Yesu—Ndakisa malamu oyo tosengeli kolanda
OLINGAKA kozala moto malamu mpe kokóma moto ya esengo? Ntoma Petelo asalisi biso tóyeba nini tokoki kosala mpo na kokóma na bomoi ya ndenge wana. Akomaki boye: “Klisto mpe anyokwamaki mpo na bino, kotikeláká bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.” (1 Petelo 2:21) Ya solo, ntango azalaki awa na mabelé, Yesu Klisto asalaki makambo mingi ya malamu oyo tosengeli kolanda. Soki toyebi makambo oyo Yesu asalaki na bomoi na ye mpe tolandi ndakisa na ye, tokoki kolikya ete tokokóma bato ya malamu mpenza mpe ya esengo. Tótalela sikoyo mwa bizaleli oyo moto monene yango azalaki na yango mpe tómona litomba oyo tokoki kozwa soki tolandi ndakisa na ye.
Yesu azalaki na bokatikati. Atako Yesu alobaki ete azalaki “na esika ya kolalisa motó na ye te,” azalaki komipimela bisengo nyonso ya bomoi te. (Matai 8:20) Azalaki kokende na bafɛti. (Luka 5:29) Likamwisi na ye ya liboso oyo Biblia elobeli, ntango abongolaki mai vinyo na fɛti moko ya libala, emonisi ete azalaki kokima bato to koboya komisepelisa te. (Yoane 2:1-11) Kasi, Yesu amonisaki polele likambo oyo ezalaki na ntina koleka mpo na ye. Alobaki boye: “Bilei na ngai ezali nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.”—Yoane 4:34.
□ Osilá komitalela mpo na koyeba esika nini otyaka biloko ya mosuni mpe makambo ya elimo na bomoi na yo?
Yesu azalaki kosolola na moto nyonso. Biblia emonisi ete Yesu azalaki na bolingo mpe na boboto mingi. Azalaki kolɛmba te bato oyo bazalaki koya epai na ye na mikakatano na bango to na mituna ya makasi. Mokolo moko, ntango bato bazingaki ye, mwasi moko oyo azalaki kobunda na maladi banda mbula 12 asimbaki elamba na ye, na elikya ete abika. Atako likambo oyo mwasi wana asalaki ekokaki kozala malamu te na miso ya bato, Yesu agangelaki ye te, alobaki na ye nde na boboto nyonso ete: “Mwana mwasi, kondima na yo esali ete oyoka malamu.” (Malako 5:25-34) Ata bana mike bazalaki kobanga te kopusana penepene na ye, mpo bayebaki ete azalaki koboya bana te. (Malako 10:13-16) Azalaki kobombela bayekoli na ye makambo te mpe kosolola na bango lokola baninga. Bazalaki kobanga te kopusana pene na ye.—Malako 6:30-32.
□ Bato babangaka te kopusana pene na yo?
Azalaki na motema mawa mpe azalaki koyeba komitya na esika ya basusu. Moko ya bizaleli ya minene ya Yesu ezali likoki oyo azalaki na yango ya koyeba komitya na esika ya basusu, koyeba mpasi na bango mpe kosalisa bango. Ntoma Yoane ayebisi biso ete ntango Yesu amonaki Malia azali kolela ndeko na ye Lazalo oyo akufaki, Yesu “atungisamaki makasi na elimo mpe abulunganaki,” mpe “alelaki na mai na miso.” Bato oyo bazalaki wana bamonaki mpenza ete Yesu azalaki kolinga libota wana mingi; mpe Yesu ayokaki nsɔni te mpo na komonisa polele ete alingaka bango. Amonisaki mpenza motema mawa ntango asekwisaki moninga na ye.—Yoane 11:33-44.
Mokolo mosusu, mobali moko oyo azalaki kobɛla maladi ya maba (maladi moko ya mabe mpenza oyo ezalaki kosɛnga moto azalaka esika moko te na basusu) abondelaki Yesu boye: “Nkolo, soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.” Likambo oyo Yesu asalelaki moto yango elendisaki ye mpenza : “Asembolaki lobɔkɔ na ye, asimbaki ye, alobaki ete: ‘Nalingi. Kómá pɛto.’” (Matai 8:2, 3) Yesu azalaki kobikisa bato kaka mpo na kokokisa bisakweli te. Azalaki na mposa ya kosalisa bango. Azalaki kosala makambo nyonso na boyokani na likambo oyo alobaki: “Kaka ndenge bino bolingaka ete bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.”—Luka 6:31.
