Libota na bonsomi, kasi lisengeli kozongisa makambo liboso na nzambe
“Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.”—YOANE 8:32.
1, 2. (a) Mokumba nini bonsomi ekokisaki kati na lisolo ya bato? (b) Bobele nani azali na bonsomi botyameli ndelo te? Limbola.
BONSOMI. Oyo nde nguya kati na liloba yango! Bato bayikaki mpiko liboso na ebele ya bitumba, ya botomboki mpe ya mobulu na bato mpo ete bazalaki na mposa ya kozala na bonsomi. Lisusu tokoki kotanga kati na encyclopédie moko (The Encyclopedia Americana) ete: ‘Kati na bokoli ya makambo na bato, likambo moko te lizalaki na ntina monene koleka oyo ya bonsomi.’
2 Nzokande, bato boni bazali mpenza na bonsomi? Bato boni nkutu bayebi ndimbola ya bonsomi? Tala oyo mokanda mosusu elobi (The World Book Encyclopedia): “Mpo na kozala na bonsomi kati na makambo nyonso, esengeli te kozala na ndelo kati na lolenge na yo ya kokanisa, ya koloba to ya kosala. Esengeli koyeba makoki nini mapesameli yo mpe kozala na lotomo ya kopona kati na makoki yango.” Lokola ezali bongo, oyebi moto moko oyo azali mpenza na bonsomi? Nani akoki koloba ete “atyameli ndelo te kati na lolenge na ye ya kokanisa, ya koloba to ya kosala”? Ya solo, bobele moto moko kati na molongo mobimba nde akokani na ndimbola oyo: Jéhovah Nzambe. Bobele ye moko nde azali na bonsomi kati na makambo nyonso. Ye moko akoki kopona likambo oyo alingi mpe kosala yango ata botemeli oyo akoki kokutana na yango. Azali “Mozwi-na-Nguya-Nyonso.”—Emoniseli 1:8; Yisaya 55:11.
3. Nini esengamaka epai na bato soki balingi kozala na bonsomi?
3 Mpo na bato, bonsomi ekoki kozala bobele na ndelo. Bonsomi wana mbala mingi epesami to elakami na mokonzi mpe ekangisami na botosi na biso epai na mokonzi yango. Na yango, kati na makambo mingi, tokoki kozala na bonsomi bobele soki tondimi bokonzi ya mobateli na bonsomi na biso. Na ndakisa, baoyo bazali kofanda kati na “mokili ya bonsomi” bazali kosepela na matomba mingi, lokola bonsomi ya kotambola, bonsomi ya koloba mpe bonsomi ya losambo. Nini epesi nzela na bonsomi nyonso wana? Mibeko ya mboka. Tokoki kozwa bonsomi wana bobele na kotosaka mibeko. Ye oyo abebisi bonsomi na ye mpe abuki mobeko asengeli kozongisa monoko epai na mikonzi, mpe bonsomi na ye ekoki kokitisama na mbalakaka na etumbu moko ya boloko.—Baloma 13:1-4.
Bonsomi bouti na Nzambe: mpe makambo ya kozongisa epai na ye
4, 5. Bonsomi nini basambeli na Jéhovah bazali na yango, mpe mpo na nini bakozala na makambo ya kozongisa epai na ye?
4 Na ekeke ya liboso, Yesu alobaki mpo na bonsomi. Alobaki na Bayuda ete: “Soko bino bokoumela kati na liloba na ngai, bokozala bayekoli na ngai [mpenza], mpe bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoane 8:31, 32) Yesu alobelaki te mpo na bonsomi ya koloba, to bonsomi ya losambo. Ya solo, ezalaki te likambo ya kosikolama kati na boombo ya Baloma, likambo oyo ebele na Bayuda bazalaki koluka yango. Na yango, ezalaki likambo moko ya motuya mingi koleka, bonsomi moko oyo epesami, na mibeko ya bato te to na lolendo ya mokonzi moko te ya mokili, kasi na Mokonzi monene ya molongo mobimba, Jéhovah. Ezalaki bonsomi oyo ezali epai na moto oyo ekangami te na boombo ya biyambayamba, to na kozanga boyebi ya makambo na Nzambe; kasi ezali na makambo mingi lisusu koleka. Bonsomi oyo Jéhovah azali kopesa ezali bonsomi ya solo; ekoumela mpo na libela.
