Solo ebongolaka bomoi
ATAKO ezali likambo ya mawa, ezali solo ete lelo oyo bato mingi bazali na bomoi ya mpasi, etondi mpenza na mikakatano. Likoki ezali mpo ete bato yango bákoka kozwa bolamu? Bamoko bazali basáli na mabe mpe bazali kobɔtɔla biloko ya bato. Bakoki nde kokóma bato ya sembo na esika oyo bafandi? Eyano na mituna yango mibale ezali ɛɛ. Bato bakoki kobongwana. Bomoi ekoki kobongwana. Ntoma Paulo amonisaki lolenge yango ekoki kosalema ntango akomaki ete: “Bóbongwana mpo na kozwa makanisi na sika kino bokokoka kososola mokano na Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango mpe [ya kokoka, NW].”—Baloma 12:2.
Kolobelama ya ‘mokano ya kokoka ya Nzambe’ ekoki kokundwela biso maloba ya Yesu epai ya bayekoli na ye mbula koleka 20 liboso ete Paulo akoma maloba oyo totángi. Yesu alobaki ete: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoane 8:32) Na liloba “solo,” Yesu alingaki koloba makambo nyonso mapemami na Nzambe—mingi mpenza makambo matali mokano ya Nzambe—oyo mabatelami mpo na biso kati na Biblia. (Yoane 17:17) Solo ya Biblia ezali mpenza kosikola bato? Kotosa mokano ya Nzambe ezali solo kobongola bomoi? Ɛɛ. Tótalela mwa bandakisa.
Kozala na mokano kati na bomoi
Eleki naino mikolo mingi te, na ekólo Gibraltar, Moisés azalaki na esengo soko moke te. Alobi boye: “Nazalaki molangwi masanga mpe nazalaki kolala na libándá. Nazalaki lisusu na elikya te. Butu na butu nazalaki kosɛnga na Nzambe ete ayokela ngai mawa mpe asala ete nakóma na mokolo oyo ekolanda te. Nazalaki kolela wana nazalaki kotuna Nzambe mpo na nini nabotamaki soki nazali na ntina te, nabongi na mosala moko te, nazali na bandeko te, mpe nazali ata na moto te oyo akosalisa ngai. Mpo na nini nasengelaki kokóba kozala na bomoi?” Na nsima, likambo moko esalemaki.
Moisés alobi lisusu ete: “Nayebaki ete Nzambe ayokaki libondeli na ngai ntango nakutanaki na Roberto, oyo azali Motatoli ya Yehova. Roberto apesaki ngai Biblia na mwa búku ezali na motó na likambo ete Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?a mpo na boyekoli ya Biblia. Mokolo na mokolo azalaki koyekola na ngai Biblia na kiti oyo nalalelaki na butu. Nsima ya sanza moko, Roberto amemaki ngai na makita ya Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi ya engumba na biso. Mosika te, solo ya Biblia ebongolaki mpenza lolenge na ngai. Nazalaki lisusu kolala libándá te; natikaki komela masanga mpe likaya. Bomoi na ngai ebongwanaki, mpe nazali na esengo. Nazali kolikya ete mosika te nakozwa batisimo mpe nakosalela Yehova lokola Motatoli na ye.”
Oyo ezali solo mbongwana monene! Ntango bato bazangi elikya, mbala mingi ezalaka mpo ete bazali na boyebi te. Bayebi Nzambe te bayebi mpe mikano kitoko na ye te. Mpo na Moisés, ntango azwaki boyebi yango, epesaki ye makasi mpe mpiko ya kobongola bomoi na ye. Moisés azwaki eyano na libondeli oyo mokomi na nzembo asalaki epai ya Nzambe ete: “Bimisá pole na yo mpe sembo na yo, yango ikokamba ngai; yango ikokómisa ngai na ngomba na bulɛɛ na yo mpe na esika ekofanda yo.”—Nzembo 43:3.
Na ekólo Belize, Daniel akutanaki na makambo lolenge moko. Daniel azalaki kolala libándá te—azalaki na mosala ya lokumu. Kasi, na boumeli ya mbula 20 azalaki kobunda na momeseno ya kosalela bilangwiseli mpe kolangwa masanga mpe azalaki na bomoi ya mbindo. Atako akólaki na Lingomba ya Katolike, Daniel ayebaki ntina ya bomoi te, mpe azalaki kobɛta ntembe ete Nzambe azali te. Akɔtaki na mangomba ndenge na ndenge kolukáká lisalisi kasi amonaki ete baninga na ye mingi oyo bazalaki kosambela, ata mpe bamoko kati na baninga na ye oyo bazalaki bakonzi ya mangomba bazalaki kosalela bilangwiseli mpe kolangwa masanga. Bobele na eleko yango, mwasi na ye alingaki koboma libala.
