Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • “Ntango na ye naino ekokaki te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2000 | 15 Sanza ya 9
    • 17. (a) Yesu azwi nsango nini ya nokinoki ntango azali kosakola na Pelea? (b) Nini emonisi ete Yesu ayebi ntina ya mosala oyo asengeli kosala mpe ntango ya kosala likambo na likambo?

      17 Nsango oyo Malata na Malia, bandeko basi ya Lasalo, batindeli Yesu ezali kosɛnga ete akende nokinoki na mboka Betania, na Yudea. Momemi-nsango alobi ete: “Motei, talá, ye oyo olingi abɛli maladi.” Yesu alobi ete: “Kobɛla oyo ezali mpo na kufa te kasi mpo na nkembo ya Nzambe ete Mwana ya Nzambe akumisama na yango.” Yango wana, Yesu alekisi naino mikolo mibale epai oyo azalaki. Na nsima alobi na bayekoli na ye ete: “Tókenda na [Yudea, NW ] lisusu.” Bayekoli bakamwe mpe balobi na ye ete: “Labi, Bayuda baluki ete bábwakela yo mabanga bobele [sikoyo] mpe okokenda wana lisusu?” Kasi Yesu ayebi malamu ete ‘ngonga . . . ya moi,’ to ntango oyo Nzambe akatelaki ye mpo na mosala na ye awa na mabele ezali lisusu mingi te. Ayebi malamu nini oyo asengeli kosala mpe mpo na nini asengeli kosala yango.—Yoane 11:1-10.

  • “Ntango na ye naino ekokaki te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2000 | 15 Sanza ya 9
    • 21. Likamwisi ya kosekwisa Lasalo ezali ebandeli ya nini?

      21 Lokola Yesu alekisaki ntango liboso akóma na Betania, epesi ye nzela ya kosala likamwisi oyo eyebani na bato nyonso. Na nguya ya Nzambe, Yesu asekwisi moto oyo akufaki eleki mikolo minei. Nsango yango ekómi tii na matoi ya bato ya lokumu ya Sanedrina mpe bakani ete moto oyo azali kosala makamwisi yango asengeli kokufa! Likamwisi yango ebongoli makambo na mosala ya Yesu, sikoyo ezali lisusu te ete ‘ntango na ye ekoki naino te,’ kasi ekómi “ntango esi’ ekoki.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto