Tóluka biloko ya motuya oyo “ebombami malamumalamu na kati na ye”
“Biloko nyonso ya motuya ya bwanya mpe ya boyebi ebombami malamumalamu na kati na ye.”—KOLS. 2:3.
1, 2. (a) Biloko nini ya motuya bakundolaki na 1922, mpe lelo oyo biloko yango ezali wapi? (b) Liloba ya Nzambe elendisi moto nyonso asala nini?
MBALA mingi, kokundola biloko ya motuya etalelamaka lokola likambo ya ntina mingi. Na ndakisa, na 1922, nsima ya bambula mingi ya mosala makasi ya kolukaluka, Howard Carter, moto moko ya arkeoloji ya Angleterre, akundolaki eloko moko ya motuya mingi. Amonaki lilita ya Falao Tutankhamen, oyo ebebaki naino te mpe ezalaki na biloko soki 5 000 na kati na yango.
2 Lokola biloko oyo akundolaki ezalaki ya motuya mpenza, mingi kati na yango etyamaki na bandako ya kobomba biloko ya kala mpe mosusu etyamaki na bandako ya bato. Atako biloko yango ekokaki kosalisa mpo na koyeba makambo ya kala mpe ezalaki na ntina mpo na makambo ya ntɔki, ekoki kosalisa biso te na bomoi ya mokolo na mokolo. Nzokande, Liloba ya Nzambe elendisi biso tóluka biloko ya motuya oyo ekoki mpenza kosalisa biso. Moto nyonso akoki koluka biloko yango, mpe mbano oyo akozwa eleki eloko nyonso mosusu ya motuya.—Tángá Masese 2:1-6.
3. Biloko ya motuya oyo Yehova azali kolendisa basaleli na ye báluka ezali na litomba nini?
3 Tótalela motuya ya biloko oyo Yehova alendisi basaleli na ye báluka. Na kati ya biloko yango ya motuya, tokoki kotánga “kobanga Yehova,” oyo ekoki kobatela biso na ntango oyo ya mpasi. (Nz. 19:9) Kozwa “boyebi ya koyeba Nzambe” ezali lokumu oyo eleki lokumu mosusu nyonso oyo moto akoki kozwa, elingi koloba kozala na boyokani makasi na Oyo-Aleki-Likoló. Mpe na nzela ya biloko ya motuya oyo Nzambe apesaka, na ndakisa bwanya, boyebi, mpe bososoli, tokozwa likoki ya kolonga mikakatano ya bomoi. (Mas. 9:10, 11) Ndenge nini tokoki kozwa biloko yango ya motuya?
Mpo na nini tosengeli koluka biloko yango ya motuya?
4. Ndenge nini tokoki kozwa biloko ya motuya oyo Nzambe alaki?
4 Na bokeseni na bato ya arkeoloji mpe bato mosusu oyo mbala mingi balukaka epai na epai mpo na kozwa biloko ya motuya, biso toyebi malamu esika oyo tokoki kozwa biloko ya motuya ya elimo. Liloba ya Nzambe ezali lokola karte oyo esalisaka biso tómona esika mpenza oyo tokoki kozwa biloko ya motuya oyo Nzambe alaki. Ntoma Paulo akomaki mpo na Klisto boye: “Biloko nyonso ya motuya ya bwanya mpe ya boyebi ebombami malamumalamu na kati na ye.” (Kols. 2:3) Ntango tozali kotánga maloba yango tokoki komituna: “Mpo na nini tosengeli koluka biloko yango ya motuya? Ndenge nini ‘ebombami na kati’ na Klisto? Mpe ndenge nini tokoki komona yango?” Mpo na kozwa eyano, tótalela malamumalamu maloba ya Paulo.
5. Mpo na nini Paulo alobelaki biloko ya motuya ya elimo?
5 Paulo akomelaki baklisto ya Kolose maloba yango. Ayebisaki bango ete azalaki kobunda etumba monene mpo na bango mpo ‘mitema na bango ebɔndisama, mpe básangana liboke moko na boyokani mpenza na kati ya bolingo.’ (Tángá Bakolose 2:1, 2.) Mpo na nini azalaki komibanzabanza bongo? Emonani ete Paulo ayebaki ete bamosusu kati na bango bakómaki kotinda baninga bálanda bafilozofi ya Bagrɛki to mpe bázongela Mibeko ya Moize. Alobaki na bandeko boye: “Bókeba: mbala mosusu ekoki kozala na moto moko oyo akomema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba engebene mimeseno ya bato, engebene makambo mikemike ya mokili kasi engebene Klisto te.”—Kols. 2:8.