Lokola azalaki lisusu na elikya te, Daniel akendaki na esika bapesaka lisungi mpo na baoyo balingi kotika momeseno ya kosalela bilangwiseli. Kasi, ayebaki ete nsima ya kobima kuna, akozongela momeseno na ye ya kosalela bilangwiseli soki azwi lisungi te. Kasi lisungi ya motindo nini? Na sanza ya Máí 1996, mikolo mibale nsima ya kobima na esika ya lisungi, Daniel alukaki Motatoli moko ya Yehova mpe akamwisaki ye na lisɛngi oyo: “Nalɔmbi yo, yekolisá ngai Biblia.” Motatoli azwaki bibongiseli mpo na koyekola Biblia na Daniel mbala mibale na pɔ́sɔ, mpe mosika te Daniel akómaki koyokanisa bomoi na ye na mokano ya Nzambe mpe atikaki baninga na ye ya kala mpe asalaki boninga na baklisto oyo bazali bato basalelaka bilangwiseli te, balangwaka masanga te mpe batiká bomoi ya mbindo. Na bongo, Daniel amonaki bosolo ya maloba oyo ya Biblia: “Ye oyo akotambola na bato na mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.” (Masese 13:20) Mosika te, alobaki ete: “Kati na bomoi na ngai, oyo ezali mbala ya liboso nayeba ndimbola ya kozala na lisosoli ya pɛto.” Bomoi ya Daniel mpe ebongwanaki.
Na ekólo Porto Rico, mobali mosusu asalaki mbongwana monene. Autaki kobima na bolɔ́kɔ mpe bato bazalaki kobanga ye mingi, mpamba te abomá bato mingi. Solo ya Biblia ekokaki nde kobongola ye? Ɛɛ. Motatoli moko ya Yehova azwaki likoki ya kopesa ye bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, mpe nokinoki asɛngaki banimero mosusu. Abandaki koyekola Biblia, mpe lokola solo ya Biblia ebandaki kosimba motema na ye, mbongwana oyo asalaki emonanaki na bato nyonso. Moko na bilembeteli ya liboso ya mbongwana na ye ezalaki ntango akitisaki nsuki milai na ye mpe akataki mandefu na ye oyo ezalaki ebele.
Biblia elobi ete Nzambe alimbisaka basumuki oyo babongoli solo motema mpe batiki lolenge ya bomoi na bango ya kala. Paulo akomaki ete: “Boyebi te ete bato na masumu bakosangola libula na Bokonzi na Nzambe te? . . . Bamosusu na bino bozalaki bongo. Kasi bosili kosukwa.” (1 Bakolinti 6:9, 11) Na ntembe te, maloba yango mabɔndisaki mobali yango, mpe lisusu maloba ya Misala 24:15: “Lisekwa ekozala na bato sembo mpe na bato sembo te.” Alobaki ete: “Nazali na mposa ya kozala wana ntango lisekwa ya bakufi ekosalema mpo ete nakoka kosɛnga bolimbisi epai na bato oyo nabomaki.”
Libota ya sika
Luis, oyo azali Motatoli ya Yehova mpe mobongisi-nzela na ekólo Argentine, akutanaki mokolo mosusu na elenge mobali moko oyo azalaki na bomoi ya mawa. Baboti na ye basundolaki ye ntango abotamaki, mpe abɔkwamaki na bisika ndenge na ndenge ya kobɔkɔla bana bazangi baboti. Ntango akómaki na mbula 20, ayebaki esika oyo mama na ye azalaki mpe azwaki ekateli ya kokende kofanda na ye esika moko. Asalaki mosala makasi, abombaki mosolo mingi, mpe na nsima, asalaki mobembo kino na engumba epai mama na ye azalaki. Mama na ye andimaki kofanda na ye kino mbongo na ye esilaki, mpe na nsima abenganaki ye. Koboyama wana epesaki ye likanisi ete amiboma.
Nzokande, Luis ayebisaki elenge mobali yango solo ya Biblia. Kati na yango ezalaki na endimiseli oyo: “Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde [Yehova] akolɔkɔta ngai.” (Nzembo 27:10) Elenge mobali yango ayaki koyeba ete azalaki na Tata ya likoló oyo akosundola ye soko moke te. Azali sikawa na esengo ya kozala mosangani ya libota ya sika, libota ya Yehova.