5 Ntóma Paulo alobaki ete: “Jéhovah azali Elimo; esika ezali elimo na Jéhovah, bonsomi ezali wana.” (2 Bakolinti 3:17, MN) Na boumeli ya bikeke, Jéhovah asalaki epai na bato na lolenge ete mokolo mosusu basembwi bakoka kozala na bonsomi oyo boleki kitoko, “bonsomi na nkembo na bana na Nzambe.” (Baloma 8:21) Na kozelaka, Jéhovah apesi biso mwa bonsomi na nzela na solo ya Biblia; mpe soki tobebisi bonsomi yango, tokozala na makambo ya kozongisa epai na ye. Ntóma Paulo akomaki ete: “Eloko moko ezali te oyo ebombami liboso na ye, kasi nyonso ezali bolumbu mpe emonisami polele na miso na ye oyo tokozala na makambo ya kozongisa.”—Baebele 4:13, MN.
6-8. (a) Bonsomi nini Adam na Eva bazalaki na yango, mpe basengelaki kosala nini mpo na kobatela bonsomi yango? (b) Adam na Eva babungisaki nini mpo na bango moko mpe mpo na bakitani na bango?
6 Likambo oyo ete tokozala na makambo ya kozongisa epai na Jéhovah, limonisamaki malamu na ntango baboti na biso ya liboso, Adam na Eva bazalaki naino na bomoi. Jéhovah azalisaki bango elongo na likabo kitoko ya kozala na bonsomi ya kozwa bikateli. Ntango nyonso oyo basalelaki yango na mayele, bazwaki mapamboli lisusu: bazalaki kobanga eloko moko te, bazalaki kozwa maladi te, bazalaki kokufa te; mpe kozanga kobanga bakokaki kobelema epai na Tata na bango ya likoló na lisosoli moko ya peto. Kasi na ntango basalelaki mabe bonsomi na bango ya kozwa bikateli, makambo nyonso mabongwanaki.
7 Jéhovah atyaki Adam na Eva kati na Elanga ya Edene, mpe mpo na esengo na bango apesaki bango mbuma ya banzeté nyonso ya elanga, longola bobele nzeté moko. Oyo wana, ezalaki mpo na ye moko; ezalaki “nzeté na koyeba malamu mpe mabe.” (Genese 2:16, 17) Na kolyaka te mbuma ya nzeté yango, mbele Adam na Eva bakokaki komonisa ete bayebi bobele Jéhovah nde azali na bonsomi ya kotya mibeko mpo na oyo ezali malamu mpe mabe. Soki basalaki na mayele mpe soki baboyaki kolya mbuma epekisami, mbele Jéhovah asengelaki kolanda ntango nyonso kopesa bango bonsomi na bango mosusu.
8 Likambo na mawa, Eva ayokelaki Nyoka oyo alobaki na ye na bokosi nyonso ete asengelaki ‘koyeba malamu mpe mabe’ na makoki na ye moko. (Genese 3:1-5) Liboso ye, mpe nsima Adam, balyaki mbuma ya nzeté epekisamaki. Na yango, ntango Jéhovah Nzambe ayaki koloba na bango kati na Elanga ya Edene, bayokaki nsoni mpe bamibombaki. (Genese 3:8, 9) Kobanda ntango wana bakomaki basumuki: babungisaki bonsomi ya kobelema epai na Nzambe, bonsomi oyo ezali kouta na lisosoli ya peto. Mpo na yango, bazalaki lisusu na bonsomi te liboso ya maladi mpe ya liwa; babungisaki bonsomi yango mpo na bango moko mpe mpo na bakitani na bango. Paulo alobi ete: “Na bongo, mabe ekotaki na mokili mpo na moto moko [Adam], mpe kufa ekotaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.”—Baloma 5:12; Genese 3:16, 19.