□ Omonisaka motema mawa ntango baninga bakómi na mpasi?
Yesu azalaki kowela te kopesa bato foti. Atako Yesu asalaki lisumu ata mokolo moko te, azalaki kosɛnga basusu te ete bázala ata na mbeba moko te; azalaki mpe te kowela kopesa bato foti. Mokolo moko, “mwasi moko oyo ayebanaki na engumba wana ete azali mosumuki” asukolaki makolo ya Yesu na mai ya miso na ye mpo na komonisa kondima mpe botɔndi na ye. Bato oyo bayambaki Yesu bakamwaki mpenza komona ndenge Yesu atikaki mwasi yango asala ye bongo. Bango bazalaki kotalela mwasi yango lokola nde ye moto asukisi mabe nyonso na mokili. Lokola amonaki bosembo na ye, Yesu atalaki masumu na ye te. Alobaki na ye nde ete: “Kondima na yo ebikisi yo; kende na kimya.” Na ntembe te, boboto oyo Yesu amoniselaki mwasi yango etindaki ye atika bomoi ya mabe oyo azalaki na yango.—Luka 7:37-50
□ Oyebani lokola moto oyo azalaka ntango nyonso pene na kopesa basusu longonya to nde lokola moto oyo amonaka kaka mabe na bango?
Azalaki kopona bilongi te mpe azalaki komemya basusu. Ekoki kozala ete lokola bazalaki koyokana malamu to mpe bazalaki bandeko, Yesu azalaki kolinga Yoane mingi.a Atako bongo, azalaki kotya ye liboso ya bayekoli na ye mosusu te. (Yoane 13:23) Kutu, ntango Yoane ná ndeko na ye Yakobo basɛngaki ye atya bango na esika eleki monene na Bokonzi ya Nzambe, Yesu ayanolaki bango boye: “Kofanda na lobɔkɔ na ngai ya mobali to na lobɔkɔ na ngai ya mwasi ezali ya ngai te mpo napesa yango.”—Malako 10:35-40.
Yesu azalaki ntango nyonso komemya basusu. Azalaki koponapona te lokola bato ya ntango na ye. Na ndakisa, na ntango wana mibali bazalaki komona basi lokola baombo. Kasi, Yesu azalaki mpenza kopesa basi lokumu. Mbala ya libosoliboso oyo Yesu ayebisaki polele ete azali Masiya, alobaki yango epai ya mwasi moko oyo azalaki kutu Moyuda te, kasi Mosamalia, oyo Moyuda nyonso akokaki ata kolobisa to kopesa mbote te. (Yoane 4:7-26) Bato ya liboso oyo bamonaki ye nsima ya lisekwa na ye ezalaki mpe basi.—Matai 28:9, 10.
□ Ndenge nini otalelaka bato ya mposo, minɔkɔ to bikólo mosusu, ata mpe basi?
Asungaki baboti mpe baleki na ye. Ekoki kozala ete Yozefe, tata mobɔkɔli ya Yesu, akufaki ntango Yesu azalaki naino elenge. Emonani ete Yesu azalaki kosala mosala ya mabaya mpo na kosalisa mama ná baleki na ye. (Malako 6:3) Liboso ya kokata motema, atikaki mama na ye na mabɔkɔ ya moyekoli na ye Yoane.—Yoane 19:26, 27.
□ Okoki kolanda ndakisa ya Yesu na likambo ya kokokisa mikumba na yo na libota?
Yesu azalaki moninga ya solosolo. Yesu azalaki moninga ya malamu koleka. Na ndenge nini? Azalaki koboya baninga na ye te mpo basali mabe, ata soki bazali kozongela mabe yango mbala na mbala. Bayekoli na ye bazalaki ntango nyonso te kosala kaka makambo oyo azalaki kolinga. Kasi, atikaki te kozwa bango lokola baninga na ye mpe azalaki kotala kaka makambo na bango ya malamu, na esika ya kozwelaka bango makanisi ya mabe. (Malako 9:33-35; Luka 22:24-27) Azalaki kondimisa bango makanisi na ye na makasi te mpe azalaki kosɛnga bango bábangaka te koyebisa makanisi na bango.—Matai 16:13-15.
Longola yango, Yesu azalaki kolinga baninga na ye. (Yoane 13:1) Azalaki kolinga bango tii wapi? Alobaki boye: “Ata moto moko te azali na bolingo koleka oyo, ete moto akaba molimo na ye mpo na baninga na ye.” (Yoane 15:13) Ezali nde na eloko moko oyo moto akoki kopesa baninga na ye oyo ezali na motuya koleka bomoi na ye?