Mobali mosusu, bobele na ekólo yango ayebisaki Motatoli moko ya Yehova ete alingaka zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Mpo na nini? Mpamba te ebatelaki libala na ye. Emonani ete mokolo moko, wana mobali yango autaki na mosala, amonaki kati na kitunga ya kobwaka nkasa ya mikanda, zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezalaki na motó na likambo ete “Koboma libala” na balɛ́tɛlɛ ya minene. Lokola libala na ye ezalaki na matata mpe ete ye na mwasi na ye bamemaki likambo na esambiselo mpo na kosɛnga bokabwani, akamataki zulunalo yango mpe abandaki kotánga yango. Amemaki yango na ndako mpe atángaki yango elongo na mwasi na ye. Babalani yango bamekaki kosalela toli euti na Biblia oyo epesamaki kati na zulunalo yango. (Baefese 5:21–6:4) Mosika te, boyokani na bango ezongaki. Batikaki likambo ya kosɛnga bokabwani mpe bazali sikawa koyekola Biblia lokola babalani oyo bazali na bomoko.
Na ekólo Uruguay, mobali mosusu na nkombo Luis azalaki na bomoi ya esengo te. Makambo lokola kosalela bilangwiseli, losambo ya bilimu mabe, losambo ya bikeko mpe kolangwa masanga ebebisaki bomoi na ye. Nsukansuka, lokola Luis alɛmbaki nzoto, azalaki lisusu kondima te ete Nzambe azali. Moninga na ye moko apesaki ye búku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création?b Na nsima akutanaki na Batatoli ya Yehova na boumeli ya mwa ntango, kasi Luis azongelaki lisusu kolangwa masanga mpe kosalela bilangwiseli. Mokolo moko, nsima wana makanisi na ye mazongaki, amonaki ete afandi mpenza kati na libulu oyo etondaki na bosɔtɔ, ayokaki mawa mingi mpe abondelaki “tata ya Yesu Klisto,” mpamba te ayebaki mpenza nkombo ya Nzambe te.
Asɛngaki Nzambe ete amonisa ye ntina oyo ye azali na mokili. Luis alobi ete, “Mokolo oyo elandaki, moto moko nayebani na ye apesaki ngai búku oyo azalaki lisusu na mposa na yango te. Motó na likambo na yango ezalaki Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!”c Búku yango esalisaki ye na kozwa eyano na motuna na ye. Luis abondelaki lisusu ete azwa lisungi mpo na koyeba lingomba oyo ekolakisa ye lolenge ya kosalela Nzambe. Oyo nde likambo ya kokamwa! Babɛtaki ngonga na ekuke, mpe Batatoli mibale ya Yehova batɛlɛmaki libándá. Nokinoki Luis abandaki boyekoli ya Biblia na bango. Asalaki bokóli nokinoki mpe azali na mayoki ete apambwami na kozala Motatoli oyo azwi batisimo. Azali sikawa na bomoi ya pɛto mpe azali kosalisa bato mosusu ete bázala na mokano kati na bomoi na bango. Maloba ya Nzembo 65:2 makokisamaki epai na ye ete: “Yo okoyokaka mabondeli; bato nyonso bakoya epai na yo.”
Na ekólo Philippines, Allan azalaki moyekoli oyo amipesaki na kosala mobulu mpo na makambo ya politiki. Azalaki mosangani ya lisangá moko oyo mokano na yango ezalaki ya “kokweisa guvernemá mpo ete na mabota makoya nsima, bato nyonso bázala na bomoi ndenge moko.” Kasi, mokolo moko Batatoli ya Yehova bakutanaki na ye mpe balakisaki ye kati na Biblia mokano ya Nzambe mpo na bato. Mokano yango esangisi elaka oyo epemami: “Nsima ya mwa ntango moke, moto na mabe akozala lisusu te . . . Nde bato na bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya na solo.” (Nzembo 37:10, 11) Allan alobaki ete: “Naumelaki te komona ete likambo oyo lisangá na biso ezalaki kobundela esilá kolakama kati na Biblia. Makambo nyonso oyo tolingaki mpenza makosalema na nsé ya Bokonzi ya Nzambe.” Allan azali sikawa kokumisa Bokonzi ya Nzambe mpe azali kosalisa bato mosusu ete bázala na kondima kati na solo ya Biblia.
Ɛɛ, bomoi ezali kobongwana ntango bato bazali kotya likebi na solo ya Biblia, Liloba ya Nzambe. Kútu, ntango ezali koya wana bato oyo bakobika bakoyokanisa bomoi na bango na mokano ya Nzambe. Ekozala mbongwana monene mpenza! Ntango yango, esakweli ekokokisama ete: “Bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba na bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi na [Yehova] lokola mbonge ekozipaka mai-na-monana.”—Yisaya 11:9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.
b Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
c Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.