki koyebisa komikitisa na ye mpe amonisaki ete azali moke liboso ya Nkolo na ye. Ezali liteya malamu, mpamba te bobele basokemi nde babongi mpo na kosalela jéhovah mpe Mokonzi Masiya oyo ye aponi.—Nzembo 136:6: Masese 21:4.
Na esika ete ayoka zuwa mpo na Yesu, Yoane Mobatisi alobaki: ’’Moninga na mobali, ye oyo azali kotelema mpe koyokamela ye asepeli mingi mpo na mongongo na mobali. Boye esengo oyo na ngai etondi maa.’’ (3:29) Moninga ya mobali-na-libala azalaki na mokumba ya kozala molobeli mpo na libala; mbala mosusu azalaki kobongisa elambo ya libala mpe kopesa mabonza epai na mwasi ya libala mpe kofuta mosolo ya libala epai ya tata ya mwasi. Azalaki na ntina ya kozala na esengo ntango mokumba na ye ekokisamaki. Motindo moko, Yoane asepelaki mpo na komema epai na Yesu basangani ya yambo ya mwasi na Ye. (Emoniseli 21:2, 3) Lokola mosala ya moninga na mobali-na—libala ekoumelaka bobele mwa ntango moke, lolenge moko mpe mosala na Yoane esukaki mokemoke. Alandaki koya moke, nzokande Yesu akolaki monene.—Yoane 3:30.
Yesu azalaki komibanzabanza mpo na bazalani
Na libulu moko ya mai ezwami penepene na engumba ya Sikare, Yesu asololaki na mwasi moko mosamarité mpo na mai ya elilingi oyo ezali kopesa bomoi ya seko. Ntango bayekoli na ye bazongaki, ’’bakamwaki mpo ete azalaki kosolola elongo na mwasi’’. (4:27) Mpo na nini kokamwa motindo wana? Ezali mpo ete, Bayuda bazalaki kotiola Basamarité mpe bazalaki na boyokani ke elongo na bango. (4:9; 8:48) Lisusu, ezalaki kosalema mingi te ete moteyi moyuda asolola na mwasi na miso ya bato banso. Nzokande ezali mpo na bolingo na ye mpe mawa na ye epai na bazalani nde Yesu apesaki litatoli wana, mpe na nsima bafandi ya mboka ’’bayaki epai na ye’’.—4:28-30.
Lokola azalaki komibanzabanza mpo na bazalani, Yesu alobaki: ’’Soko moto azali na mposa na komela, aya epai na ngai mpe amela!’’ (7:37) Na maloba wana, emonani lokola ete Yesu azalaki kolobela ezalela moko ebakisamaki na elambo ya Mingombo, molulu oyo mozalaki koumela mikolo mwambe. Na yango, ntongo nyonso na boumeli ya mikolo nsambo, nganga-nzambe moko azalaki komema mai ya liziba ya Siloame mpe azalaki kosopa yango likoló na etumbelo ya temple. Elobamaki ete likambo yango emonisaki kati na makambo mosusu kosopama ya elimo likoló na bato. Kobanda na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso, elimo na Nzambe epusaki bayekoli na Yesu na komema mai ya lobiko epai na bato ya mokili mobimba. Ezali bobele epai na jéhovah, ’’liziba na mai na bomoi’’, mpe na nsima na Yesu nde bato bakoki kozwa bomoi na seko.—Yilimia 2:13; Yisaya 12:3; Yoane 17:3.
Mobateli malamu na mpate azali kosenzela
Bolingo oyo Yesu azali na yango epai na bato emonani polele kati na mokumba na ye kitoko ya Mobateli na mpate oyo aleki-malamu oyo azali kobatela ‘bampate’ na ye bayekoli na ye, Ata penepene na liwa na ye, Yesu apesaki epai na bayekoli na ye batoli etondi na bolingo mpe asambelaki mpo na bango. (10:1 kino 17:26) Na kokesena na moyibi to na mobebisi, ye akotaki kati na lopango ya bampate na porte. (10:1—5) Lopango ya bampate ezalaki esika oyo bazalaki kobomba bampate na butu mpo na kobatela bango na miyibi mpe banyama na yauli. Ezalaki na mapango ya mabanga mbala mosusu bamemaki likoló na yango banzete ya nzube, mpe ekotela na yango ezalaki kobatelama na mokɛngɛli ya ekuke.