6. Mpo na nini tosengeli kolanda toli ya Paulo?
6 Lelo oyo, Satana ná bato na ye ya mabe bazali mpe kobimisela biso makambo ya ndenge wana. Filozofi ya mokili, mpe mateya ya evolisyo, ezali kotambwisa makanisi, bizaleli, mikano mpe bomoi ya bato. Mangomba ya lokuta ezali kosimba bafɛti mingi ya mokili. Baemisyo ya televizyo, bafilme, miziki mpe makambo mosusu ya kominanola, ezali kosalema mpo na kolamusa bamposa ya nzoto, mpe makambo mingi oyo balakisaka na Internet ezali likama mpenza mpo na bilenge mpe mikóló. Kolanda to kotala makambo yango ekoki kobebisa makanisi na biso, mpe kosala ete tólanda te litambwisi oyo Yehova azali kopesa mpe tósimba makasi te elikya na biso ya bomoi ya solosolo. (Tángá 1 Timote 6:17-19.) Tomoni ete tosengeli kokanga ntina ya maloba wana oyo Paulo akomelaki Bakolose mpe kosimba toli yango na mitema na biso, mpo tókwea te na mitambo ya Satana.
7. Wapi makambo mibale oyo Paulo alobaki ete ekosalisa baklisto ya Kolose?
7 Soki totángi lisusu maloba yango oyo Paulo akomelaki Bakolose, tokomona ete nsima ya kolobela mabanzo na ye, alobelaki makambo mibale oyo esengelaki kobɔndisa bango mpe kosala ete bázala na bomoko kati na bolingo. Liboso, alobelaki “kondimisama makasi oyo etali makambo bayebi.” Basengelaki kondimisama ete boyebi na bango ya Makomami ezalaki ya sikisiki, mpo kondima na bango epikama makasi. (Ebe. 11:1) Na nsima, alobelaki “boyebi moko ya solosolo ya sɛkɛlɛ mosantu ya Nzambe.” Basengelaki kosuka kaka te na boyebi ya mateya ya ebandeli ya solo, kasi basengelaki mpe kokóma na boyebi ya makambo mozindo ya Nzambe. (Ebe. 5:13, 14) Oyo nde toli malamu mpo na baklisto ya Kolose, ata mpe mpo na biso lelo oyo! Kasi, ndenge nini tokoki kokóma na kondimisama makasi bongo mpe kozwa boyebi yango ya sikisiki? Paulo apesaki eyano na maloba ya ntina mingi oyo alobaki mpo na Yesu Klisto: “Biloko nyonso ya motuya ya bwanya mpe ya boyebi ebombami malamumalamu na kati na ye.”
Biloko ya motuya oyo “ebombami” na kati na Klisto
8. Pesá ndimbola ya maloba “ebombami” na kati na Klisto.
8 Koloba ete biloko nyonso ya motuya ya bwanya mpe ya boyebi “ebombami” na kati na Klisto, elingi koloba te ete moto akoki kozwa yango te. Elakisi nde ete mpo na kozwa biloko yango, tosengeli kosala milende, mpe kotya likebi epai ya Yesu Klisto. Yango eyokani na maloba oyo Yesu alobaki: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoa. 14:6) Ya solo, mpo na kozwa boyebi ya Nzambe, tozali na mposa ya lisungi mpe litambwisi ya Yesu.
9. Mikumba nini Yesu azali na yango?
9 Yesu azali kaka “nzela” te, alobaki ete azali “solo mpe bomoi.” Yango emonisi ete mokumba na ye esuki kaka te na komema bato epai ya Tata. Yesu azali mpe na mokumba ya kosalisa bato báyeba solo ya Biblia mpe bázwa bomoi ya seko. Ya solo, biloko ya motuya mingi koleka ebombami na kati na Yesu, mpe ezali kaka kozela bayekoli ya Biblia bázwa yango. Tótalela mwa biloko ya motuya oyo esimbi elikya na biso mpe boyokani na biso na Nzambe.
10. Bakolose 1:19 mpe 2:9 eteyi biso nini na ntina na Yesu?
10 “Ezali na kati na ye nde litondi mobimba ya bonzambe efandi na nzoto.” (Kols. 1:19; 2:9) Lokola azalaki elongo na Tata na ye na boumeli ya bambula mingi, Yesu ayebi malamu koleka moto mosusu nyonso bomoto mpe mokano ya Nzambe. Na boumeli ya mosala na ye awa na mabelé, Yesu ateyaki bato makambo oyo Tata na ye alakisaki ye mpe amonisaki bizaleli oyo azwaki epai ya Tata na ye. Yango wana Yesu akokaki koloba ete: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yoa. 14:9) Bwanya nyonso mpe boyebi ya Nzambe ebombami na kati na Klisto, mpe tokoki koyeba Yehova kaka soki toyekoli na likebi mpenza makambo na ntina na Yesu.