9. Bato nini bayebani mpo ete basalelaki malamu bonsomi oyo bazalaki na yango?
9 Atako bongo, bato bazalaki ntango nyonso na bonsomi ya kopona mpe, na nsima, bato bazangi kokoka basalelaki yango na mayele mpo na kosambela Jéhovah. Nkombo ya basusu kati na bango ekomeli biso atako bazalaki na bomoi na ntango ya kala. Mibali lokola Abele, Enoka, Noa, Abalayama, Yisaka mpe Yakobo (oyo abyangami mpe Yisraele) bazali bandakisa ya bato oyo basalelaki mwa bonsomi oyo bazalaki na yango naino mpo na kosala mokano ya Nzambe. Mpe bazwilaki yango bolamu.—Baebele 11:4-21.
Bonsomi ya libota liponami na Nzambe
10. Na maloba nini Jéhovah asalaki kondimana to boyokani elongo na libota na ye?
10 Na mikolo ya Moize, Jéhovah asikolaki bana ya Yisraele—baoyo bazalaki bamilió na ntango wana—na boombo na Ezipito mpe asalaki elongo na bango kondimana moko oyo na nzela na yango bakomaki libota na ye. Na nse na kondimana wana, Bayisraele bazalaki na bonganga mpe na ebongiseli ya kopesa mbeka na banyama oyo ezalaki ‘kozipa’ masumu na bango na lolenge moko ya elilingi. Na bongo, bazalaki na bonsomi ya kobelema epai na Nzambe mpo na kopesa ye losambo. Bazalaki mpe na ebongiseli moko ya mibeko mpe ya mitinda oyo mizalaki kokabola bango na biyambayamba mpe na losambo ya lokuta. Nsima na bambula, basengelaki kozwa Mabelé na ndaka lokola libula, na elikya ya kosungama na Nzambe liboso ya banguna na bango. Kondimana wana ezalaki kosenga na Bayisraele ete batosa Mibeko na Jéhovah. Bayisraele bandimaki na motema na bango mobimba lisengami yango, kolobaka ete: “Tokosala yango nyonso elobi Jéhovah.”—Exode 19:3-8 (MN); Deteronome 11:22-25.
11. Nini ekomaki ntango Yisraele batosaki te kondimana ya Mibeko na Moize?
11 Na boumeli ya mibu koleka 1 500, Bayisraele bazalaki na boyokani eleki malamu elongo na Jéhovah. Kasi mbala na mbala, batyelaki kondimana. Mbala na mbala, babendamaki na losambo ya lokuta, mpe bakomaki baombo ya losambo na bikeko mpe ya biyambayamba; na yango Nzambe atikaki nzela ete banguna na bango banyokola bango na mosuni. (Basambisi 2:11-19) Na esika ete basepela na matomba ya kosikolama oyo botosi na kondimana esengelaki kopesa bango, bapesamelaki etumbu mpo ete batosaki yango te. (Deteronome 28:1, 2, 15) Nsuka na yango, na mobu 607 liboso ya ntango na biso, Jéhovah apesaki nzela ete libota lizwama na boombo na Babilone.—2 Ntango 36:15-21.
12. Na nsuka likambo nini limonanaki polele na ntina na kondimama ya Mibeko na Moize?
12 Ezalaki liteya moko ya mpasi mingi. Ekokaki koteya bango ntina ya kobatela Mibeko. Kasi, wana, nsima na mibu 70, Bayisraele bazongaki na mboka na bango, bakobaki koboya kolanda kondimana na Mibeko lokola yango esengelaki. Pene na mibu nkama nsima na bozongi na bango, Jéhovah alobaki na banganga ya Yisraele ete: “Bosili kopengwa longwa na nzela; bobetisi bato mingi mabaku mpo na mobeko, bobebisi kondimana na Lewi.” (Malaki 2:8) Na yango, ata baoyo bazalaki sembo koleka kati na Bayisraele bakokaki te kotosa mpenza Mibeko wana ya sembo. Na esika ya kozala lipamboli, yango ekomaki, engebene maloba ya ntóma Paulo, “elakeli mabe.” (Bagalatia 3:13) Mpo na koloba polele, esengelaki eloko mosusu oyo eleki Kondimana ya Mibeko na Moize mpo na komema bato oyo bazali sembo, kasi bazangi kokoka, epai na bonsomi ya nkembo na bana na Nzambe.