Mbala mosusu ebele na babateli na mpate bazalaki kobomba bampate na lopango bobele moko, kasi mpate na mpate ezalaki bobele kolanda mongongo ya mobateli na yango. kati na mokanda na ye Us et coutumes des pays bibliques (Anglais), Fred Wight akomi: ’’Soki ekomi ntango ya kokabola bitonga mingi ya bampate oyo esangani esika moko, mobateli moko na moko akotelema mpe akonganga: ‘Tahouu! Tahouu!’ to angangi motindo boye na maloba mosusu oyo ye moko alingi. Bibwele bakotelemisa mitó mpe, nsima ya kokutana bango na bango, babandi kolanda ebwele na ebwele mobateli na yango. Bayebi malamu mongongo ya mobateli na bango. Ekomaka mbala mingi ete bato mosusu bameki konganga motindo moko, kasi bampate balandaka bango soki moke te.’ Nzokande, Yesu alobaki mpe ete: “Bampate na ngai bakoyokaka mongongo na ngai mpe ngai nayebi bango mpe bakolandaka ngai. Nazali kopesa bango bomoi na seko.’ (10:27, 28) Ezala ’etonga moke’ to ‘bampate mosusu’’ bazali koyoka mongongo na Yesu, bazali kolanda litambwisi na ye mpe bazali kozwa litomba na libateli na ye oyo etondi na bolingo.—Luka 12:32; Yoane 10:16.
Bosembo makasi ya Mwana na Nzambe
Klisto atikalaki ntango nyonso sembo epai na Nzambe mpe apesaki ndakisa ya mobateli na mpate oyo atondi na bolingo na boumeli ya bomoi na ye mobimba awa na mabelé. Mawa na ye mpo na bato emonanaki ntango abimelaki bato nsima na lisekwa na ye. Ya solo, ezali mpo na mawa yango epai na bazalani nde Yesu, mokolo moko, alendisaki Petelo ete abatela bampate na Ye.—18:1 kino 21:25.
Likoló na nzete ya mpasi, Yesu apesaki ndakisa kitoko ya bosembo kino liwa. Kati na mafinga oyo bafingaki ye, basoda ‘bakabolaki bilamba na ye’, kokokisaka esakweli moko. (Nzembo 22:18) Babwakaki mbese mpo na koyeba soki nani akozwa nzambala kitoko na ye (na greke, khiton) oyo etongamaki mobimba, nde na biteni mikemike te.(19:23, 24) Elamba motindo wana esalamaki mbala mosusu na laine to na lin, ya elamba bobele moko. Ya mpembe to na balangi ebele, mbala mingi ezangaki maboko, elatamaki na nse ya bilamba mosusu mpe ezalaki kokita kino na mabolongo, ata mpe kino na matambe. Ya solo, Yesu azalaki na bolingo ya biloko na mosuni te, atako bongo alataki elamba kitoko, nzambala na ye oyo basonaki yango na biteni te.
Nsima na lisekwa na ye, na libaku moko na komonana na ye, Yesu apesaki bayekoli na ye mbote na maloba oyo: ’Kimya ezala na bino!’ (20:19) Epai na Bayuda, wana ezali mbote oyo ezalaki momeseno. (Matai 10:12, 13) Mbala mosusu bato mingi bazalaki koloba maloba yango kozanga kotiela yango likebi monene kasi ezalaki bongo mpo na Yesu te, mpamba te mwa mikolo liboso alobaki na bayekoli na ye ete: ‘Nazali kotikela bino kimya, nazali kopesa bino kimya na ngai moko.’ (Yoane 14:27) Kimya oyo Yesu apesaki epai na bayekoli na ye ezalaki na moboko ya kondima na bango epai na ye, Mwana na Nzambe, mpe ezalaki kokitisa mitema na bango mpe elimo na bango.
Biso mpe, tokoki kozwa ’’kimya ya Nzambe’’. Tika ete kosepela na kimya wana oyo eleki nyonso oyo ezali kozwama na nzela na boyokani ya penepene basalemi elongo na jéhovah na nsima na Mwana na ye molingami!—Bafilipi 4:6, 7.