11. Boyokani nini ezali kati na Yesu mpe bisakweli ya Biblia?
11 “Kopesa litatoli mpo na Yesu nde eloko oyo epemisi esakweli.” (Emon. 19:10) Maloba yango emonisi ete Yesu akokisi bisakweli mingi ya Biblia. Mpo tókanga ntina ya bisakweli ya Biblia, banda na esakweli ya liboso oyo Yehova apesaki na Genese 3:15 tii na emonaneli ya nkembo oyo ezali na Emoniseli, tosengeli koyeba malamumalamu mokumba ya Yesu na Bokonzi ya Masiya. Yango emonisi ntina oyo bato oyo bandimaka te ete Yesu azali Masiya, bakokaka te kokanga ntina ya bisakweli mingi oyo ezali na Makomami ya Liebele. Emonisi mpe ntina oyo bato oyo bandimaka Makomami ya Liebele te, oyo ezali na bisakweli mingi ya Masiya, batalelaka Yesu kaka lokola moto moko monene. Boyebi ya Yesu esalisaka basaleli ya Nzambe báyeba ndimbola ya bisakweli mingi ya Biblia oyo ekokisami naino te.—2 Kol. 1:20.
12, 13. (a) Ndenge nini Yesu azali “pole ya mokili”? (b) Lokola basikolami na molili ya mangomba, bayekoli ya Klisto basengeli kosala nini?
12 “Ngai nazali pole ya mokili.” (Tángá Yoane 8:12; 9:5.) Bambula mingi liboso Yesu abotama lokola moto awa na mabelé, mosakoli Yisaya asakolaki boye: “Bato baoyo batambolaki na molili bamoni pole monene; baoyo bafandaki na mokili ya molili ya kufa pole engɛngɛli bango.” (Yis. 9:2) Ntoma Matai alimbolaki ete Yesu akokisaki esakweli yango ntango abandaki koteya; alobaki boye: “Bóbongola mitema, mpo bokonzi ya likoló ekómi pene.” (Mat. 4:16, 17) Mosala ya Yesu ememelaki bato pole ya elimo mpe esikolaki bango na boombo ya mateya ya mangomba ya lokuta. Yesu alobaki boye: “Nayei lokola pole na kati ya mokili, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ngai afanda na kati ya molili te.”—Yoa. 1:3-5; 12:46.
13 Bambula mingi na nsima, ntoma Paulo ayebisaki baninga na ye baklisto boye: “Bozalaki kala molili, kasi bozali sikoyo pole na oyo etali Nkolo. Bókoba kotambola lokola bana ya pole.” (Ef. 5:8) Lokola basikolami na molili ya mangomba, baklisto basengeli kotambola lokola bana ya pole. Yango eyokani na oyo Yesu alobaki na bayekoli na ye na Lisolo Likoló ya Ngomba ete: “Tiká ete pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu mpe bápesa nkembo epai ya Tata na bino oyo azali na likoló.” (Mat. 5:16) Omonisaka botɔndi mpo na biloko ya motuya oyo ozwi epai ya Yesu, mpe olakisaka yango epai ya bato mosusu, na maloba mpe na etamboli na yo ya malamu?
14, 15. (a) Na ntango ya kala, mpate mpe banyama mosusu ezalaki na ntina nini na losambo ya solo? (b) Mpo na nini Yesu, na mokumba na ye ya “Mwana-Mpate ya Nzambe,” azali eloko ya motuya koleka?
14 Yesu azali “Mwana-Mpate ya Nzambe.” (Yoa. 1:29, 36) Biblia emonisi ete mpate ezalaki na ntina mingi mpo na kolimbisama ya masumu mpe kosalisa bato bápusana penepene na Nzambe. Na ndakisa, ntango amonisaki ete andimi kopesa mwana na ye Yisaka lokola mbeka, Nzambe ayebisaki Abalayama asala mwana na ye mabe te, kasi apesaki ye mpate mobali mpo apesa ye mbeka na esika ya Yisaka. (Gen. 22:12, 13) Ntango Bayisalaele babimaki na Ezipito, mpate ezalaki mpe na ntina mingi, na mbala wana na “elekeli mpo na [Yehova].” (Ex. 12:1-13) Lisusu, Mibeko ya Moize esɛngaki bápesaka mbeka ya banyama ndenge na ndenge na ndakisa mpate mpe ntaba.—Ex. 29:38-42; Lev. 5:6, 7.