□ Oboyaka baninga na yo te ata soki bapesi yo nkanda to basali yo mabe?
Azalaki mobali ya mpiko mpe ya solosolo. Yesu azalaki alɛmbalɛmbá te lokola oyo tomonaka na bikeko ya mangomba. Baevanzile ezali komonisa ete azalaki mobali makasi mpe ya mpiko. Mbala mibale mobimba, Yesu abimisaki bato ya mimbongo ná biloko na bango na tempelo. (Malako 11:15-17; Yoane 2:14-17) Ntango ebele ya bato bayaki kokanga “Yesu Monazalete,” apusanaki liboso na bango na mpiko nyonso mpo na koyebisa bango ete ye nde Yesu mpe mpo na kobatela bayekoli na ye, mpe alobaki na bango ete: “Ezali ngai. Na yango, soki ezali ngai nde bozali koluka, bótika baoyo bákende.” (Yoane 18:4-9) Yango wana, tokoki kokamwa te ete ntango Ponsi Pilato amonaki mpiko ya Yesu liboso ya bato oyo bakangaki ye mpe bazalaki konyokola ye, alobaki ete: “Talá! Moto!”—Yoane 19:4, 5.
□ Ozalaka na mpiko mpe na molende ntango oyebi likambo oyo osengeli kosala?
Bizaleli wana mpe bizaleli mosusu ya ntina mingi ya Yesu esengeli kotinda biso tólanda ndakisa na ye. Soki tondimi kolanda ndakisa ya Yesu, tokokóma mpenza bato malamu mpe ya esengo. Talá ntina oyo ntoma Petelo alendisaki baklisto bálanda matambe ya Yesu malamumalamu. Osalaka makasi mpo na kolanda mpenza matambe ya Yesu?
Azalaki kaka ndakisa ya mpamba te
Kasi, Yesu azalaki kaka ndakisa ya malamu te. Alobaki boye: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Longola koteya biso solo na ntina na Nzambe mpe kopesa biso nzela ya kopusana penepene na Nzambe, Yesu apesaki mpe bato ya sembo nzela ya kozwa bomoi.—Yoane 3:16.
Mpo na likambo wana, oyo ezalaki moko ya bantina oyo ayaki awa na mabelé, Yesu alobaki boye: “Mwana ya moto ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28) Lokola amikabaki mbeka, Yesu apesaki bato nzela ya kozwa bomoi ya seko. Mokomoko na biso asengeli kosala nini mpo na kozwa litomba na mbeka yango? Yesu alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.”—Yoane 17:3.
Ya solo, koyekola koyeba Yesu, kolanda ndakisa na ye mpe kondimela mbeka oyo apesaki ezali makambo oyo tosengeli kosala mpo na kozwa bomoi ya seko. Tosɛngi yo ozwaka ntango ya koyekola Biblia, mokanda oyo epesaka boyebi yango, mpe osala nyonso mpo na kosalela makambo oyo yango elobi, ndenge Yesu asalaki.b
Ndakisa oyo Yesu atiká esalisaka biso tóyeba etamboli oyo tosengeli kozala na yango. Lokola amikabaki mbeka, yango ekoki kosikola biso na lisumu mpe na lifuta na yango, liwa. (Baloma 6:23) Soki mpo na ndakisa oyo Yesu atikelá biso te, tolingaki mpenza kozala bato ya mawa! Tosengeli te kotika mikakatano mpe mitungisi ya bomoi epekisa biso kotalela mpe kolanda ndakisa ya Yesu Klisto, moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekoki kozala ete Salome, mama ya Yoane, azalaki ndeko ya Malia, mama ya Yesu. Talá makambo oyo balobi na Matai 27:55, 56, na Malako 15:40 mpe na Yoane 19:25.
b Mpo na koyeba makambo mingi lisusu na ntina na bomoi oyo Yesu azalaki na yango awa na mabelé, talá buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Bililingi na lokasa 7]
◼ Yesu azalaki kopona bilongi te mpe azalaki komemya moto nyonso
◼ Azalaki moninga ya solosolo tii na nsuka
◼ Azalaki mobali ya mpiko
Osalaka nyonso mpo na kolanda mpenza matambe ya Yesu?
[Bililingi na lokasa 5]
Yesu azalaki na bokatikati . . .
azalaki kosolola na moto nyonso . . .
azalaki koyeba komitya na esika ya basusu