Lolenge ya bonsomi na boklisto
13. Moboko nini malamu mingi mopesamaki nsima mpo na bonsomi?
13 Eloko yango mosusu oyo eleki kondimana na Mibeko na Moize, ezalaki mbeka na lisiko na Yesu Klisto. Pene na mobu 50, Paulo akomelaki lisangá na baklisto bapakolami ya Galatia. Alimbwelaki bango motindo nini Jéhovah asikolaki bango na boombo kati na yango kondimana na Mibeko ekangaki bango, mpe alobaki na bango ete: “Klisto akangoli biso mpo na bonsomi. Bongo botelema ngwi mpe boingela lisusu kati na ekanganeli na boombo te.” (Bagalatia 5:1) Motindo nini Yesu asikolaki bato?
14, 15. Na motindo nini ya malamu mingi Yesu asikolaki Bayuda mpe Bapakano?
14 Nsima na liwa na Yesu, Bayuda oyo bandimaki ete azali Masiya mpe baoyo bakomaki bayekoli na ye bakotaki kati na kondimana ya sika, oyo ekitanaki kondimana ya kala ya Mibeko. (Yilimia 31:31-34; Baebele 8:7-13) Na nse na kondimana wana ya sika, bango mpe bandimi oyo bazalaki Bayuda te, baoyo nsima basanganaki na bango esika moko, basalaki libota na sika, libota na elimo, oyo ekomaki libota na Nzambe na esika ya Yisraele ya mosuni. (Baloma 9:25, 26; Bagalatia 6:16) Lokola libota na Nzambe, bazwaki bonsomi oyo Yesu alakaki ntango alobaki ete: “Solo ekosikola bino.” Solo esikolaki Bayuda oyo bakomaki baklisto, bobele te na elakeli mabe ya Mibeko na Moize, kasi lisusu na mimeseno ya bonkoko oyo bakonzi na mangomba batyelaki bango lokola kilo. Mpo na baklisto oyo bazalaki na ekolo ya Bayuda te, solo esikolaki bango na losambo ya bikeko mpe na biyambayamba oyo bikangisami na mangomba na bango ya kala. (Matai 15:3, 6; 23:4; Misala 14:11-13; 17:16) Kasi nyonso esukaki wana te.
15 Kolobaka mpo na solo oyo ezali kosikola, Yesu alobaki ete: “Solosolo nalobi na bino ete: moto na moto oyo akosalaka masumu azali moombo na masumu.” (Yoane 8:34) Lokola Adam na Eva basalaki lisumu, bato nyonso bazali basumuki mpe na bongo baombo ya masumu. Bobele Yesu nde akeseni na basusu nyonso, mpe mbeka na Yesu esikolaki bandimi na boombo yango. Ya solo, bazalaki naino bato bazangi kokoka mpe basumuki mpo na motindo na nzoto na bango. Nzokande, kobanda na ntango yango, bakokaki kobongola motema na masumu na bango mpe kosenga lilimbisi na nzela ya mbeka na Yesu, kozalaka na elikya ete mabondeli na bango makoyokama. (1 Yoane 2:1, 2) Na nzela na mbeka na lisiko na Yesu, Nzambe atangaki bango bayengebene, mpe bakokaki kobelema pene na ye na lisosoli ya peto. (Baloma 8:33) Lisusu, lokola mbeka etyaki liboso na bango elikya na lisekwa mpo na bomoi bozangi nsuka, solo esikolaki bango ata nkutu na nsomo ya liwa.—Matai 10:28; Baebele 2:15.
16. Na ndimbola nini kozwa bonsomi ya boklisto ezalaki petɛɛ mingi koleka kozwa bonsomi nyonso mosusu oyo mokili ezalaki kopesa?
16 Ezali likambo na kitoko mingi na komona mitindo nini, bonsomi ya boklisto epesamaki na mibali mpe na basi, ata ezalela na bango ezalaki nini, engebene etaleli ya bato. Babola, bakangami, ata baombo, bakokaki kosikolama. Na ngambo mosusu, bato minene na mikili, baoyo baboyaki kondima nsango etali Klisto, batikalaki baombo ya biyambayamba, ya masumu mpe ya nsomo na liwa. Tosengeli ntango nyonso kotondo Jéhovah mpo na bonsomi oyo tozali na yango. Mokili ekoki kopesa biso eloko moko te oyo ekokani na yango.
Libota na bansomi, kasi lisengeli kozongisa makambo liboso na Nzambe
17. (a) Ndenge nini basusu, na ekeke ya liboso, babungisaki bonsomi na bango ya boklisto? (b) Mpo na nini tosengeli te komitika kokosama na bonsomi ya lokuta ya mokili na Satana?
17 Na ekeke ya liboso, baklisto bapakolami mingi basepelaki mpenza na bonsomi na bango mpe batikalaki sembo kati na makambo nyonso. Nzokande, na mawa nyonso, basusu bamekaki bonsomi ya boklisto, elongo na matomba nyonso oyo yango ezali kopesa, na nsima basundolaki yango mpe bazongaki na boombo ya mokili. Mpo na nini? Na ntembe te kondima ya mingi elembaki, mpe ‘bapengwaki na nzela.’ (Baebele 2:1) Basusu ‘batyolaki kondima mpe lisosoli malamu, mpe bazindisaki kondima na bango.’ (1 Timote 1:19) Mbala mosusu bakweisamaki na mposa ya bozwi na mosuni to na pite. Ezali ntina monene ete tobatela kondima na biso mpe ete totonga likoló na moboko oyo, na komipesa ntango nyonso na boyekoli na biso moko, na koyangana na makita ya lisangá, na libondeli mpe na mosala ya boklisto! (2 Petelo 1:5-8) Tika ete ntango nyonso topesa motuya monene na bonsomi ya boklisto! Ezali solo ete, basusu bakoki komekama na elimo ya lipanda oyo bazali komona na libanda ya lisangá mpe kokanisa ete bato ya mokili bazali na bonsomi koleka bango. Nzokande, oyo ezali komonana lokola bonsomi kati na mokili ezali bobele bokosi mpamba. Soki tozali baombo na Nzambe te, tozali baombo na masumu mpe boombo yango ekopesaka lifuti ya bololo.—Baloma 6:23; Bagalatia 6:7, 8.
18-20. (a) Ndenge nini basusu bakomaki “banguna na nzeté na mpasi?” (b) Na motindo nini basusu ‘bazalaki kobatela bonsomi na bango lokola ezipeli mpo na makambo mabe?’
18 Lisusu, kati na mokanda na ye epai na Bafilipi, Paulo ekomaki ete: “Mpamba te lokola elobi ngai na bino mbala mingi liboso mpe nazali naino koloba na mpisoli, bato mingi bazali kotambola lokola bayini na nzeté ya mpasi na Klisto.” (Bafilipi 3:18) Na yango, bato mosusu oyo kala bazalaki baklisto, bakomaki banguna ya kondima, mbala mosusu bapengwi. Ebongi na biso mpenza ete tolanda nzela na bango te! Lisusu, Petelo akomaki ete: “Bozala na bonsomi, nde na bonsomi lokola ezipeli na makambo mabe te, kasi bozala baombo na Nzambe.” (1 Petelo 2:16) Lolenge nini tokoki kobatela bonsomi na biso lokola ezipeli mpo na makambo mabe? Na kosalaka masumu minene—mbala mosusu na nkuku—mpe kokoba koyangana na lisangá.
19 Tomikundola mpo na Diotelefe. Yoane alobaki mpo na ye ete: “Diotelefe ye oyo alingi kozwa esika na liboso [kati na lisangá], ayambi maloba na biso na limemya te. . . . Asuki wana te, aboyi mpe koyamba bandeko na limemya, mpe azali koluka kopekisa mpe kobimisa na lisangá, baoyo balingi koyamba bango.” (3 Yoane 9, 10 MN) Diotelefe azalaki kosalela bonsomi na ye lokola ezipeli mpo ne kokokisa bamposa na ye ya moimi.