15 Kasi, ata moko te kati na bambeka yango ekokaki kosikola bato na lisumu mpe na liwa mpo na libela. (Ebe. 10:1-4) Nzokande, Yesu azali “Mwana-Mpate ya Nzambe oyo azali kolongola lisumu ya mokili.” Likambo yango esali ete Yesu azala eloko ya motuya koleka biloko mosusu nyonso oyo bato bazwá. Yango wana, tosengeli kozwaka ntango ya koyekola malamu liteya ya lisiko mpe komonisa kondima na ebongiseli yango ya malamu mingi. Soki tosali bongo, tokozala na elikya ya kozwa lipamboli mpe mbano monene—mpo na “etonga moke,” nkembo mpe lokumu na likoló elongo na Yesu; mpo na “bampate mosusu,” bomoi ya seko na Paladiso awa na mabelé.—Luka 12:32; Yoa. 6:40, 47; 10:16.
16, 17. Mpo na nini ezali na ntina tóyeba mokumba ya Yesu lokola “Kapita mpe Mokokisi ya kondima na biso”?
16 Yesu azali “Kapita mpe Mokokisi ya kondima na biso.” (Tángá Baebele 12:1, 2.) Na Baebele mokapo 11, tozali kokuta lisolo kitoko oyo Paulo asalaki na ntina na kondima; alobelaki ndimbola mokuse ya kondima mpe atángaki bankombo ya mibali mpe basi ya kondima, lokola Noa, Abalayama, Sala mpe Lahaba. Na nyonso wana, Paulo alendisaki baninga na ye baklisto ‘bátala na likebi mpenza Kapita mpe Mokokisi ya kondima na bango, Yesu.’ Mpo na nini?
17 Atako mibali mpe basi yango oyo Baebele mokapo 11 elobeli bazalaki na kondima makasi na bilaka ya Nzambe, bayebaki mpenza te ndenge oyo Nzambe asengelaki kokokisa elaka na ye na nzela ya Masiya mpe ya Bokonzi. Na yango, tokoki koloba ete kondima na bango ezalaki ndambo. Kutu, ata baoyo Yehova asalelaki mpo na kokoma bisakweli mingi ya Masiya, bakangaki mpenza te ntina ya makambo oyo bakomaki. (1 Pet. 1:10-12) Kaka na nzela ya Yesu nde kondima ekoki kokóma ya kokoka. Ezali mpenza na ntina tóyeba mpe tóndima mokumba ya Yesu lokola “Kapita mpe Mokokisi ya kondima na biso”!
Tókoba koluka
18, 19. (a) Tángá biloko mosusu ya motuya oyo ebombami na kati na Klisto. (b) Mpo na nini tosengeli kokoba kotalela Yesu soki tolingi kozwa biloko ya motuya ya elimo?
18 Tolobeli kaka mwa ndambo ya mikumba ya Yesu na kokokisama ya mokano ya Nzambe mpo na lobiko ya bato. Ezali naino na biloko mosusu ya motuya oyo ebombami na kati na Klisto. Soki tozwi yango, ekomemela biso esengo mpe matomba mingi. Na ndakisa, ntoma Petelo abengaki Yesu “Kapita ya bomoi” mpe “monzoto ya ntɔngɔ” oyo ekobima. (Mis. 3:15; 5:31; 2 Pet. 1:19) Lisusu, Biblia ebengi Yesu “Amen.” (Emon. 3:14) Oyebi ndimbola mpe ntina ya mikumba yango? Yesu alobaki, “bókoba koluka, mpe bokomona.”—Mat. 7:7.
19 Ezali ata na moto moko te lokola Yesu oyo bomoi na ye ezalaki na ntina mingi mpe esimbi bolamu na biso ya seko. Kati na ye, ezali na biloko ya motuya ya elimo, mpe moto nyonso oyo azali koluka yango na motema mobimba akozwa yango. Tiká yo mpe ozala na esengo mpe lipamboli ya kozwa biloko ya motuya oyo “ebombami malamumalamu na kati na ye.”
Ozali koyeba lisusu?
• Baklisto balendisami ete báluka biloko nini ya motuya?
• Mpo na nini toli oyo Paulo apesaki baklisto ya Kolose ebongi mpe mpo na biso lelo oyo?
• Tángá mpe limbolá mwa biloko ya motuya oyo “ebombami” na kati na Klisto.
[Bililingi na lokasa 5]
Biblia ezali lokola karte oyo ezali kolakisa biso nzela ya kozwa biloko ya motuya oyo “ebombami malamumalamuna na kati” na Klisto