20 Moyekoli Yuda akomaki ete: “Ezali mpo ete bato basusu oyo basili kolukama uta kala na Makomami mpo na kosambisama, basili kokóta [kati na bino]; bango bato na mbindo oyo bakobongolaka ngolu na Nzambe mpo na etamboli na bango mabe mpe bazali kosangana Mokonzi mpe Nkolo na biso bobele moko, Yesu Klisto.” (Yuda 4, MN) Wana ezalaki bango koyangana na lisangá, bato yango bazalaki komema bopusi mabe. (Yuda 8-10, 16) Kati na Emoniseli, tozali kotanga ete kati na masangá ya Pergame mpe ya Thyatire, bokabwani, losambo na bikeko mpe pite ezalaki. (Emoniseli 2:14, 15, 20-23) Oyo nde lolenge mabe ya kosalela bonsomi na boklisto!
21. Likambo nini lizali kozela baoyo bazali kosalela mabe bonsomi na bango ya boklisto?
21 Likambo nini lizali kozela baoyo bazali kobebisa bonsomi na bango ya boklisto na motindo wana? Tokanisa na oyo ekomelaki Yisraele. Yisraele ezalaki libota liponami na Nzambe, kasi na nsuka Jéhovah asundolaki yango. Mpo na nini? Mpo ete Bayisraele basalelaki boyokani na bango elongo na Nzambe lokola ezipeli mpo na makambo mabe. Bazalaki komikumisa ete bazali bana ya Abalayama, kasi babwakaki Yesu, Libota na Abalayama mpe Masiya aponami na Jéhovah. (Matai 23:37-39; Yoane 8:39-47; Misala 2:36; Bagalatia 3:16) Na mobimba na yango, “Yisraele na Nzambe,” ekomonisa kozanga bosembo ya motindo wana te. (Bagalatia 6:16) Kasi moklisto nyonso oyo azali kobebisa elimo ya lisangá to bizaleli malamu ya lisangá akozwa mokolo mosusu etumbu, mpe ata lisambisi ya koboyama na Nzambe. Biso banso, tosengeli kozongisa monoko mpo na lolenge oyo tozali kosalela bonsomi na biso ya boklisto.
22. Baoyo bazali kosalela bonsomi na bango ya boklisto mpo na kosalela Nzambe lokola baombo bazali na esengo nini?
22 Ezali mpenza likambo ya malamu kosalela Nzambe lokola moombo mpe kozala bongo na bonsomi ya solo! Bobele Jéhovah nde azali kopesa bonsomi ya solo mpenza Masese elobi ete: “Mwana ma ngai, zala na mayele mpe sepelisa motema na ngai, ete nazongisela ye monoko oyo akopamela ngai.” (Masese 27:11) Tosalela bonsomi na biso ya boklisto mpo na kolongisa Jéhovah. Soki tozali kosala yango, bomoi na biso ekozala na ntina, tokondimama epai na Tata na biso ya likoló mpe, na ntango oyo asili kobongisa tokozala kati na baoyo bakosepela na bonsomi ya nkembo na bana na Nzambe.
Bozongeli
◻ Bobele nani azali na bonsomi botyameli ndelo te?
◻ Bonsomi nini Adam na Eva bazalaki na yango, mpe mpo na nini babungisaki yango?
◻ Bonsomi nini Bayisraele bazalaki na yango na ntango bazalaki kobatela kondimana na bango elongo na Jéhovah?
◻ Baoyo bandimaki Yesu bazwaki bonsomi ya lolenge nini?
◻ Ndenge nini basusu, na ekeke ya liboso, babungisaki to basalelaki mabe bonsomi na bango ya boklisto?
[Elilingi na lokasa 13]
Bonsomi oyo Yesu apesaki ezalaki malamu mingi koleka bonsomi nyonso oyo moto akoki kopesa